Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Octobre nk. 8-9
  • “Kosambela moto na moto na ndenge na ye” ezali nde malamu koleka?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Kosambela moto na moto na ndenge na ye” ezali nde malamu koleka?
  • Lamuká!—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Tozali na mposa ya kozala elongo na bamosusu
  • Tokoloba boni mpo na mateya?
  • Eloko oyo biso nyonso tosengelaka na yango
    Lamuká!—2002
  • Mangomba nyonso mazali malamu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Tosikwami na losambo ya lokuta
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Octobre nk. 8-9

“Kosambela moto na moto na ndenge na ye” ezali nde malamu koleka?

LOKOLA MANGOMBA YA MINENE ezali lisusu na valɛrɛ te na miso ya bato mingi, ezali likambo ya kokamwa te komona ebele ya bato bazali kobimisa mangomba na bango moko. Kasi, mituna yango oyo: Kosambela ndenge wana ekoki nde kokokisa mpenza bamposa na yo ya elimo? “Kosambela moto na moto na ndenge na ye” ezali nde malamu koleka?

Mpo na koyanola na mituna wana, tótala naino soki kosambela moto na moto na ndenge na ye ekoki mpenza kozala malamu, soki totaleli yango na ‘likoki na biso ya kokanisa,’ likabo mosusu ya malamu mpenza oyo biso bato tozali na yango.​—Baloma 12:1.

Makanisi ya moto eboyaka kondima likambo oyo ezali bongolabongola. Nzokande, na ankɛtɛ moko oyo esalemaki na Suède na likambo etali kosambela moto na moto na ndenge na ye, emonanaki ete mbala mingi bato “basangisaka makanisi ndenge na ndenge kaka bongo (ata soki ezali na boyokani kati na yango te) mpe bakómisaka yango mateya oyo bazali kolanda na bomoi na bango.”

Na ndakisa, kaka mwa bato moke (2 %) kati na baoyo balobaki ete bazali “baklisto na ndenge na bango” nde balobelaki Yesu, kaka lokola moto moko oyo azalaki na bomoi. Kutu, mingi na bango balobelaki nde liteya oyo elobaka ete molimo ebotamaka mbala na mbala. Boye, ezali mpenza bongolabongola te soki moto alobi ete azali moyekoli ya Yesu Klisto, nzokande moto yango ayebi ata bomoi mpe mateya ya Yesu te​—mpe azali kutu kondima mateya oyo eyokani soki moke te na oyo ya Klisto?a

Likoki na biso ya kokanisa eboyaka mpe kondima makambo oyo ezali komonana lokola molili mpe oyo eyebani malamu mpenza te. Nzokande, ntango batunaki bango soki bandimaka “Nzambe to nguya moko boye ya Nzambe,” mingi kati na bango bazongisaki ete ekoki kozala solo ete “nguya moko ya lolenge wana” ezali. Moko na bango alobaki ete: “Nandimaka ete ezali na nguya moko boye oyo eleki mayele ya bato, kasi ezali mpenza lokola Nzambe moko boye te.” Ata baoyo bandimaka mpenza Nzambe balobaki ete “na bomoi na bango, Nzambe azwaka kaka mwa esika moke mpenza.” Lapolo yango emonisaki ete kosambela moto na moto na ndenge na ye “ezali likanisi moko oyo ezali polele mpenza te,” mpe mpo na kosukisa, ezongelaki eyano oyo bato mingi bapesaki: “Nandimaka nguya moko boye, kasi nayebi mpenza te soki ezali nini.”

Na Canada, ntango bayekolaki likambo yango ya kosambela moto na moto na ndenge na ye, basukisaki se ndenge moko. Zulunalo moko (Alberta Report) elobi ete: “Lelo oyo, tozali komona ete bato bakómi kondimandima makambo nyonso oyo, ata soki ntina mpenza ya kondima yango ezali te. Mpe soki tomeki kotala na meko nini bindimeli oyo bamipesi na yango ezali kosalisa bomoi na bango, tokomona ete eloko moko ya malonga ezali te. Bindimeli yango ezali koteya ata bizaleli malamu te oyo bato nyonso bakoki kotyela motema. Ya solo, ezali kobakisela bango eloko moko te.” Zulunalo yango elobelaki “nzambe ya bitenibiteni” mpamba te baoyo balandaka bindimeli yango “bazwaka mwa biteni mikemike ya bindimeli ya mangomba ya kala.” Okanisi ete ezali mpenza malamu ete bindimeli ya losambo​—ata mpe elikya mpo na mikolo ezali koya—​euta na makanisi mpamba, oyo ezali polele te mpe bitenibiteni ndenge wana?

Tozali na mposa ya kozala elongo na bamosusu

Banda kala, bato oyo basambelaka bapesaka motuya mingi na bizaleli lokola boninga, bondeko mpe boyokani. (Misala 2:42, 46) Kasi lokola kosambela moto na moto na ndenge na ye ezali kaka mpo na moto ye moko, ndenge nini yango ekoki kokokisa bamposa wana?

Lokola kosambela moto na moto na ndenge na ye elendisaka likanisi ya “moto na moto azala na lingomba na ye,” tomoni te ete yango ezali se kolendisa bato bákabwana mpe mangomba ekóma mingi? Zulunalo moko (Alberta Report) elobi ete: “Lelo oyo, lingomba ekómi likambo etali lisosoli ya moto na moto . . . , mpe ekólo na biso ekómi ekólo oyo ezali kaka na bankama ya mangomba te, kasi bamilio ya mangomba.” Yango wana, ezali likambo ya kokamwa te, soki balobi ete kosambela moto na moto na ndenge na ye ezali kotya mobulu na makambo ya elimo.

Tokoloba boni mpo na mateya?

Ntango bakomi ya zulunalo moko (Svenska Dagbladet) batunaki Martin Lönnebo, episkɔpɔ ya Suède, alobaki ete: “Kosambela moto na moto na ndenge na ye ekoki kobakisa eloko moko te na ntango na biso, mpe ezali mpasi mpo mabota oyo ekoya nsima elanda mateya ya losambo ya lolenge wana.” Tokoki kondima likanisi yango soki totali ezaleli oyo baboti mingi ya Suède bazalaka na yango na likambo ya kobɔkɔla bana. Zulunalo yango eyebisi ezaleli yango na mokuse na maloba oyo: “Ndimá makambo oyo yo osepeli na yango! Mpe kotinda bana na yo na makasi te ete bázwa bikateli. Kasi tiká bango moko bápona ntango bakokóma mikóló.”

Zulunalo wana endimi ete koteya bana mateya ya lingomba ekoki kozala lokola kondimisa bango na makasi. Atako bongo, esukisi ete: “Libula wana ya kotikela bana mateya ya lingomba ekoki kozala eloko moko ya malamu mpe ekoki kozala nzela bobele moko oyo ekoki kosalisa bango . . . bázwa bikateli bango moko.” Ya solo, na kotalela bizaleli oyo bilenge mingi bakómi na yango lelo oyo, tomoni ete kosambela moto na moto na ndenge na ye esangisi mabota ata moke te mpe epesi ata mateya ya malamu te mpo bana oyo bakobotama nsima bálanda yango.

Yango wana, emonani ete kosambela moto na moto na ndenge na ye ekoki te kopesa biyano ya malonga mpe oyo ebongi kotyela motema na mituna etali bomoi, ekoki mpe te kokómisa bato na bomoko to kokokisa mposa na bango ya bizaleli malamu. Lisolo ya zulunalo oyo touti kolobela eyebisi likanisi oyo mpo na kosambela moto na moto na ndenge na ye: “Soki mateya ya lingomba esangisi mateya nyonso, etikali lisusu na eloko moko kati na yango te. Mpe soki ndelo ya bonsomi eyebani te, bonsomi yango ekokóma mpamba.”

Emonani polele ete na makambo mingi, kosambela moto na moto na ndenge na ye elongi soki moke te kokokisa bamposa ya elimo ya bato. Bongo, ndenge nini moto akoki kokokisa bamposa yango soki asuki kaka na kopona bindimeli oyo euti na bikólo ndenge na ndenge, lokola nde azalaki kopona bilei oyo esepelisi ye na kati ya biloko ebele ya kolya oyo batii na mesa? Emonani mpe polele ete mangomba ya minene elongi te kokokisa bamposa ya elimo ya bato. Na bongo, epai wapi bato bakoki kokende kosambela?

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu ateyaki te ete soki moto akufi, molimo na ye ebotamaka lisusu, mbala na mbala. Kasi, ateyaki ete bato oyo bakufaka bazali lokola bato oyo balali mpɔngi, bazali na bomoi te, bazali kozela lisekwa na mikolo ezali koya.​—Yoane 5:28, 29; 11:11-14.

[Elilingi na lokasa 8]

Tosengeli nde komona lingomba lokola bilei oyo batii na mesa, epai tokopona bindimeli oyo esepelisi biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto