Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w00 15/8 nk. 4-7
  • Lolenge se moko ya kosilisa koyinana

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge se moko ya kosilisa koyinana
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Koyina mpo na kobanga
  • Kobongola makanisi
  • Koyinana ekosila!
  • Mpo na nini koyinana etondi na mokili?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mpo na nini bato bayinanaka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2022
  • “Ntango ya kolinga mpe ntango ya koyina”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Mpo na nini koyina ekómi makasi?
    Lamuká!—1998
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
w00 15/8 nk. 4-7

Lolenge se moko ya kosilisa koyinana

“Koyina eutaka kaka na kobanga. . . . Toyinaka bato oyo tozali kobanga bango mpe esika oyo koyinana ezali, kobanga mpe ezali wana.”​—CYRIL CONNOLLY, MOKOMI YA MIKANDA.

EBELE ya bato ya mayele ya sosioloji bakanisaka ete koyinana ezali mpenza na bɔɔngɔ ya moto. Moto moko ya mayele na makambo ya politiki alobaki ete: “Ekoki mpenza kozala ete koyinana ezali na kati na makanisi” ya bato.

Tokoki kokamwa te ete baoyo bayekolaka bizaleli ya bato bákanisa bongo. Bayekolaka bizaleli ya bato oyo Biblia elobi mpo na bango ete babotami na “bokesene” mpe “na lisumu.” (Nzembo 51:5) Kutu, eleki sikoyo bambula ebele mpenza, ntango Mozalisi ye moko atalaki bato ya kozanga kokoka, “amonaki ete masumu ya bato izalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.”​—Genese 6:5.

Kokanisela basusu mabe, koponapona, na koyina oyo yango ebotaka, ezali makambo oyo esalemaka mpo bato bazangi kokoka mpe bazali na moimi. (Deteronome 32:5) Likambo ya mawa ezali ete, lisangá moko te oyo bato basali to guvɛrnɛma moko te, ata soki esalelaki mayele nini, elongi kosala mibeko oyo ekoki kobongola mitema ya bato na makambo yango. Mopanzi-nsango Johanna McGeary alobaki boye: “Ekólo moko te oyo ezali nguya ya mokili mobimba, ata soki ezali makasi mingi, ekoki kosilisa koyinana oyo esali ete ebele ya bato bábomana na Bosnie, na Somalie, na Liberia, na Cachemire, mpe na mikili ya Caucase.”

Kasi, liboso ya koluka koyeba ndenge nini kosilisa koyinana, tosengeli naino koyeba nini mpenza etindaka bato básala makambo oyo emonisaka ete bazali koyina bato mosusu.

Koyina mpo na kobanga

Koyina ezali ndenge na ndenge. Mokomi Andrew Sullivan alobaki yango malamu mpe na mokuse ete: “Koyina mosusu eutaka na kobanga, mpe mosusu emonanaka kaka na kotyola; ezali mpe na koyina oyo emonisaka makasi, mpe oyo eutaka na kozanga makasi; koyina mosusu emonanaka na kozongisa mabe, mpe mosusu eutaka na zuwa. . . . Ezali na koyina ya moto oyo azali konyokola, na koyina mosusu ya moto oyo bazali konyokola ye. Ezali na koyina oyo ekolaka malɛmbɛmalɛmbɛ, mpe koyina oyo esilaka. Mpe ezali na koyina oyo epanzaka makita, mpe koyina oyo ebombamá.”

Lelo oyo, makambo oyo ezali kobota koyinana mpe matata ezali mingimingi mikakatano ya bomoi mpe mikakatano ya mbongo. Kokanisela basusu mabe mpe konyokola basusu mpo bazali koyina bango ezali komonana mingi na bisika oyo mwa bato moke bazali na bozwi mpe bato ebele bazali konyokwama. Koyinana ezali mpe komonana mingi na bamboka oyo bomoi oyo bato mosusu bameseni na yango ezali kobeba, mpamba te bapaya ebele bazali kokende kofanda na bamboka yango.

Bato mosusu bazali kokanisa ete bapaya yango bakoya kowela na bango misala, bakondima báfutaka bango mbongo moke, to motuya ya biloko ekokita. Ata soki bato bakoki kobanga makambo wana to te, kasi ezali likambo yango te nde ezali kobimisa koyinana. Kobanga ete mbongo ekóma mpasi koleka mpe kobanga ete bomoi ya banamboka ezala lisusu ndenge ezalaki te, nde ezali makambo mpenza oyo ememaka na kokanisela bamosusu mabe mpe koyina bango.

Esengeli kobanda wapi mpo na kosilisa koyinana? Esengeli kobanda na kobongola makanisi.

Kobongola makanisi

McGeary alobaki ete: “Bato oyo bazali koyinana bakoki kobongwana soki bango moko balingi yango mpenza.” Kasi ndenge nini bakolinga kobongwana? Makambo oyo eleká emonisi ete Biblia, Liloba ya Nzambe, ezali na nguya oyo eleki makasi, oyo esimbaka mpenza motema mpe eleki na koumela mpo na kopekisa koyina na mitema ya bato. Ezali boye mpamba te, “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya, ezali na mopotu koleka mipanga nyonso mipeli bipai mibale. Ezali kotɔbɔla kino ekabwelo na [molimo na elimo, NW ] matɔngi mpe lilɔngɔ; ezali komeka makanisi mpe mikano ya motema.”​—Baebele 4:12.

Ya solo, mpo bato bátika kokanisela bato mosusu mabe mpe koyinana esila na mitema na bango, ezali likambo ya mbalakaka to ya lelo na lobi te. Kasi ekoki kosalema. Yesu Klisto, ye oyo aleki bato nyonso na kosimba mitema mpe na koteya lisosoli, abongolaki bato. Bato ebele balandi toli malamu ya Yesu Klisto ete: ‘Bólingaka bayini na bino mpe bóbondelaka mpo na banyokoli na bino.’​—Matai 5:44.

Yesu asalaki ndenge azalaki koteya, kati na baninga na ye ya motema, ezalaki mpe na Matai, ye azalaki liboso mokɔngɔli ya mpako; Bayuda bazalaki mpenza koyina moto oyo azalaki kosala mosala wana. (Matai 9:9; 11:19) Lisusu, Yesu abandisaki losambo ya pɛto oyo nsukansuka, ata bato ya bikólo mosusu baoyo Bayuda bazalaki koboya mpe koyina, bandimaki yango. (Bagalatia 3:28) Bato oyo bakómaki bayekoli ya Yesu Klisto bautaki na bamboka nyonso oyo eyebanaki na ntango wana. (Misala 10:34, 35) Bato mosusu bayebaki ete baklisto bazalaki na bolingo oyo ekokani na bato mosusu te. (Yoane 13:35) Ntango bato oyo bayinaki Setefano babambaki ye mabanga tii babomaki ye, liboso akufa, moyekoli yango ya Yesu alobaki boye: “Mokonzi, limbisá bango lisumu oyo!” Setefano alingaki te ete bato oyo bayinaki ye bázwa mabe.​—Misala 6:8-14; 7:54-60, Boyokani ya Sika.

Baklisto ya ntango na biso mpe bazali kolanda toli ya Yesu oyo elobi ete básalelaka bandeko na bango baklisto malamu, kasi básalaka mpe bongo ata na bato oyo bazali koyina bango. (Bagalatia 6:10) Bazali kosala makasi mpo bálongola koyina na bomoi na bango. Balukaka koyeba mbala moko makambo mabe oyo ekoki kobota koyinana na mitema na bango mpe basalaka oyo esengeli mpo bálona bolingo na esika ya koyinana na kati ya mitema na bango. Lokola moto moko ya mayele na ntango ya kala alobaki yango, “boyini ekobota bitumba, kasi [bolingo] bokozipa mabe manso.”​—Masese 10:12, Liloba lya Nzambe.

Ntoma Yoane alobaki ete: “Moto na moto oyo akoyinaka ndeko na ye azali mobomi ya bato, mpe toyebi ete moto na moto oyo akobomaka bato azali na bomoi ya seko koumela kati na ye te.” (1 Yoane 3:15) Batatoli ya Yehova bandimaka likambo yango. Yango wana, atako bazali bato bauti na bikólo, na bamboka, na mangomba mpe na mikili ndenge na ndenge, bazali kati na lisangá oyo bamonaka ete bazali bandeko ya solo, lisangá oyo eyebi likambo ya koyinana te.​—Talá na bitanda.

Koyinana ekosila!

Okoki mbala mosusu koloba ete, ‘Yango ezali malamu mpo na bato oyo bazali na lisangá yango. Kasi yango te nde ekosilisa koyinana nyonso na mokili.’ Ya solo, ata soki yo oyinaka bato te, yebá ete bato mosusu bakoki koyina yo. Yango wana, mpo elimo ya koyinana oyo etondi na mokili esila, tosengeli kotya elikya epai ya Nzambe.

Mokano ya Nzambe ezali ete nsima ya mwa ntango moke, koyinana ezala lisusu te awa na mabele. Likambo yango ekosalema ntango guvɛrnɛma ya likoló ekoyangela, guvɛrnɛma oyo Yesu ateyaki biso tósɛngaka ete: “Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu, Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló.”​—Matai 6:9, 10.

Ntango makambo oyo tosɛngaka na libondeli wana ekokokisama, makambo oyo ebimisaka koyinana ekozala lisusu te. Makambo oyo etindaka bato na koyinana ekolimwa. Makambo lokola bansango ya lokuta, kozanga koyeba makambo, mpe kokanisela bato mosusu mabe, ekosila mpe bato bakofungwama miso, bakoyeba solo mpe bakozala bato ya sembo. Na ntango yango nde Nzambe ‘akolongola mpisoli nyonso na miso ya bato, liwa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi.’​—Emoniseli 21:1-4.

Tozali na nsango ya malamu koleka! Ezali na makambo oyo ezali kolakisa biso polele ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka.” Yango wana, tozali na elikya ete etikali moke ezaleli mabe ya koyinana elimwa awa na mabele. (2 Timote 3:1-5; Matai 24:3-14) Na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, bato bakozala na bondeko ya solosolo mpamba te bakozonga lisusu bato ya kokoka.​—Luka 23:43; 2 Petelo 3:13.

Kasi, osengeli kozela kaka te tii ntango wana mpo ozwa bondeko ya solosolo. Kutu, lokola masolo oyo ezali na bitanda emonisi yango, bolingo ya boklisto esi ekɔti na mitema ya bamilio ya bato oyo bakokaki kozala na ezaleli ya koyina. Yo mpe obengami ete okɔta na lisangá yango ya bandeko oyo bazali na bolingo!

[Etanda na lokasa 5]

“Yesu alingaki kosala nini na esika na biso?”

Na sanza ya Yuni 1998, na mboka moko ya zamba na etúká ya Texas, na États-Unis, mindɛlɛ misato babundisaki moto moindo moko, nkombo na ye James Byrd Junior. Bamemaki ye mosika epai oyo moto mosusu azalaki te, batutaki ye makofi, mpe bakangaki makolo na ye na nsinga, bakangisaki yango na motuka, bakɔtaki na motuka mpe bakendaki. Ntango motuka ezalaki kokende, ezalaki kobenda moto yango na nse. Batambolaki bongo kilomɛtrɛ 5 mpe na nsima moto yango akendaki kobambana na talase moko ya bɛtɔ. Bato balobaki ete na kati ya makambo nyonso ya mabe oyo basalaki bato mpo bayinaki bango na bambula ya 1990, likambo oyo basalaki moto wana nde elekaki nsɔmɔ.

Bandeko basi misato ya James Byrd bazali Batatoli ya Yehova. Bakanisaka nini mpo na bato oyo basalaki ndeko na bango likambo ya nsɔmɔ ndenge wana? Na nkombo ya libota mobimba, balobaki boye: “Ndenge oyo banyokolaki ndeko na biso mpe babɛtaki ye etungisaki biso mingi mpe esalaki biso mpasi mingi. Bato mingi basalaka nini na likambo ya mabe boye? Tomonaka ete balukaka mpe kozongisa mabe, to komonisa ete bayini bato yango, to kolendisa ezaleli ya koyina epai ya bato mosusu, kasi yango eyelaki biso na makanisi ata mbala moko te. Tomitunaki boye: ‘Yesu alingaki kosala nini na esika na biso? Alingaki kosala bato wana nini?’ Eyano ezali polele. Maloba na ye elingaki kozala maloba ya kimya mpe ya elikya.”

Moko ya bavɛrsɛ ya Makomami oyo esalisaki bango bákolisa koyina na mitema na bango te ezali Baloma 12:17-19. Ntoma Paulo akomaki boye: “Bózongisaka mabe mpo na mabe te . . . Soko ekokoka, mpe lokola ezali likambo na bino, bózala na bato nyonso [na] kimya. Balingami, bóbukanisa mpo na bino mpenza te, kasi tiká esika mpo na nkanda ya Nzambe. [Lokola] ekomami ete, Nkolo alobi ete, Kobukanisa ezali mpo na likambo na ngai, ngai nakofuta.”

Balobaki lisusu boye: “Tokanisaki lisusu makambo malamu oyo elobami na mikanda na biso oyo elobi ete makambo mosusu ya mabe to oyo ezali sembo te oyo bato bazali kosala, ezali mpenza nsɔmɔ; yango wana ezali likambo moke te mpo moto aloba ete, ‘Nalimbisi yo’ mpe abosana mbala moko. Na makambo ya ndenge wana, kolimbisa esɛngaka kaka kotika nkanda mpe kotya makanisi na yo na makambo mosusu mpe kotika te ete nkanda na motema epesa yo maladi to ebebisa makanisi na yo.” Ndakisa oyo emonisi mpenza ete Biblia ekoki kosalisa moto alona ezaleli ya koyina te na motema na ye!

[Etanda na lokasa 6]

Banguna bakómi baninga

Na bambula oyo euti koleka, bato mingi bakendaki na ekólo Grèce mpo na koluka misala. Kasi, lokola kuna mpe nkita ya mboka ekómaki kobeba, misala ezalaki lisusu mingi te, mpe kozwa mosala ekómaki mpenza mpasi. Likambo yango ebimisaki koyinana makasi kati na bato ya bikólo ndenge na ndenge. Yango ezali komonana mpenza na koyinana oyo ezali kati na bato oyo bautaki na ekólo Albanie na bato oyo bautaki na ekólo Bulgarie. Na bisika mingi na Grèce, bato ya bikólo yango mibale bazalaki kowelana makasi.

Na Kiato, mboka moko na nɔrdi-ɛsti ya etúká ya Péloponèse, Batatoli ya Yehova babandaki koyekola Biblia na libota moko ya bato ya Bulgarie mpe lisusu na moto moko ya Albanie. Na nsima, bato yango bayebanaki. Lokola bakómaki kolanda mibeko ya Biblia, batikaki koyinana oyo ezali kati na bato ya bikólo yango. Mpe lisusu, mibeko ya Biblia esalisaki bato yango bákóma baninga mpenza. Kutu, Ivan, moto ya Bulgarie, asalisaki Loulis, moto ya Albanie, mpe azwelaki ye ndako penepene ya ndako na ye. Mbala mingi mabota yango mibale balyaka esika moko mpe basalisanaka na mwa biloko oyo bazali na yango. Lelo oyo, mibali yango mibale bazali Batatoli oyo bazwi batisimo mpe mbala mingi basakolaka nsango malamu elongo. Ntina kutu tóloba yango ezali te: boninga ya bato wana mpo bazali baklisto ekamwisaki bato ya kartye.

[Elilingi na lokasa 7]

Ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela, koyinana ekolimwa awa na mabele.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto