Mpo na nini bato mingi bamipesi na bikelakela?
Balobaka ete bikelakela ezali “endimeli oyo bato bazalaka na yango ete eloko moko oyo emonanaka te mpe ezalaka na nzoto ya moto mpe ekufaka te kasi etikalaka na bomoi soki moto akufi mpe ekoki kosolola na bato ya bomoi, mingimingi na lisalisi ya nganga-nkisi.”
NA 1998, na États-Unis, babimisaki buku moko oyo ezalaki kolobela ndenge ya kosolola na bato oyo bakufá. Buku yango esombamaki mingi mpenza, mpe zulunalo New York Times etyaki yango na esika ya liboso na molɔngɔ ya mikanda oyo etɛkamaki mingi.
Eleki mwa bambula, na Moscou, bato ya politiki mpe bato ya mombongo, bakómaki kokenda mingi epai ya banganga-nkisi, mpe bazalaki kofuta mbongo mingi mpo na kokutana na bango.
Na Brésil, bato mingi batalaka bafilme mosusu ya televizyo, oyo ezalaka na biteni mingi mpe elakisaka makambo ya bikelakela.
Mpo na bato mingi oyo bafandi na Afrika to na Azia, makambo ya bikelakela esalemaka mingi se ndenge moko lokola basalaka mombongo ya kosombitinya biloko na zando.
Mpo na nini bato mingi bazali komikɔtisa na makambo ya bikelakela?
Bato mingi bamikɔtisaka na makambo ya bikelakela mpo na koluka komibɔndisa nsima ya liwa ya moto moko ya libota. Bakanisaka ete banganga-nkisi bakoki koyebisa bango makambo mosusu oyo emonanaka lokola euti epai ya bato oyo bakufá. Yango wana, mbala mingi, bato wana oyo bakufeli moto, bandimaka ete bato na bango oyo bakufá bazali na bomoi mpe ete kosolola na bango ekoki kosalisa bango bákanga motema na mawa oyo bazali na yango.
Bato mosusu basepelaka na bikelakela mpamba te bayebisaki bango ete bilimu ekosalisa bango báyeba ndenge ya kosilisa maladi, ndenge ya kosilisa bobola, ndenge ya kozwa mwasi to mobali, ndenge ya kosilisa mikakatano ya libala, to ndenge ya kozwa mosala. Mpe bato mosusu bamikɔtisaka na makambo ya bikelakela kaka mpo na koyeba ndenge yango ezalaka.
Kasi, ntina mosusu oyo bato mingi bamikɔtisaka na makambo ya bikelakela ezali ete bateyaki bango ete bikelakela, ndenge mobali moko alobelaki yango, ezali “lingomba mosusu” oyo ezali “kaka na mangomba ya boklisto.” Mangomba ya Brésil ezali mpenza komonisa likambo yango.
Brésil ezali ekólo oyo ezali na Bakatolike mingi koleka na mokili mobimba, kasi ndenge mokomi Sol Biderman alobi yango, “bamilio ya bandimi bapelisaka buji na baaltarɛ mpe bakanisaka ete bokeseni moko [ezali] te.” Yango wana, zulunalo Veja ya ekólo Brésil elobaki ete bato 80 likoló ya mokama oyo bakendaka na bisika oyo basalaka bikelakela bazali Bakatolike oyo bazwá batisimo mpe bakendaka ndako-nzambe. Lisusu, ata mpe bakonzi mosusu ya lingomba yango basanganaka na milulu ya makambo ya bikelakela, mpe yango esalaka ete bandimi mingi bákanisa ete koluka kosolola na bato oyo bakufá mpo na koluka lisalisi mpe kozwa toli ezali likambo oyo endimami na Nzambe. Kasi ezali mpenza bongo?
[Etanda/Bililingi na lokasa 3]
Makambo ya bikelakela ezali ndenge na ndenge
Bikelakela ekoki kozala makambo lokola kokenda epai ya nganga-nkisi, koluka kosolola na bato oyo bakufá, to koluka koyeba makambo oyo ekoya nsima. Lolenge moko ya bikelakela oyo eyebani mingi ezali soloka—koluka koyeba makambo oyo ekoya nsima to makambo oyo eyebani te na lisalisi ya bilimu. Lolenge mosusu ya soloka ezali astroloji, kolimbola bandɔtɔ, kotala mabɔkɔ, to koloba makambo na lisalisi ya bakalati.