Banani bazali baombo lelo oyo?
TALÁ kaka mwa moke mitángo oyo. Balobi ete bana soki milio 200 tii milio 250 oyo bakokisi naino mbula 15 te bazali kolekisa pene na moi mobimba na mosala. Kaka na 1995 mpe na 1996, bana 250 000, bamosusu kutu bazalaki na mbula nsambo mpamba, bakɔtisaki bango na mosala ya soda, mpe yango ekómisi bamosusu kati na bango baombo ya bitumba. Basi na bana koleka milio moko, bazali kotɛkama lokola baombo mbula na mbula.
Kasi, mitángo yango moko ekoki mpenza komonisa te ete bato yango bakoki lisusu kosala eloko te. Na ndakisa, na ekólo moko na nɔrdi ya Afrika, Elinor Burkett, ye akomaka babuku, akutanaki na Fatima, elenge mwasi oyo akimaki nkolo na ye mpo azalaki konyokola ye na ndenge ya nsɔmɔ. Kasi, nsima ya kosolola na ye, Burkett amonaki ete Fatima “akozala moombo libela na kati ya makanisi na ye.” Fatima akoki mpenza kokanisa ete mokolo mosusu akozala na bomoi ya malamu? Burkett alobi ete: “Akokaka te kokanisa soki nini akosala na mikolo oyo ekoya. Akanisaka kutu te makambo mingi, lokola koluka koyeba soki bomoi na ye ekozala ndenge nini na mikolo mizali koya.”
Na ntembe te, na ntango oyo tozali koloba, bamilio ya bato oyo bazali lokola biso bazali baombo mpe bayebi te eloko nini básala. Mpo na nini mpe ndenge nini bato nyonso wana bazali kokóma baombo? Bakómisi bango baombo ya ndenge nini?
Bato ya mombongo ya kotɛka bato
Mwa buku moko oyo ezali kolobela mibembo ya baturiste, oyo bato mingi bazali na yango na États-Unis, ezali koloba polelepolele ete: “Mibembo na Thaïlande mpo na kosangisa nzoto. Bana basi ya solosolo. Kosangisa nzoto na ndenge ya solosolo. Na ntalo malamu . . . Oyebi ete okoki kozwa mwana mwasi oyo ayebi naino mibali te na dolare 200 mpamba?” Likambo oyo mwa buku yango elobaki te ezali ete mbala mosusu bakangaki “bana basi yango oyo bayebi naino mibali te” na makasi to batɛkaki bango na bandako ya bondumba, mpe na bandako yango bato soki 10 to 20 bazali kosangisa na bango nzoto mokolo na mokolo. Soki baboyi kosangisa nzoto, babɛti bango. Ntango ndako moko ya bondumba ezikaki na esanga Phuket, esika oyo bato bakendaka komisepelisa, na epai ya sudi ya Thaïlande, bandumba mitano bakufaki na mɔ́tɔ. Mpo na nini? Mpo bankolo na bango bakangaki bango na minyɔlɔlɔ na bambeto na bango mpo bákima boombo na bango te.
Bilenge basi yango bautaka wapi? Lapolo emonisi ete bamilio ya basi—bilenge mpe mikóló—ya mokili mobimba oyo bazali kokanga bango na makasi mpe kotɛka bango, bazali kosalela bango na mombongo wana ya makambo ya kosangisa nzoto. Mombongo ya makambo ya kosangisa nzoto oyo ezali kosalema na mikili mingi ezali kotambola malamu mpo na makambo misato: bobola oyo ezali na mikili ya bobola, bomɛngo na mikili ya bozwi, mpe mibeko oyo ezali kokanga miso na mombongo oyo bato bazali kosala na mokili mobimba mpe ezali kopekisa te bakɔntra oyo ezali kosalema mpo na konyokola bato.
Bibongiseli oyo etalelaka makambo ya basi na Azia ya Sudi-Ɛsti etalaki mpe emonaki ete kobanda na bambula ya 1970 tii na ebandeli ya bambula ya 1990, na mokili mobimba, batɛkaki basi milio 30. Bato ya mombongo ya kotɛka bato bakendaka na bisika bingbunduka etɛlɛmaka, na bamboka ya babola mpe na babalabala ya bingumba mpo na koluka bilenge basi mpe mikóló oyo bakomona ete ezali mpasi te mpo na kozwa bango. Mbala mingi bato oyo bazwamaka ezali baoyo batángá mpenza kelasi te, bitike, bana oyo bakimá ndako to babola. Bakosaka bango ete bakozwa bango na mosala, bakendaka na bango na mikili mosusu mpe kuna batɛkaka bango na bandako ya bondumba.
Banda ebongiseli ya politiki oyo babengi kominisme ekweaki na 1991, lolenge mosusu ya bobola ya bilenge basi mpe mikóló ekómi komonana. Lokola bato bazali lisusu kotosa te mibeko mosusu, bakompanyi mosusu ezali lisusu na mabɔkɔ ya Leta te mpe bokeseni kati na bato ya mbongo mpe babola ekómi komonana polele, yango esali ete mobulu ebakisama mingi, bobola ekóma makasi mpe bato mingi bázanga mosala. Basi na bana basi mingi ya Russie mpe ya Mpoto ya Ɛsti bakómi sikoyo bilanga oyo bato ya mombongo ya bondumba na mikili ndenge na ndenge bazali kozwela mbongo. Anita Gradin, commissaire européen ya kala na makambo ya Bosembo alobi ete: “Mombongo ya kotɛka bato ezali na makama mingi te lokola mombongo ya bangi.”
Bomwana na bango ebebi
Na kompanyi moko ya moke oyo esalaka batapi na Azia, bana ya mbula mitano mpamba bazali kobanda mosala na 4:00 ya ntɔngɔ tii na 11:00 ya butu, kasi bafutaka bango te. Mbala mingi, bazali kotya bomoi na bango na likama mpo bamasini oyo basalaka na yango ezali mpenza malamu te, bazali koumela bangonga mingi na kati ya bandako oyo ezali na miinda ya malamu te mpe mopɛpɛ ekɔtaka malamu te, bazali koumela pembeni ya bankisi oyo basalelaka na izini oyo ezali pwazɔ mpenza.a
Mpo na nini bazali kolukaluka bana mike mpo na misala? Bazali koluka bango mpamba te bana mike basɛngaka mbongo mingi te ntango basali mosala, mpe lokola bazali bana, nyonso oyo patrɔ akoloba bakotosa, ezalaka mpe mpasi te mpo na kopesa bango disipilini, mpe babangaka kolobela mabe oyo bazali kosalela bango. Lokola bazali bana mpe mikuse mpe mwa misapi na bango ebongi na mosala, bapatrɔ oyo bazangá motema bamonaka bango lokola biloko ya malamu mpo na kosala mwa misala mosusu, lokola kotonga batapi. Mbala mingi, bapesaka bana ya ndenge wana misala, nzokande baboti na bango bafandi na ndako, bazali na misala te.
Longola minyoko wana, bana oyo basalaka na bandako lokola baboi bamonaka mpasi na makambo ya kosangisa nzoto mpe babɛtaka bango mingi. Bayibaka bana mingi, babombaka bango na bakaa ya mosika, mpe bakangaka bango bansinga na butu mpo bákima te. Na moi, bakoki kotya bango na misala ya kosala banzela mpe ya kotimola mabanga.
Lolenge mosusu bazali kobebisa bomwana na bango ezali ete bakɔtisaka bana yango mabala na makasi. Ebongiseli babengi Anti-Slavery International elobeli ndakisa moko: “Bayebisaki elenge mwasi moko ya mbula 12 ete libota na ye bayokani ete mobali moko ya mbula 60 abala ye. Na ndenge moto nyonso ayebi yango, mwana mwasi wana azali na lotomo ya koboya, kasi akozwa nzela ya kosalela lotomo yango te mpe ayebi kutu te ete akoki kosalela lotomo yango.”
Baombo ya banyongo
Bato mingi ya mosala bakangami na boombo ya bapatrɔ na bango to na bisika ya mosala mpo na banyongo oyo bango moko to baboti na bango bazwaki. Na ntango ya kala, misala ya makasi mpo na kofuta nyongo ezalaki mingimingi na bamboka ya zamba, epai bato ya mosala basalaka lokola baboi to mpe lokola bato ya bilanga. Banyongo yango oyo mbala mosusu batata nde bazwaki kasi basilisaki kofuta te, bana bakolanda kofuta yango mpe esalaka ete bato ya libota moko bátikala ntango nyonso na boombo. Mosusu nde ezalaka bapatrɔ oyo bato ya mosala basengeli kofuta bango nyongo batɛkaka nyongo yango epai ya patrɔ mosusu ya sika. Likambo mosusu ya mpasi koleka ezali boye, bato ya mosala oyo bazali na kati ya boombo bazali kofutama te mpo na mosala oyo bazali kosala. Ekoki mpe kokóma ete bato ya mosala yango bákangama na boombo kaka mpo patrɔ na bango azali kopesa bango bobele mwa ndambo ya mbongo moke ya lifuti na bango liboso ya nsuka ya sanza, tii nsukansuka bazali kokɔta na boombo mokemoke epai ya patrɔ na bango.
Boombo ya milulu
Binti, afandi na Afrika ya Wɛsti, azali na mbula 12 mpe azali moko ya bankóto ya bana basi oyo basalaka lokola ba trocosi, oyo na lokota Ewe elimboli “baombo ya banzambe.” Bakɔtisaki ye na makasi na boombo mpo aluka komisikola na mabe oyo ye asalá kutu te—mama na ye azwaki zemi na ye ntango basangisaki na ye nzoto na makasi! Sikoyo, azali na mokumba ya kosala kaka misala ya ndako mpo na nganga-nkisi ya mboka. Na nsima, mokumba ya Binti ekozala mpe ya kosangisaka nzoto na nganga-nkisi yango, mpo azali nkolo na ye. Na nsuka, ntango akokóma mokóló, mwana mwasi mosusu akozwa esika na ye—nganga-nkisi wana akozwa bana basi mosusu ya kitoko mpo na kosalela ye lokola trocosi.
Lokola Binti, bankóto ya bana oyo bakómá baombo ya milulu, bazali kokabama lokola mbeka na mabota na bango mpo bákenda kokɔta boombo mpo na kosikolama na likambo moko oyo balobi ete ezali lisumu to kobukama ya mobeko mosantu. Na bamboka mingi na mokili, batindaka bilenge basi to mikóló na makasi ete básala misala ya losambo mpe básangisa nzoto na basango to na bato mosusu—mpe mpo na kokosa bato, balobi ete basi yango babalá nzambe moko boye. Ezali mpe na makambo mingi lisusu oyo basi yango basalaka mpe bafutaka bango mpo na yango te. Bazali na bonsomi ya kokenda esika mosusu te to kosala mosala mosusu te mpe mbala mingi batikalaka na boombo ya ndenge wana na boumeli ya bambula mingi.
Boombo lokola na ntango ya kala
Atako bikólo mingi balobaka ete bapekisá likambo ya boombo, na bamboka mosusu mombongo ya baombo lokola ezalaki kosalema na ntango ya kala ebimi lisusu. Yango ezali kosalema mingimingi na bamboka oyo bitumba ya bana-mboka to bitumba mosusu ezali kongala. Ebongiseli babengi Anti-Slavery International elobi ete: “Na bisika ya bitumba mobeko ezali lisusu te, basoda bazali na likoki ya kotinda bato na makasi básalela bango mosala ofele . . . kozanga kobanga etumbu; nsango ya makambo ya ndenge wana ezali kouta mingi mpenza na bisika oyo ezali na mabɔkɔ ya barɛbɛlɛ oyo bandimami naino te.” Nzokande, ebongiseli yango elobi lisusu ete, “ezali mpe na balapolo ya sika oyo emonisi ete basoda ya guvɛrnɛma bazali kotinda bato na makasi básalelaka bango misala lokola baombo, kozanga kotalela ata mobeko moko. Basoda mpe bato mosusu oyo bazali na mindoki bakɔti mpe na mombongo ya kotɛka baombo, bazali kotɛka bato oyo bakangaki mpo na kosalela bato mosusu.”
Likambo ya mawa, tii lelo oyo bato ndenge na ndenge bazali konyokwama na boombo mpe emonanaka lokola nde ezali boombo te, nzokande ezali boombo mpenza. Kanisá naino kaka mitángo oyo epesami—bamilio ya bato bazali konyokwama lokola baombo na mokili mobimba. Sikoyo, kanisá moombo moko to baombo mibale kati na baombo ya mikolo na biso oyo otángi lisolo na bango—mbala mosusu okanisi Lin-Lin to Binti. Olingi komona ndenge boombo ya ntango na biso ekosila? Ezali ya solo mpenza ete boombo ekosila? Liboso ete yango esalema, mbongwana ya monene esengeli kosalema. Tosɛngi yo otánga yango na lisolo oyo elandi.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Talá lisolo “Le travail des enfants: bientôt la fin!” (Etikali moke likambo ya kosalisa bana mike misala esila!) na Lamuká! ya 22 Mai 1999, ebimeli ya Lifalanse.
[Etanda/Elilingi na lokasa 6]
BAZALI KOSALA MAKASI MPO NA KOSILISA BOOMBO
Bibongiseli ya Leta, lokola Fonds des Nations unies pour l’enfance (UNICEF) mpe Organisation internationale du travail, ezali kosala mosala makasi mpo na kobongisa lolenge ya kosilisa boombo ya ntango na biso. Lisusu, bibongiseli mosusu oyo ezali ya Leta te, lokola Anti-Slavery International mpe Human Rights Watch, ezali kosala makasi mpo bato ya mokili mobimba báyeba likambo ya boombo yango ya mikolo oyo mpe mpo na kosala ete bato oyo bazali baombo bálongwa na boombo yango. Bibongiseli yango mosusu ezali koluka ete bakompanyi ekóma kotya baetikɛti oyo ekomonisa ete bazali kosalisa bato misala lokola baombo te mpo na kobimisa biloko na bango mpe bazali kosalela bana mike te. Bibongiseli mosusu ezali kosɛnga ete Leta atya mpenza mibeko na bikólo oyo bato bautaka mpo na kosala “mibembo ya kosangisa nzoto” mpe básambisa bango na mboka na bango soki bauti kosangisa nzoto na bana mike. Bato oyo batalelaka ntomo ya bato bakómaki kofuta mbongo ebele epai ya bato ya mombongo ya kotɛka bato to epai ya bankolo ya baombo mpo na kosikola baombo mingi. Likambo yango ebimisi mokakatano, mpamba te kosala ndenge wana ekoki kokómisa lisusu mombongo ya baombo makasi mpe komatisa ntalo na bango.
[Elilingi na lokasa 7]
Bazali kobalisa bana basi mingi na makasi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
UNITED NATIONS/J.P. LAFFONT
[Elilingi na lokasa 8]
Baombo bazali kozela kozwa bilei na molɔngɔ
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ricardo Funari
[Elilingi na lokasa 8]
Na bantango mosusu bakɔtisaka bana mike na mosala ya soda na makasi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
UNITED NATIONS/J.P. LAFFONT