Mituna oyo bilenge batunaka
Ezali mabe kobima na mwa moto na yo na kobombama?
Jessicaa akutanaki na mokakatano moko. Mokakatano yango ebandaki ntango Jeremy, moninga na ye moko ya kelasi akómaki kosepela na ye. Jessica alobi boye: “Azalaki kitoko mpenza, mpe baninga na ngai bayebisaki ngai ete nakozwa mobali mosusu ya malamu lokola ye te. Bana basi mingi bazalaki kolandalanda ye, kasi ye azalaki koboya bango. Azalaki kosepela kaka na ngai.”
Eumelaki te, Jeremy asɛngaki Jessica bábanda kobima. Jessica alobi boye: “Namonisaki ye ete nazali Motatoli ya Yehova, mpe nakoki te kobalana na moto ya lingomba mosusu. Kasi Jeremy abimisaki likanisi moko. Atunaki ngai boye: ‘Okanisi nini soki tobandi kobima kozanga ete baboti na yo báyeba?’”
OKOSALA nini soki moto moko oyo ozali kosepela na ye ayebisi yo bongo? Okokamwa na koyeba ete na ebandeli Jessica andimaki likanisi ya Jeremy, alobi boye: “Nakanisaki ete soki nandimi kobima na ye, nakosalisa ye ayekola kolinga Yehova.” Esukaki ndenge nini? Tokoyeba yango nsima. Tótalela naino ndenge elenge moklisto oyo azali ndakisa malamu lokola Jessica akoki, kozanga koyeba, kokwea na motambo ya kobima na moto na kobombama.
Ntina oyo bilenge mosusu basalaka bongo
Bilenge mosusu babandaka kobima na mwana mwasi to mwana mobali na bomwana mpenza. Susan, elenge mwasi moko ya Grande-Bretagne, alobi boye: “Bilenge mosusu oyo namoná bazali kobima na mwana mwasi to mwana mobali, bazali na mbula 10 to 11 mpamba.” Mpo na nini bazali kobanda na bomwana boye? Mbala mingi, mposa oyo moto nyonso azalaka na yango ya kozala elongo na mwana mwasi to mwana mobali, mpe mposa ya kosepelisa baninga nde etindaka bango básala bongo. Lois, elenge moko ya Australie, alobi boye: “Nzoto na yo ebandi kofungwama; mpe na kelasi, mwana na mwana azali na mwa moto na ye.”
Kasi, mpo na nini bilenge mosusu babimaka na kobombama? Jeffrey, elenge moko ya Grande-Bretagne, alobi boye: “Ntango mosusu, babangaka baboti na bango.” David, elenge moko ya Afrika ya Sudi, akanisi mpe bongo. Alobi boye: “Baboyaka koyebisa baboti na bango mpo bayebi ete bakondima te.” Jane, elenge moko ya Australie apesi ntina mosusu. Alobi boye: “Botomboki mpe ekoki kotinda elenge abimaka na mwa moto na ye na kobombama. Soki ozali kokanisa ete okómi mokóló, kasi baboti na yo bazali komona yo kaka mwana moke, okoluka kosala makambo ndenge motema na yo elingi, mpe okolinga te koyebisa bango makambo yango. Na ntango wana, ekozala mpasi te obombela bango makambo na yo.”
Biblia esɛngi yo otosaka baboti na yo. (Baefese 6:1) Mpe soki baboti na yo baboyi obima na moto, bayebi ntina. Na ndakisa, soki bazali Batatoli ya Yehova, bakondima obima kaka na moto oyo azali Motatoli, mpe kaka soki yo ná moto yango bozali kokanisa kobalana.b Kasi, kokamwa te soki ekómelaka yo ntango mosusu okanisa boye:
◼ Nazali na mawa mpo baninga nyonso babimaka na bato na bango, longolá kaka ngai.
◼ Nazali kosepela na moto moko oyo azali Motatoli te.
◼ Nalingi kobanda kobima na moto moko oyo azali Motatoli, kasi nakoki naino na libala te.
Na ntembe te, oyebi oyo baboti na yo bakoloba na likambo yango. Mpe na nse ya motema, oyebi ete bazali koloba solo. Atako bongo, okoki komiyoka lokola Manami, elenge moko ya Japon, oyo alobaki boye: “Bato mosusu batyaka ngai mpanzi likoló mpo nabanda kobima na mibali, ntango mosusu kutu nakómaka na mitema mibale. Lelo oyo, bilenge mingi bakanisaka ete ekoki kosalema te elenge azanga mwa moto na ye.” Yango nde etindaka bilenge mosusu bábanda kobima na moto kozanga ete baboti na bango báyeba. Na ndenge nini?
“Bayebisaki biso tóbomba sɛkɛlɛ”
Maloba “kobima na moto na kobombama” ezali kopesa likanisi ya kokosa. Mpo na kobomba likambo yango, bilenge mosusu oyo babimaka na kobombama basololaka kaka na telefone to na Internet. Na miso ya bato bazali kaka baninga, kasi na mikanda mpe masolo oyo basololaka na ordinatɛrɛ mpe na telefone, boyokani na bango ekómá mosika.
Caleb, elenge moko ya Nigeria, alobeli mayele mabe mosusu oyo bilenge yango basalelaka. Alobi boye: “Ntango bilenge mosusu oyo babimaka na kobombama bazali elongo na baninga na bango, basalelaka maloba mpe bankombo oyo basusu bayebi ndimbola na yango te mpo bákanga ntina te ya makambo oyo bazali koloba.” Mayele mosusu ezali ya kobongisa kobima elongo na baninga mpo na kozwa likoki ya kolekisa ntango ná moto na yo. James, elenge moko ya Grande-Bretagne, alobi boye: “Mokolo moko, baninga basɛngaki biso tókutana esika moko boye; kasi na nsima, nayaki koyeba ete babongisaki yango kaka mpo moninga na biso moko azwa likoki ya kolekisa ntango ná moto na ye. Bayebisaki biso tóbomba sɛkɛlɛ.”
Ndenge James amonisi yango, mbala mingi baninga ya bilenge oyo babimaka na kobombama nde basalisaka bango bábomba sɛkɛlɛ. Carol, elenge moko ya Écosse, alobi boye: “Ezalaka ata na moninga moko oyo ayebi likambo yango, kasi aboyi kobimisa sɛkɛlɛ.”
Mbala mingi, bilenge oyo babimaka na moto na kobombama bakómaka mpe lokuta. Beth, elenge moko ya Canada, alobi boye: “Bamosusu, mpo baboti na bango báyeba te ete babimaka na moto na kobombama, bakosaka ete bakei esika boye, nzokande bakei esika mosusu.” Misaki, elenge moko ya Japon, amonisi ete ye mpe azalaki kosala bongo. Alobi boye: “Nazalaki kokosa baboti na ngai na ndenge oyo bakoki kotya ntembe ata moke te. Nazalaki kosala makasi nabuka lokuta na makambo mosusu te longola kaka na makambo na ngai wana, mpo baboti na ngai bákoba kotyela ngai motema.”
Makama ya kobima na moto na kobombama
Soki obimaka na moto na kobombama to olingi kobanda kosala yango, kanisá mituna oyo:
◼ Etamboli oyo ya mabe ekomema ngai wapi? Ozali kokanisa kobala moto yango mikolo oyo? Evan, elenge moko ya États-Unis, alobi boye: “Soki ozali kobima na moto kasi ozali na likanisi ya kobala te, ezali lokola kosala piblisite ya eloko oyo bazali kotɛka te.” Masese 13:12 elobi ete: “Elikya oyo ezelisami epesi motema mpasi.” Olingi mpenza koyokisa moto oyo olingaka motema mpasi?
◼ Yehova azali kokanisa nini na etamboli na ngai? Biblia elobi ete: “Biloko nyonso ezali bolumbu mpe etandami polele na miso ya moto oyo epai na ye tokozongisa monɔkɔ.” (Baebele 4:13) Na bongo, soki obimaka na moto na kobombama to moninga na yo moko asalaka yango mpe yo obombaka ye, yebá ete Yehova ayebi likambo yango malamu. Mpe soki okosaka, osengeli mpenza komitungisa mpo na yango; mpamba te, Yehova Nzambe alingaka bato ya lokuta te. Kutu, Biblia etángi “lolemo ya lokuta” na kati ya makambo oyo Yehova ayinaka.—Masese 6:16-19.
Kutu, soki obimaka na moto na kobombama, ozali komipimela libateli oyo okoki kozwa soki bato bayebi likambo yango. Na yango, tokoki kokamwa te ndenge bilenge mosusu oyo babimaka na moto na kobombama bakweaka na etamboli ya mbindo. Jane, elenge moko ya Australie, alobeli moninga na ye moko oyo azalaki komonana lokola mwana malamu, kasi azalaki kobima na mwana-kelasi na bango na kobombama. Alobi boye: “Ntango tata na ye ayaki koyeba likambo yango, asilaki kokóma na zemi.”
Soki obimaka na moto na kobombama, ekozala malamu oyebisa likambo yango na baboti na yo to na moklisto moko oyo akɔmeli. Mpe soki ozali na moninga moko oyo abimaka na moto na kobombama, koluka kobomba ye te, noki te okosangana na lisumu na ye. (1 Timote 5:22) Kanisá naino, okoyoka ndenge nini soki likambo yango esukeli ye mabe? Okozala nde te moko ya bato oyo bamemeli ye mpasi? Kanisá ete ozali na moninga moko oyo abɛlaka diabɛti, kasi alyaka biloko ya sukali na kobombama. Okanisi nini soki oyebi likambo yango kasi moninga yango abondeli yo oyebisa moto moko te? Mposa na yo ya libosoliboso ekozala nini—kobomba sɛkɛlɛ to kosala likambo moko oyo ekoki kobikisa ye?
Esengeli mpe kosala bongo soki oyebi moninga moko oyo abimaka na moto na kobombama. Kokanisa te ete boninga na bino ekokufa libela! Nsima ya mikolo, soki azali mpenza moninga ya solo, akoyeba ete ozalaki nde koluka bolamu na ye.—Masese 27:6.
“Nayebaki nini nasengelaki kosala”
Jessica oyo tolobelaki na ebandeli abongolaki makanisi na ye ntango ayokaki lisolo ya moklisto mosusu oyo azalaki mpe kobima na moto na kobombama. Alobi boye: “Ntango nayokaki ete akataki boyokani na mwana mobali wana, nayebaki nini nasengelaki kosala.” Ezalaki pɛtɛɛ kokata boyokani yango? Te! Jessica alobi boye: “Naino nalingá moto ndenge nalingaki mwana mobali wana te. Nazalaki kolela butu moi na boumeli ya bapɔsɔ.”
Kasi, Jessica ayebaki ete alingaka Yehova mingi mpe atako abungaki nzela, azalaki kaka na mposa ya kosala makambo ya malamu. Nsima ya mikolo, mpasi na ye ekitaki, alobi ete: “Sikoyo, nakómi na boyokani malamu na Yehova koleka liboso. Nazali mpe na botɔndi na ndenge alakisaka biso nzela oyo ebongi, na ntango ebongi!”
Okoki kokuta masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” na Internet, na esika oyo: www.watchtower.org/ypf
[Maloba na nse ya lokasa]
a Na lisolo oyo, bankombo mosusu ezali ya bango te.
b Talá lisolo “Mituna oyo bilenge batunaka . . . Ntango nini nakoki kobanda kobima na moto?” oyo ebimaki na Lamuká! ya Yanuali 2007 (na Lifalanse).
MITUNA YA KOMANYOLA
◼ Talá soki moko ya makambo oyo ezali na makomi ya moindo na lokasa 21 elobeli ndenge oyo omiyokaka ntango mosusu. Soki ezali, oyo wapi?
◼ Ndenge nini okoki kosilisa likambo yango kozanga ete obimaka na moto na kobombama?
[Etanda na lokasa 22]
Bozali kobomba sɛkɛlɛ to bolingi nde eyebana naino te?
Ezalaka ntango nyonso mabe te soki bato mibale oyo balingani baponi kobombela bato likambo yango mpo na mwa ntango. Na ndakisa, elenge mwasi ná elenge mobali oyo bakoki na libala mpe babandi kokutana mpo na koyebana malamu, bakoki kopona kobombela bato likambo yango mpo na mwa ntango. Ntango mosusu, ndenge Thomas, elenge mobali moko, alobaki yango: “Balingi te ete bato bábanda kotungisa bango na mituna lokola, ‘Sikoyo bokobalana mokolo nini?’”
Ekoki kozala likama soki bato bazali kotya bilenge mpanzi likoló mpo bábalana nokinoki. (Loyembo ya Salomo 2:7) Yango wana, bilenge mosusu oyo babandi kokutana mpo na koyebana, bamonaka malamu bábomba sɛkɛlɛ yango mpo na mwa ntango, mpe basalaka makasi bákutanaka kaka na bisika oyo bato bazali komona bango. (Masese 10:19) Anna, elenge moko ya mbula 20, alobi boye: “Yango esalisaka bato mibale báyeba soki bakoki kobalana. Mpe soki bamoni ete bakobalana, na ntango wana bakoki koyebisa bato mosusu.”
Nzokande, ekozala malamu te kobombela bato oyo babongi koyeba likambo yango, na ndakisa baboti na yo to ya moto oyo ozali kobima na ye. Soki obandi kokutana na moto mpo na koyeba ye malamu kasi olingi te ete bato báyeba, osengeli komituna mpo na nini. Ozali nde kosala lokola Jessica oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo? Oyebi na nse ya motema ete baboti na yo bakozala na bantina malamu ya koboya likambo yango?
[Etanda na lokasa 23]
LIYEBISI EPAI YA BABOTI
Mbala mosusu, nsima ya kotánga lisolo oyo, ozali komituna boye: ‘Mwana na ngai akoki kobima na moto kozanga ete ngai nayeba?’ Yoká makambo oyo bilenge mingi bayebisaki bakomi ya Lamuká! mpo na ntina oyo bilenge mosusu babimaka na bato na kobombama, mpe kanisá mituna oyo batye wana.
◼ “Bilenge mosusu bazalaka na kimya te na bandako na bango, yango wana balukaka mwa moto oyo akoki kobɔndisa bango.”—Wendy.
Soki ozali moboti, okoki kosala nini mpo bana na yo bámiyoka ete batyelaka bango likebi? Ezali nde na mbongwana oyo okoki kosala na likambo yango? Soki ɛɛ, mbongwana nini?
◼ “Ntango nazalaki na mbula 14, moninga moko ya kelasi asɛngaki ngai tóbanda kobima. Nandimaki. Nakanisaki ete nakomiyoka malamu mingi soki mwana mobali atye ngai mabɔkɔ na lipeka.”—Diane.
Soki Diane azalaka mwana na yo, ndenge nini olingaki kosolola na ye likambo yango?
◼ “Telefone esalisaka bilenge oyo babimaka ndenge wana básololaka na kobombama. Kutu, baboti bayebaka eloko moko te!”—Annette.
Bibongiseli nini okoki kozwa soki bana na yo basalelaka telefone?
◼ “Mingimingi, ezalaka mpasi te bana bábombela baboti likambo yango, soki bakipaka mpenza te makambo oyo bana na bango basalaka mpe soki basalaka yango na banani.”—Thomas.
Ezali nde na mayele oyo okoki kosalela mpo oyebaka makambo oyo bana na yo basalaka, wana ozali kotikela bango bonsomi oyo ebongi?
◼ “Mbala mingi, baboti bazalaka na ndako te ntango bana bazali na ndako. To batyelaka bato mosusu motema mingi mpe batikaka bango bákende elongo na bana na bango na bisika mosusu.”—Nicolas.
Luká koyeba bato oyo bazalaka mingi na bana na yo. Oyebaka mpenza makambo oyo basalaka ntango bazali elongo?
◼ “Bilenge mosusu babimaka na moto na kobombama mpo baboti baleki makambo makasi.”—Paul.
Kozanga ete obuka mibeko mpe mitinda ya Biblia, ndenge nini okoki kosala ete ‘ezaleli na yo ya makambo makasimakasi te eyebana epai ya bato nyonso’?—Bafilipi 4:5.
◼ “Ntango nazalaki kokola, nazalaki komiyoka ete nazali na ntina te, mpe nazalaki koluka ete bato básepela na ngai. Tokómaki kokomelana na mwana mobali moko ya lisangá moko penepene na biso, mpe tolinganaki. Epai na ye, nazalaki komiyoka ete nazali mpenza na ntina.”—Linda.
Okoki kokanisa mwa makambo ya malamu oyo bato ya libota ya Linda bakokaki kosala mpo na kokokisa mposa na ye wana?
Mpo na nini te kosalela lisolo oyo mpe etanda oyo mpo na kosolola na mwana na yo ya mwasi to ya mobali? Mpo moto abimisa sɛkɛlɛ, esɛngaka kosolola na ye polele mpe na motema mobimba. Esɛngaka ntango mpe kozala na motema molai mpo na koyeba bamposa ya elenge, kasi matomba na yango esepelisaka mpenza.—Masese 20:5.