Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 4/09 nk. 19-21
  • Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?
  • Lamuká!—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Naloba to naloba te?
  • “Ntango ya koloba”
  • Ozali kobanga bábenga yo bifundafunda?
  • Nzambe azali kobyanga yo okóma moninga na ye
    Okoki kozala moninga ya Nzambe!
  • Banani bazali baninga na ngai ya solo?
    Lamuká!—2011
  • Mpo na nini moninga na ngai asali ngai boye?
    Lamuká!—2000
  • Ndenge ya kosalisa moninga oyo azali kobɛla
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Lamuká!—2009
g 4/09 nk. 19-21

Mituna oyo bilenge batunaka

Nasengeli koyebisa mabe oyo moninga na ngai asali?

“Ezalaki mpasi mingi. Azalaki moninga na ngai ya motema.”​—James.a

“Makambo ebebaki mpenza. Baninga na ngai nyonso bayinaki ngai mpo nalobaki.”​—Ann.

BIBLIA elobi ete: “Moninga azali mpe oyo akotikala penepene koleka ndeko.” (Masese 18:24) Ozalaka na moninga ya ndenge wana? Soki ezali bongo, ozali na eloko moko ya motuya.

Kasi, ezali boni soki moninga na yo moklisto asali likambo moko ya mabe? Na ndakisa, soki asali pite, amɛli likaya, alangwe masanga, amɛli bangi, to asali likambo mosusu ya mabe? (1 Bakolinti 6:9, 10; 1 Timote 1:9, 10) Osengeli kosala nini? Okosolola na ye? Okoyebisa baboti na yo? Okoyebisa baboti na ye? Okoyebisa bankulutu?b Soki olobi, boninga na bino ekosuka wapi? Ekozala malamu okanga monɔkɔ?

Naloba to naloba te?

Moto nyonso asalaka mabunga. Kutu, Biblia elobi ete: “Bato nyonso basali lisumu mpe bazangi nkembo ya Nzambe.” (Baloma 3:23) Nzokande, basusu basalaka masumu minene. Basusu ‘babɛtaka libaku’ oyo soki basalisi bango te, ekoki komemela bango mikakatano minene. (Bagalatia 6:1) Tózwa ndakisa oyo.

◼ Moklisto moko nkombo na ye Susan amonaki ete moninga na ye moko oyo azali mpe moklisto akɔtaka na esika oyo balakisaka bililingi ná miziki ya mbindo na Internet.

Kanisá naino: Olingaki kosala nini soki ozalaki na esika ya Susan? Olingaki kosalisa ye? To olingaki koloba ete ezali likambo na ye moko? Soki Susan ayaki kosɛnga yo toli, olingaki koyebisa ye nini?

․․․․․

Oyo Susan asalaki: Nsima ya kokanisa, Susan azwaki ekateli ya koyebisa baboti ya moninga na ye likambo yango. Alobi boye: “Nazalaki kobanga, mpo bango mpe bazalaki baninga na ngai. Ezalaki mpasi naloba, yango wana nabandaki kolela.”

Okanisi nini? Susan asalaki malamu? To ebongaki akanga monɔkɔ?

Talá mwa makanisi oyo ekoki kosalisa yo:

Moninga ya malamu akosala nini? Masese 17:17 (NW) elobi boye: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” Ntango moto moko abuki mitinda ya Biblia, moto yango azali na ‘mpasi,’ ata soki ayebi yango to te. Toboyi te, soki ozali kolandela ata mabunga ya mikemike, okoki “kokóma moyengebene koleka ndelo,” kasi, moninga ya malamu akangaka miso te na etamboli oyo ebongi te na baklisto. (Mosakoli 7:16, NW) Kokanga monɔkɔ ekozala malamu te.​—Levitike 5:1.

Ezali boni soki ozalaki na esika ya moboti? Omituna boye: ‘Soki nazali moboti mpe mwana na ngai azali kotala bililingi ya mabe na internet, nakolinga báyebisa ngai likambo yango? Nalingaki koyoka ndenge nini soki mwana na ngai azali na moninga oyo ayebi likambo ya mabe oyo mwana na ngai asali, kasi abombi yango?’

Ezali boni mpo na mibeko ya Nzambe? Soki ezali na mobeko moko oyo tosengeli kolanda, ezali te mobeko ya kokanga monɔkɔ. Kutu, osengeli nde kotosa mibeko ya Nzambe oyo ezali na Biblia. Ntango ozali kolanda oyo ezali sembo, okosepelisa motema ya Mozalisi na yo. (Masese 27:11) Lisusu, okoyoka esengo mpo oyebi ete oluki bolamu ya moninga na yo.​—Ezekiele 33:8.

“Ntango ya koloba”

Biblia elobi ete ezali na “ntango ya kofanda nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7, NW) Mbala mingi, bana mike bayebaka te oyo bakoki kosala ntango likambo moko esalemi. Ntango moninga moko asali likambo ya mabe, bakanisaka boye: ‘naboyi kolukela moninga na ngai makambo,’ to ‘naboyi tózwana matata.’ Soki kaka makambo mibale wana nde ezali na ntina, ekateli ekozala ya “kofanda nyɛɛ.”

Nzokande, ntango ozali kokola, okobanda kotalela makambo lokola mokóló. Okomona ete moninga na yo azali na likama mpe azali na mposa ya lisalisi​—lisalisi oyo mbala mosusu yo nde okoki kopesa ye. Kasi, osengeli mpenza kosala nini soki oyoki ete moninga na yo asali likambo moko oyo eyokani te na mibeko ya Biblia?

Ya liboso, luká koyeba soki likambo yango ezali solo. Ekoki kozala kaka nungunungu ya mpamba. (Masese 14:15) Elenge mwasi moko nkombo na ye Katie alobi boye: “Moninga na ngai moko akómaki kokosela ngai makambo, mpe bato mosusu oyo bayebaki ngai bazalaki kondima makambo yango. Nazalaki kobanga ete bakondimela ngai te!” Biblia esakolaki ete Yesu “akopamela te na kolanda kaka likambo oyo matoi na ye eyoki.” (Yisaya 11:3, NW) Liteya nini tozwi? Kowelelaka te koloba ete makambo nyonso oyo oyoki ezali kaka ya solo. Luká koyeba soki ezali mpenza bongo. Tózwa ndakisa oyo.

◼ James, oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo, ayokaki ete moninga na ye moko ya motema amɛlaki bangi na fɛti moko.

Kanisá naino: Olingaki kosala nini soki ozalaki na esika ya James? Ndenge nini olingaki koyeba soki likambo yango ezali solo?

Oyo James asalaki. Liboso, James asalaki lokola ayoki likambo moko te. Alobi boye: “Na nsima, lisosoli na ngai ekómaki kotungisa ngai. Nayebaki ete nasengeli kotuna moninga na ngai likambo yango.”

Okanisi nini? Litomba nini okoki kozwa soki osololi liboso na ndeko oyo oyoki ete asali likambo ya mabe?

․․․․․

Soki omoni ete okokoka te kotuna ye likambo yango, okoki kosala nini?

․․․․․

Moninga ya James andimaki ete amɛlaki bangi. Kasi, abondelaki James ete ayebisa moto te likambo yango. James alingaki kosala oyo ezali sembo. Kasi, alingaki mpe moninga na ye asala oyo ezali malamu. Na yango, atikelaki ye pɔsɔ moko mpo akende koyebisa bankulutu likambo yango. Soki asali yango te, James ye moko akoyebisa likambo yango.

Okanisi ete James asalaki malamu to te? Mpo na nini olobi bongo?

․․․․․

Moninga ya James ayebisaki bankulutu likambo yango te, na yango James ye moko ayebisaki bango yango. Nzokande, na nsima, moninga na ye andimaki ete asalaki mabe. Bankulutu basalisaki ye amona ete asengelaki kobongola motema mpe kobongisa boyokani na ye na Yehova.

Ozali kobanga bábenga yo bifundafunda?

Kasi, okoki koloba ete: ‘Bakobenga ngai bifundafunda te soki nalobi likambo oyo moninga na ngai asali? Nasengeli nde kosala lokola nayebi likambo yango te?’ Soki likambo yango ekómeli yo okosala nini?

Ya liboso, kobosana te ete koboya kobimisa mabe ya moto mpo olingaka ye ezali bolingo te. Esɛngaka kozala na mpiko mpo na koyebisa mabe oyo moninga moko asali. Mpo na nini te kobondela Nzambe mpo na likambo yango? Sɛngá ye apesa yo bwanya mpe mpiko. Akosalisa yo.​—Bafilipi 4:6.

Ya mibale, kanisá litomba oyo moninga na yo akozwa soki oyebisi likambo yango. Tózwa ndakisa moko; kanisá ete ozali kotambola ná moninga na yo pembenipembeni ya lobwaku moko ya monene, mpe na mbala moko moninga na yo abɛti libaku mpe akwei tii na lobwaku. Na ntembe te moninga na yo akozala na mposa básalisa ye. Kasi, ezali boni soki ayoki nsɔni mpe ayebisi yo ete akosala makasi amata ye moko? Okotika ye na kati ya likama yango?

Ezali mpe bongo ntango moninga moko moklisto akwei na lisumu. Akoki kokanisa ete akoki kozongela boyokani na ye na Yehova kozanga ete básalisa ye. Kasi, kokanisa bongo ezali bozoba. Ya solo, moninga na yo akoki koyoka nsɔni mpo na likambo oyo asali. Nzokande, soki oyebisi moto mosusu likambo yango oyo asali, okoki kobikisa ye!​—Yakobo 5:15.

Yango wana, kobangaka te koloba soki moninga moko asali mabe. Soki osalisi ye azwa lisungi, okomonisa ete ozali sembo epai ya Yehova Nzambe mpe epai ya moninga na yo, oyo ata mokolo mosusu akokanisa bolamu oyo osalaki ye.

Okokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/​ypf

[Maloba na nse ya lokasa]

a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.

b Epai ya Batatoli ya Yehova, bankulutu basalisaka moto nyonso oyo akwei na lisumu.​—Yakobo 5:14-16.

MITUNA YA KOMANYOLA

◼ Ndenge nini koyebisa mabe oyo moninga asali emonisaka ete ozali sembo epai na ye?

◼ Banani Biblia elobeli oyo bosembo na bango mpo na baninga na bango emekamaki? Liteya nini okoki kozwa na masolo na bango?

[Elilingi na lokasa 20]

Soki moninga moko moklisto akwei, osengeli kosala nyonso ete azwa lisalisi

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto