Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Juillet nk. 13-15
  • Mpo na nini moninga na ngai asali ngai boye?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini moninga na ngai asali ngai boye?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo oyo ebebisaka boninga
  • Ntina oyo boninga ebebaka
  • Bóbongisa
  • Mpo na nini moninga na ngai ayokisi ngai mpasi?
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?
    Lamuká!—2009
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
    Lamuká!—2011
  • Biblia elobi nini na likambo etali boninga?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Juillet nk. 13-15

Mituna oyo bilenge batunaka . . .

Mpo na nini moninga na ngai asali ngai boye?

“Nazalaki na baninga ebele . . . Na nsima, bakómaki kokangama na mwana mwasi mosusu mpe soki nakei pembeni na bango, batiki koloba. . . . Bazalaki lisusu kolinga ngai te. Likambo yango esalaki ngai mpasi mpenza.”​—Karine.a

LIKAMBO oyo ekoki kokómela ata bato oyo balingani mingi. Lelo, bazali baninga ya motema; lobi, bakangani binemi. Nora azali na mbula 17 mpe alobi ete: “Moninga ezali moto oyo okoki kotyela ye motema, moto oyo okoki koyebisa ye mikakatano na yo, ezala ya ndenge nini.” Nzokande, na bantango mosusu, moninga na yo ya motema akoki mpenza kosalela yo makambo lokola monguna na yo monene.

Makambo oyo ebebisaka boninga

Nini esalaka ete baninga oyo bazalaki malamu báyokana lisusu te? Mpo na Sandra, nyonso ebandaki ntango moninga na ye Mélanie adefaki elamba na ye ya kenzo oyo azalaki kolinga mingi. Sandra alobi ete: “Ntango azongisaki yango, ekómaki salite mpe ebebaki mwa moke na lobɔkɔ. Ayebisaki ngai ata likambo moko te; akanisaki nakomona yango te.” Sandra ayokaki ndenge nini na likambo oyo Mélanie asalaki? Alobi ete: “Epesaki ngai mpenza nkanda. Namonaki ete ayokaki mabe te ndenge abebisi eloko na ngai . . . kutu ndenge likambo yango esali ngai mpasi etali ata ye te.”

Okoki mpe koyoka mpasi soki moninga na yo ya motema asali to alobi likambo oyo eyokisi yo nsɔni. Yango ekómelaki Cindy ntango ayebisaki baninga na ye ya kelasi ete naino atángi mokanda moko te mpo na lisolo oyo asengelaki kosala liboso ya molakisi mpe banakelasi nyonso. Mbala moko Catherine, moninga na ye, abandaki kogangela ye. Cindy alobi ete: “Nayokaki nsɔni na kelasi. Nasilikelaki ye makasi. Banda ntango wana, tozalaki lisusu ndenge tozalaka te.”

Ntango mosusu, baninga balinganaka lisusu te soki moko akómi kotambola na baninga mosusu ya sika. Laurianne azali na mbula 13 mpe alobi ete: “Nazalaki na moninga moko ya malamu kasi akómaki kotambola na bana mosusu. Abandaki kobosana ngai.” To mpe ekoki kozala ete obandi komona ete moninga na yo akangamaka na yo mpo na likambo moko. Julien azali na mbula 13 mpe alobi ete: “Ngai na Stéphane tolinganaki mingi mpenza. Nakanisaki ete alingaka ngai mpo na bizaleli na ngai, kasi nayaki komona ete azalaki kolinga ngai mpo papa na ngai azalaki kosala na kompanyi moko ya piblisite mpe azalaki ntango nyonso komemela biso batike mpo na kokende kotala masano mpe miziki.” Lelo oyo, Julien azali komiyoka ndenge nini? Alobi ete: “Nakolinga lisusu Stéphane ata moke te!”

Ntango mosusu, moninga na yo ayebisi bato mosusu sɛkɛlɛ na yo. Na ndakisa, Axelle ayebisaki Sara, moninga na ye, makambo mosusu oyo etali moninga na bango moko ya mosala. Na mokolo oyo elandaki, Sara akendaki koloba likambo yango na miso ya moninga yango ya mosala. Axelle alobi ete: “Nandimaki te ete azalaki moto ya bilobaloba boye! Nasilikaki makasi.” Rachel azali na mbula 16, ye mpe akutanaki na likambo ya ndenge wana, ntango moninga na ye ya motema ayebisaki bato mosusu makambo oyo basololaki kaka bango mibale. Rachel alobi ete: “Nayokaki mpasi mpe nayokaki lokola nde atɛki ngai. Namitunaki ete: ‘Ndenge nini nakoki koyebisa ye lisusu sɛkɛlɛ?’”

Moninga ezali moto oyo okoki kofungolela ye motema mpo asalisa yo, mingimingi ntango bozali kotyelana likebi, kotyelana motema mpe bozali komemyana. Kasi, ata na kati ya baninga ya motema, matata ezangaka te. Biblia emonisi polele ete: “Ezali na baninga oyo bakoki kosalana mabe.” (Masese 18:24, NW) Ata likambo yango ezali ndenge nini, ekoki kozala mpasi mpenza ntango oyoki lokola nde moninga na yo atɛki yo. Mpo na nini esalemaka bongo?

Ntina oyo boninga ebebaka

Boninga nyonso ya bato, ezala bilenge to mikóló, ezangaka matata te. Kutu ezali mpenza lokola moyekoli moklisto Yakobo akomaki yango: “Mpo ete biso nyonso tokokweaka na makambo mingi. Soko moto akokweaka na liloba na ye te, ye moto [ya kokoka, NW] mpe ayebi kopekisa nzoto na ye mobimba.” (Yakobo 3:2; 1 Yoane 1:8) Lokola moto nyonso asalaka mabunga, osengeli kobosana te ete, ata ndele, moninga na yo moko akosala to akoloba likambo oyo ekopesa yo mpasi. Meká kokanisa naino, mbala mosusu yo mpe osilá koyokisa ye mpasi. (Mosakoli 7:22) Lisa, ye azali na mbula 20, alobi boye: “Biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe na bantango mosusu toyokisanaka nkanda.”

Longola kozanga kokoka, ezali na makambo mosusu oyo ekoki kosala ete boninga ebeba. Kanisá lisusu, lokola ozali kokola mpe kokɔmela, okómi kosepela na makambo mosusu; ezali mpe bongo mpo na baninga na yo. Yango wana, bato mibale oyo bazalaki koyokana na makambo mingi liboso, bakoki mokemoke kokóma na makanisi to bamposa oyo ekeseni. Elenge moko amilelaki mpo na moninga na ye moko ya motema, alobaki boye: “Tosololaka lisusu mingi te na telefone mpe ntango tosololaka, toyokanaka lisusu na makambo mingi te.”

Ya solo, kozala na makanisi ndenge mosusu ezali mpenza likambo monene te. Kasi mpo na nini bato mosusu bapesaka baninga na bango mpasi? Mbala mingi, ezalaka mpo na zuwa. Na ndakisa, moninga na yo akoki kobanda kosilikela yo kaka mpo na makoki na yo to mpo na makambo malamu oyo ozali kosala. (Talá Genese 37:4; 1 Samwele 18:7-9.) Ndenge Biblia elobi yango, “[zuwa] ekopolisa mikuwa.” (Masese 14:30) Zuwa ebimisaka bilulela na koswana. Ezala likambo yango nini, okosala nini soki moninga na yo apesi yo mpasi?

Bóbongisa

Rachel alobi ete: “Liboso natalelaka moto yango mpe nalukaka koyeba soki asalaki likambo yango na nko to te.” Ntango moto abimeseli yo maloba to asali likambo oyo omoni ete ezokisi yo, kozongisela ye maloba to kosalela ye likambo na nkanda te. Kasi, zalá na motema molai mpe talelá likambo yango malamumalamu. (Masese 14:29) Soki ozongiseli ye maloba to osaleli ye likambo na nkanda mpo afingi yo, yango nde ekosilisa likambo yango? Nsima ya kotalela likambo yango malamumalamu, okoki kolanda toli ya Nzembo 4:4 oyo elobi ete: “Bóyoka nkanda nde salá lisumu te; bóloba na mitema na bino mpenza likoló na mbeto na bino mpe zalá nyɛ.” Na nsima, okoki kotika ‘bolingo ezipa ebele na masumu.’​—1 Petelo 4:8.

Bongo, soki omoni ete ozali kokoka te kobosana mabe yango? Na ntango wana, ekozala malamu okutana na moto yango. Frank, ye azali na mbula 13, alobi boye: “Bókutana, kaka bino mibale, mpe bólobela likambo yango polelepolele. Soki osali bongo te, okobombela ye nkanda na motema.” Suzanne azali na mbula 16, ye mpe azali na likanisi yango. Alobi ete: “Eleki malamu koyebisa bango ete otyelaki bango motema kasi bango bayokisi yo mpasi.” Jacqueline mpe alobi ete ezali malamu kosilisa makambo yango bino mibale. Abakisi ete: “Namekaka kolobela likambo yango polele. Mbala mingi moto yango akolobela yo polelepolele mpe bokoki kosilisa matata nokinoki.”

Kasi osengeli te kokende kokutana na moninga na yo ntango ozali na nkanda. Biblia elobi ete: “Moto na yauli akopesa kowelana simbisi, kasi ye oyo akosilika noki te akokitisa [matata].” (Masese 15:18) Na yango, liboso oluka kobongisa makambo, zelá tii ntango nkanda na yo ekosila. Lisa alobi ete: “Na ebandeli ozali na nkanda, kasi osengeli kokitisa motema. Zelá tii ntango nkanda na yo ekokita. Na nsima, okoki kokende epai ya moto yango, bófanda mpe bósolola likambo yango na kimya.”

Maloba ya ntina awa ezali “na kimya.” Kobosana te ete okei mpo na kogangela moninga na yo te. Okei nde mpo na kobongisa likambo yango na boboto mpenza mpe, soki ekokoka, bózongisa boninga na bino. (Nzembo 34:14) Na yango, sololá na ye na motema na yo mobimba. Lisa apesi likanisi oyo: “Okoki koloba ete: ‘Nazali moninga na yo mpe yo ozali moninga na ngai; kasi nalingi kaka koyeba likambo yango ebandaki ndenge nini.’ Ozali na mposa ya koyeba mpo na nini asalaki bongo. Ntango akoyebisa yo, ekozala mpasi te mpo na kosilisa likambo yango.”

Ekozala mabe mpenza soki ozongisi mabe mpo na mabe, to, mbala mosusu okómi kotɔnga moto yango to koluka bato mosusu bákɔtela yo na likambo yango. Ntoma moklisto Paulo akomelaki Baloma boye: “Bózongisaka mabe mpo na mabe te.” (Baloma 12:17) Ya solo, ata soki oyokaki mpasi ya ndenge nini, soki ozongisi mabe mpo na mabe, okobebisa makambo nde kobebisa. Nora alobi ete: “Ezali na ntina moko te kozongisa mabe mpo na mabe mpo soki osali bongo, bokozala lisusu baninga te.” Kasi alobi lisusu ete soki osali makasi mpo na kozongisa boninga na bino, “okomiyoka ete ozali moto malamu mpenza.”

Bongo, soki moninga na yo aboyi bósilisa likambo yango? Soki ezali bongo, kobosana te ete boninga ezalaka ndenge moko te mpo na moto nyonso. Judith McCleese, ye apesaka mabota toli, alobi ete: “Baninga nyonso bazalaka baninga ya motema te. Baninga bazalaka ndenge na ndenge.” Atako bongo, okoki kosepela na ndenge osalaki nyonso oyo okokaki kosala mpo na kozongisa kimya kati na bino mibale. Ntoma Paulo akomaki ete: “Soki yango etali bino, bósala nyonso oyo bokoki kosala mpo na kozala na kimya na bato nyonso.”​—Baloma 12:18, NW.

Matata ekoki kobima ata na kati ya baninga ya motema. Soki okutani na matata mpe otikeli yango nzela te ete ebebisa likanisi oyo ozalaka na yango mpo na bato mosusu mpe mpo na yo moko, yebá ete okozala mokóló oyo akɔmeli mpenza. Atako baninga mosusu bakoki ‘kosalana mabe,’ Biblia epesi biso elikya ete “ezali na baninga oyo balinganaka koleka bandeko.”​—Masese 18:24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Na lisolo oyo, topesi bato mosusu nkombo mosusu.

[Bililingi na lokasa 15]

Bokoki kozongisa boninga na bino soki bolobeli likambo oyo esalemaki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto