Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g01 Avril nk. 8-14
  • Bokoki kobikisa libala na bino!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bokoki kobikisa libala na bino!
  • Lamuká!—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge otalelaka ndai ya libala
  • Kumisá mobalani na yo
  • Matata na bino ezali mpenza monene?
  • “Nguya ya lolemu”
  • Zimisá mɔ́tɔ
  • Zalá na makanisi mabongi
  • Ndenge okoki kobongisa libala na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Nsima ya mokolo ya fɛti ya libala
    Ndenge ya kotikala na kati ya bolingo ya Nzambe
  • “Libala ekumisama”
    “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe”
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Lamuká!—2001
g01 Avril nk. 8-14

Bokoki kobikisa libala na bino!

Biblia ezali na toli mingi oyo ebongi mpe ekoki kosalisa mibali na basi. Yango ezali likambo ya kokamwa te, mpamba te Ye oyo apemisaki Biblia azali mpe Mobandisi ya libala.

BIBLIA elobeli libala na lolenge esengeli mpenza kozala. Elobi polele ete mobali na mwasi bakozala na “mpasi,” to ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli yango, bakozala na “mitungisi.” (1 Bakolinti 7:28) Nzokande, Biblia elobi lisusu ete libala ekoki kopesa mpe esengeli kopesa esengo, kutu esengeli kosepelisa. (Masese 5:18, 19) Makanisi yango mibale ezali bongolabongola te. Ezali komonisa kaka ete ata soki babalani bazali na mikakatano minene, bakoki koyokana mpe kolingana makasi.

Yango nde ezangi na libala na bino? Makambo ya mpasi mpe ya mawa ebebisi bolingo mpe esengo oyo ezalaki liboso komonana na libala na bino? Ata soki libala na bino ezali lisusu te na bolingo na boumeli ya bambula mingi, likoki ya kozwa yango lisusu ezali. Ya solo, bosengeli kozala na makanisi mabongi. Bato ya kozanga kokoka bazali na likoki te ya kosala libala ya kokoka. Kasi, ezali na makambo oyo osengeli kosala mpo na kobwaka mimeseno mabe.

Ntango ozali kotánga makambo oyo elandi, meká koyeba oyo ezali kolobela mpenza libala na bino. Na esika ya kotya likebi na mabunga ya mobalani na yo, poná mwa makanisi oyo okoki yo moko kosalela, mpe kosalela toli ya Makomami. Mbala mosusu okoki komona ete elikya ezali naino mingi mpo na libala na bino kutu na ndenge oyo okanisaki te.

Tiká tólobela liboso ndenge ya kotalela makambo, mpamba te lolenge oyo otalelaka ndai oyo olapaki mpe makanisi oyo ozalaka na yango mpo na mobalani na yo ezali na ntina mingi mpenza.

Ndenge otalelaka ndai ya libala

Soki olingi kosala makasi na libala na yo, osengeli kotala mosika. Kutu, Nzambe asalaki ebongiseli ya libala mpo na kosangisa bato mibale mpo bákangolama te. (Genese 2:24; Matai 19:4, 5) Yango wana, boyokani na yo na mobalani na yo ezali te lokola mosala moko oyo okoki kotika to lokola ndako moko oyo okoki kolongwa na yango kaka na kokata kɔntra to kokenda epai mosusu. Nzokande, ntango mwasi na mobali babalanaka, balakaka liboso ya bato nyonso ete bakotikala esika moko, ezala ata likambo nini ekómeli bango. Koyeba kotosa ndai ya libala eyokani na maloba oyo Yesu alobaki esili koleka pene na mbula 2000: “Oyo nde Nzambe asili kotonga, tiká te ete moto akangola yango.”​—Matai 19:6.

Babalani mosusu bakoki koloba ete, ‘Kasi, tozali naino esika moko. Yango ezali elembeteli te ete tozali kotosa ndai ya libala?’ Mbala mosusu. Kasi, lokola elobelamaki na ebandeli ya masolo oyo, babalani mosusu oyo bafandi esika moko bakangami na zɛlo, bakangami na kati ya libala oyo ezangi bolingo. Mokano na bino ezali ya kosala ete libala na bino ezala na esengo, kasi kaka te ete eumela. Ndai yango esengeli kaka te komonisa bosembo na ebongiseli ya libala kasi mpe epai ya moto oyo olakaki ete okolinga ye mpe okosepela na ye.​—Baefese 5:33.

Maloba oyo olobaka na mobalani na yo ekoki komonisa ndenge mpenza ndai na yo ezali. Na ndakisa, ntango koswana eyei makasi, babalani mosusu babimisaka mbangumbangu maloba lokola “Nakei na ngai!” to “Nakozwa moto mosusu oyo akosepela na ngai!” Atako maloba ya ndenge wana ebimaka mpo na nkanda, ezali mpenza kolɛmbisa ndai ya libala mpe komonisa ete ekuke ezali ntango nyonso polele mpe moto oyo azali kobimisa maloba yango azali pene na kobima.

Mpo na kozongisa bolingo na libala na bino, bólongola maloba ya makasi ndenge wana na masolo na bino. Kanisá naino, bokolinga kobongisa mpe kokembisa ndako moko oyo boyebi ete lelo to lobi bokobima wana? Na bongo, mpo na nini ozali kozela ete mobalani na yo asala makasi na libala oyo ayebi ete ekoumela te? Zwá ekateli ete okosala makasi mpo na koluka lolenge ya kobongisa.

Ezali yango nde mwasi moko asalaki nsima ya eleko moko ya matata na mobali na ye. Alobi ete, “Atako nazalaki koyina ye na bantango mosusu, nazalaki kokanisa kokabwana na ye te. Ezala ata likambo nini oyo tobebisaki, tolukaki ndenge ya kobongisa yango. Mpe sikawa, nsima ya mbula mibale ya matata mpenza, nakoki koloba na bosembo mpenza ete tozali lisusu na esengo koleka.”

Ya solo, ndai ya libala elimboli boyokani​—ezali kaka te kofanda esika moko kasi mpe kosala elongo mpo na kokokisa mokano moko. Kasi, okoki kokanisa ete na esika oyo okómi, kaka etinda ya kotosa mibeko nde esɛngisi bino bótikala na libala. Soki ezali bongo, kobwaka elikya te. Bokoki kozongisa bolingo na bino. Ndenge nini?

Kumisá mobalani na yo

Biblia elobi ete: “Tiká ete libala likumisama kati na bato nyonso.” (Baebele 13:4; Baloma 12:10) Maloba ya Grɛki oyo ebongolami awa na “likumisama,” na bipai mosusu na Biblia ebongolami na “elingami mingi,” “na lokumu mingi,” mpe “ya motuya mingi.” Soki tozali kotalela eloko moko na motuya mingi, tokosala makasi mpo na kobatela yango. Mbala mosusu omonaki ezalela yango epai ya moto oyo asombi vuatire ya sika ya ntalo mingi. Asalaka ete motuka na ye ya motuya ezala ntango nyonso pɛto mpe malamu. Mpo na ye, soki vuatire yango elongwe langi ata mwa moke akomona yango lokola likambo monene! Bato mosusu basalaka ndenge wana mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto na bango. Mpo na nini? Mpamba te balingaka mpenza kozala malamu mpe basalaka makasi mpo na komibatela.

Zalá mpe na likebi ya ndenge wana mpo na libala na yo. Biblia elobi ete bolingo “ekolikyaka nyonso.” (1 Bakolinti 13:7) Mbala mosusu, na esika ete ozala na makanisi mabe ete eloko moko te ekobonga, to obwaka elikya nyonso na maloba lokola “Tolinganaki soki moke te,” “Tobalanaki bana mike mpenza,” to “Toyebaki te nini tozalaki kosala,” mpo na nini te kozala na elikya mpe kosala makasi mpo na kobongisa mpe kozela mbano na motema mpiɔ? Mopesi​-toli moko na makambo ya libala alobi ete, “Nayokaka babalani mingi oyo nasalisaka balobaka ete ‘Natiki na ngai!’ Na esika ya kotalela boyokani na bango mpo na koyeba nini esengeli kobongisama, nokinoki balongolaka motema na makambo nyonso, bakisa makambo ya motuya oyo basalaki elongo, lisolo ya libala na bango, mpe elikya ya kolonga.”

Makambo nini bosalaki elongo yo na mobalani na yo? Atako libala na bino ezali na mikakatano, bokoki mpenza komikundola bantango ya bisengo, mikano oyo bokokisaki, mpe mikakatano oyo bolongaki elongo. Kanisá malamumalamu makambo yango, mpe monisá ete okumisaka libala na yo mpe mobalani na yo, salá mpenza makasi mpo na kobongisa boyokani na bino. Biblia ezali komonisa ete Yehova Nzambe atyaka likebi mpenza na boyokani ya babalani. Na ndakisa, na ntango ya mosakoli Malaki, Yehova apamelaki Bayisalaele oyo bazalaki kokosa mpe koboyana na basi na bango mpo na makambo ya bozoba. (Malaki 2:13-16) Baklisto balingaka ete libala na bango ekumisa Yehova.

Matata na bino ezali mpenza monene?

Emonani ete kozanga likoki ya kosilisa mikakatano ezali mpenza ntina monene oyo ekitisaka bolingo ya mobali na mwasi na kati ya libala. Lokola bato mibale bakoki kozala ndenge moko te, mabala nyonso ezalaka na mwa matata na yango na bantango mosusu. Kasi babalani oyo bayokanaka te, bakoki komona ete wana bambula ezali koleka bolingo na bango mpe ezali kokita. Bakoki kutu koloba ete, ‘Tokokani te. Toswanaka ntango nyonso!’

Kasi, libala ekufaka kaka te mpo na matata. Likambo ya ntina ezali nde ndenge oyo bosilisaka matata yango. Na libala ya malamu, mobali na mwasi bayebi kolobela mikakatano na bango mpe baboyaka ezaleli oyo moto moko ya mayele abengaki ete “banguna ya motema.”

“Nguya ya lolemu”

Yo na mobalani na yo boyebaka ndenge ya kolobela mikakatano na bino? Bino nyonso bosengeli kozala na mposa ya kolobela yango. Ya solo, yango ezali lokola mosala ya mabɔkɔ​—ekoki kutu kozala mpasi mpo na koyekola yango. Mpo na nini? Mpamba te, na bantango mosusu biso nyonso “tobɛtaka libaku na maloba” mpo na kozanga kokoka. (Yakobo 3:2, NW) Lisusu, bato mosusu bakolaki na mabota oyo moboti moko azalaki kosilika mbala mingi. Kobanda na bomwana, ezali lokola nde bayekoli ete kosilika mpe kofinga ezali mabe te. Mwana mobali oyo akoli na esika ya ndenge wana akoki kokóma “moto ya nkanda,” “moto ya yauli.” (Masese 29:22) Ndenge moko mpe, mwana mwasi oyo akoli na esika ya ndenge wana akoki kokóma “mwasi wa makelele mpe wa matata.” (Biyele [Masese 21:19] 21:19, Liloba lya Nzambe) Ekoki kozala mpasi mpo na kopikola makanisi mpe bizaleli oyo ezwa mpenza misisa.a

Yango wana, mpo na kosilisa mikakatano, esengeli koyeba lolenge ya sika ya kobimisa makanisi na yo. Yango ezali likambo ya moke te, mpamba te lisese moko ya Biblia elobi ete: “Kufa mpe bomoi izali na nguya ya lolemo.” (Masese 18:21) Na ntembe te, atako yango ekoki komonana likambo ya pɛtɛɛ, lolenge na yo ya koloba na mobalani na yo ezali na nguya ya kobebisa boyokani na bino to ya kobongisa yango koleka. Lisese mosusu ya Biblia elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbɛli; nde lolemo na bato na mayele ezali na bomoi.”​—Masese 12:18.

Ata soki emonani ete mobalani na yo moto abandaka kotumola yo, kebá na maloba oyo yo ozali kobimisela ye ntango bozali koswana. Maloba na yo ezokisaka to ebikisaka? Epelisaka nkanda to ekitisaka yango? Biblia elobi ete, “Kozongisa liloba na bolɛmbu ekopɛngola nkanda.” Nzokande, “liloba makasi ekopesa nkɛlɛ simbisi.” (Masese 15:1) Maloba oyo epesaka mpasi​—ata soki elobami na malɛmbɛ​—ekoki kopelisa nkanda.

Ya solo, soki likambo moko ezali kotungisa yo, ozali na lotomo ya koloba. (Genese 21:9-12) Okoki koloba, kasi kobimisa maloba ya kozokisa te, kofinga te, to kotyola mobalani na yo te. Kebáká na maloba na yo—​makambo mosusu oyo osengeli komeka te koloba na mobalani na yo ezali maloba lokola “Nayinaka yo” to “Elingaki ezala malamu soki tobalanaki te.” Mpe atako ntoma moklisto Paulo azalaki mpenza kolobela libala te, ezali malamu kolanda toli oyo apesaki ya koboya “ntembe mpe kowelana na ntina na maloba” mpe “kowelana kati na bato babebi na makanisi.”b (1 Timote 6:4, 5) Soki mobalani na yo asalaka bongo, yo komekola ye te. Soki ebongi mpo na yo, landá kimya.​—Baloma 12:17, 18; Bafilipi 2:14.

Ya solo, ezali mpasi mpo na kokeba na maloba oyo ozali kobimisa na ntango ya nkanda. Yakobo, mokomi ya Biblia alobi ete, “Lolemo ezali mɔ́tɔ . . . Nde moto te ayebi kotya lolemo nsima. Yango eloko mabe eyebi kokitisama te, etondi na ngɛngɛ ya kufa.” (Yakobo 3:6, 8) Na bongo, okosala nini ntango nkanda ebandi koya makasi? Ndenge nini okoki koloba na mobalani na yo mpo ete okitisa matata na esika ete okolisa yango?

Zimisá mɔ́tɔ

Bato mosusu bamonaki ete ezali pɛtɛɛ mingi kokitisa nkanda mpe kolobela makambo oyo ebimisaki nkanda yango soki balobeli mayoki na bango, na esika ya kolobela makambo oyo babalani na bango basalaki. Na ndakisa, koloba ete “Oyo olobaki ezali kosala ngai mpasi” ezali malamu koleka koloba ete “Ozokisi ngai” to “Osengeli koyeba likambo ya koloba na moto.” Ya solo, ntango ozali koloba mpo na komonisa mayoki na yo, mongongo na yo esengeli komonisa nkanda te to lityo te. Mokano na yo ezali ya kobenda likebi na mpasi na yo kasi ya koswanisa moto te.​—Genese 27:46–28:1.

Lisusu, kobosana te ete ezali na “ntango ya kozala nyɛɛ mpe ntango ya koloba.” (Mosakoli 3:7) Ntango bato mibale bazali koloba mbala moko, moko te azali kolanda, mpe bakoyokana te. Yango wana, soki ezali ngala ya moko mpo na koyokamela, ‘yokáká noki, kowelaka koloba te.’ Ezali mpe na ntina ete ‘oyokaka nkanda noki te.’ (Yakobo 1:19, NW) Kotya likebi na maloba nyonso te ya makasi oyo mobalani na yo azali kobimisa; mpe “yoká nkanda noki na [elimo, NW] na yo te.” (Mosakoli 7:9) Nzokande, luká koyeba makanisi oyo ezali na kati ya maloba ya mobalani na yo. Biblia elobi ete: “Bososoli ya moto ya mayele ekozikisa nkanda na ye; nkembo na ye ezali ete akolimbisa masumu.” (Masese 19:11) Bososoli ekosalisa mobali to mwasi ayeba epai matata ezali kouta.

Na ndakisa, soki mwasi moko azali komilela ete mobali na ye alekisaka ntango elongo na ye te, yango ezali kaka te likambo ya bangonga mpe miniti. Ekoki kozala ete azali komiyoka ete mobali na ye atyelaka ye likebi te mpe asepelaka na ye te. Ndenge moko mpe, soki mobali asiliki mpo mwasi na ye asombaki eloko moko mbalakaka, ezali kaka te likambo ya kobebisa mbongo. Ekoki kozala ete mwasi atunaki likanisi na ye liboso te. Mobali to mwasi oyo azali na bososoli atalelaka likambo na mozindo mpo na koyeba mpenza epai mokakatano ezali kouta.​—Masese 16:23.

Koloba ezali mpasi te, kasi kosala nde ezalaka mpasi. Ezali mpenza mpasi! Na bantango mosusu, atako bozali kosala mpenza milende ya solosolo, maloba makasi ebimaka mpe mɔ́tɔ epelaka. Ntango omoni ete mɔ́tɔ ebandi kopela, okoki kolanda toli ya Masese 17:14 oyo elobi ete: “[Kendá na yo] naino kowelana ebimi te.” Ezali mabe te kosolola nsima soki nkanda ekiti. Soki ezali mpasi ete bósolola kozanga kosilika, ekoki kozala malamu bóluka moninga moko oyo akɔmeli, oyo akoki kosalisa bino bótalela matata na bino mpo na kosilisa yango.c

Zalá na makanisi mabongi

Kolɛmba nzoto te soki libala na bino ezali te ndenge okanisaki na ntango bozalaki komilɛngɛla mpo na kobalana. Etuluku moko ya bato ya mayele oyo bayekolaka bomoi ya libala balobi ete: “Mabala oyo ezali na bisengo oyo ezangi nsuka ezali mpenza te. Mabala mingi ezali na bantango mosusu ya malamu, na bantango mosusu ya mikakatano.”

Na ntembe te, libala ekoki kozala te lokola lolango oyo balobelaka na masapo, kasi esengeli mpe te kozala likambo ya mawa. Atako na bantango mosusu yo na mobalani na yo bosengeli koyikelana mpiko, ekozala mpe na bantango mosusu oyo bokoki kobosana mikakatano na bino mpe kosepela esika moko, kosakana mpe kosolola lokola baninga. (Baefese 4:2; Bakolose 3:13) Yango ezali ntango oyo bokoki kozongisa bolingo na bino oyo ekitaki.

Kobosana te ete bato mibale ya kozanga kokoka bakoki te kosala libala ya kokoka. Kasi bakoki kozala na mwa esengo. Ya solo, ata na kati ya mikakatano, boyokani oyo ezali kati na yo na mobalani na yo ekoki kopesa yo bolamu mingi. Ezali mpenza solo ete: Soki bino nyonso mibale bosali makasi mpe boboi kozala na makambo makasimakasi mpe bozali koluka bolamu ya mosusu, ntina ya kondima ete libala na bino ekoki kobika ezali.​—1 Bakolinti 10:24.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Bizaleli oyo moto azwá na baboti na ye epesaka nzela te ya kozala na maloba makasi epai ya mobalani na ye. Nzokande, ezali komonisa ete bizaleli yango ekɔteli moto mpe ezali mpasi mpo na kopikola yango.

b Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “kowelana kati na bato babebi na makanisi” ekoki mpe kobongolama na “kosilikisana.”

c Batatoli ya Yehova bazali na bankulutu na lisangá. Atako bankulutu basengeli te komikɔtisa na makambo oyo etali babalani bango moko, kasi babɔndisaka baoyo bazali na matata.​—Yakobo 5:14, 15.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]

Maloba na yo ezokisaka to ebikisaka?

[Etanda/Bililingi na lokasa 10]

BWAKELÁ MONINGA BALE NA BOBOTO

Biblia elobi ete: “Tiká ete maloba na bino mazala na ngɔlu, na elɛngi na mungwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.” (Bakolose 4:6) Toli yango ebongi mpenza kosalelama na libala! Na ndakisa: Soki bozali kosala lisano ya kobwakelana bale, okolinga kobwakela moninga oyo ozali na ye ekipi moko bale na ndenge ete ayamba yango na mpasi te. Okolinga te kobamba ye yango na ndenge ete etuta ye makasi, boye te? Salelá mpe etinda yango ntango ozali kosolola na mobalani na yo. Kokatela ye mangala ekosala ye kaka mabe. Nzokande, lobá na ye na boboto​—na ngɔlu​—mpo ete akanga ntina ya makanisi na yo.

[Etanda/Elilingi na lokasa 11]

BÓMIKUNDOLA!

Bótánga lisusu mikanda na bino ya kala. Bótala mpe bafɔtɔ. Bómituna, ‘Nini ebendaki ngai nalinga ye? Bizaleli na ye nini ezalaki kosepelisa ngai? Makambo nini tozalaki kosala esika moko? Nini ezalaki kosɛkisa biso?’ Na nsima yebisá mobalani na yo makambo yango. Lisolo oyo ebandi na maloba lokola “Ozali koyeba lisusu ntango oyo . . . ?” ekoki kosalisa yo mpe mobalani na yo ete bózongisa mayoki oyo bozalaki na yango kala.

[Etanda na lokasa 12]

MOBALANI MOSUSU, KAKA MIKAKATANO YANGO

Babalani mosusu oyo bamiyokaka ete bakangami na kati ya libala oyo ezangi bolingo bakómaka na makanisi ya kobala mwasi to mobali mosusu. Kasi Biblia ezali kondima ekobo te, elobi ete moto oyo amipesi na lisumu wana “azangi mayele” mpe “azali kobungisa molimo na ye.” (Masese 6:32) Mobalani oyo asali ekobo mpe abongoli motema te akobebisa boyokani na ye na Nzambe​—yango ezali mpenza komibebisa oyo eleki mabe.​—Baebele 13:4.

Bozoba monene ya moto oyo asali ekobo emonanaka mpe na lolenge mosusu. Ya liboso, moto oyo asali ekobo mpe akei kobala lisusu akoki kokutana na mikakatano ndenge moko na oyo akutanaki na yango na libala na ye ya liboso. Dr. Diane Medved abimisi likambo mosusu ebongi kotalela, alobi ete: “Likambo ya liboso oyo mobalani na yo ya sika ayebi mpo na yo ezali ete olingaka kozala sembo te. Ayebi ete okoki kokosa moto oyo olakaki ete okozala sembo epai na ye. Ayebi ete ozali na makasi mpo na komilongisa. Ayebi ete bakoki kokosa yo obosana ndai na yo. Ayebi ete bisengo ya nzoto to komisepelisa ezali mpambo oyo ozali kolanda. . . . Ndenge nini mobalani na yo ya sika akondima ete mokolo mosusu okobendama lisusu te na moto mosusu?”

[Etanda na lokasa 14]

BWANYA OYO EUTI NA MASESE YA BIBLIA

• Masese 10:19: “Na mingi na maloba, masumu mazangi te; nde ye oyo akangi monɔkɔ na ye azali na mayele.”

Soki ozali na nkanda, okoki kobimisa maloba ebele mpe koloba makambo oyo okanaki te mpe na nsima okoyoka mawa mpo na yango.

• Masese 15:18, NW: “Moto na nkanda akobimisa koswana, kasi ye oyo akosilika noki te akolɛmbisa matata.”

Maloba makasi ekoki kozokisa mobalani na yo, kasi koyokamela na motema mpiɔ ekosalisa bino bósilisa matata.

• Masese 17:27, NW: “Ye oyo akobimisa maloba mingi te azali na boyebi, mpe moto na bososoli azali na motema mpiɔ.”

Soki omoni ete nkanda ebandi kopela, ekozala malamu okanga monɔkɔ mpo na kopekisa ete matata ebima te.

• Masese 29:11: “Zoba akoloba makanisi nyonso na motema na ye, nde moto na [bwanya, NW] akozilisa yango kino nsima.”

Komipekisa ezali na ntina mingi. Kotomboka mpe kobimisa maloba mabe ekobebisa boyokani na yo na mobalani na yo.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto