Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Octobre nk. 4-7
  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Nini ekómelaka bato oyo bazali pembeni ya moto oyo amelaka likaya?
  • Komela likaya esɛngaka mbongo mingi
  • Makaya mosusu ezalaka na yango mabe te?
  • Kotika komela likaya ezali na matomba
  • Mpo na nini ezalaka mpasi kotika komela likaya?
  • Omibongisa mpo na mikakatano
    Lamuká!—2010
  • Ndenge nini Nzambe atalelaka komɛla makaya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • “Okoki kotika yango​—⁠Biso totiká!”
    Lamuká!—1999
  • Ndenge oyo okoki kotika
    Lamuká!—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Octobre nk. 4-7

Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?

SOKI olingi kozala na bomoi molai mpe ya esengo, osengeli komela likaya te. Moto oyo amelaka likaya banda kala, azali na likama monene ya kokufa. Mokambi ya OMS (Organisation mondiale de la santé) alobaki ete: “Likaya ezali . . . mwa eloko moko oyo basalá yango na mayele mpenza, basalá yango na doze ya nicotine oyo ekoki mpo na kokómisa moto oyo amelaka yango, moombo na yango libela liboso ya koboma ye.”

Yango wana, ntina ya kotika komela likaya ezali ete likaya ebebisaka kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe etyaka bomoi ya moto na likama. Bamonisaki maladi koleka 25 oyo eutaka na komela likaya. Na ndakisa, likaya mpe biloko mosusu epesaka maladi ya motema, epesaka maladi babengi apoplexie, bronchite chronique, emphysème mpe kanser ndenge na ndenge, mingimingi kanser ya mimpululu.

Ya solo, mbala mosusu moto akoki komela likaya na boumeli ya bambula mingi liboso ete azwa moko ya maladi yango. Nzokande, komela likaya ekosala te ete akóma kitoko mingi na miso ya bato mosusu. Mbala mingi piblisite emonisaka bato oyo bamelaka likaya lokola bato oyo bazali kitoko mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Kasi, ezalaka mpenza bongo te. Komela likaya epesaka monɔkɔ nsolo, eyindisaka mino mpe ebebisaka misapi. Ekoki koboma mobali mokongo. Epesaka kɔsukɔsu mpe mpema mokuse. Moto oyo amelaka likaya akoki mpe kobima masusa na elongi noki mpe kozwa maladi mosusu ya loposo.

Nini ekómelaka bato oyo bazali pembeni ya moto oyo amelaka likaya?

Biblia elobi ete: “Okolinga mozalani na yo lokola yo moko.” (Matai 22:39) Soki olingaka bazalani na yo​—mpe lokola bato ya libota na yo bazali bazalani na yo ya pene mpenza—​ezali ntina monene oyo osengeli kotika komela likaya.

Moto oyo amelaka likaya azali kosala bato mosusu mabe. Kino mwa mikolo oyo euti koleka, moto oyo amelaka likaya akokaki kopelisa likaya na ye esika nyonso alingi mpe moto moko te akopekisa ye. Kasi, bizaleli ya bato ezali kobongwana mpamba te bato mingi bakómi koyeba makama oyo eutaka na kopema milinga ya likaya oyo bato mosusu bazali komela. Na ndakisa, moto oyo amelaka likaya te kasi abalá moto oyo amelaka likaya, azali na likama (30%) ya kozwa kanser ya mimpululu koleka soki abalaki moto oyo amelaka likaya te. Bana oyo bafandi esika moko na baboti oyo bamelaka likaya bakoki kozwa maladi babengi pneumonie to bronchite wana bazali naino na mbula mibale, koleka bana oyo bafandi na bandako oyo moto moko te amelaka likaya.

Basi ya zemi oyo bamelaka likaya batyaka bana na bango na likama. Biloko babengi nicotine, monoxyde de carbone mpe biloko mosusu ya mabe oyo ezalaka na kati ya milinga ya likaya ekɔtaka na makila ya mama mpe elekaka mbala moko epai ya mwana oyo azali na libumu na ye. Yango ekoki kosala ete zemi esopana na mbalakaka to mwana akufa na ntango ya kobotama to mwa nsima ya kobotama. Lisusu, mwana azali na likama koleka mbala misato ya kokufa mbalakaka soki mama na ye azalaki komela likaya na ntango azalaki na zemi.

Komela likaya esɛngaka mbongo mingi

Ntina mosusu oyo moto oyo amelaka likaya asengeli kotika ezali ete likaya esɛngaka mbongo mingi. Banque mondiale elobi ete mbongo oyo bato babimisaka mpo na komisalisa epai ya monganga na maladi oyo euti na komela likaya, ekoki kozala dolare soki miliare 200 mbula na mbula. Ya solo, mbongo yango ezali komonisa te mpasi mpe monyoko ya bato oyo bazwaka maladi oyo euti na komela likaya.

Ezali mpasi te mpo na koyeba mbongo boni moto oyo amelaka likaya abimisaka. Soki omelaka likaya, zwá mbongo oyo obimisaka mpo na kosomba likaya mokolo na mokolo yikinya yango na motángo 365. Yango ekopesa yo motángo ya mbongo oyo obimisaka na mbula mobimba. Zwá motángo yango mpe yikinya yango na zomi, mpe okomona mbongo boni okobimisa mpo na likaya soki okobi komela na boumeli ya mbula zomi oyo ekoya. Motángo ya mbongo oyo ekopesa ekoki kokamwisa yo. Kanisá na oyo okokaki kosala na mbongo wana.

Makaya mosusu ezalaka na yango mabe te?

Bakompanyi ya makaya elobaka na piblisite ete makaya oyo ezali na goudron mingi te mpe nicotine mingi te​—oyo babengaka cigarettes légères—​ezali na makama mingi te mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Kasi, ata soki moto akómi komela makaya oyo ezali na goudron mingi te mpe nicotine mingi te, akoyoka mposa ya nicotine ndenge kaka azalaki koyoka yango liboso. Yango wana, mpo na kosilisa mposa ya likaya, akobanda komela makaya mingi, akobanda kobenda milinga ntango molai mpe mbala mingi, to akobanda komela likaya mobimba tii akosilisa yango. Ata baoyo balukaka te komela makaya ya ndenge mosusu mpo na kokokisa mposa na bango ya nicotine, bakokóma mpe nzoto kolɔngɔnɔ te soki bátiki komela likaya te.

Tokoloba nini mpo na pipɛ mpe sigarɛ? Atako kobanda kala, bakompanyi ya makaya emonisaka ete bato oyo bamelaka pipɛ mpe sigarɛ bazali bato ya bomengo, nzokande milinga oyo yango ebimisaka ezali na likama ndenge moko na oyo eutaka mbala moko na likaya. Ata soki momeli-likaya amelaka milinga ya sigarɛ na ye te to ya nkonango (pipe) na ye te, azali na likama ya kozwa kanser ya mbɛbɔ, ya monɔkɔ mpe ya lolemo.

Likaya oyo ebimisaka milinga te ezalaka na likama te? Babengaka yango tumbako mpe basalelaka yango na ndenge mibale: ya konusa na zolo to ya kotya na monɔkɔ. Batekaka yango mingimingi ya nkasa na mwa maboke ya mikemike to oyo baniki yango. Mbala mingi, bato oyo basalelaka yango batyaka yango na monɔkɔ na mbɛbo ya nse to na nsuka ya litama, to banusaka yango na zolo. Tumbako ya konusa na zolo to ya kotya na monɔkɔ epesaka monɔkɔ nsolo mabe, egugisaka mino, epesaka kanser ya monɔkɔ to ya mongongo, moto oyo amelaka yango akómaka moombo na yango, ebimisaka bampota ya pɛmbɛ na monɔkɔ mpe bampota yango ekoki kopesa kanser, elyaka mokemoke mosuni oyo ezali pembenipembeni ya mino, mpe elɛmbisaka mino. Ya solo, ezala konusa tumbako na zolo to kotya yango na monɔkɔ, yango ezali mpe lolenge malamu te mpo na kotika komela likaya.

Kotika komela likaya ezali na matomba

Kanisá ete omelaka likaya banda kala. Nini ekosalema ntango otiki? Nsima ya miniti 20 banda omelaki likaya na yo ya nsuka, tansyo na yo ekozonga mpenza malamu. Nsima ya pɔsɔ moko, nzoto na yo ekozala lisusu na nicotine te. Nsima ya sanza moko, kɔsukɔsu, sinizitɛ mpe kolɛmba ekobanda kokita mpe okobanda kopema malamu. Nsima ya mbula mitano, likama ya kokufa na kanser ekokita mingi (50 %).Nsima ya mbula 15, likama ya kozwa maladi moko ya motema ekozala ndenge moko na moto oyo amelá naino likaya na bomoi na ye te.

Bilei oyo okolya okoyoka yango kitoko. Monɔkɔ na yo, nzoto na yo, mpe bilamba na yo ekolumba lisusu nsolo mabe te. Okozala lisusu na motungisi te ya koluka epai wapi to ndenge nini okoki kosomba likaya. Okomiyoka ete okokisi likambo moko ya malamu. Soki ozali na bana, bakolanda ndakisa na yo, bango mpe bakomela likaya te. Okoki mbala mosusu kozala na bomoi molai. Lisusu, okosala makambo na boyokani na mokano ya Nzambe, mpamba te Biblia elobi ete: “Tómipɛtola mpenza na mbindo nyonso na nzoto.” (2 Bakolinti 7:1) Kokanisa te ete okoki lisusu kotika komela likaya te, soki otiki noki, okomiyoka mpe malamu noki.

Mpo na nini ezalaka mpasi kotika komela likaya?

Ezalaka mpasi kotika komela likaya—ata mpo na moto oyo azali mpenza na mokano makasi ya kotika. Ezalaka mingimingi mpasi mpamba te, nicotine oyo ezali na kati ya likaya ezali elangwiseli oyo ekómisaka moto moombo na yango. OMS elobi ete: “Nicotine ezali makasi koleka héroïne [na] cocaïne mpe ekómisaka moto moombo na yango koleka bilangwiseli nyonso oyo esalaka na makanisi ya moto.” Na bokeseni na héroïne mpe cocaïne, nicotine ekómisaka mpenza moto zobazoba te, yango wana bato bamonaka ete ezalaka makasi te. Mwa esengo oyo yango epesaka etindaka bato mingi bámelaka likaya mpo na koyokaka esengo yango mbala na mbala. Ezali solo ete nicotine esalaka mbongwana na motema ya moto; ekitisaka bobangi. Nzokande, mitungisi oyo likaya ekitisaka euti mpe mpo na mposa ya nicotine yango moko.

Ezalaka mpe mpasi mpo na kotika komela likaya mpamba te komela likaya ezali ezalela oyo ekómaka momeseno. Longola likambo ya kokóma moombo ya nicotine, mbala mingi bato oyo bamelaka likaya bakómaka na momeseno ya kopelisa mpe kobenda likaya mbala na mbala. Bato mosusu balobaka ete ‘ezali mpo na kosimba mwa eloko moko na mabɔkɔ.’ To likaya ‘ezali mpo na kolekisa ntango.’

Ntina ya misato oyo esalaka ete kotika komela likaya ezala mpasi ezali mpo ete likaya ezali bisika nyonso. Bakompanyi ya makaya ebimisaka mbongo soki dolare miliare motoba mbula na mbula mpo na kosala piblisite oyo emonisaka bato oyo bamelaka likaya lokola bato kitoko, bato ya makasi, bato ya nzoto kolɔngɔnɔ mpe bato ya mayele. Mbala mingi balakisaka bato yango na piblisite bazali kotambola na mpunda, kobeta mai, kobeta tenisi, to kosala likambo mosusu ya kosepelisa. Bafilme mpe baemisyo ya televizyo elakisaka bato bazali komela likaya—mpe bobele bato ya matata te. Koteka likaya endimami na mibeko ya Leta mpe moto akoki kozwa yango bisika nyonso. Bato mingi kati na biso bafandi esika moko na bato oyo bamelaka likaya. Yango wana, ezalaka mpasi mpo na kokima momeseno yango.

Likambo ya mawa, ezali na nkisi moko te oyo okoki komela mpo na kolongola mposa ya likaya lokola okoki komela aspirine mpo na kosilisa mpasi na motó. Mpo na kotika komela likaya, osengeli kozwa ekateli. Ndenge moko soki moto oyo akómi monene mingi alingi kozonga nzoto mike, asengeli kozwa ekateli makasi mpo na ntango molai. Mpo na kolonga, likambo yango etali mpenza momeli-likaya ye moko.

[Etanda na lokasa 5]

Bakómi baoombo ya likaya na bolenge mpenza

Bolukiluki moko esalemaki na États-Unis emonisaki ete kati na bilenge minei oyo bamekaki komela likaya, na nsima elenge moko akómaki moombo na yango. Ezalaki mpe bongo mpo na baoyo bamekaki komela cocaïne mpe héroïne. Atako bilenge soki 70 kati na monkama bazali koyoka mawa ndenge babandaki komela likaya, kasi bilenge mingi te kati na bango bazali kokoka kotika.

[Etanda na lokasa 5]

Eloko nini ezalaka na milinga ya likaya?

Milinga ya likaya ezalaka na goudron, eloko oyo ezalaka na ba produits chimiques mosusu koleka 4 000 mpe kati na yango nyonso, 43 eyebani ete epesaka kanser. Na ndakisa, cyanure, benzène, méthanol mpe acétylène (oyo basalelaka mpe mpo na kopelisa mwinda). Milinga ya likaya ezalaka mpe na oxyde d’azote mpe monoxyde de carbone, gazɛ yango ebomaka. Kasi eloko oyo eleki mingi na milinga ya likaya ezali nicotine, elangwiseli makasi oyo ekómisaka moto moombo ya likaya.

[Etanda na lokasa 6]

Ndenge nini okoki kosalisa moto oyo olingaka mpo atika komela likaya

Soki omelaka likaya te mpe oyebi ete komela likaya ezali na makama, epesaka yo mpenza mawa ntango omonaka moninga na yo to ndeko na yo azali komela likaya. Okoki kosala nini mpo na kosalisa ye atika? Kogangela ye, kotungisa ye, kobondela ye to koseka ye, esalaka mpenza eloko te. Kolobaloba mingi esalaka mpe eloko te. Na esika ete atika, moto yango akoki kopelisa likaya amela mpo na kokitisa nkanda oyo euti na motungisi wana. Yango wana, meká koyeba ndenge ezalaka mpasi mpo na kotika komela likaya mpe meká koyeba ete ezalaka mokakatano monene mpo na bamoko koleka bamosusu.

Okoki te kosɛngisa moto na makasi atika komela likaya. Mokano mpe ekateli ya kotika komela likaya esengeli kouta epai na ye moko. Osengeli koyeba ndenge nini okoki kolendisa mpe kosalisa ye na bolingo nyonso mpo na ekateli oyo azwi ya kotika komela likaya.

Ndenge nini okoki kosala yango? Na ntango oyo ebongi, okoki komonisa bolingo na yo mpo na moto yango mpe koyebisa ye ete ozali komitungisa mingi mpo na momeseno na ye ya komela likaya. Yebisá ye ete okosalisa ye na ekateli nyonso oyo akozwa mpo na kotika komela likaya. Ya solo, soki ozali kosala bongo mbala mingi, ekozala lisusu na ntina te.

Okosala nini soki mobali na yo to mwasi na yo azwi mpenza ekateli ya kotika komela likaya? Kobosana te ete akobanda komona lokola azangi eloko moko boye, akoki mpe kokóma nkandankanda to mawamawa. Ekoki mpe komonana ete akobanda koyoka motó mpasi to kozanga mpɔngi. Monisa ye ete makambo wana ezali mpo na mwa ntango moke mpe ezali komonisa ete nzoto na ye ekómi komesena na kozanga likaya mpe ezali kobonga. Zalá na esengo mpe lendisaká ye. Monisá ye ete ozali na esengo ndenge azwi ekateli ya kotika likaya. Na ntango azali kosala makasi mpo na kotika momeseno yango, salisá ye ete makambo oyo ekoki kosilikisa ye mpe kosala ete azongela lisusu komela likaya ekómela ye te.

Okosala nini soki azongeli lisusu komela likaya? Kokómisa yango ngambo te. Zalá motema pɛtɛɛ. Talelá likambo yango lokola liteya mpo na bino nyonso mibale, yango ekosala ete na mbala ya nsima bókoka kolonga.

[Elilingi na lokasa 7]

Bakompanyi ya makaya ebimisaka mbongo badolare soki miliare motoba mbula na mbula mpo na kosala piblisite ya makaya

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto