Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Ndenge nini koyebisa ye ete nalingi ye te?
“Na basanza oyo euti koleka, ndeko moko ya lisangá na biso akómaki kolinga ngai. Ngai nasepelaki na ye te. Kasi, nayebaki te ndenge nini koyebisa ye na boboto ete nalingi ye te.”—Elizabeth.a
“NAZALI na mposa ya kosala boninga na yo, okanisi boni?” Elenge mobali moko asi atuná yo motuna oyo? Lokola mwana mwasi nyonso,b mbala mosusu osepelaki, to mpe tóloba oyokaki nzoto! Kasi, mbala mosusu mpe ebulunganisaki yo mpe oyebaki te oloba na ye nini.
Ntango elenge mobali moko alobi na yo ete asepeli na yo, ekoki kobɛtisa yo motema to mpe kobulunganisa yo. Ezalaka bongo mingimingi soki ozali na mbula oyo okoki kobala mpe na bongo, okoki mbala mosusu kondima!c Kasi, mpo opesa eyano, okotala naino moto yango oyo atuni yo libala. Soki azali moto oyo akoli na makanisi mpe soki asepelisi yo, ezali mpasi te oyeba eyano oyo okopesa ye. Kasi, ekozala boni soki asepelisi yo te to soki omoni ete makambo oyo yo olukaka epai ya mobali oyo abongi na yo ye azali na yango te? To mpe, ekoki mpe kozala ete azali na makambo yango, kasi motema na yo esepeli na ye te, okosala nini?
Tólobela mpe likambo ya elenge mwasi oyo azali kokutana mbala na mbala na mwana mobali moko mpo na koyeba ye malamu kasi ayei komona ete abongi na ye te. Na esika aboya ye mbala moko, azali kotika te kokutana na ye. Azali komituna “ndenge nini koyebisa ye ete nalingi ye te?”
Soki motema elingi te
Na ntango ya kala, baboti nde bazalaki koponela mwana na bango mobali oyo akobala. (Genese 24:2-4, 8) Lelo oyo, baklisto mingi baponaka bango moko moto oyo balingi kobala. Kasi, Biblia esɛngi kaka likambo moko, ete moklisto abala “kaka kati na Nkolo.”—1 Bakolinti 7:39, NW.
Kasi, yango elingi koloba ete osengeli kobala ata ndeko nini oyo alobi na yo ete asepeli na yo to oyo, banda mwa ntango, bokutanaka na ye mbala na mbala mpo na koyebana malamu? Tótalela naino ndakisa moko oyo ezali na Biblia. Ezali ndakisa ya elenge mwasi moko ya mboka Suneme, na Proche-Orient. Salomo, mokonzi na bango, amonaki ye mpe alingaki ye lokola akufa. Kasi, ntango atunaki ye libala, elenge mwasi aboyaki ye mpe asɛngaki na basi oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi ete: “[Bómeka te kolamwisa bolingo, NW] kino yango mpenza elingi bongo.” (Loyembo ya Salomo 2:7) Elenge mwasi yango azalaki na mayele, aboyaki ete bato mosusu bátindika ye na kozwa ekateli oyo euti na motema na ye moko te. Asepelaki na Salomo te, mpo motema na ye ezalaki epai ya mokɛngɛli moko ya mpate oyo azalaki mpe ata moto monene te.
Lisolo oyo ezali koteya likambo moko ya ntina epai na baoyo bazali kokanisa kobala, ete: Okoki kolinga moto nyonso te. Ata nsima ya kokutana mwa mingi na mwana mobali moko, elenge mwasi akoki komona ete mwana mobali yango asepelisi ye te. Mbala mosusu azali komona moto yango na ezaleli moko ya mabe. To mpe ekoki kozala ete motema na ye elingi kaka te. Ekozala bozoba soki akangi miso na makambo ya ndenge wana. Soki aluki kaka kobosana, mbala mosusu makanisi yango ekolongwa mpenza te na motema na ye.d Elenge mwasi moko nkombo na ye Tamara alobaki mpo na elenge mobali moko oyo azalaki kokutana na ye mbala na mbala ete: “Nazalaki kokakatana mingi mpo na ye. Kokakatana yango ezalaki mpo na makambo ya mikemike te, kasi mpo na makambo oyo ezalaki mpenza kotungisa ngai tii ekómaki kopesa ngai lokola nkanda soki tofandi na ye.” Na nsima, amonaki ete lokola azalaki kokakatana mingi, ebongaki básuka wana.
Mpo na nini koboya moto ezalaka mpasi
Atako nyonso oyo tolobi, koboya moto na motema ezalaka mpasi te, kasi koyebisa ye yango nde ezalaka mpasi. Mbala mosusu okoki kobanga koyokisa moto yango mpasi na motema, ndenge ekómelaki Elizabeth oyo tolobelaki na ebandeli ya lisolo. Ya solo, tosengeli kokeba ete tózokisa basusu te. Biblia ezali kolendisa baklisto ‘bálata mitema ya mawa’ mpe básalela basusu makambo oyo bango moko bakolinga básalela bango. (Bakolose 3:12; Matai 7:12) Kasi, yango elingi nde koloba ete osengeli kosakana na motema ya mwana mobali yango kaka mpo olingi kozokisa ye te? Nsukansuka akoyeba kaka soki azalaka mpenza na motema na yo; mpe soki ozali koloba na ye polele te mpe ozali kozwa ekateli mbala moko te, ozali kosala likambo oyo ekopesa ye mpasi mingi nsima. Ekoleka lisusu mabe soki ondimi kobalana na ye kaka mpo ozali koyokela ye mawa. Soki mawa nde etindaki yo ondima kobalana na moto, ezali mwa mpasi mpo libala na bino ezala malamu.
Kasi, mbala mosusu okoki kokanisa ete, ‘Soki mpe naboyi ye, nazali kobanga ete nazwa mosusu te.’ Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Teen) elobaki ete elenge mwasi akoki kokanisa boye: “Ezali ye te ‘oyo motema na ngai elingi,’ kasi ye nde amonani—nalingi mpe kotikala boye te.” Ya solo, mposa wana ya kozala na moto na yo pembeni ezalaka makasi. Kasi, mpo na kokokisa yango malamu, ekoki kaka te ete moto moko amonana, ata soki azali ndenge nini. Esɛngaka nde kokutana na moto oyo okolinga mpenza mpe oyo akoyeba kokokisa mikumba oyo Makomami epesi na mobali na kati ya libala. (Baefese 5:33) Yango wana, kokende mbangu te mpo na kondima moto moko lokola mobali na yo! Lelo oyo, mingi bakómá komituna soki nini etindaki bango báwela kobala.
Ezali mpe na bilenge basi mosusu oyo balingaka kotika moto te ata soki amoni polele ete elenge mobali yango azali na bizaleli mosusu ya mabe mpenza. Mbala mosusu, bakanisaka ete, ‘Soki natikeli ye mwa ntango, akoki kobongwana.’ Ezali mpenza malamu kokanisa bongo? Bizaleli mabe ya moto efandaka mpenza na motema mpe ezalaka mpasi mpo abongwana mpo na kotika yango. Ata mpe soki abongwani mbala moko mpe na ndenge ya kokamwa, nini endimisi yo ete abongwani libela? Likambo ya ndenge wana ekómelaki elenge mwasi moko nkombo na ye Karen; ye azwaki ekateli ya mayele, akabwanaki na elenge mobali moko ntango amonaki ete bazali na mikano ndenge moko te. Alobi ete: “Ezalaki mpasi mpo azalaki mwana mobali kitoko mpe nazalaki kosepela na ye. Kasi nayebaki ete ekateli ya malamu ezalaki ya kotika ye.”
Kebá, malɛmbe!
Tóloba mpenza bosolo ya likambo: koboya moto ezalaka likambo moke te. Ezali lokola moto oyo akumbi makei: asengeli kokeba, kokende malɛmbe. Talá mwa toli oyo ekoki kosalisa yo:
Sololá likambo yango na baboti na yo to na ndeko mosusu na kati ya lisangá oyo akɔmeli. Baboti na yo to ndeko oyo akɔmeli bakoki kosalisa yo na koyeba soki ntango mosusu ndenge oyo ozali kokanisa ozali nde kolɔta.
Zalá polele mpe kokakatana te. Lobá na ye na ndenge oyo ekotinda ye te akanisa ete mbala mosusu ozali naino kokanisa. Mpo na bato mingi, soki olobi na ye kaka “Naboyi,” ekoki na yango mpo abenda nzoto. Soki mpe esengeli, monisá ete oboyi na maloba oyo ezali na kokakatana te, lokola oyo, “Limbisá ngai, kasi nalingi te.” Kebá opesa ye likanisi te ete soki atii mbamba mwa moke okoki kobongola makanisi. Soki omonisi moto polele ete motema na yo esepeli na ye te akolongola motema nyonso epai na yo mpe ekosalisa ye abosana mpasi wana ete baboyaki ye.
Lobá polele, kasi zalá na maloba ya boboto. Masese 12:18 elobi ete: “Moto azali oyo akoloba lokola koswama na mbɛli; nde lolemo ya bato ya mayele ezali na bomoi.” Atako koloba polele ezali na ntina, Biblia elobi ete maloba na biso “mazala na ngɔlu, na elɛngi ya mungwa.”—Bakolose 4:6.
Kozonga lisusu nsima te. Baninga na yo, oyo mbala mosusu bayebi te ntina oyo oboyi, bakoki koya, na makanisi ya malamu, kopesa yo toli ete otika naino mwa ntango mpo otala lisusu. Kasi, yebá ete na nsuka, ekateli na yo etaleli bomoi na yo, kasi ya baninga na yo te, ata soki bazali na makanisi ya malamu.
Misala na yo eyokana na maloba na yo. Mbala mosusu, liboso bóbanda kokutana mbala na mbala mpo na libala, bozalaki koyokana malamu mpe bokolinga ete makambo ezonga ndenge ezalaki liboso. Kasi, mbala mingi ezalaka mpasi mpo esalema bongo. Yebá ete asi akómá na lolango mpo na yo. Okanisi mpenza ete akoki kobosana yango kaka boye mpe kosala lokola nde likambo moko elekaki te? Yango wana, atako ezali malamu ete moko te kati na bino azala na likambo na moninga, kasi soki mbala na mbala bozali kosolola na telefone to ozali kokutana na ye mingi mpe kolekisa ntango esika moko, ozali nde kobakisela ye mpasi na motema. Ekozala lokola nde ozali kosakana na motema na ye, mpe ezali malamu te osala bongo.
Ntoma Paulo alendisaki baklisto ete ‘báloba sembo’ moto na mozalani na ye. (Baefese 4:25) Ekoki kozala mpasi mpo na kosala yango, kasi ekoki kosalisa bino mibale bóbosana mpe moto na moto atala avenire na ye.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
b Lisolo oyo etali libosoliboso bilenge basi; kasi, bilenge mibali mpe bakoki kosalela makanisi yango.
c Lamuká! ya Yuli-Sɛtɛmbɛ 2001 emonisaki makama ya kobima na mwa moto na yo soki okoli naino te.
d Talá moto ya likambo “Tosengeli nde kokabwana?” na buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi, nkasa 256-257, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Okoki kolinga moto nyonso te
[Elilingi na lokasa 14]
Lobá polele mpe kokakatana te ntango ozali komonisa makanisi oyo ezali na motema na yo