Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Janvier nk. 19-21
  • Minɔkɔ esangisaka bato mpe ekabolaka bango

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Minɔkɔ esangisaka bato mpe ekabolaka bango
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Pidgin, créole mpe lingua franca
  • Makambo ya kala mpe bomoi ya bato
  • Nini ekokómela minɔkɔ na mikolo ezali koya?
  • Minɔkɔ oyo tolobaka eutá nde na “ndako molai ya Babele”?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
  • Olobaka ‘monoko ya peto’ malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tóbosana te bato oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Tozala na bomoko na nzela na monoko na peto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Janvier nk. 19-21

Minɔkɔ esangisaka bato mpe ekabolaka bango

EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA MEXIQUE

“Ata lisolo moko te ya kala ekoki kosalisa biso tóyeba mpenza makambo oyo bato ya kala ya ekólo moko bazalaki kosala, ndenge bazalaki kotambwisa mboka na bango, bindimeli na bango mpe makambo oyo bazalaki kosepela na yango mpe oyo bazalaki kosepela na yango te, ndenge yango ekoki koyebana soki toyekoli malamumalamu monɔkɔ na bango.”​—MARTÍN ALONSO.

BANDA kalakala, bato ya mayele balukaka mpenza koyeba epai minɔkɔ eutá, mpo na nini minɔkɔ ezali mingi mpe mpo na nini ebongwanaka ntango nyonso. Ya solo, na bileko nyonso bato bazalaka kaka na mposa wana ya koyeba makambo oyo etali minɔkɔ, ndenge moko mpe babatelaka masolo mingi ya kala, nyonso wana na lisalisi ya minɔkɔ. Na ntembe te, minɔkɔ nde ezali kosala ete bato básololaka.

Lelo oyo, bato mosusu ya mayele na makambo ya nkota balobi ete na mokili mobimba, minɔkɔ oyo bato balobaka ezali soki 6 000 to koleka, mpe mosusu kati na yango elobamaka ndenge mingi. Minɔkɔ oyo elobamaka na bato mingi koleka minɔkɔ nyonso mosusu ezali Chinois Mandarin, mpamba te bato koleka milio 800 balobaka yango. Nsima na yango ezali minɔkɔ minei oyo: Lingelesi, Espagnole, Hindi mpe Bengali, atako totii yango mpenza na molɔngɔ te.

Nini esalemaka ntango bato oyo bauti bipai na bipai mpe balobaka minɔkɔ ekeseni bayei kofanda esika moko? Mpe soki bato ya mboka moko baboyi kofanda esika moko na bato ya mboka mosusu, nini ekokómela monɔkɔ na bango? Tiká tótala ndenge nini minɔkɔ ekoki kosangisa bato to mpe kokabola bango.

Pidgin, créole mpe lingua franca

Makambo lokola kobotola mboka moko mpe koyangela yango na makasi (colonisation), mombongo kati na bikólo mpe bakaa ya bakangami, esalaki ete bato báluka koyeba koloba minɔkɔ ya bato mosusu mpamba te bazalaki kokoka kosolola te. Yango wana, bakómaki kosala minɔkɔ oyo ezali na maloba mingi te mpe ezali na elobeli ya pɛtɛɛ. Na minɔkɔ yango, bazalaki lisusu te kolanda mibeko ya lokota (grammaire), bazalaki kosalela maloba mingi te, kasi kaka makambo oyo etalelaki bango nyonso. Ezali na ndenge yango nde minɔkɔ babengi pidgin esalemaki. Atako pidgin ezali na maloba mingi te, ezali na elobeli na yango oyo ekokani na monɔkɔ mosusu te. Kasi soki ntina oyo bato bakómaki koloba minɔkɔ yango ezali lisusu te, monɔkɔ yango ekoki kolimwa.

Soki bato mingi ya ekólo moko bakómi koloba pidgin, bakobakisa maloba mosusu ya sika mpe bakobongisa lisusu mibeko na yango. Na ntango wana, monɔkɔ yango ekómi créole. Créole ekeseni na pidgin mpamba te, Créole ezali komonisa bonkɔkɔ ya bato ya ekólo oyo bazali koloba yango. Lelo oyo na mokili mobimba, ezali na ba pidgin mpe ba créole ebele, oyo euti na Lifalanse, Lingelesi, Portuguais, Swahili mpe minɔkɔ mosusu. Na bikólo mosusu, okokuta bato nyonso balobaka pidgin to créole yango, na ndakisa, na Papouasie-Nouvelle-Guinée balobaka Tok Pisin mpe na Vanuatu balobaka Bichlamar.

Minɔkɔ mosusu oyo epesaka bato nzela básolola atako bazali na minɔkɔ na bango moko, ezali ba lingua franca. Lingua franca ezali minɔkɔ oyo bato balobaka atako bazali na minɔkɔ ya mboka na bango moko. Na ndakisa, na République centrafricaine, bato balobaka minɔkɔ ndenge na ndenge ya bamboka na bango, kasi bango nyonso balobaka Sango. Baambasadɛrɛ balobaka Lingelesi mpe Lifalanse, yango ezali Lingua franca na bango. Pidgin ezali lingua franca, créole mpe ekoki kozala lingua franca.

Na kati ya ekólo moko, monɔkɔ moko ekoki kolobama na ndenge mingi na kotalela esika na esika. Babengaka yango na Lifalanse dialecte to ndenge mingi ya koloba monɔkɔ moko. Soki bato ya etúká moko bakutanaka mingi te na bato ya etúká mosusu oyo balobaka na bango monɔkɔ moko, ndenge na bango ya koloba monɔkɔ yango ekoki kokesana mingi mpenza. Nsima ya bambula ebele, lolenge moko ya koloba monɔkɔ moko ekoki kokesana makasi na monɔkɔ yango mpe kokóma monɔkɔ mosusu. Ntango mosusu, ezalaka mpasi mpo bato ya mayele na makambo ya minɔkɔ bákesenisa monɔkɔ moko na balolenge na yango nyonso oyo bato mosusu balobaka yango. Lokola minɔkɔ ebongwanaka ntango nyonso, ekómaka mpe na bantango mosusu ete balolenge mingi ya koloba yango elimwa, mpamba te bato bazali lisusu kosalela yango te. Na ntango wana mpe, ndambo ya makambo oyo etali bomoi ya bato yango ekolimwa.

Monɔkɔ ezali likabo euti na Nzambe. (Exode 4:11) Likambo ya kokamwisa oyo etali ndenge monɔkɔ moko ekoki kobongwana emonisi ete likabo yango etikalaka ntango nyonso ndenge moko te. Ntango tozali kotalela minɔkɔ, tokangi ntina ete ata ekólo moko te eleki bikólo mosusu, mpamba te, ezali na monɔkɔ moko te oyo eleki minɔkɔ mosusu. monɔkɔ ezali likabo lokola makabo nyonso mosusu oyo euti na Nzambe, okokuta yango epai ya bato ya bikólo nyonso mpe ya bamboka nyonso. Banda kalakala, minɔkɔ ya bato ya bikólo nyonso ezangaki eloko moko te mpe ezalaki kokokisa ntina na yango. Tosengeli komemya minɔkɔ nyonso, ezala ete bato mingi balobaka yango to te.

Makambo ya kala mpe bomoi ya bato

Moto azalaka na mposa ya kozala esika moko na bato mosusu mpe yango emonani na monɔkɔ oyo alobaka. Yango wana mbala mingi, ntango bato ya bikólo mibale bafandi esika moko, ata nsima ya bambula, minɔkɔ ya bamboka wana mibale ekomonisa ete bazalaki kofanda esika moko.

Na ndakisa, atako monɔkɔ ya Espagnole euti na Latin, ezali na maloba mingi oyo euti na monɔkɔ ya Arabe mpe yango ezali komonisa ndenge Bamizilma bayaki koyangela ekólo ya Espagne na ekeke ya mwambe. Na monɔkɔ ya Espagnole mpe okomona maloba mosusu oyo euti na Greke, Lingelesi, Lifalanse mpe minɔkɔ mosusu. Lisusu, na monɔkɔ ya Espagnole oyo bikólo ya Amerika elobaka, okokuta maloba mosusu oyo euti na bato ya Amerika ya kala. Na ndakisa, Espangole oyo elobamaka na Amerika ezali na maloba mingi oyo euti na monɔkɔ ya Nahuatl, oyo ba Aztèque ya Amerika ya Ntei bazalaki koloba.

Monɔkɔ ya mboka emonisaka ete ozali moto ya ekólo boye to mpe etúká boye. Ndenge moko mpe, maloba na yo ekoki komonisa soki baninga na yo bazali banani, mosala to mombongo oyo osalaka, lisangá na yo mpe ekipi na yo ya masano, to mpe soki ozalaka na lisangá moko ya bato mabe. Ekoki mpenza komonisa makambo ebele, kasi tokokoka kotánga yango nyonso te. Ntango bato ya etuluku moko bazali na maloba na bango oyo ekeseni na bato mosusu, bato ya mayele na makambo ya nkota babengaka yango na Lifalanse jargon, to argot, to mpe na bantango mosusu dialecte.

Kasi ntango matata ezali kati na bikólo mibale to bato ya mboka mibale, monɔkɔ ezali lisusu kosangisa bango te. Na ntango wana, monɔkɔ ekómi nde epekiseli oyo ezali mpenza kokabola bango.

Nini ekokómela minɔkɔ na mikolo ezali koya?

Ezali mpasi mingi mpenza kolobela makambo ya minɔkɔ. Lelo oyo, mpo na televizyo, radio mpe bazulunalo, bato bakómi koyeba makambo ya minɔkɔ mosusu. Mokanda moko (Encyclopædia Britannica) emonisi ete soki ozwi bato 7, moko kati na bango alobaka libosoliboso Lingelesi to mpe ezali monɔkɔ na ye ya mibale. Yango wana, Lingelesi ezali lingua franca oyo bato ya bikólo mingi na mokili balobaka. Lokola bato bazali koloba Lingelesi, yango esali ete bato ya bikólo mingi básololaka mpe bápesanaka bansango oyo ezali na litomba mpo na moto nyonso.

Kasi epai mosusu, tomoni ete minɔkɔ esali ete bokabwani, koyinana mpe bitumba ezala mingi lisusu na mokili. Mokanda moko (The World Book Encyclopedia) elobi boye: “Soki bato nyonso bazalaki koloba monɔkɔ moko, . . . mbɛlɛ bikólo nyonso ezali na boboto.” Ya solo, ekoki kaka te koloba monɔkɔ moko mpo na kozala na boboto, yango esɛngi mpenza kosala mbongwana na makambo mingi. Kaka Mozalisi ya minɔkɔ, oyo atondi na mayele, nde akoki kosala ete bato nyonso bálobaka monɔkɔ moko.

Biblia, mokanda oyo Nzambe azali kosalela mpo na kosolola na bato, emonisi polele ete mosika te, Nzambe akoboma mokili oyo ya mabe mpe na esika na yango, akotya boyangeli moko ya likoló, oyo ekoyangela mabele. Ekozala mpenza Bokonzi na ye. (Danyele 2:44) Boyangeli yango ekosangisa bato nyonso na kati ya ebongiseli moko ya makambo ya sika awa na mabele, na kimya mpe bosembo.​—Matai 6:9, 10; 2 Petelo 3:10-13.

Ata sikoyo, monɔkɔ moko ya pɛto, na elobeli ya elimo elingi koloba mateya ya solo etali Yehova Nzambe mpe mikano na ye, ezali kosangisa bamilio ya bato oyo bauti na minɔkɔ nyonso, na bikólo nyonso mpe na mangomba nyonso. (Sefania 3:9) Yango wana, tokoki mpenza koloba ete na mokili na ye ya sika, Nzambe akosangisa lisusu bato mpamba te akopesa bato nyonso monɔkɔ moko mpe akosilisa likambo oyo asalaki na Babele.

[Etanda na lokasa 20]

Minɔkɔ eutaki wapi?

Yehova Nzambe, Mozalisi oyo aleki bato nyonso na mayele, asalelaki monɔkɔ moko mpo na kosolola na baanzelu na likoló. (Yobo 1:6-12; 1 Bakolinti 13:1) Ntango akelaki moto, apesaki ye maloba mpe likoki ya kokolisa yango. Eloko moko te emonisi ete na ebandeli, bato bazalaki na monɔkɔ oyo ezalaki na maloba te, kasi kaka koganga to makɛlɛlɛ mpamba lokola nyama. Kutu, mokanda moko (Encyclopædia Britannica) elobeli monɔkɔ ya Sumérien, oyo bato balobaka ete ezali monɔkɔ ya kala koleka minɔkɔ nyonso oyo bato bazalaki kokoma. Mokanda yango elobi boye: “Baverbe ya monɔkɔ ya Sumérien, na . . . lolenge ya kobanda liloba, katikati mpe nsuka ya maloba, emonisi mpenza ete ezalaki monɔkɔ moko makasi.”

Pene na ekeke ya 20 L.T.B., bato batɛmɛlaki mobeko ya Nzambe ete bápalangana bipai nyonso mpo na ‘kotondisa mokili.’ Basalaki makasi ete bato nyonso ya mokili mobimba bátikala na Mokili ya Sinala, na Mesopotamia, mpe babandaki kotonga Ndako Molai ya Babele mpo na losambo na bango. Mpo na kosukisa mikano na bango ya mabe, Nzambe abulunganisaki monɔkɔ oyo bazalaki koloba mpe bakómaki koloba minɔkɔ ndenge na ndenge.​—Genese 1:28; 11:1-9.

Biblia elobi te ete minɔkɔ nyonso euti na monɔkɔ wana ya ebandeli. Na Sinala, Nzambe apesaki bato na bato maloba ya sika mingi mpe lolenge ya sika ya kokanisa, yango ebimisaki minɔkɔ ndenge na ndenge. Yango wana, milende nyonso oyo bato basali mpo na koluka koyeba monɔkɔ oyo ebimisi minɔkɔ nyonso mosusu elongi te mpe ezali se mpamba.

[Elilingi na lokasa 20]

Na Babele, Nzambe abulunganisaki monɔkɔ oyo bato batombokelaki ye bazalaki koloba

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto