Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w03 15/9 nk. 4-7
  • Ndenge okoki kobongisa libala na yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge okoki kobongisa libala na yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kolapa ndai ezali kondima mokumba
  • Kopesana mabɔkɔ elendisaka ndai ya libala
  • Koluka bolamu ya mosusu ebongisaka libala
  • Talelá libala ete esengeli koumela libela
  • Ndenge ya kokómisa ndai ya libala makasi
    Lamuká!—2015
  • Ndenge ya kokokisa ndai na yo ya libala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • 1 Kotosa ndai ya libala
    Lamuká!—2018
  • Bokoki kobikisa libala na bino!
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
w03 15/9 nk. 4-7

Ndenge okoki kobongisa libala na yo

KANISÁ ndako moko oyo ebebi mpenza. Langi na yango ekómi ya kala, ndako ekómi kotanga, simá ebebi. Na ntembe te, mbula, moi mpe mipɛpɛ makasi ezalaki kobɛtela ndako yango na boumeli ya bambula, mpe bazalaki kotyela yango likebi te. Esengeli nde kobuka ndako ya ndenge wana? Ntango mosusu te. Soki moboko na yango ezali makasi mpe bifelo ezali naino malamu, likoki ya kobongisa ndako yango ezali.

Ozali komona ete libala na yo ekómi lokola ndako ya ndenge wana? Ekoki kozala ete nsima ya bambula, nsinga ya libala na bino ebandi kolɛmba; na maloba ya elilingi, ezali lokola nde mbula, moi mpe mipɛpɛ ebɛteli yango mingi. Ekoki mpe kozala ete moko kati na bino to bino mibale bozalaki kotyela yango likebi te. Bokoki komiyoka ndenge Sandy amiyokaki. Nsima ya mbula 15 ya libala, alobaki boye: “Tofandaki kaka libala ya maloba. Kasi esengelaki kozala bongo te.”

Ata soki libala na bino ekómi mpe ndenge wana, kokanisa mbala moko te ete bosengeli koboma yango. Libala na bino ekoki mpe kobonga. Yango ekotalela mingimingi mokano oyo yo ná molongani na yo bozali na yango ya kotosa ndai na bino. Mokano ya kotosa ndai ekoki kobatela libala na bino ata na ntango ya mikakatano. Kasi, ndai ezali nini? Mpe ndenge nini Biblia ekoki kosalisa bino na kolendisa yango?

Kolapa ndai ezali kondima mokumba

Kolapa ndai elimboli kondima mokumba. Ntango mosusu, tosalelaka liloba yango na makambo lokola kɔntra ya mosala. Na ndakisa, motongi ndako akoki komiyoka ete asengeli kokokisa makambo oyo esɛngami na kɔntra ya kotonga ndako. Ekoki mpe kozala ete ayebi nkolo ndako yango te. Atako bongo, akomona ete asengeli kokokisa maloba na ye.

Atako libala ezali kɔntra ya mosala te, ndai na yango ezali mpe mokumba. Na ntembe te yo ná molongani na yo bolapaki ndai na miso ya Nzambe mpe na miso ya bato ete bokofanda elongo, na ntango ya mpasi mpe na ntango ya bisengo. Yesu alobaki ete: “Moto oyo azalisaki bango na ebandeli asalaki bango mobali mpe mwasi mpe alobaki ete, ‘Mpo na ntina yango nde moto akotika tata na ye mpe mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye.’” Mpe abakisaki ete: “Oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:4-6) Na yango, ntango mikakatano ebimi, yo ná molongani na yo bosengeli kozala na ekateli makasi ya kotosa ndai oyo bolapaki.a Mwasi moko alobaki boye: “Ntango kaka tolongolaki likanisi ya koboma libala, makambo ebandaki kobonga.”

Kasi, ndai ya libala esengeli kotosama te kaka mpo na kokokisa mokumba oyo tondimaki. Ezali mpe kosɛnga nini?

Kopesana mabɔkɔ elendisaka ndai ya libala

Ntango mwasi ná mobali balapi ndai ya libala, yango elimboli te ete bakobanda koyokana na makambo nyonso. Ntango mikakatano ebimi, basengeli kozala na mposa makasi ya kosilisa yango, kaka te mpo balapaki ndai, kasi mpo na boyokani oyo esangisi bango. Mpo na mobali ná mwasi, Yesu alobaki ete: “Bazali lisusu mibale te, kasi mosuni moko kaka.”

Kozala “mosuni moko kaka” na molongani na yo elimboli nini? Ntoma Paulo akomaki ete “mibali basengeli kolinga basi na bango lokola nzoto na bango moko.” (Baefese 5:28, 29) Na bongo, kozala “mosuni moko kaka” elimboli mpe ete osengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya molongani na yo ndenge omibanzabanzaka mpo na oyo ya yo moko. Mwasi ná mobali basengeli kobongola ndenge batalelaka makambo, esengeli bátika kolobaka ete “ya ngai” mpe bálobaka ete “ya biso,” bátika kolobaka “ngai” mpe bákóma koloba “biso.” Mopesi-toli moko akomaki boye: “Mwasi ná mobali basengeli kotika kozala minzemba na kati ya motema, mpe kokóma bato oyo babalá na kati ya motema.”

Yo ná molongani na yo “bobalaná na kati ya motema”? Ekoki kosalema ete bato bafandi elongo bambula ebele, nzokande bazali “mosuni moko” te. Likambo yango ekoki mpenza kosalema, kasi buku moko (Giving Time a Chance) elobi boye: “Libala elimboli kosala makambo nyonso ya bomoi elongo, mpe ntango bato mibale bazali kosala yango, libala na bango ekobonga.”

Bato mosusu oyo bazali na mabala ya esengo te bafandaka elongo kaka mpo na bana to mpo na mbongo. Bamosusu bandimaka mpasi yango mpo baboyaka likanisi ya koboma libala to mpo babangaka oyo bato mosusu bakoki koloba. Atako ezali malamu ete mabala ya ndenge wana ekufa te, bóbosana te ete mokano na bino esengeli kozala ete bolingo ezala kati na bino, kasi te ete bófandaka kaka elongo.

Koluka bolamu ya mosusu ebongisaka libala

Biblia esakolaki ete na “mikolo ya nsuka” bato ‘bakomilinga bango moko.’ (2 Timote 3:1, 2) Na boyokani na esakweli yango, lelo oyo tozali komona ete bato bakómi mpenza komisambela. Bato mingi bakanisaka ete na libala, soki ozali komipesa na bolingo, kasi molongani na yo azali komipesa te, akomona yo etula. Nzokande, na libala ya malamu, moto na moto asengeli kolukaka bolamu ya moninga. Ndenge nini bokoki kosala yango?

Na esika ya komituna ete, ‘Eloko nini nazali kozwa na libala yango?’ osengeli nde komituna ete, ‘Nazali kosala nini mpo na kobongisa libala na ngai?’ Biblia elobi ete baklisto basengeli ‘kotyaka likebi, na kobanzabanza kaka na makambo na [bango] moko te, kasi na kobanzabanza mpe na makambo ya bamosusu.’ (Bafilipi 2:4) Ntango ozali kotalela mitinda wana ya Biblia, kanisá makambo oyo osalaki na pɔsɔ oyo eleki. Mbala boni osalelaki molongani na yo boboto? Ntango molongani na yo azalaki na mposa ya kosolola, oyokaki ye​—ata soki yo moko ozalaki mpenza na mposa ya kosolola te? Makambo nini osalaki, mingimingi, mpo na bolamu ya molongani na yo?

Ntango ozali komituna mituna yango, komitungisa te soki akomona te malamu oyo osalaki to soki okozwela yango litomba te. Buku moko elobi ete: “Na mabala mingi, moto oyo azali kosala malamu bazongiselaka ye mpe malamu, yango wana salá makasi ozalaka na bizaleli ya malamu mpo na kolendisa bizaleli malamu epai ya molongani na yo.” Kosala makambo mpo na bolamu ya molongani na yo ekolendisa libala na bino mpamba te ekomonisa ete ozali kopesa yango motuya mpe ozali na mposa ya kobatela yango.

Talelá libala ete esengeli koumela libela

Na miso ya Yehova Nzambe, kozala sembo ezali na motuya mingi. Kutu, Biblia elobi ete: “Epai na moto ya sembo [yo Yehova] okosala makambo na bosembo.” (2 Samwele 22:26, NW) Kozala sembo epai ya Nzambe esɛngaka mpe kozala sembo na libala, oyo ezali ebongiseli ya Nzambe.​—Genese 2:24.

Soki ozali sembo epai ya molongani na yo mpe ye azali sembo epai na yo, bokomona ete libala na bino ezali mpo na libela. Ntango bozali kokanisa basanza mpe bambula oyo ekoya, bokomimona ete bozali kaka elongo. Bokokanisa ata mokolo moko te ete mokolo mosusu bótika kozala mwasi na mobali, mpe makanisi ya ndenge wana ekolendisa libala na bino. Mwasi moko alobaki boye: “Ata ntango nasilikeli [mobali na ngai] makasi mpe nasiliki mpo na makambo oyo ekómeli biso, nabangaka te ete libala na biso ekokufa. Nakanisaka nde ndenge oyo tokozongisa boyokani kati na biso. Nayebaka ete nsukansuka tokoyokana kaka, ata soki na ntango wana nazali koyeba te ndenge nini tokosala yango.”

Kotalela libala ete esengeli koumela libela ezali na esika monene na ndai oyo moto alapi epai ya molongani na ye, kasi ezali mawa ete babalani mingi batalelaka libala ndenge wana te. Ntango bazali koswana, moko akoki koloba na moninga ete, “Nakoboya yo!” to, “Nakoluka moto oyo akozwa ngai na valɛrɛ!” Toboyi te, mbala mingi maloba wana eutaka mpenza na motema te. Kasi, Biblia elobi ete lolemo ekoki ‘kotonda na ngɛngɛ mabe oyo ebomaka.’ (Yakobo 3:8) Makaneli mpe maloba ya kobangisa epesaka likanisi oyo: ‘Nandimi te ete libala na biso ekoumela libela. Nakoki koboya yo lelo to lobi.’ Kozala na likanisi ya ndenge wana ekoki kobebisa libala.

Soki ozali komona ete libala esengeli koumela libela, okolinga kofanda na molongani na yo na ntango ya mpasi mpe ya bisengo. Yango ezali na litomba mosusu. Ekozala mpasi te mpo ondima bolɛmbu mpe mabunga ya molongani na yo, mpe ete ye andima oyo ya yo mpe bókoba koyikelana mpiko mpe kolimbisana na motema moko. (Bakolose 3:13) Buku moko elobi ete: “Na libala ya malamu, bino mibale bokoki kosala mabunga mpe atako bongo, libala na bino ekozala kaka.”

Mokolo ya libala na bino, olapaki ndai epai ya libala te, kasi epai ya moto, elingi koloba molongani na yo. Likambo yango esengeli mpenza kobongola ndenge na yo ya kotalela mpe ya kosala makambo, osengeli kosalaka makambo nyonso lokola moto oyo abalá. Omoni te ete osengeli kofanda na molongani na yo kaka te mpo ondimaka ete libala ezali ebongiseli ya bosantu, kasi mpe mpo olingi moto oyo obalanaki na ye?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ezali na makambo ya mabe oyo ekoki kopesa mwasi ná mobali nzela ya kokabwana. (1 Bakolinti 7:10, 11; talá Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota, nkasa 160-161, ebimisami na Batatoli ya Yehova.) Lisusu, Biblia epesi nzela ya koboma libala na molongani oyo asali ekobo.​—Matai 19:9.

[Etanda/Elilingi na lokasa 5]

Makambo oyo okoki kosala sikoyo

Ozali mpenza na mokano ya kokokisa ndai na yo ya libala? Mbala mosusu ozali komona ete osengeli kobongisa makambo mosusu. Mpo na kolendisa mokano na yo ya kokokisa ndai oyo olapaki, meká makambo oyo:

● Omitalela. Omituna mituna oyo: ‘Nabalá mpenza na kati ya motema, to nasalaka naino makambo lokola monzemba?’ Luká koyeba soki molongani na yo amonaka ete osalaka mpenza makambo lokola moto oyo abalá.

● Tángá lisolo oyo yo na molongani na yo. Na nsima, na kimya mpenza, bótalela elongo ndenge oyo bokoki kolendisa mokano na bino ya kokokisa ndai na bino ya libala.

● Saláká elongo na molongani na yo makambo oyo ekoki kokómisa makasi mokano na bino ya kotosa ndai na bino ya libala. Na ndakisa: Bótala bafɔtɔ ya mokolo ya libala na bino mpe ya makambo mosusu ya malamu. Bósala makambo oyo bozalaki kosepela kosala ntango bozalaki bafianse to ntango bobalanaki sika. Bóyekolaka elongo masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo elobelaka libala.

[Etanda/Elilingi na lokasa 6]

Ndai ya libala esɛngaka . . .

● Kondima mokumba “Futá yango ezali na yo na nyongo. Eleki malamu ete okata ndai te kasi ezali mabe kokata ndai nde kofuta te.”​—Mosakoli 5:4, 5.

● Kopesana mabɔkɔ “Kozala bato mibale . . . ezali malamu koleka kozala moto moko. Soki moko akwei, mosusu akoki kotelemisa moninga.”​—Mosakoli 4:9, 10, Bible na Lingala ya lelo oyo.

● Koluka bolamu ya moninga “Esengo ya kopesa eleki oyo ya kozwa.”​—Misala 20:35.

● Kotalela libala ete esengeli koumela libela “Bolingo . . . eyikaka mpiko na makambo nyonso.”​—1 Bakolinti 13:4, 7.

[Bililingi na lokasa 7]

Soki molongani na yo azali na mposa ya kosolola, oyokaka ye?

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto