Sɛkɛlɛ oyo babombá yango makasi
“Moto moko te asengeli kozala moombo ya moto mosusu to kosalela ye misala lokola moombo: esengeli kopekisa boombo mpe lolenge nyonso ya mombongo ya koteka bato lokola baombo.” Déclaration universelle des droits de l’homme.
MBALA ya nsima oyo okotya sukali na kafe na yo, kanisá Prevot, moto moko ya ekólo Haïti, balakaki ye ete akozwa mosala moko ya malamu na mboka mosusu na bisanga ya Caraïbes. Nzokande, batɛkaki ye nde kotɛka na dolare mwambe.
Prevot akɔtaki na molɔngɔ ya bankóto ya bato ya mboka na ye oyo bakómá baombo, mpe batindaka bango na makasi kokata koko na boumeli ya sanza motoba to nsambo mpo na kozwa kaka mwa mbongo moke to eloko te. Batyá ebele ya baombo yango na mwa bandako ya nkaka mpe ya bosɔtɔ mpenza. Nsima ya kobɔtɔla biloko na bango, bapesaki bango bambɛli. Mpo bápesa bango biloko ya kolya, basengeli kosala mosala. Soki bameki kokima, babɛti bango.
Tótalela likambo oyo ekómelaki Lin-Lin, elenge mwasi moko na sudi-ɛsti ya Azia. Azalaki na mbula 13 ntango mama na ye akufaki. Kompanyi moko esombaki ye epai ya tata na ye na dolare 480, mpe balakaki ete bakozwela ye mosala ya malamu. Balobaki ete mbongo oyo bapesaki tata na ye ezali “kaka mwa mbongo moke kati na oyo bakobanda kofuta ye”—oyo wana ezali mayele basalelaki mpo akoka kokima bankolo na ye ya sika te. Na esika ete bápesa ye mosala ya malamu, batindaki Lin-Lin na ndako oyo batyaka bandumba, epai bakiliya bazalaki kofuta nkolo na ye dolare minei mpo na kosangisa nzoto na Lin-Lin na boumeli ya ngonga moko. Lin-Lin azali mpenza nde na bolɔkɔ, mpamba te akoki kolongwa na mosala yango te tii nyongo na ye ekosila. Nyongo yango ezali mbongo ya nkolo-ndako yango ya bandumba, bakisa mpe mwa mbongo mosusu ya kobakisa likoló mpe na oyo ye moko azali kosalela. Soki Lin-Lin aboi kosala oyo nkolo na ye atindi ye, bakobɛta ye to bakonyokola ye. Likambo ya mabe koleka, soki ameki kokima, bakoki koboma ye.
Moto nyonso azali mpenza na bonsomi?
Bato mingi bakanisaka ete baombo bazalaka lisusu te. Ya solo, nsima ya kotya sinyatire na mikanda mingi ya boyokani, ya mikano mpe ya bikateli oyo bakamataki, na bikólo mingi, mibeko ya Leta epekisaki boombo. Bipai nyonso bato bazali komonisa ete bayini boombo. Mibeko ya Leta epekisi boombo mpe likambo yango endimami mpenza na mikanda ya boyokani ya mikili mingi—mingi mpenza article 4 ya Déclaration universelle des droits de l’homme oyo esalemaki na 1948, oyo totángi na ebandeli ya lisolo oyo.
Nzokande, kino lelo oyo bato mosusu bazali naino baombo mpe bazali se kokóma mingi, atako mpo na bato mosusu, yango ezali naino sɛkɛlɛ oyo babombá makasi. Kobanda na Phnom Penh tii na Paris, kobanda na Mumbai tii na Brasília, bakómisi bamilio ya bato—mibali, basi, mpe bana—baombo na makasi mpe bazali kosalisa bango misala oyo ezali lokola boombo to batii bango na bisika oyo ekokani na oyo ya baombo. Anti-Slavery International, lisangá moko ya kala mpe eumelá mingi koleka masangá mosusu nyonso ya mokili mobimba oyo elandelaka makambo etali misala oyo basalisaka bato na makasi, elobi ete bankama ya bamilio ya bato bazali baombo. Ya solo, lelo oyo na mokili mobimba, baombo bazali mingi koleka bantango nyonso ya kala!
Lokuta mabe, na mikolo na biso, bazali kokanga bato na minyolɔlɔ te, bazali kobɛta bango fimbo te, mpe bazali kotɛka bango te na esika ya polele na boye ete moto oyo akopesa mbongo mingi nde akosomba. Kosalisa bato misala ya makasi, kokɔtisa bato mabala na makasi, boombo ya banyongo, kosalisa bana mike misala ya makasi, mpe mbala mingi kotinda bango kosala bondumba, ezali mitindo ndenge na ndenge ya boombo oyo ezali komonana mingi na mikolo oyo. Baombo yango bakoki kozala bamakango, batambwisi ya bakamela na masano, bakati ya koko na bilanga, batongi ya batapi, babongisi ya banzela. Ya solo, mingi na bango batɛkamaka mpenza polelepolele boye te ete moto oyo apesi mbongo mingi koleka akozwa, atako bongo bokeseni ezali te kati na bango na baombo ya ntango ya kala. Bato mosusu kutu bazali mpenza na bomoi moko ya mawa koleka oyo ya baombo ya ntango ya kala.
Banani bakómaka baombo? Ndenge nini bakómaka baombo? Nini ezali kosalema mpo na kosalisa bango? Nsuka ya solosolo ya boombo ekómi pene?
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
BOOMBO YA MIKOLO OYO EZALI NINI?
Ata ONU oyo esali milende mpenza na boumeli ya mbula mingi, ekoki koyanola na motuna yango te. Na Likita moko oyo esalemaki na 1926 mpo na kotalela likambo ya Boombo, balimbolaki ete: “Boombo ezali ezalela ya moto oyo azali lokola eloko oyo nkolo na yango akoki kosalela yango ndenge alingi.” Kasi, liloba yango elimbolamaka na ndenge mingi. Barbara Crossette, ye azali mopanzi-nsango, alobi ete: “Boombo ezali liloba oyo esalelamaka mpo na kolobela, na mikili mosusu, bato ya mosala oyo bafutamaka malamu te, oyo basalaka na bakompanyi ya bilamba mpe ya biloko ya kolata na masano, mpe bato oyo basalaka mosala oyo ezwaka bango bangonga mingi na bamagazini mpe na baizini oyo efutaka malamu te na bingumba ya États-Unis. Liloba yango esalelamaka mpe mpo na kobimisa mabe ya bakompanyi ya bondumba mpe na misala makasi ya bolɔkɔ.”
Mike Dottridge, mokambi ya ebongiseli ebengami Anti-Slavery International alobi ete: “Lokola boombo ekómi komonana na mitindo ya sika—to lokola liloba yango ekómi kosalelama mpo na kolobela makambo ndenge na ndenge—liloba yango ezali lisusu na ndimbola na yango ya liboso te.” Mpo na ye, “boombo eyebanaka ntango moto moko azali nkolo ya moto mosusu to azali koyangela bomoi na ye.” Boombo ezali likambo ya kosalisa moto makambo na makasi mpe kopekisa ye makambo oyo alingi—yango ekosala ete “moto azala na bonsomi ya kolongwa na mosala te, ya kokenda epai ya patrɔ mosusu te.”
A. M. Rosenthal, akomaki na zulunalo The New York Times ete: “Baombo bazalaka na boombo—basalaka misala makasimakasi, basangisaka na bango nzoto na makasi, bamonaka mpasi na nzala, monyoko, mpe makambo nyonso ya kosambwisa.” Abakisi lisusu ete: “Lokola bazali kosomba moombo na dolare 50, yango wana [mpo na nkolo na ye] ezalli likambo ya mpasi te, ezala moombo yango akokufa noki to te, mpe soki akufi, bakobwaka ebembe na ye na ebale.”
[Eutelo ya bafɔtɔ 4]
Ricardo Funari