Olingi koyekola monɔkɔ ya bapaya?
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA GRANDE-BRETAGNE
“Koloba ezali pɛtɛɛ, kasi kosala ezalaka mpasi!” Bato mingi oyo bamekaki koyekola koloba monɔkɔ ya bapaya balobaka bongo, mpe tokoki koloba ete likambo balobi ezali solo. Ya solo, tokoki koloba ete koyekola monɔkɔ mosusu ezalaka etumba. Kasi bato oyo basalá makasi mpe bayebá koloba monɔkɔ ya bapaya balobaka ete milende basalaki mpo na koyekola monɔkɔ mosusu ezalaki na ntina.
MOTO akoki koyekola monɔkɔ mosusu mpo na bantina ndenge na ndenge. Na ndakisa, Andrew akanaki kokende konje na France mpe azalaki na mposa ya kosolola na bato ya ekólo wana na monɔkɔ na bango. Guido abotamaki na Angleterre, kasi libota na ye bazali bato ya Italie. Alobaki ete: “Namesanaki kaka koyoka monɔkɔ ya mboka moko, yango wana, nalingaki koyekola koloba lokota ya Italie (italien) malamu.” Na mikolo eleki, lɛki ya Jonathan ya mobali akendaki na ekólo Espagne kuna abalaki. Jonathan alobi ete: “Nalingaki ete, ntango nakokende kotala ndeko na ngai ya mobali, nasolola na babokilo mpe na basemeki na ngai na monɔkɔ ya mboka na bango.”
Kasi koyekola monɔkɔ ya bapaya ekoki kopesa mpe matomba mosusu. Louise alobi ete: “Esalisaki ngai nazala na boboto. Sikoyo nayebi ndenge nini bapaya bayokaka ntango bakómi na mboka oyo bato balobaka monɔkɔ mosusu, monɔkɔ oyo bango bayebi te.” Pamela asepelaki mingi ntango ayebaki koloba monɔkɔ ya sika. Lokola akolaki na Angleterre, Pamela ayebaki lokota ya Chinois malamu te, atako libota na bango mobimba balobaka lokota yango. Yango wana, boyokani ya Pamela na mama na ye ezalaki se kobeba. Pamela alobi ete: “Biso mibale tozalaki kosolola mpenza te. Kasi, lokola sikoyo nakómi koloba lokota ya Chinois, tokómi mpenza baninga mpe boyokani na biso ekómi malamu koleka.”
Makambo oyo ekosalisa yo oyeba koloba monɔkɔ ya sika
Okosengela na makambo nini mpo oyeba koloba monɔkɔ mosusu? Bato mingi oyo bayebá koloba minɔkɔ mosusu batángi makambo oyo elandi.
● Ntina oyo ozali koyekola yango. Osengeli koyeba eloko nini ezali kotinda yo oyeba koloba monɔkɔ ya bapaya. Mbala mingi, bato oyo bazalaka na mposa makasi ya koyekola monɔkɔ ya bapaya mpe bayebi ntina oyo bazali kosala yango, bayebaka koloba yango malamu mpenza.
● Komikitisa. Kokanisa te ete okobanda mbala moko koloba malamu; ntango mosusu okoloba monɔkɔ yango malamu te, mingimingi na ebandeli. Alison alobi ete: “Bato bakosɛka yo, kasi kosilika te!” Valerie alobi ete: “Ozali lokola mwana moke oyo azali koyekola kotambola. Okobɛta mabaku mbala mingi, kasi osengeli kotɛlɛma mpe komeka lisusu.”
● Motema pɛtɛɛ. David alobi ete: “Mbula mibale ya liboso ezalaki mpasi mpo na ngai, kutu, na bantango mosusu nazalaki kokana kotika.” Kasi andimi ete: “Na nsima ekómaki pɛtɛɛ!” Jill mpe amiyokaki bongo. Alobaki ete: “Okoyeba te ete okómi koyeba, kaka soki okanisi ntango oyo obandaki tii esika okómi, nde okomona ete okómi koyeba mpenza.”
● Koloba. Soki ozali koloba mokolo na mokolo, yango ekosalisa yo oloba malamu mpenza monɔkɔ oyo ozali koyekola. Mikolo nyonso, salá makasi olobaka monɔkɔ yango, ata na boumeli ya miniti moke. Ndenge buku moko elobi yango: “‘Koloba mingi te kasi mbala na mbala’ ezali malamu koleka ‘koloba mingi kasi mbala mingi te.’”
Bisaleli oyo ekosalisa yo
Olingi komeka koyekola monɔkɔ ya bapaya? Soki ezali bongo, bisaleli oyo tolobeli awa na nse ekosalisa yo obanda koyeba mokemoke.
● Salá bafiche. Salá bafiche oyo okokoma liloba moko to fraze moko na monɔkɔ yango oyo ozali koyekola mpe na nsima ya fiche yango, komá ndimbola na yango na monɔkɔ na yo. Soki na esika ofandi bafiche wana ezali te, salá bapapye ya kartɔ na ndenge na yo moko.
● Bakasɛti ya radio mpe bakasɛti ya video mpo na koyekola monɔkɔ ya bapaya. Yango ekosalisa yo oyoka ndenge bankolo monɔko balobaka yango. Na ndakisa, David ayekolaki maloba mosusu ya lokota ya Japon na kasɛti oyo ezalaki na maloba ya buku moko ya baturiste, oyo azalaki koyoka ntango azalaki kotambwisa motuka na ye.
● Programɛ ya ordinatɛrɛ mpo na koyekola monɔkɔ mosusu. Baprogramɛ mosusu ekosalisa yo okɔtisa mongongo na yo na ordinatɛrɛ mpe okokanisa elobeli na yo na elobeli ya bankolo monɔkɔ mpo na koyeba soki ozali koloba ndenge bango balobaka.
● Radio na televizyo. Soki na mboka na bino okoki kolanda radio to kotala televizyo ya mboka oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali koyekola, mpo na nini te kolanda yango mpe kotala soki ozali kokanga ntina ya makambo bazali koloba?
● Bazulunalo na babuku. Meká kotánga mikanda ya monɔkɔ oyo ozali koyekola mpo otala soki ozali mpenza kokanga ntina ya makambo ozali kotánga to te.a
Lobá monɔkɔ yango malamu
Ya solo, ata ndele, okosolola na bato oyo balobaka monɔkɔ yango. Yango esɛngi kaka te ete okende na mboka oyo balobaka monɔkɔ yango. Kasi, mbala mosusu okoki kokende na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova, oyo esalelaka monɔkɔ wana ya bapaya, na ekólo na bino.
Na makambo nyonso, zalá na mokano ya kokanisa na monɔkɔ wana, na esika ete obongolaka kaka maloba to bafraze na monɔkɔ ya mboka na bino. Soki oyekoli mimeseno mpe bizaleli ya bato ya ekólo oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali koyekola, mbala mosusu ekoki kosalisa yo. Robert Lado, moto ya mayele na makambo ya nkota, alobi ete: “Moto akoki koloba te ete ayebi mpenza monɔkɔ moko malamu soki ayebi naino mimeseno mpe makambo ya bomoi ya bankolo na yango te, mpo monɔkɔ ezali mpe lolenge ya bomoi na bango.”
Likanisi ya nsuka: Kolɛmba nzoto te soki ozali komesana na monɔkɔ yango noki te. Koyekola monɔkɔ ya bapaya ezalaka na nsuka te. Jill ayekolaki lokota ya bikela esili koleka sikoyo mbula 20 mpe alobi boye: “Tii lelo, nayekolaka yango kaka. Monɔkɔ yango ezali ntango nyonso kobongwana.”
Na yango, olingi koyekola monɔkɔ ya bapaya? Soki ezali bongo, omibongisa mpo na kobunda etumba yango makasi—kasi salá milende—okozwela yango matomba mingi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lamuká! ebimaka sikoyo na minɔkɔ 83 mpe Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ebimaka na minɔkɔ 134. Bato mingi bamonaka ete ekomeli ya polele, oyo ezali na bazulunalo yango ekoki kosalisa moto oyo azali koyekola monɔkɔ mosusu.
[Bililingi na lokasa 16]
Okoki koyeba maloba mingi soki . . .
. . . ozali kokokanisa maloba ya monɔkɔ na bino na maloba ya monɔkɔ oyo ozali koyekola