Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Janvier lok. 31
  • Maladi oyo ezwamaka na mikrobe​—Likama oyo ekoki kopɛngolama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Maladi oyo ezwamaka na mikrobe​—Likama oyo ekoki kopɛngolama
  • Lamuká!—2002
  • Masolo mosusu
  • Nkɛlɛ ya Mikrobe
    Lamuká!—1996
  • Maladi mpe liwa ekolongama mosika te?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Esakweli 3. Maladi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Ndenge ya kokima bamaladi mosusu
    Lamuká!—2016
Lamuká!—2002
g02 Janvier lok. 31

Maladi oyo ezwamaka na mikrobe​—Likama oyo ekoki kopɛngolama

ATAKO bazulunalo elobelaka mingi makama minene ya koningana ya mabele mpe ya mpela oyo ezindisaka bamboka, kasi maladi oyo ezwaka bato mingi mbala moko ebendaka mpenza likebi ya bapanzi-nsango te. Lapolo ya Croix Rouge mpe Croissant Rouge na Yuni 2000 elobi ete, atako bongo “motángo ya bato oyo bakufaka na maladi oyo ezwamaka na mikrobe (lokola sida, malaria, maladi ya mpanzi mpe pulupulu) ezali mbala 160 koleka oyo ya makama lokola koningana ya mabele, mpela oyo ezindisaka bamboka mpe makama mosusu oyo ebomaki bato na mbula oyo euti koleka. Mpe makambo mazali kobeba se kobeba.”

Balobaka ete ezali na ntina mibale oyo ezali komema ezalela yango ya nsɔmɔ. Ntina ya liboso ezali ete bokɔnɔ ya sida ezali kopalangana na lombangu mpenza mpe yango ezali koboma bato 300 na ngonga moko. Peter Walker mokambi oyo atalelaka makambo ya makama na ebongiseli ya Croix Rouge mpe Croissant Rouge na mokili mobimba alobi ete sida “ezali lisusu maladi te kasi ekómi nde likama. Lolenge wana ya kopalangana ya bokɔnɔ ezali kosilisa basali mpe ezali kokweisa nkita ya mboka.” Ntina mosusu ezali bongo kobeba ya bibongiseli mpo na kobatela bokolongɔnɔ ya nzoto ya bato, oyo esali ete makɔnɔ oyo ebungaki, lokola maladi ya ntolo, kasende mpe malaria ezonga lisusu makasi. Na ndakisa, na ekólo moko ya Azia, mbula na mbula bato 40 000 bazali kozwa maladi ya ntolo. Na mboka mosusu na Mpoto ya Ɛsti, maladi ya kasende ebakisami mbala 40 na boumeli ya mbula zomi oyo euti koleka.

Nzokande, likambo oyo ezali kokamwisa ezali ete atako maladi oyo ezwamaka na mikrobe ekómi sikawa likama monene, kasi bato bazali na likoki komibatela mpo bázwa maladi yango te. Ya solo, lapolo yango elobi ete mingi kati na bato milio 13 oyo bakufaki na maladi oyo ezwamaka na mikrobe na 1999 “bakokaki kokufa te soki basalelaki ata dolare mitano mpo na mokomoko na bango.” Soki baguvɛrnɛma ya mokili bazalaki na mposa ya kobimisa mosolo dolare 5 mpo na kobatela bokolɔngɔnɔ ya moto moko moko, oyo mpo na bato nyonso elingaki kopesa badolare miliare 30, mbɛlɛ bato ebele boye bakufaki te!

Atako mbongo yango ezali komonana ebele, kasi soki tokokanisi yango na mbongo nyonso oyo bazali kobebisa na mokili mobimba mpo na misala mosusu, tokomona ete yango ezali mpenza moke. Na ndakisa, na mbula moko mpamba oyo euti koleka, na mokili mobimba babimisaki badolre miliare 864, oyo ezali kopesa badolare 144 mpo na moto moko moko na mokili mobimba, mpo na makambo etali bitumba. Kanisá naino! Bazali kobimisa ebele ya mbongo mpo na komibongisa mpo na bitumba na esika ete bábatela bato mpo bázwa bamaladi te. Ntango mosusu kosilisa likama ya makɔnɔ oyo epalanganaka na mikrobe eleki makoki ya bato, yango ezali kaka te mpo ete bazangi mbongo mpo na yango, kasi nde mpo na bantina mosusu ya minene. Kutu, biyangeli ya bato ezali koyeba te makambo nini oyo ezali na ntina mingi mpe oyo esengeli kotya yango na esika ya liboso.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

Rayon X: New Jersey Medical School​—National Tuberculosis Center

Fɔtɔ ya moto azali kokɔsɔla: OMS/Thierry Falise

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto