Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g00 Octobre nk. 8-9
  • Ndenge oyo okoki kotika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge oyo okoki kotika
  • Lamuká!—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Omibongisa mpo na kotika
  • Tyá dati oyo okotika komela likaya
  • Salá makasi mpo na kobosana
  • Moná kaka lokola ozalaká komela likaya
  • Mpo na nini osengeli kotika komela likaya?
    Lamuká!—2000
  • Okoki kolonga!
    Lamuká!—2010
  • Nasengeli koyeba nini na likambo ya komɛla makaya?
    Lamuká!—2011
  • “Okoki kotika yango​—⁠Biso totiká!”
    Lamuká!—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—2000
g00 Octobre nk. 8-9

Ndenge oyo okoki kotika

LOKOLA koyekola velo ezalaka mpasi ntango moto abandi, mbala mingi ezalaka mpasi mpo moto atika komela likaya kaka na mbala ya liboso oyo ameki kotika. Yango wana, soki ozwi ekateli makasi ya kotika komela likaya, osengeli koyeba ete okomeka mbala mingi liboso ete otika mpo na libela. Soki ozongeli komela, komona yango te lokola olongi te. Talelá yango nde lokola libunga moke oyo ekoki kopesa yo nzela mpo olonga. Talá mwa makanisi oyo esalisaki bato mosusu mpo bátika komela likaya. Mbala mosusu ekoki mpe kosalisa yo.

Omibongisa mpo na kotika

■ Libosoliboso, tya mpenza likambo yango na makanisi na yo ete osengeli kotika komela likaya. Komá makambo oyo mpo na yango olingi kotika komela likaya, mpe matomba oyo okozwa soki otiki komela likaya. Ntango okotika, soki ozali kotalela lisusu makambo oyo okomaki, yango ekolendisa ekateli na yo. Mposa ya kosepelisa Nzambe ezali mpenza ntina monene ya kotika komela likaya. Biblia elobi ete tosengeli kolinga Nzambe na makanisi na biso nyonso, na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, mpe na makasi na biso nyonso. Tokokoka te kosala bongo soki tozali baombo ya likaya.—Malako 12:30.

■ Talelá makambo osalaka mokolo na mokolo mpo na koyeba ntango nini omelaka likaya mpe mpo na nini omelaka yango. Ekoki kozala malamu kokoma na papiɛ ntango nini mpe epai wapi omelaka likaya na boumeli ya mokolo. Yango ekosalisa yo oyeba bisika mpe makambo oyo ekoki komeka yo ozongela lisusu komela likaya.

Tyá dati oyo okotika komela likaya

■ Poná mokolo oyo okotika komela likaya mpe komá yango na manaka na yo. Ezali malamu kopona mokolo oyo okozala na likambo moko te oyo ekotungisa yo. Ntango mokolo yango ekokóma, tiká likaya mbala moko​—tiká mpenza libela.

■ Liboso ete mokolo yango ekóma, bwaká eloko oyo otyelaka mputulu ya likaya, baalimɛti mpe ba briquets na yo. Sukolá bilamba na yo nyonso oyo ezali na nsolo ya likaya.

■ Sɛngá baninga na yo ya mosala, baninga na yo mosusu, mpe bato ya libota na yo ete básalisa yo na milende oyo okosala mpo na kotika komela likaya. Kobanga te koyebisa bato mosusu bátika komela likaya pene na yo.

■ Bongisá makambo oyo okosala mokolo oyo okotika komela likaya. Okoki kokenda esika oyo bapekisaka komela likaya, na ndakisa na mizɛ. Okoki mpe kosakana mwa moke—kobeta mai, kotambwisa velo to kotambola mwa moke na makolo.

Salá makasi mpo na kobosana

Soki ozali momeli monene ya likaya, mbala mosusu okoyoka lokola okómi kozanga eloko moko boye, yango ekoki kobanda kaka mwa moke nsima ya likaya na yo ya nsuka oyo omeli. Okoki mbala mosusu kokóma nkandankanda, ozali lisusu kokoka kokanga motema te, kotungisama, kokóma mawamawa, konyokwama na makanisi, kozanga mpɔngi, koyoka nzala makasi, to koyoka mposa makasi ya likaya. Mbala mosusu monganga na yo akoki kokomela yo bankisi oyo ekolembisa makambo wana. Lisusu, makambo mosusu ekoki kosalisa yo olonga etumba yango.

■ Na boumeli ya bapɔsɔ ya liboso oyo ezalaka mpasi, kolya biloko oyo ezali na sukali mingi te, mpe melaká mai mingi. Bato mosusu bamonaki malamu kolya mwa ndunda ya mobesu, lokola carottes to céleri. Soki okosala bongo, okoya monene te mpe okozala motema likolólikoló te.

■ Kokenda te na bisika oyo ekoki kotinda yo omela likaya.

■ Longolá makanisi ya mabe oyo ekoki kotinda yo ozongela komela likaya. Talá mwa makanisi yango mosusu oyo eyaka na ntango mposa eyei makasi: ‘Nakomela kaka lelo lokola nazali kokoka lisusu te.’ ‘Momeseno mabe oyo nazalaka na yango ezali kaka likaya.’ Likaya ezali mpenza mabe mingi te, kutu bameli mosusu minene ya likaya baumelaka na bomoi mbula koleka 90.’ ‘Esengeli nakufa mpo na eloko moko.’ ‘Kozanga likaya, nazali kokoka te.’

■ Soki mposa ya likaya ekangi yo makasi, kangá motema. Soki okangi kaka motema miniti zomi, mbala mosusu mposa yango ekolimwa. Na bantango mosusu, likanisi ya kotika komela likaya ekokóma mpasi mpo na yo. Soki ozali komona bongo, salá milende makasi ya kotika komela likaya bobele kobanda lelo.

■ Soki ozali na mposa ya kosalela Nzambe, sɛngá ye asalisa yo. Mozalisi na biso ya bolingo akoki “kosunga na ntango na bosɛnga” baoyo basalaka makasi mpo na kotambwisa bomoi na bango na boyokani na mokano na ye. (Baebele 4:16) Kasi, kozela te asala likamwisi. Osengeli kosala na boyokani na mabondeli na yo.

Moná kaka lokola ozalaká komela likaya

■ Sanza misato ya liboso ezalaka mpasi koleka, kasi ata nsima na yango, soki likoki ezali, osengeli kozala esika moko te na bato oyo bamelaka likaya, osengeli mpe koboya makambo oyo ekoki kotinda yo omela likaya.

■ Komikosa te ete okoki komela likaya na bantango mosusu, ata soki otikaki komela eleki mbula moko to ebele.

■ Kebá na likanisi ya komela ata “likaya moko mpamba.” Likaya kaka moko ekoki kotinda yo ozongela lisusu komela, mpe milende nyonso osalaki mpo na kotika komela likaya ekokenda na mai mbala moko. Kasi, soki ekómeli yo ete omeli likaya moko, komela lisusu mosusu te. Soki okwei, kobá kaka na ekateli na yo ya kotika komela likaya.

Bamilio ya bato batiki komela likaya. Soki ozwi ekateli mpe oyiki mpiko, yo mpe okotika komela likaya!

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto