Koyina eutaka wapi?
KOYINA ebandaki na ebandeli mpenza ya bomoi ya bato awa na mabele. Biblia elobi boye na Genese 4:8: “Ezalaki bango na lisobe, Kaina amibwakaki likoló na ndeko na ye Abele mpe abomaki ye.” Yoane, moko ya bakomi ya Biblia, atuni ete: “Mpe abomaki ye mpo na likambo nini? Mpo misala na ye moko ezalaki ya mabe, kasi oyo ya ndeko na ye ezalaki ya boyengebene.” (1 Yoane 3:12, NW) Babomaki Abele mpo na zuwa, moko ya bizaleli oyo mbala mingi ebotaka koyina. Masese 6:34 (NW) elobi ete: “Nkanda makasi ya mobali ya nkonzo ezali zuwa.” Lelo oyo, koyokela moto zuwa mpo azali na bomoi ya malamu, mpo azali na mbongo mpe mpo azali na biloko mingi mpe makambo mosusu oyo azali na yango, ezali ntango nyonso kobimisa matata na kati ya bato.
Kozanga koyeba mpe kobanga
Zuwa ezali kaka likambo moko na kati ya makambo ebele oyo ebotaka koyina. Mbala mingi, koyina eutaka mpe na kozanga koyeba mpe na kobanga. Elenge mobali moko oyo azalaki na lisangá moko ya bato oyo bayinaka bato ya mposo mosusu alobaki ete: “Liboso kutu nabanda koyina, nazalaki nde kobanga.” Mbala mingi, ezalela ya kobanga ndenge wana eutaka na kozanga koyeba. Buku moko (The World Book Encyclopedia) elobi ete bato oyo bakaniselaka basusu mabe bazwaka makanisi ndenge na ndenge “kozanga kotalela makambo ndenge ezali mpenza. . . . Bato yango babongolakabongolaka makambo, balimbolaka yango ndenge mosusu, kutu baboyaka kotalela makambo oyo ezali koyokana te na makanisi oyo bamityelá.”
Kasi, makanisi yango eutaka wapi? Esika moko na Internet bakomaki ete: “Ndenge bato ya mboka moko boye batalelaka makambo mingi eutaka nde na makambo ya kala ya mboka na bango; kasi makambo oyo moto mokomoko akutaná na yango na bomoi, yango mpe esalaka ete atalelaka makambo to bato na ndenge ya mabe.”
Na ndakisa, na États-Unis, kotɛka baombo etiká matata tii lelo oyo kati na mindele mpe bato moindo oyo bankɔkɔ na bango bautaki na Afrika. Mbala mingi, makanisi ya mabe oyo esalaka ete moto ayina bato ya mposo mosusu eutaka epai ya baboti mpe elekaka tii epai ya bana. Mondele moko oyo andimaka polele ete ayinaka bato moindo, alobaki ete azwaki makanisi yango “atako azalaki kokutana soki moke te na bango.”
Ezali mpe na bato mosusu oyo bakanisaka ete bato oyo bakeseni na bango bazali na valɛrɛ te. Likanisi ya ndenge wana mbala mosusu eutaka na likambo moko kaka ya mabe oyo bato yango bakutanaki na yango na moto ya loposo mosusu to ya mimeseno mosusu. Kobanda kaka na likambo yango, bakómaka koloba ete bato nyonso ya loposo yango to ya mimeseno yango bazali kaka ndenge wana.
Soki moto moko alingaka te makambo nyonso ya bato mosusu oyo bakeseni na ye, ezali mabe mpenza; kasi ezalela yango ekómaka likama mpenza soki ekɔteli mpe bato nyonso oyo bafandi na ekólo moko to oyo bazali na loposo moko. Mpe ntango moto moko azali kokanisa ete ekólo na ye, loposo na ye, mimeseno ya mboka na ye, to monɔkɔ na ye nde eleki oyo ya bato mosusu, akoki kokóma na ezaleli ya koyina moto nyonso to eloko nyonso oyo euti na mboka mopaya, ata mpe kokóma na ezaleli ya koboya makambo nyonso ya bato mosusu oyo bakeseni na ye. Mbala mingi na ekeke ya 20, bato bazalaki komonisa ezaleli ya ndenge wana na nzela ya mobulu oyo bazalaki kobimisa.
Tosengeli koyeba ete ezaleli ya koyina bato mosusu mpe ezaleli ya koboya makambo nyonso ya bato mosusu eutaka kaka te mpo na bokeseni ya loposo to ya ekólo. Clark McCauley, moto moko ya mayele na Iniversite ya Pennsylvanie akomi ete “ata kokabola bato na bituluku mibale na ntango babɛti zeke mpo na koyeba nani akozala na etuluku boye to boye, ekoki mpenza mpo na kotinda moto na moto alinga mingi bato ya etuluku na ye koleka baoyo mosusu.” Molakisi moko ya mwasi amonisaki ete likambo yango ezali solo ntango amekaki kosala likambo moko oyo bato mosusu mpe basalaki: akabolaki bana ya kelasi na ye na milɔngɔ mibale—na ngámbo moko atyaki bana oyo bazali na miso ya bule mpe na ngámbo mosusu atyaki bana oyo bazali na miso motane ngwaa. Eumelaki te, koyinana ebimaki kati na milɔngɔ yango mibale. Ata masangá oyo bato basali mpo na makambo ya mikemike lokola kokumisa ekipɛ moko ya lisano, ekoki mpe kobimisa mobulu makasi.
Mpo na nini mobulu oyo nyonso?
Kasi mpo na nini mbala mingi bato basalaka mobulu mpo na komonisa ete bazali kosepela na bato mosusu te? Bato ya mayele bayekoli likambo yango na mozindo, kasi tii sikoyo bazali kopesa kaka mwa makanisi ya komekameka. Clark McCauley asangisi mikanda ndenge na ndenge oyo bato mosusu ya mayele bakomaki, oyo bayekolaki bizaleli ya moto mpo na koyeba ntina oyo azalaka na ezaleli ya kosala mobulu to ya kobimisa bitumba. Alobeli lapolo moko oyo bato oyo bayekolaki bizaleli ya bato bakomaki, lapolo yango emonisi ete “kobunda bitumba mpe kolonga yango etindaka na kosala mobulu mpe kobuka mibeko.” Bato ya mayele bamonaki ete “nsima ya Etumba ya Liboso mpe nsima ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato bakómaki kobomana mingi na kati ya bikólo oyo ebundaki bitumba wana, mingimingi na kati ya bikólo oyo elongaki na bitumba yango.” Biblia ezali komonisa ete tozali sikoyo na eleko ya bitumba. (Matai 24:6) Ekoki kozala ete bitumba ya ndenge wana nde epesi nzela ete mobulu ya ndenge na ndenge ekóma mingi?
Mpo na bato mosusu ya mayele, soki bato mosusu bazali na ezaleli ya kobimisa bitumba, yango ekoki kouta na ndenge nzoto na bango esalemá. Bato mosusu bayekolaki likambo yango mpe bamekaki komonisa ete soki “biloko oyo babengi sérotonine ezali mingi te na bɔɔngɔ ya moto,” ekoki mpe kosala ete moto yango azala na ezaleli ya kobimisa mobulu. Likanisi mosusu oyo epalangani mingi ezali ete ezaleli ya kobimisa mobulu ezalaka na kati ya ba gènes ya moto. Moto moko ya mayele na politiki alobaki ete “ekoki kozala ete moto abotamaka na mwa ezaleli mingi ya [koyina].”
Biblia yango moko elobi ete bato ya kozanga kokoka babotamaka na bizaleli mabe mpe na mbeba. (Genese 6:5; Deteronome 32:5) Likambo ya solo ezali ete maloba yango etali nde bato nyonso. Kasi, bato nyonso te bayinaka bazalani na bango na koleka ndelo. Ezaleli ya koyina bato bayekolaka yango koyekola. Yango wana, Gordon Allport, moto ya mayele na pisikoloji oyo ayebani mingi, amonaki ete bana mike bazalaka “mpenza te . . . na bizaleli ya kobebisa makambo to biloko. . . . Mwana moke atyelaka bato motema, apusanaka pene ya eloko to moto nyonso oyo abendi likebi na ye; aboyaka moto te.” Nyonso wana ezali komonisa ete mobulu, kokanisela bamosusu mabe mpe koyina, ezali libosoliboso bizaleli oyo bayekolaka yango koyekola! Bato oyo bateyaka basusu ezaleli ya koyina basalelaka na ndenge ya mabe likoki wana oyo bato bazalaka na yango ya koyekola koyina bamosusu.
Bazali kobebisa makanisi ya bato
Bato ya liboso oyo bateyaka ezaleli ya koyina ezali bakambi ya masangá ndenge na ndenge ya bato oyo bayinaka basusu, masangá lokola Ku Klux Klan mpe ya bato oyo babengaka skinheads néonazis. Mbala mingi, bato yango balukaka kokɔtisa na masangá na bango bilenge oyo baboti na bango bakabwaná, mpamba te ezalaka mpasi te mpo na kobongola makanisi ya bilenge ya ndenge wana. Bilenge oyo babangabangaka mpe bamimonaka bato mpamba bakoki kokanisa ete masangá ya ndenge wana oyo eyinaka bato mosusu nde ekokokisa mposa oyo bazalaka na yango ete bato bándima bango.
Internet ezali mpenza esaleli moko oyo ebongi oyo bato mingi bakómi kosalela mpo na kotombola ezaleli ya koyina basusu. Eleki mikolo mingi te, batángaki basite ya Internet ya bato oyo batindaka bato mosusu bázala na ezaleli ya koyina; basite yango ezalaki soki 1 000. Zulunalo moko (The Economist) ezongelaki maloba ya nkolo ya site moko ya ndenge wana; moto yango alobaki na lolendo nyonso ete: “Internet epesi biso nzela ya kopanza makanisi na biso epai ya bato ebele.” Site na ye ezali mpe na esika moko mpo na “Bana.”
Ntango bilenge bazali kotala basite ya miziki na Internet, bakoki kosutuka bakómi na basite oyo ekoki kotindela bango miziki oyo ekumisaka ezaleli ya koyina basusu. Mingimingi, miziki ya ndenge wana ezalaka ya loyenge mpe ya mobulu, mpe maloba na yango etindaka na koyina bato mosusu. Soki ozali kotala basite yango, na nsima bakotuna yo soki olingi kokɔta na masangá oyo ebongisaka kokutana mpo na masolo (forums de discussion) to mpe kotala basite mosusu oyo etombolaka ezaleli ya koyina basusu.
Basite mosusu ya ndenge wana ezalaka mpe na bisika mosusu oyo elakisaka masano mpe makambo mosusu mpo na bilenge. Site moko ya ba-neonazi emekaka kosalela Biblia mpo na kolongisa ezaleli ya koyina bato ya mposo mosusu mpe koyina Bayuda. Bato yango basali mpe esika mosusu (page Web) oyo ezali na lisano ya maloba (mots croisés); maloba oyo ezali na kati ya lisano yango etali kaka koyina bato ya mposo mosusu. Mokano ya lisano yango ezali nini? Ezali mpo na “kosalisa mindele oyo bazali bilenge báyeba ntina oyo tolingaka te bato ya mposo mosusu.”
Kasi bato nyonso oyo bakumisaka ezaleli ya koyina basusu bazali te kaka bato ya mobulu oyo bazalaka na makanisi ya bango moko. Moto moko ya sosioloji oyo akomaki buku na ye mpo na bitumba oyo euti kosalema na mikili ya Balkans, alobaki boye mpo na bato mosusu oyo bakomaka mikanda mpe bato mosusu oyo bato bandimaka makanisi na bango: “Nakamwaki mpenza na komona [bango] bákóma kokoma makambo oyo ekosaka makanisi ya bato na bango oyo bayebi makambo mingi te, mpe makambo oyo ekolisaka mposa na bango ya koyina basusu, mpe makambo oyo ebebisaka bososoli na bango mpe etindaka bango bátalela ezaleli moko te lokola likambo ya ekila . . . , mpe makanisi oyo ebebisaka bosolo ya makambo.”
Mpo na likambo yango, tosengeli te kobosana ete bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali mpe na ngambo. Na buku na ye (Koyina: Bitumba ya mangomba ya bambula ya 1990; [na Lingelesi]), James Haught alobi likambo moko oyo ezali mpenza kopesa nkanda: “Na bambula ya 1990, likambo oyo ezali mpenza kobulunganisa makanisi ezali ete mangomba—oyo esengeli kozala liziba ya boboto mpe esengeli komibanzabanza mpo na bolamu ya bato—ezali na esika ya liboso mpo na likambo etali kobimisa ezaleli ya koyina basusu, kobimisa bitumba mpe mobulu.”
Nyonso oyo tolobi emonisi ete makambo oyo esalaka ete moto ayina basusu ezali mingi mpe ezalaka mpasi mpo na koyeba yango nyonso. Yango elingi koloba ete likoki ezali te mpo ete bato bázongela lisusu te kosala likambo ya bozoba oyo basalaki na bambula eleki, elingi koloba koyina basusu? Mokomoko na biso to biso nyonso, tokoki kosala eloko moko te mpo na kolonga ezaleli ya kozwela basusu makanisi mabe, ezaleli ya kozanga koyeba mpe kobanga, bizaleli oyo ebotaka koyina?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Kokanisela basusu mabe mpe koyina ezali bizaleli oyo bayekolaka yango koyekola!
[Elilingi na lokasa 4, 5]
Tobotamaka na ezaleli ya koyina te to mpe na ezaleli ya koboya makambo nyonso ya bato . . .
. . . mosusu oyo bakeseni na biso
[Elilingi na lokasa 7]
Masangá ya bato oyo bayinaka basusu basalelaka Internet mpo na kokɔtisa bilenge na masangá na bango
[Elilingi na lokasa 7]
Mbala mingi mangomba nde ekolisaka matata kati na bato
[Eutelo ya bafɔtɔ]
AP Photo