Olobaka ‘monɔkɔ ya pɛto’ malamu?
“Nakobongola monɔkɔ ya bato na monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova.”—Sef. 3:9, NW.
1. Likabo nini kitoko Yehova apesá biso?
YEHOVA NZAMBE, Mozalisi nde apesá bato likabo ya koloba. (Ex. 4:11, 12) Apesaki Adama, moto ya liboso, likoki ya koloba mpe ya kobimisa maloba ya sika mpe na ndenge yango, monɔkɔ oyo azalaki koloba ekóma na maloba mingi. (Gen. 2:19, 20, 23) Ezalaki mpenza likabo kitoko! Kutu, yango epesaki bato likoki ya kosolola na Tata na bango ya likoló mpe kokumisa nkombo na ye monene.
2. Mpo na nini bato balobaka lisusu monɔkɔ moko te?
2 Na boumeli ya bikeke 17 oyo elandaki, bato nyonso bazalaki koloba kaka monɔkɔ moko, bazalaki na “maloba ya lolenge moko.” (Gen. 11:1) Na nsima, botomboki ebimaki na mikolo ya Nimerode. Bato ya kozanga botosi balandaki malako ya Yehova te; basanganaki na esika oyo na nsima ebengamaki Babele, mpamba te mokano na bango ezalaki ya kotikala kaka esika moko. Babandaki kotonga ndako moko molai, mpo na kopesa Yehova nkembo te, kasi mpo na ‘kozalisa nkombo ya lokumu’ mpo na bango moko. Na yango, Yehova abulunganisaki monɔkɔ oyo bato yango bazalaki koloba mpe asalaki ete bákóma koloba minɔkɔ mosusu ndenge na ndenge. Yango wana, bapalanganaki na mabelé mobimba.—Tángá Genese 11:4-8.
3. Nini esalemaki ntango Yehova asalaki ete batomboki na Babele bákóma koloba minɔkɔ ekeseni?
3 Lelo oyo, na mokili mobimba, ezali na bankóto ya minɔkɔ, bato mosusu balobaki ete ezali na minɔkɔ koleka 6 800. Mokomoko na minɔkɔ yango esɛngaka ete bato oyo bazali koloba yango bázala na ndenge moko boye ya kokanisa. Yango emonisi ete, ntango Yehova asalaki ete batomboki wana bákóma koloba minɔkɔ ekeseni, alongolaki na makanisi na bango monɔkɔ oyo bango nyonso bazalaki koloba liboso. Akɔtisaki na mitó na bango maloba ya sika mpe abongolaki ndenge na bango ya kokanisa mpe atyaki na mitó na bango gramɛrɛ ya sika. Yango wana tokoki kokamwa te ete esika oyo batongaki ndako wana molai ekómaki kobengama Babele, oyo elimboli “Mobulungano”! (Gen. 11:9) Tomoni ete kaka Biblia nde epesi ndimbola oyo ebongi na oyo etali ebandeli ya ebele ya minɔkɔ oyo ezali na mokili lelo oyo.
Monɔkɔ ya sika mpe ya pɛto
4. Likambo nini Yehova asakolaki ete ekosalema na mikolo na biso?
4 Lisolo ya Biblia oyo elobeli ndenge Nzambe asalaki ete bato bákóma koloba minɔkɔ ekeseni ekoki kokamwisa; kasi, ezali na likambo mosusu ya monene koleka oyo ezali kosalema na mikolo na biso. Na nzela ya mosakoli Sefania, Yehova alobaki boye: “Nakobongola monɔkɔ ya bato na monɔkɔ moko ya pɛto, mpo bango nyonso bábelela nkombo ya Yehova, mpo básalela ye na bomoko.” (Sef. 3:9, NW) ‘Monɔkɔ ya pɛto’ ezali nini, mpe ndenge nini tokoki koyekola koloba yango malamu?
5. Monɔkɔ ya pɛto ezali nini, mpe makambo nini yango ememi?
5 Monɔkɔ ya pɛto ezali mateya ya solo na ntina na Yehova Nzambe mpe mokano na ye ndenge emonisami na Biblia, Liloba na ye. “Monɔkɔ” yango esangisi mpe boyebi ya solo na oyo etali Bokonzi ya Nzambe mpe ndenge oyo ekosantisa nkombo ya Yehova, ekolongisa bokonzi na ye, mpe ekomemela bato ya sembo mapamboli ya seko. Mbongwana yango esengelaki komema makambo nini epai ya bato? Biblia elobi ete bato ‘bakobelela nkombo ya Yehova’ mpe ‘bakosalela ye na bomoko.’ Na bokeseni na makambo oyo esalemaki na Babele, monɔkɔ ya pɛto ezali kotinda basaleli ya Yehova bákumisa nkombo na Ye mpe bázala na bomoko.
Ndenge ya koyekola monɔkɔ ya pɛto
6, 7. (a) Koyekola monɔkɔ ya sika esɛngaka nini, mpe ndenge nini makambo yango etaleli koyekola monɔkɔ ya pɛto? (b) Tokotalela nini sikoyo?
6 Ntango moto azali koyekola monɔkɔ ya sika, asengeli kosuka kaka te na kokanga na motó maloba ya monɔkɔ yango. Koyekola monɔkɔ ya sika esɛngaka mpe koyekola ndenge ya sika ya kokanisa. Monɔkɔ na monɔkɔ ezali na ndenge na yango ya kolandisa maloba mpe ndenge na yango ya kosɛkisa. Ndenge ya kobenga maloba ekoki kosɛnga kosalela lolemo na ndenge moko boye. Ezali mpe bongo ntango tobandi koyekola monɔkɔ ya pɛto, elingi koloba mateya ya Biblia. Tosengeli kosuka kaka te na koyeba mateya ya ebandeli. Mpo na koyeba koloba monɔkɔ yango malamu, tosengeli mpe kobongola ndenge na biso ya kokanisa.—Tángá Baloma 12:2; Baefese 4:23.
7 Nini ekoki kosalisa biso tósuka kaka te na koyeba monɔkɔ ya pɛto kasi mpe koloba yango malamumalamu? Ndenge moko mpo na minɔkɔ nyonso, ezali na makambo oyo ekoki kosalisa biso tóyeba ndenge ya koloba malamu monɔkɔ ya pɛto. Sikoyo, tótalela mwa makambo oyo bato basalaka mpo na koyekola monɔkɔ ya sika mpe tómona ndenge oyo makambo yango ekoki mpe kosalisa biso mpo na koyekola monɔkɔ ya pɛto.
Ndenge ya koloba malamu monɔkɔ ya pɛto
8, 9. Tosengeli kosala nini soki tolingi koyeba monɔkɔ ya pɛto, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?
8 Koyoka malamu. Ntango moto ayoki monɔkɔ moko mpo na mbala ya liboso, ayokaka lokola nde akokoka kokanga ntina na yango ata mokolo moko te. (Yis. 33:19) Kasi ntango moto yango azali kotya likebi na makambo oyo azali koyoka, akobanda koyeba mwa maloba mosusu mpe ndenge elobamaka. Ndenge moko mpe, Biblia elendisi biso na maloba oyo: “Ezali na ntina ete biso tótya likebi koleka mpenza na makambo oyo toyokaki, mpo tópɛngwa na nzela soki moke te.” (Ebe. 2:1) Yesu azalaki koyebisa bayekoli na ye mbala na mbala ete: “Oyo azali na matoi ayoka.” (Mat. 11:15; 13:43; Mko. 4:23; Luka 14:35) Ya solo, mpo tóyeba monɔkɔ ya pɛto, tosengeli ‘koyoka mpe kokanga ntina’ ya makambo oyo ezali kolobama.—Mat. 15:10; Mko. 7:14.
9 Koyoka esɛngaka kotya likebi, mpe kosala milende yango ezali na litomba. (Luka 8:18) Ntango tozali na makita, totyaka mpenza likebi na makambo oyo ezali kolobama, to makanisi na biso eyengayengaka? Ezali na ntina mingi tósala makasi ya kotyaka likebi mpenza na makambo oyo ezali kolobama. Soki te, tokoki kokóma matoi mangbongi.—Ebe. 5:11.
10, 11. (a) Longola koyoka na likebi, tosengeli kosala nini? (b) Koloba monɔkɔ ya pɛto esɛngi mpe kosala nini?
10 Komekola bato oyo balobaka malamu monɔkɔ yango. Balendisaka bato oyo bazali koyekola monɔkɔ ya sika ete básuka kaka te na koyoka na likebi, kasi bámekolaka ndenge bato oyo balobaka malamu monɔkɔ yango babengaka maloba mpe ndenge oyo basalaka bafraze. Kosala bongo esalisaka bayekoli bákóma te na lolenge moko ya mabe ya koloba monɔkɔ yango, oyo ekoki kosala ete bato mosusu bákanga te ntina ya makambo oyo bazali koloba. Ndenge moko mpe, tosengeli komekola bato oyo bazali na “mayele ya koteya” monɔkɔ ya pɛto. (2 Tim. 4:2) Sɛngá bango básalisa yo. Ndimáká básembola yo ntango osali libunga.—Tángá Baebele 12:5, 6, 11.
11 Koloba monɔkɔ ya pɛto esɛngaka kaka te kondima mateya ya solo mpe koteya yango epai ya basusu; esɛngaka mpe koyokanisa etamboli na biso na mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Komekola etamboli malamu ya basusu ekoki kosalisa biso. Tosengeli komekola kondima mpe molende na bango. Tosengeli mpe komekola lolenge ya bomoi ya Yesu. (1 Kol. 11:1; Ebe. 12:2; 13:7) Soki tokobi kosala bongo, tokozala na bomoko na kati na biso basaleli ya Nzambe, mpe tokobanda koloba monɔkɔ ya pɛto ndenge moko.—1 Kol. 4:16, 17.
12. Ndenge nini kokanga makambo na motó ekoki kosalisa na koyeba monɔkɔ ya sika?
12 Kokanga makambo na motó. Esɛngaka ete bato oyo bazali koyekola monɔkɔ ya sika bákanga makambo mingi na motó; na ndakisa, maloba ya sika. Mpo na baklisto, kokanga makambo na motó ekoki kosalisa na koyeba monɔkɔ ya pɛto. Na ndakisa, ezali malamu kokanga bankombo ya mikanda ya Biblia ndenge elandaná. Bandeko mosusu bamityelaka mokano ya kokanga na motó bavɛrsɛ ya Biblia mpe maloba na yango. Bamosusu mpe bamonaka ete ezali malamu koyeba banzembo ya Bokonzi na motó, koyeba bankombo ya mabota ya Yisalaele mpe ya bantoma 12 ya Yesu, mpe bizaleli ya mbuma ya elimo. Na ntango ya kala, Bayisalaele mingi bayebaki na motó maloba oyo ezali na mokanda ya Nzembo. Na mikolo na biso, elenge mobali moko ayebaki na motó maloba ya bavɛrsɛ ya Biblia koleka 80 ntango azalaki naino na mbula 6. Biso mpe tokoki kosalela malamu motó na biso mpe kokangaka makambo!
13. Mpo na nini kozongela makambo ezali na ntina?
13 Kozongela makambo ekoki kosalisa na kokanga yango, mpe mateya oyo ezongelamaka mbala na mbala ezali na ntina mingi mpo na biso baklisto. Ntoma Petelo alobaki boye: “Nakozala ntango nyonso pene mpo na kokundwela bino makambo wana, atako boyebi yango mpe bopikami makasi na kati ya solo oyo ezali na kati na bino.” (2 Pet. 1:12) Mpo na nini tozalaka na mposa bázongelaka biso makambo? Mpamba te yango ekolisaka boyebi na biso, efungolaka makanisi na biso, mpe elendisaka ekateli na biso ya kotikala makasi na elimo. (Nz. 119:129) Kozongela ntango nyonso mibeko mpe mitinda ya Nzambe esalisaka biso tómitalela malamumalamu mpe tózala te lokola “moyoki oyo abosanaka.” (Yak. 1:22-25) Soki tozali kozongela mateya ya solo te, makambo mosusu ekobebisa motema na biso mpe yango ekoki kosala ete tólobaka lisusu monɔkɔ ya pɛto malamu te.
14. Nini ekoki kosalisa biso ntango tozali koyekola monɔkɔ ya pɛto?
14 Kotánga na mongongo makasi. (Emon. 1:3) Mpo na koyekola monɔkɔ ya sika, bato mosusu bamekaka koloba yango bango moko na nse ya motema. Kasi, yango ebotaka mpenza mbuma ya malamu te. Ntango tozali koyekola monɔkɔ ya pɛto, na bantango mosusu ekoki kosɛnga ete tótángaka “na mongongo ya nse” mpo tótyela mpenza makambo yango likebi. (Nzembo 1:1, 2, NW) Yango esalaka ete makambo oyo tozali kotánga ekɔta mpenza na motó na biso. Na Liebele, maloba “kotánga na mongongo ya nse” ezali na boyokani na komanyola. Mpo biloko oyo tolei etonga mpenza nzoto, esɛngaka ete estoma enika yango malamu; ndenge moko mpe, komanyola ezali na ntina mingi mpo tókanga mpenza ntina ya makambo oyo tozali kotánga. Tozwaka mpenza ntango ya komanyola makambo oyo touti koyekola? Nsima ya kotánga Biblia, tosengeli kokanisa na mozindo makambo oyo totángi.
15. Ndenge nini tokoki koyekola “gramɛrɛ” ya monɔkɔ ya pɛto?
15 Koyekola gramɛrɛ. Ntango tozali koyekola monɔkɔ moko, ezalaka mpe na ntina koyekola gramɛrɛ na yango, elingi koloba ndenge ya kolandisa maloba ya monɔkɔ yango mpe mibeko na yango. Yango esalisaka mpo na koyeba malamu monɔkɔ yango, mpe koloba yango ndenge esengeli. Monɔkɔ na monɔkɔ ezalaka na ndenge na yango ya kolandisa maloba; ndenge moko mpe monɔkɔ ya pɛto, elingi koloba mateya ya Biblia, ezali na “ndakisa ya maloba oyo epesaka litomba.” (2 Tim. 1:13) Tosengeli kolanda “ndakisa” yango.
16. Ezaleli nini tosengeli kokima, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?
16 Kokoba kokende liboso. Moto akoki koyeba makambo mingi ya monɔkɔ moko mpe kobanda koloba yango; kasi, na nsima akoki kotika kokende liboso. Likambo ya ndenge yango ekoki komonana epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya pɛto. (Tángá Baebele 5:11-14.) Nini ekoki kosalisa biso tókóma na ezaleli yango te? Tosengeli kokoba koyekola maloba ya sika ya monɔkɔ yango. “Sikoyo lokola totiki mateya ya ebandeli oyo etali Klisto, tiká tókende nokinoki tii na kokɔmela, kotyáká lisusu moboko te, elingi koloba, kobongola motema na misala ya kokufa, mpe kondimela Nzambe, mateya etali babatisimo mpe kotyama mabɔkɔ, lisekwa ya bakufi mpe lisambisi ya seko.”—Ebe. 6:1, 2.
17. Mpo na nini koyekola mbala na mbala ezali na ntina? Pesá ndakisa.
17 Komityela ntango mpo na koyekola. Eleki malamu koyekolaka mokemoke, kasi mbala na mbala na esika ya koyekola ntango molai, nsima ya mikolo mingi. Yekoláká ntango motó na yo ezali kimya, kasi te na ntango oyo makanisi na yo ekoki koyengayenga. Koyekola monɔkɔ ya sika ezali lokola kopasola nzela na kati ya zamba. Nzela yango ekozipama te soki bato bazali kosalela yango mbala na mbala. Soki nzela yango esalelami te na boumeli ya ntango molai, ekozipama na matiti. Yango wana, kosala milende mikolo nyonso ezali na ntina! (Dan. 6:16, 20) Bondeláká mpe ‘zalá ekɛngɛ na kotingama mpenza’ na oyo etali koloba monɔkɔ ya pɛto.—Ef. 6:18.
18. Mpo na nini tosengeli koloba monɔkɔ ya pɛto na mabaku nyonso?
18 Kozala na momeseno ya koloba yango. Bato mosusu oyo bazali koyekola monɔkɔ ya sika bakakatanaka koloba yango mpamba te bayokaka nsɔni to babangaka kosala mabunga. Yango ekoki kopekisa bango bákende liboso. Koyekola monɔkɔ ezali lokola koyekola kobɛta mai; mpo moto ayeba kobɛta mai, asengeli te kobanga kokita na mai. Ndenge moko mpe, soki moto oyo azali koyekola monɔkɔ ya sika azali koloba yango mingi, akomesana na yango. Biso mpe tosengeli kolobaka monɔkɔ ya pɛto ntango nyonso. “Ezali na motema nde moto amonisaka kondima mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli mpo na lobiko.” (Lom. 10:10) Tosalaka “eyambweli” kaka na ntango ya batisimo te, tosalaka yango mpe ntango tozali koloba mpo na Yehova na mabaku nyonso, na ndakisa ntango tozali na mosala ya kosakola. (Mat. 28:19, 20; Ebe. 13:15) Makita epesaka biso libaku ya koloba monɔkɔ ya pɛto na ndenge ya polele.—Tángá Baebele 10:23-25.
Tólobaka monɔkɔ ya pɛto na bomoko mpo na kokumisa Yehova
19, 20. (a) Likambo nini ya kokamwa Batatoli ya Yehova bazali kosala lelo oyo? (b) Ekateli na yo ezali nini?
19 Na ntembe te, tolingaki kokamwa mpenza soki tozalaki na Yelusaleme na mokolo ya lomingo, 6 Siwana ya mobu 33 T.B.! Na ntɔngɔ ya mokolo yango, liboso ya ngonga ya 9, bato oyo bayanganaki na ndako moko ya likoló “babandaki koloba na minɔkɔ mosusu” na ndenge ya likamwisi. (Mis. 2:4) Lelo oyo, basaleli ya Nzambe bazwaka lisusu te likabo ya koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. (1 Kol. 13:8) Atako bongo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi na minɔkɔ koleka 430.
20 Tosengeli mpenza kozala na botɔndi mpamba te, ata soki tolobaka monɔkɔ nini, monɔkɔ ya pɛto ezali kosangisa biso! Yango ekeseni mpenza na makambo oyo esalemaki na Babele. Basaleli ya Yehova bazali kokumisa nkombo na ye lokola bato oyo bazali koloba monɔkɔ moko. (1 Kol. 1:10) Tiká ete tózala na ekateli ya kokoba kosala “na bomoko” elongo na bandeko na biso ya mokili mobimba wana tozali koyekola koloba malamumalamu monɔkɔ ya pɛto, mpo na nkembo ya Yehova, Tata na biso ya likoló.—Tángá Nzembo 150:1-6.
Okopesa eyano nini?
• Monɔkɔ ya pɛto ezali nini?
• Koloba monɔkɔ ya pɛto esɛngi mpe kosala nini?
• Nini ekoki kosalisa biso tólobaka malamu monɔkɔ ya pɛto?
[Etanda na lokasa 23]
Yekolá koloba malamu monɔkɔ ya pɛto na
◆ koyoka malamu.
◆ komekola bato oyo balobaka yango malamu.
◆ kokanga makambo na motó mpe kozongela.
◆ kotánga na mongongo makasi.
Nz. 1:1, 2, NW; Emon. 1:3
◆ koyekola “gramɛrɛ.”
◆ kokoba kokende liboso.
◆ komityela ntango mpo na koyekola.
◆ kozala na momeseno ya koloba yango.
[Bililingi na lokasa 24]
Basaleli ya Yehova balobaka monɔkɔ ya pɛto