Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w88 15/3 nk. 4-6
  • Koyokana na bilimu: Nzambe azali kokanisa nini mpo na yango?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koyokana na bilimu: Nzambe azali kokanisa nini mpo na yango?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kosakola makambo makoya to mabombami mpasi mpe liwa
  • Koyokana na bilimu mabe mpe “misala ya nzoto”
  • Kasi okoki komituna mituna oyo: ‘Bizaleli ya Satana oyo bizali komonana
  • Soloka ezali komema na kufa
  • Yoka likebisi ya Yisaya
  • Bolamu ya libela
  • Koyokana na bilimu: mpo na nini bato mingi bazali kosepela na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
  • Mpo na nini bato mingi bamipesi na bikelakela?
    Lamuká!—2001
  • Tɛmɛlá nguya ya bilimu mabe!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Ntina oyo osengeli koboya bikelakela
    Lamuká!—2008
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
w88 15/3 nk. 4-6

Koyokana na bilimu: Nzambe azali kokanisa nini mpo na yango?

MOKOMI moko na makambo ya bato ya mokili na Rome na nkombo Salluste alobaki ete “moboko ya boninga makasi, ezali koyina mpe kolinga makambo ndenge moko”. Na yango, moninga azali moto oyo bozali koyokana na ye kati na makambo mingi, moto moko oyo ozali kotyela ye motema. Motindo moko mpe, Nzambe azali kondima biso lokola baninga mpe azali kopesa biso nzela ete tobelema penepene na ye soki tobendami na bizaleli na ye, lokola bolingo, kimya, boboto mpe motema malamu, mpe ete tozali kosala milende ya solo mpo na komekola bizaleli yango kati na bomoi na biso.​—Bagalatia 5:22, 23.

Na yango, mpo na koyeba soki koyokana na bilimu endimami epai na Nzambe, tosengeli liboso kotalela makambo to matomba oyo yango ebimisi. (Matai 7:17, 18) Ezali kosalisa baoyo bazali komipesa na yango na kolona bizaleli kitoko ya Nzambe? Mpo na yango, totalela makambo mibale oyo bato bakutanaki na yango.

Kosakola makambo makoya to mabombami mpasi mpe liwa

Asamaja Amelia, mwasi moko ya Suriname oyo akomi na mwa mibu mikoki, azalaki na mibu 17 ntango abandaki mpo na mbala ya liboso kosakola makambo makoya, moko na mitindo ya koyokana na bilimu mabe. Bisakweli na ye bizalaki kokokana mpe batoli na ye ezalaki ya malonga to ezalaki kosalisa baoyo bazalaki kotuna ye makambo; na bongo alingamaki mingi kati na mboka na ye. (Tala Misala 16:16.) Atako bongo, likambo moko ezalaki kotungisa ye.

Alobi boye: “Bilimu oyo bazalaki koloba na nzela na ngai bazalaki malamu epai na baoyo bazalaki koluka lisalisi na bango, kasi na mbala moko bazalaki kobebisa bomoi na ngai. Nsima na molulu nyonso, nazalaki kolemba mpe nakokaki koningana te. Ntango butu ezalaki kokoka, nazalaki kolikya kopema mwa moke, kasi bilimu bazalaki kotika ngai kimya te. Kozanga kolemba, bazalaki kotungisa ngai, bazalaki kolobisa ngai mpe kopimela ngai ntango ya kolala. Mpe ebongi koyoka makambo oyo bazalaki koloba na ngai!” Abendi mpema mpe akitisi miso na koningisaka motó mpo na komonisa ete ezalaki mabe. “Bazalaki kolinga kolobela bobele makambo matali binama ya nzoto mpe bazalaki kotya mbamba ete basangana na ngai. Ezalaki mpasi mpenza. Nazalaki mwasi ya libala; nalingaki kobuka bosembo na ngai te mpe nazalaki koyebisa bango yango. Kasi bazalaki koyoka te. Mokolo moko, nguya moko ya kozanga komonana ebetaki ngai, ekangaki ngai mpe eswaki ngai. Nakweaki na nse.”

Mbala mosusu okoloba ete: “Bilimu bazali nde kopesa nzela na pite! Ezali mpenza likambo ya kokamwa!” Bilimu yango bazali na etamboli ya mbindo motindo oyo?

lzaak oyo touti kolobela mpo na ye, alobi: “Bazali na bizaleli mosusu eleki mabe! Na butu moko, babengaki biso mpo na kosalisa mwasi moko azalaki na bokono mpo démon moko azalaki konyokola ye. Mokambi ya etuluku​—mosololi na bilimu mabe oyo démon na ye alekaki na nguya​—amekaki kobengana démon ya mwasi wana. Ezalaki na boumeli ya mokolo mobimba nde tobondelaki démon na ye ete asalisa biso. Tobinaki mpe tobetaki mbonda, mpe mokemoke ezaleli ya mwasi yango ebongwanaki. Mokambi asengaki elimu yango ete etika mwasi wana, mpe atosaki ye. Azalaki kosepela: ‘Tolongaki.’ Na nsima tofandaki mpo na kozongela kimya na biso.”

lzaak azalaki koningisa mingi moboko na ye ntango azalaki koloba, kasi sikawa atiki koningisa yango mpe apemi mpo na komonisa ete likambo yango ezalaki nsomo. Bongo azongeli lisusu koloba: “Mpo na mwa ntango, emonanaki ete makambo nyonso mabandaki kotambola malamu, kasi na mbala moko mongongo moko elimwisaki kimya. Tokimaki mbango epai yango ezalaki kouta: liboso ya ndako na ye, mwasi ya mokambi azalaki kolela, mpo abungisaki makanisi na ye nyonso. Na kati na ndako, mwana na ye ya moke ya mwasi akangamaki makasi, akufaki. Nkingo na ye ebalukaki, liboso ekomaki nsima mpe nsima ekomaki liboso! Nguya moko ebukaki ye nkingo lokola nsoso emonanaki ete, elimu oyo tobenganaki etombokaki. Ezalaki nsomo! Bilimu yango bazali babomi mabe mpenza.”

Koyokana na bilimu mabe mpe “misala ya nzoto”

Maloba ya bosoto, pite mpe koboma, oyo emonisami kati na makambo mibale oyo ya koyokana na bilimu mabe, ezali mpenza na boyokani te na bomoto ya Nzambe. Tala likambo oyo ezali kosalisa biso na kolimbola mpenza soki bilimu wana bazali banani. Bamimonisaka lokola batindami ya Nzambe, misala na bango ya mbindo mpe ya koboma ezali kobimisa bango polele mpe ezali komonisa ete bazali bamekoli ya monguna na Nzambe, mobomi ya liboso kati na Lisolo ya bato, Satan le Diable. (Yoane 8:44) Ye nde azali mokonzi na bango. Bango bazali basali na ye baanzelu batomboki, to bilimu mabe.​—Luka 11:15-20.

Kasi okoki komituna mituna oyo: ‘Bizaleli ya Satana oyo bizali komonana

kati na boyokani na bilimu mabe bobele na mwa bantango? Mpo na koloba malamu, kosolola na bilimu ezali kopesa nzela na koyokana na bilimu malamu oyo bazali kosalisa bato na kobelema penepene na Nzambe?’ Te, Biblia ezali kokatisa “kosalela soloka” esika moko na “misala mosusu ya nzoto” oyo eyokani te na bizaleli ya boklisto.​—Bagalatia 5:19-21.

Kati na Emoniseli 21:8, “baoyo bazali kosalela soloka” (“bato oyo basololaka elongo na bilimu mabe”, Le Livre, Nouveau Testament) batyami na molongo moko na “bato oyo bazangi kondima, . . . na bato babebi na bosoto na babomi na bato, na bato na pite, . . . na basambeli na bikeko, na bato na lokuta”. Jéhovah azali kokanisa nini mpo na baoyo, na bolingo na bango moko, bazali kokosa, bato na pite, babomi na bato mpe basambeli na soloka? Azali koyina misala motindo wana!​—Masese 6:16-19.

Na ntina yango, komipesa na soloka ezali bongo kolinga likambo oyo Jéhovah azali koyina. Na ndimbola mosusu ezali koboya Jéhovah mpo na komitya na ngambo ya Satana, monguna ya liboso ya Nzambe mpe na ngambo ya basaleli na ye. Kanisa: Okolinga kozala moninga ya motema ya moto oyo azali koyokana na banguna na yo? Te. Okoboya ye. Mpo na koloba malamu, tokoki komizela na likambo motindo moko epai na Jéhovah Nzambe. Masese 15:29 ezali koloba: “Jéhovah atikali mosika na bato mabe.”​—Tala Nzembo 5:4.

Soloka ezali komema na kufa

Epai mosusu, soloka ezali kotya na likama ata bomoi ya moto oyo azali komeka kosalela yango. Jéhovah azalaki kopesa etumbu ya liwa epai na baoyo bazalaki kosalela soloka kati na libota ya Yisraele. (Levitike 20:27; Deteronome 18:9-12) Ekoki kokamwisa biso te na kotanga ete bato motindo yango “bakosangola bokonzi na Nzambe te”. (Bagalatia 5:20, 21) Nzokande “likabo na bango ekozala kati na libeke likopelaka na móto na sufulu”, oyo ezali “kufa na mibale”, kufa ya libela. (Emoniseli 21:8) Ya solo, lelo Mangomba na boklisto ya mokili mazali kondima soloka, nzokande likanisi ya Biblia ebongwani te.

Sikawa tokoloba nini soki osila kosala matambe ya liboso kati na nzela ya soloka to kosolola na bilimu? Na yango, okosala malamu soki okotika nokinoki mpe komibalola. Landa toli oyo epemami na Nzambe oyo mosakoli Yisaya apesaki epai na Bayisraele baoyo, lokola bato mosusu ya ntango na biso, bazalaki kosala makambo ya mbindo na kokanisaka ete bazali kosambela Nzambe. Tokoki kobenda batoli ya ntina na makambo oyo ekomelaki bango. Makambo nini?

Yoka likebisi ya Yisaya

Mokapo ya liboso ya mokanda na Yisaya ezali koyebisa biso ete Bayisraele “batikaki Jéhovah” mpe “bazongaki nsima”. (Verset 4.) Atako bazimbisamaki, balandaki ntango nyonso kopesa mbeka, kobatela mibeko ya losambo mpe kolanda kosala mabondeli. Kasi yango ezalaki na ntina moko te! Bapusamaki te na mposa mozindo ya kosepelisa Mozalisi na bango; yango wana Jéhovah alobaki na bango: “Nakobombela bino miso na ngai; (Verset 15.) ata bokobondela mabondeli mingi nakoyoka te.” Bayisraele wana batombokelaki ye na komekolaka misala ya mbindo, kokoma kino ‘kotondisa maboko na bango na makila’.​—Versets 11 kino 15.

Kati na makambo motindo wana, Jéhovah akokaki kondima bango lisusu? Tala masengami oyo ayebisaki bango kati na Yisaya 1:16: “Bomisukola, bomipetola.” na bongo soki tondimi toli oyo na motema moko, tokotika to tokoboya, na kotalela likambo ya moto na moto, kosala misala to makambo ya mbindo, bakisa mpe soloka to koyokana na bilimu mabe oyo ezali bongo ‘mosala ya nzoto’. Koyebaka ete mayele mabe oyo ezali kobombana nsima na yango ezali bongo Satan le Diable, tozali koyina soloka to koyokana na bilimu mabe.

Na nsima, tosengeli kolongola eloko nyonso oyo ezali na boyokani na soloka. Ezali nde ndenge yango lzaak asalaki. Azali koloba: “Mokolo moko, nasangisaki liboso na ndako na ngai biloko na ngai nyonso oyo bizalaki na boyokani na bilimu mabe mpe nakataki yango mikemike na epasola. Moninga na ngai ya pembeni azalaki konganga na koloba ete nakokanisa yango mokolo mosusu. Wana ezalaki ye kokamwa, nasopaki essence likoló na yango mpe natumbaki yango. Ata eloko etikalaki te.”

Esili koleka mibu 28. lzaak asila koyoka naino mawa mpo na likambo oyo asalaki? Te. Lelo azali kosalela Jéhovah na esengo, mpe azali ministre moklisto na lisangá ya ba Témoins de Jéhovah.

Yisaya 1:17 ezali kopesa lisusu toli oyo: “Yekola kosala malamu.” Mpo na yango esengeli koyekola Liloba ya Jéhovah, Biblia, mpo na koyeba nini “mokano na Nzambe, yango malamu”. (Baloma 12:2) Ntango tozali kosalela boyebi oyo tozwi sika, tozali kozwa bolamu mingi. Ezali yango nde Asamaja amonaki.

Atako libota na ye mpe baninga na ye batombokaki makasi, Asamaja ayekolaki Biblia na molende nyonso elongo na ba Témoins de Jéhovah mpe aumelaki te na kokata boyokani na ye elongo na bilimu mabe. Na nsima amipesaki mobimba epai na Jéhovah Nzambe mpe azwaki batisimo na ntango ya assemblée moko. Sikawa, nsima na mibu 12 azali koloba na botondi nyonso: “Uta ntango nazwaki batisimo na ngai, natungisami ata moke te epai na bilimu mabe.” Mpe azali koyebisa na kosekaka mwa moke: “Butu oyo elandaki batisimo na ngai, nalalaki mpongi moko makasi mpe ya kimya na boye ete mokolo elandaki nakendaki na retard na esika ya assemblée.”

Bolamu ya libela

Lelo, lzaak mpe Asamaja bazali kondima na motema moko maloba oyo ya mokomi na nzembo Asaf: “Kasi mpo na ngai ezali malamu ete nabelema na Nzambe.” (Nzembo 73:28) Na yango, na kobelamaka penepene na Jéhovah, bazwaki mbano kati na nzoto mpe na elimo. Kasi likoló na nyonso, bazwaki kimya ya elimo mpe kozala na boyokani ya penepene elongo na Jéhovah.

Mapamboli yango mazali mpenza kozipa mpasi mpe etumba oyo ezali kobima mpo na kokata monyololo ya bilimu mabe. Nzokande, bomoko basengeli koyika mpiko mpo na mpasi monene oyo bakokutana na yango mpo na kolonga. Lintina van Geenen, mwasi moko ya mokili na Suriname, akoki koyebisa yango mpo na makambo oyo ye amonaki. Lisolo oyo elandi ezali koyebisa ndenge nini abundaki na boumeli ya mibu mpo na kolonga na nsima.

[Elilingi na lokasa 5]

Asamaja Amelia alobi boye: Bilimu. . . bazalaki kobebisa bomoi na ngai. . . Mpe ebongaki boyoka makambo oyo bazalaki koyebisa ngai!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto