Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Nakosala nini soki baboti na ngai bakanisi ete nakɔmɛli te mpo nabanda kobima na mwa moto na ngai?
“Mama, yo mpe ndenge nini okangamá kaka na makambo ya kala? Oyo ezali lisusu bambula ya 1950 te. Mikolo oyo, moto na moto asengeli kozala na mwa moto oyo abimaka na ye! Kozwa ngai lisusu lokola bébé te.”—Janie, elenge mwasi ya mbula 16.a
EKOKI kosala yo mpasi soki bayebisi yo ete okoki naino te mpo obanda kobima na mwa moto na yo. Elenge mobali moko alobi boye: “Mposa na ngai ezali ya komemya baboti na ngai ndenge Biblia esɛngi, kasi na likambo oyo, nakanisi ete bakosi. Nazali koyeba te soki nabanda ndenge nini mpo na kosolola na bango likambo yango.” Ndenge moko na elenge yango, ntango mosusu yo mpe okanisaka ete baboti na yo bazalaka na makambo ya makasi mpe balingaka komitya na esika na yo te. Ekoki kozala ete okutanaki na moto moko oyo olingi mpenza mpe ozali na mposa ete oyeba ye malamumalamu. To mpe okanisaka ete mpo baninga na yo bandima yo, yo mpe osengeli kobanda kobima na mwa moto na yo. Michelle alobi boye: “Bato mingi bazali kopusa yo mpo osala likambo yango. Na kelasi, soki ozali te na mwa moto oyo bozalaka na ye ntango nyonso, bana mosusu bakomona yo yuma.”
Mpo na likambo etali kobimaka na mwa moto oyo olingaka, mwasi moko oyo asalaka mosala ya kopesa toli na mabota alobaki boye: “Ezali na likambo yango nde baboti bamonisaka lokola bazalaka na makambo ya makasi koleka.” Mpo kaka yo omoni ete baboti na yo bazalaka na makambo ya makasi, nde emonisi ete likambo yango ezali ya solo? Nzokande, oyebi ete Nzambe apesaki baboti na yo mokumba ya koteya yo, ya kopesa yo formasyo, ya kobatela yo mpe ya kolakisa yo nzela oyo osengeli kolanda. (Deteronome 6:6, 7) Omoni te ete ntango mosusu, baboti na yo bayebi mpo na nini bazali komitungisa mpo na bolamu na yo? Mama moko alobi boye: “Nazali komona ete likama moko ezali koya liboso; ezali kosala ngai nsɔmɔ mpenza.” Mpo na nini baboti mingi bazali kobanga komona bana na bango oyo bazali naino bilenge mpenza bákóma na mposa ya kobima mingi moto na moto na mwa moto na ye?
Mayoki oyo ekoki komema na likama
Beth, elenge mwasi ya mbula 14 alobi na mawa mpenza ete: “Mpo na baboti na ngai, ezali lokola ete soki olingi elenge mobali osali likambo ya mabe.” Nzokande, soki baboti na yo bazali baklisto, bayebi malamu ete Nzambe asalaki bato lolenge moko te: basi bazali, mibali mpe bazali; asalaki mpe bango na lolenge ete nzoto na bango ebendamaka moko epai na mosusu. (Genese 2:18-23) Baboti na yo bayebi ete kobendama motindo wana, bato basalemá na yango mpe yango eyokani na mokano ya Mozalisi; mokano oyo ete bato ‘batondisa mokili.’—Genese 1:28.
Lisusu, baboti na yo bayebi ete ntango moto azali naino na “bambula ya bolenge,” bamposa na ye ya kosangisa nzoto ezalaka makasi. (1 Bakolinti 7:36, NW) Bayebi mpe ete okómi naino na eksperiansi na bomoi te mpo na koyeba ndenge oyo okoki kopekisa bamposa yango. Soki okómi kolekisa ntango mingi na mwa moto na yo—ezala na kokutana na ye bino mibale, ezala na nzela ya telefone, ata kutu na nzela ya kokomelana mikanda to mpe na kotindelana bansango na nzela ya internet—okobendama lisusu makasi epai na ye. Ntango mosusu, okotuna: “Bongo, mabe ezali wapi?” Okokokisa bamposa wana ndenge nini, yo moto obali naino te? Osi omilɛngɛli mpenza mpo na komema mayoki wana na nsuka na yango, elingi koloba tii na libala? Mpenzampenza te.
Kobanda kobima mingi na mwa moto na yo ntango ozali naino elenge mpenza, ezali bongo na makama minene. Yoká likebisi oyo Biblia epesi: “Moto akoki kokamata mɔ́tɔ na ntolo na ye mpe bilamba na ye ikozika te?” (Masese 6:27) Emonanaka mbala mingi ete bilenge oyo, wana bakɔmɛli naino te, bakómi kobima mingi moto na moto na mwa moto na ye, basukaka na kosangisa nzoto liboso ete bábalana; yango mpe esalaka ntango mosusu ete bamosusu bázwa bazemi ya balabala to mpe bázwa bamaladi oyo eutaka na kosangisa nzoto. (1 Batesaloniki 4:4-6, NW ) Na ndakisa, elenge mwasi na nkombo Tammy akanisaki ete baboti na ye bazangaki bosembo na ndenge bazalaki kopekisa ye abimaka na mwa moto na ye. Yango wana, akómaki kobima na ndenge ya kobatama na mwa moto na ye oyo azalaki mwana ya kelasi na bango. Kasi, eumelaki te, Tammy amemaki zemi mpe bomoi na ye ebongwanaki. Sikoyo, alobi ete: “Kobima mbala na mbala na mwa moto na yo ezali na yango nsuka ya makambo te ndenge bilenge mingi bakanisaka.”
Mabe ezali wapi soki bilenge mibale, mwasi na mobali, oyo babimaka elongo bazali kotya likebi mingi mpo ete básimbanaka na nzoto te na ndenge ya mabe? Atako bongo, likama ya kolamwisa mayoki ya kolingana liboso ete ntango na yango ekoka, ezali kaka. (Loyembo ya Salomo 2:7) Kolamwisa bamposa oyo okoki kokokisa yango na ndenge ebongi kaka na nsima ya bambula, yango ekoki kokómisa yo moto ya mawamawa mpe ya mpasi.
Talá mwa mituna mosusu oyo osengeli kokanisa malamumalamu: Ozali mpenza na eksperiansi ya makambo ya bomoi mpo oyeba bizaleli nini esengeli oluka epai ya moto oyo okobala? (Masese 1:4) Likambo mosusu yango oyo: Osi okómi na bizaleli mpe makoki oyo esengeli kozala epai ya mobali to mwasi oyo bakolinga mpe bakopesa ye limemya mpenza? Ozali mpenza na motema molai mpe na mokano oyo esɛngami mpo na kobatela boyokani ya bambula ebele na moto mosusu? Ezali likambo ya kokamwa te, kolingana ya bilenge esukaka mingimingi mabe; ezalaka mpe ya ntango mokuse. Bazali mingi te baoyo bakómaka tii na kosala libala oyo ekoumela ntango molai.
Yango wana, na mokuse, Monica alobi ndenge likambo yango ezalaka: “Baninga na ngai nyonso ya kelasi bazalaki kobɛtɛla ngai masolo ya basheri na bango. Kasi, mingi kati na bango basukaki na kobala liboso ya kokokisa mbula to mpe bolingo na bango esukaki na nzela mpo bakokaki naino te kokóma tii na libala.” Elenge mosusu nkombo na ye Brandon, alobi boye: “Ntango oye komona ete okoki naino te komipesa epai ya moto mosusu, kasi oyebi ete osi omipesi epai ya moto moko boye mpo ozali kobima na ye mbala na mbala, esalaka mpenza mpasi. Kasi ndenge nini okoki kobenda nzoto kozanga kozokisa moto yango?”
Ntembe ezali te ete baboti na yo bazali nde koluka kobatela yo mpo mpasi ya ndenge wana ekómela yo te; yango wana bayebisaka yo mbala na mbala ete okoki te kobanda kobimaka elongo na mwa moto na yo ntango okoli naino te mpo na komipesa epai na ye na ntina ya libala. Solo ya likambo yango ezali oyo: baboti na yo bazali kaka kolanda toli oyo ekomamaki na lisalisi ya elimo santu, toli oyo ezali na Mosakoli 11:10, ete: “Longolá mawa na motema na yo mpe [kimá mpasi ya nzoto, NW ].”
‘Fungolá motema na yo’
Yango elingi koloba te ete okoki kolekisa lisusu ntango te elongo na bana basi to bana mibali. Kasi, mpo na nini olingi kosala boninga kaka na moto moko? Atako na bavɛrsɛ yango Biblia ezalaki kolobela likambo mosusu, kasi elendisi biso ‘tófungola [mpe] mitema na biso’ epai ya baninga mosusu. (2 Bakolinti 6:12, 13) Yango ezali mpenza toli moko ya malamu mpo na bilenge. Lolenge moko ya kolanda toli yango ezali ete olekisaka ntango na bituluku oyo esangisi bana basi na bana mibali. Mpo na likambo yango, Tammy alobi boye: “Namoni ete kosala bongo epesaka esengo mingi. Kozala na baninga mingi ezali mpenza likambo ya malamu.” Monica ye alobi boye: “Likanisi ya kozala na kati ya etuluku moko boye ezali mpenza likanisi moko ya malamu, mpo ezali kopesa yo nzela omona ete bato nyonso bazalaka na bizaleli ndenge moko te. Lisusu, esalisaka moto ayeba ete ezali na bato mosusu ebele oyo ye akutani naino na bango te.”
Ntango mosusu, baboti na yo bakosepela kutu kosalisa yo obongisa bokutani ya malamu na bilenge mosusu. Anne, mama ya bana mibale, apesi makanisi oyo: “Ntango nyonso, tosalaka makasi mpo ete bana bamiyokaka malamu na ndako na biso. Tobengisaka baninga na bango na ndako, topesaka bango mwa biloko ya kosepelisa na yango monɔkɔ; nsima ya kosala bongo, totikaka bango básakana elongo. Na ndenge yango, bana na biso bamonaka te ete basengeli kaka kobima mpo básakana.”
Ata soki ozali elongo na bilenge mosusu, esengeli kaka kozala na ekɛngɛ ete omipesa mingi te kaka na moto moko. Bilenge mosusu oyo basalaka bongo te, bakanisaka ete lokola bazali kokutana na kati ya etuluku ya bilenge mosusu, yango ezali mpenza ndenge moko te na likambo ya kobima mbala na mbala na mwa moto na yo. Komikosa bongo te. (Nzembo 36:2) Mbala nyonso oyo ozali na baninga na yo, soki okangamaka kaka na moto moko, yango ezali kaka ndenge moko na moto oyo abimaka to akutanaka mingi na mwa moto na ye.b Na boyokani na yo na basi to mibali, salelaka makanisi ya malamu.—1 Timote 5:2.
Koyeba kozela ezali na ntina mingi
Ndenge tomonaki yango, esalaka mpasi soki bayebisi yo ete okoli naino te mpo obanda kobimaka na mwa moto na yo. Kasi, mposa ya baboti na yo ezali te ya kozokisa yo. Nzokande, bazali nde kosala nyonso oyo bakoki mpo na kosalisa yo mpe kobatela yo. Yango wana, na esika ya komityela motema mpe koboya toli na bango, mpo na nini te kozwa litomba na eksperiansi na bango? Na ndakisa, mpo na nini te koluka toli na bango mbala ya nsima ntango okokutana na mokakatano moko na moninga na yo moko ya mwasi to ya mobali? Masese 28:26 etindi biso tókanisa lisusu likambo oyo: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema.” Elenge mwasi Connie alobi boye: “Soki elenge mobali moko alingi ngai, nayebisaka yango mama; kosala bongo nde esalisaka ngai naboya lisenginya ya kobanda kobima mbala na mbala na ye. Mama abɛtɛleka ngai masolo ya makambo oyo ekómelaki baninga na ye mpe bandeko na ye na bambula eleki. Yango esalisaka ngai mingi.”
Soki ozeli mwa moke liboso ete obanda kobima mbala na mbala na mwa moto na yo, yango ekopekisa te mayoki na yo ekola to ekokitisa bonsomi na yo te. Lokola okómi naino fianse te to obali naino te, ozali mpenza na bonsomi ya ‘kosepela na bolenge na yo.’ (Mosakoli 11:9) Soki ozeli, okozwa mpe ntango ya kokolisa bomoto na yo, ya kokɔmɛla; mpe likambo oyo eleki ntina: okozwa ntango ya kokóma makasi na elimo. (Bileli 3:26, 27) Ndenge elenge moko moklisto alobaki yango na mokuse, “osengeli komipesa epai ya Yehova liboso ete omipesa epai ya moto mosusu.”
Mokemoke, ntango okokóma na bambula mwa mingi mpe ntango bokoli na yo ekomonana polele na miso ya moto nyonso, baboti na yo bakobanda kotalela yo ndenge mosusu. (1 Timote 4:15) Mpe ntango okokóma mpenza na makoki ya kobanda kobima na mwa moto na yo, baboti na yo bakozanga te kopesa yo ndingisa.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Mpo na batoli mosusu, talá na mokanda Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, lokasa 232-233, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Bililingi na lokasa 26]
Koluka kobenda mingi likebi ya moto moko kaka, azala mwana mwasi to mwana mobali mbala mingi esukaka kaka na kolamwisa bamposa ya lolango
[Elilingi na lokasa 27]
Na esika ya kokangama kaka na moto moko, fungolelá mpe baninga na yo mosusu motema