Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Octobre nk. 10-11
  • Lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa bamposa na yo ya elimo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa bamposa na yo ya elimo
  • Lamuká!—2002
  • Masolo mosusu
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Okosepela koyeba solo?
    Okosepela koyeba solo?
  • Mateya ya solo oyo etali Nzambe ezali nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lingomba
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Octobre nk. 10-11

Lolenge ya malamu mpenza ya kokokisa bamposa na yo ya elimo

MPO NA NINI BATO bazalaka na mposa ya kosambela? Basusu balobaka ete soki bato bamipesaka na kosambela, ezali mpo na koluka komibatela na mokili oyo etondi na mikakatano. Kasi ezali kaka mpo na bongo te. Lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (American Sociological Review) elobaki ete: “Soki bato balingaka kozala na lingomba, ezali kaka te mpo na koluka komibatela. Banda kala, bato bamitunaka mituna lokola: Toutá wapi? Tozali kokende wapi? Mpo na nini tozali awa na mabele?”

Na ntembe te, yo mpe ondimaka ete mituna wana ezali mpenza mituna ya ntina mingi. Lokola ezali bongo, tosengeli mpenza koluka kozwa biyano oyo ebongi na kotyela motema na mituna yango, boye te? Mituna wana ezali na ntina mingi mpe na motuya mingi koleka, yango wana mpo na kozwa biyano na yango, tosengeli kosuka te na kopona likolólikoló bindimeli ya mangomba oyo euti na bikólo ndenge na ndenge oyo esepelisi biso. Soki tolingi kozwa biyano ya solosolo mpe oyo ebongi na kotyela motema na mituna ya mozindo oyo etali bomoi na biso, na ntembe te tosengeli koyeba lolenge ya malamu mpenza ya koluka biyano yango.

Tozali nde na eloko moko oyo eleki malamu? Ferrar Fenton, mobongoli moko ya Biblia, alobaki maloba kitoko mpenza mpo na buku yango. Abengaki yango “lifungola se moko oyo efungolelaka moto sɛkɛlɛ ya molɔ́ngɔ́, mpe sɛkɛlɛ na ye moko.” Ya solo, Biblia epesi biyano na mituna ya makambo oyo eleká, makambo oyo ezali kosalema lelo mpe oyo ekosalema na mikolo ezali koya. Eyebisi biso epai wapi toutá, eyebisi ntina ya bomoi, emonisi ndenge oyo tokoki kozwa bolamu, mpe eyebisi biso makambo oyo ezali kozela biso na mikolo ezali koya. Banda mokili ebandá, mokanda mosusu te ebongolá bomoi ya bato lokola Biblia; mpe batɛmɛli balongaki te kobungisa Biblia lokola basalaki mpo na mikanda mosusu. Kasi mpo na nini bato mingi baboyaka kotalela buku yango, oyo ekokani na mosusu te, ntango balukaka biyano na mituna ya bomoi?

Bato mingi bazwá naino ntango te mpo na kotalela bokeseni monene oyo ezali kati na Biblia mpe mangomba oyo bango bakɔtaki. Basilá komona ndenge bato oyo bamibengaka baklisto babomanaka na nkombo ya Nzambe. Ndenge zulunalo moko (The Guardian) emonisi yango, bato mingi bamilelaki ete “mikolo oyo, basango bamipesi mingi na kokɔngɔla mbongo, bamipesaka lisusu te na mosala ya kotala bato ya lingomba.” Ntango mosusu bakanisaka ete Biblia endimaka likambo yango to epesaka nzela na likambo yango. Bosolo ya likambo ezali ete, Biblia epesi baklisto etinda ‘bálinganaka bango na bango,’ mpe eyebisi baoyo basakolaka liloba ete, “Bozwi ofele, bópesa ofele.” (Yoane 13:34; Matai 10:8) Na yango, ezali nde sembo kokweisa Biblia mpo bato mingi oyo bamikumisaka ete batosaka yango balandaka mateya na yango te?

Bato mingi balobaka ete makambo oyo Biblia elobaka ezali mpenza te ndenge ezali na siansi, ezali bongolabongola mpe ezali makambo ya kala. Kasi soki toyekoli likambo yango malamumalamu, tokomona ete ezali bongo te. Ezali solo ete Biblia ezali buku ya siansi te. Atako bongo, ntango elobelaka makambo oyo etali siansi​—na ndakisa ndenge bikelamu ya bomoi esalemaki awa na mabele, ndenge mokili ezali libungutulu, to lolenge malamu ya kosalisa bato na bamaladi oyo euti na mikrobe—​Biblia elobaka ata likambo moko ya lokuta te. Nzokande, Biblia esilá kolobela makambo oyo siansi eyei koyeba yango kaka bambula mingi mpenza na nsima. Atako Biblia ezali na mikanda 66 oyo ekomamaki na eleko ya mibu 1 600, mikanda yango nyonso ezali na boyokani kati na yango. Lisusu, Biblia emonisi bososoli ya mozindo na makambo etali biso bato, likambo wana ekómisi yango buku oyo elobelaka mpenza makambo ya ntango na biso.

Buku wana ya kokamwa eyebisi likambo moko ya ntina mpo na lolenge ya kosambela Nzambe. Elobi ete losambo yango esengeli kosalema te na ndenge oyo bato bango moko balingi, kasi na ndenge oyo Nzambe alingi. (Yoane 5:30; Yakobo 4:13-15; 2 Petelo 1:21) Kasi mwa bato moke kaka nde balandaka etinda yango. Banda kala, bato bamisalelaka mangomba mpo na kokokisa mikano na bango moko. Yango ezali solo soki totali ndenge bato basalaka bikeko ya nzete mpo na kokómisa yango banzambe oyo basambelaka. Ezali mpe bongo soki totali ndenge mangomba eteyaka bato mateya oyo yango moko ebimisá. Ezali mpe solo soki totali ndenge bato bamisalelaka mangomba ya bango moko oyo eyokani na makambo oyo basepeli na yango.

Kanisá sikoyo eloko mosusu oyo osengeli kopona. Mpo na nini te kosala ndenge prezida ya tribinale monene ya États-Unis asalaki? Kaka ndenge azalaki kosambisa makambo na tribinale, ndenge moko mpe azalaki kolukaluka na bosembo nyonso, koyeba makambo oyo emonisi ete Biblia ezali mpenza na bosolo to te. Amonaki nini? Alobaki ete: “Nakómaki na ekateli ete Biblia ezali buku moko oyo eleki mayele ya bato, euti na Nzambe.”

Ndenge nini yo mpe okoki kolukaluka ndenge wana? Talá likanisi oyo: Okoki komeka koyekola Biblia na mozindo, kotalela biyano oyo yango ezali kopesa na mituna oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo. Batatoli ya Yehova bazali pene na milio motoba, na mikili 235, basalaki boyekoli ya ndenge wana. Bamipesi na bolingi na bango moko ete bálekisaka ntango na bango na koyebisa bato mosusu makambo oyo bango basili koyekola. Boyekoli ya Biblia oyo basalaka na bato epai na bango ofele, esalisi bamilio ya bato bákóma na kondima oyo ekeseni na bindimelá oyo bato bandimaka kaka mpo basepeli na yango. Boklisto ya solosolo mpe ya pɛto oyo Biblia emonisaka ezali mpenza te lingomba mosusu ya sika. Yango ezali nde solo oyo etali Nzambe mpe mikano na ye. Na bongo, mpo na nini kondima eloko oyo ekokani na solo yango te?​—Yoane 17:17.

[Bililingi na lokasa 10]

Lolenge ya malamu mpenza ya kosambela ezali nde koyekola makambo ya Nzambe na Biblia mpe kosangana na basambeli mosusu ya solo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto