Bikólo ezwi kaka liteya te
“Soki biso bato tózwaka liteya na makambo oyo eleká—mbɛlɛ tozwá liteya na makambo mingi! Kasi motema na biso mpe makambo ya politiki ezali kokanga biso miso, mpe boyebi oyo tozali kozwa na makambo tozali tokutana na yango, ezali lokola mwinda na nsima ya masuwa, oyo ezali kongɛngisa kaka mbonge nsima na biso!”—Samuel Taylor Coleridge.
YO MPE ondimi makanisi wana ya Samuel Coleridge, mokomi ya maloba ya ntɔki na Angleterre? Ekoki nde kosalema ete motema na biso elinga makasi likambo moko boye mpe ekanga biso miso, tókóma kozongela mabunga minene ya bato ya kala?
Bitumba ya Croisades
Na ndakisa, tótalela makambo mosusu oyo bato basalaki na ntango ya bitumba ya Croisades. Na mobu 1095 ya ntango na biso (T.B.), Pápá Urbain II alendisaki “baklisto” bábɔtɔla Mabele Mosantu oyo ezalaki na mabɔkɔ ya Bamizilma. Bakonzi, bato ya mbongo, basoda oyo bazalaki kokende bitumba na mpunda, mpe bato mpamba na bikólo nyonso oyo Urbain II azalaki koyangela, bandimaki kokende bitumba yango. Moto moko ya mayele na makambo ya kala na eleko ya Moyen Âge akomaki ete “ezalaki ata na moto moko te, oyo azalaki na bomoi oyo eyokani na mobeko ya Klisto,” oyo aboyaki kopesa mabɔkɔ na bitumba wana.
Zoé Oldenbourg, moto ya mayele na makambo ya kala, alobi ete mingi kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba ya Croisades “bandimaki mpenza ete lokola basimbi ekulusu, bakɔti mpenza na mosala ya Nzambe ye moko.” Abakisi ete, bakanisaki ete bazali kosala mosala ya “baanzelu ya koboma bana ya zabolo.” Brian Moynahan, ye akomaka babuku, alobi ete bakanisaki mpe ete “baoyo nyonso bakokufa na bitumba yango bakozwa libonza ya bamartiru na likoló.”
Ntango mosusu bato oyo bazalaki kobunda bitumba ya Croisades bayebaki te ete banguna na bango mpe bazalaki kaka kokanisa bongo. Na buku na ye (Shorter History of the World), J. M. Roberts, moto ya mayele na makambo ya kala, akomaki ete basoda ya Bamizilma oyo bakendeki etumba bazalaki mpe komindimisa ete bazalaki mpenza kobunda mpo na Nzambe, mpe “kokufa na bitumba mpo na kobundisa bapakano ekopesa nzela na kokɔta na paladiso” ya likoló.
Bateyaki bato ya ngámbo nyonso mibale ete etumba oyo bazalaki kobunda ezalaki etumba ya sembo, elingi koloba Nzambe andimaki yango mpe apambolaki yango. Bakonzi ya politiki mpe ya mangomba bakolisaki makanisi wana epai ya bato na bango mpe bapelisaki nkanda na bango. Mpe bato ya ngámbo nyonso mibale basalaki makambo ya nsɔmɔ mpenza.
Bato ya lolenge nini?
Bato oyo basalaki makambo wana ya nsɔmɔ bazalaki bato ya ndenge nini? Mingi na bango bazalaki kaka bato lokola bato nyonso—bakeseneki te na bato ya ntango na biso. Na ntembe te, mingi na bango bazalaki na mposa makasi ya kobongisa makambo mpe bazalaki na mposa ya kosembola makambo oyo bango bakanisaki ete ezalaki kotambola malamu te na ntango wana. Lokola bakómaki na mposa makasi, ekoki kozala babosanaki ete na esika ya “bosembo” oyo bazalaki kobundela, bitumba na bango ezalaki nde komema kozanga bosembo, mpasi, mpe konyokola bankóto ya mibali, basi mpe bana oyo basali eloko te, kaka mpo bazalaki kofanda na bisika oyo bitumba ezalaki.
Makambo ya ndenge wana ezali se kozongelama na lisolo ya bato, boye te? Mbala na mbala, bakonzi oyo bayebaka kobenda bato bazali se kotinda bamilio ya bato—baoyo kutu bazalaka na makanisi wana te—ete bákɔta na bitumba ya bozoba mpe ya nsɔmɔ, mpo na kobundisa banguna na bango ya lingomba mpe ya politiki. Lokola ngámbo mokomoko ezalaki kosɛnga bato bábunda, mpe ndenge bato ya ngámbo nyonso mibale bazalaki koloba ete Nzambe azali elongo na bango, likambo yango etindaki bango báboma banguna na bango ya lingomba to ya politiki kozanga mawa. Lolenge wana ya kosala ekómaki mpenza momeseno mpe na boumeli ya bambula mingi, bakonzi mabe basalelaki mayele wana mpo na matomba na bango. Brian Moynahan alobi ete “yango nde ndakisa oyo Banazi balandaki ntango babomaki ebele ya Bayuda; ezali mpe ndakisa oyo bato mosusu bazali kolanda lelo ntango bazali koboma bato ya bituluka mosusu na mokano ya kosilisa bango, se ndenge bato oyo babundaki etumba ya liboso ya Croisade basalaki.”
Kasi ntango mosusu okoki koloba ete ‘lelo oyo, bato oyo bakanisaka malamu bakoki kondima te bátinda bango básala likambo ya ndenge wana. Sikoyo bato bayebi makambo mingi.’ Soki totali malamu, esengelaki mpenza kozala bongo. Kasi, tozwi mpenza liteya na makambo nyonso oyo eleká? Nani akoki kondima yango soki totali makambo oyo esalemi na mbula nkama oyo euti koleka?
Etumba ya Liboso ya mokili mobimba
Makambo oyo esalemaki na bitumba ya Croisades ezongaki lisusu, na ndakisa, na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Roberts alobi ete “etumba wana ezalaki moko ya makambo ya kokamwa na 1914. Ezali likambo ya kokamwa komona ete ebele ya bato, ya bikólo nyonso, ya masangá ya politiki ndenge na ndenge, ya mangomba nyonso, bato ya lolenge nyonso, bándima kobunda bitumba na esengo mpenza.”
Mpo na nini ebele ya bato mpamba “bandimaki na esengo mpenza kobunda bitumba”? Ezali mpo ete, ndenge moko na baoyo babundaki bitumba ya lolenge wana liboso na bango, mateya ya filozofi ya ntango wana ekɔtelaki makanisi na bango, etambwisaki bizaleli mpe bindimeli na bango. Atako bamosusu bazalaki kobunda mpo na bonsomi mpe bosembo, na ntembe te mingi babundaki nde mpo na lolendo, bakanisaki ete ekólo na bango eleki bikólo mosusu mpe yango nde ezali na lotomo ya kokonza bikólo mosusu.
Babongolaki makanisi ya bato yango mpo bándima ete bitumba ezali likambo oyo esengeli kozanga te na bomoi ya bato, ezali lolenge moko ya “kolongola bato mosusu oyo babongi te kozala na bomoi.” Na kotalela maloba ya mokomi ya babuku Phil Williams, na ndakisa liteya babengi “darwinisme social” ebimisaki likanisi ete bitumba ezali lolenge ebongi ya “kosilisa mitindo ya bikelamu oyo ebongi te kozala na bomoi.”
Na yango, bango nyonso bazalaki kokanisa ete bazalaki kobunda mpo na ntina moko ya sembo. Bitumba yango ememaki nini? Martin Gilbert, ye akomaka babuku mpe azali moto ya mayele na makambo ya kala, alobi ete na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, “baguvɛrnema elendisaki bato bálinga kaka bato oyo bazali na loposo lokola bango, bato ya ekólo na bango, mpe bákóma bilombe na mosala ya soda,”—bato mpe balandaki toli yango kazanga kotalela yango malamu. John Kenneth Galbraith, moto ya mayele na makambo etali nkita, akolaki na mboka, na Canada, na ntango ya etumba yango. Alobaki ete bato nyonso ya mboka na ye bazalaki koloba ete “bitumba oyo ebimaki na mikili ya Mpoto ezalaki likambo ya bozoba mpenza.” Bazalaki koloba ete, “Bato ya mayele . . . bamikɔtisaka te na makambo ya bozoba ndenge wana.” Kasi, eumelaki te, bango mpe bakɔtaki na bitumba wana. Yango ebimisaki likama nini? Basoda ya ekólo Canada pene na nkoto 60 bakufaki, elongo na basoda mosusu koleka milio libwa oyo bakufaki na bitumba wana ya bonyama, oyo bayaki kopesa yango nkombo etumba ya liboso ya mokili mobimba.
Bato bazwi kaka liteya te
Ekokaki ata mbula 20 te, elimo ya ndenge wana ebandaki lisusu komonana, na ntango bibongiseli ya politiki oyo babengi Fascisme mpe Nazisme ebimaki. Hugh Purcell akomi ete: “Bato ya politiki ya Fascisme babandaki kosalela bilembo mpe masapo ya Loma ya ntango ya kala mpo na kolamusa mayoki ya bato.” Esaleli mosusu ya makasi oyo bazwaki ezalaki ya kosangisa politiki na lingomba, kosambela mpo Nzambe apambola basoda na bango.
Adolf Hitler, azalaki “mpenza na mayele ya kobongola makanisi ya bato ebele, azalaki mpe molobi monene.” Dick Geary, akomi na buku na ye (Hitler et le nazisme) ete lokola bakonzi ya ntango ya kala, oyo bazalaki kolaka bato makambo mingi kasi bazalaki kokokisa yango te, Hitler andimaki ete ‘soki bato ebele bazali esika moko, balandaka mayele na bango te, kasi mayoki na bango.’ Asalelaki bolɛmbu wana bato bazalaka na yango mpe asalelaki mayele ya kala oyo ya kotinda bato nyonso báyina makasi monguna moko. Ndenge Purcell alobi yango, ezalaki na lolenge wana nde “atindaki bato ya Allemagne báyina Bayuda makasi.” Hitler abebisaki lokumu ya Bayuda ndenge alobaki ete ‘Bayuda nde bazali kobebisa ekólo Allemagne.’
Likambo ya nsɔmɔ mingi na eleko wana ezali ya komona ndenge bamilio ya bato, oyo bazalaki komonana lokola bato malamu, batindamaki mbala moko na koboma ebele ya baninga na bango kaka mpamba. Geary atunaki ete “ndenge nini bato ya ekólo oyo emikumisaka ete eyebi makambo mingi bakokaki kondima mpe kosangana na makambo wana ya nsɔmɔ ya Banazi?” Longola likambo oyo ete ekólo yango eyebi makambo mingi, ezalaki mpe komibenga ekólo ya boklisto! Soki bakweaki na motambo wana, ezalaki mpo balingaki kolanda mateya ya filozofi mpe mayele mabe ya bato, na esika ya kolanda mateya ya Yesu Klisto. Mpe kobanda wana, ebele ya mibali mpe basi boni ya sembo, oyo bazali na mikano ya malamu, batindamaki na kosala makambo ya nsɔmɔ!
Georg Hegel, moto ya mayele ya filozofi na Allemagne, alimboli ete “liteya oyo makambo ya kala mpe makambo oyo bato bakutaná na yango epesi, yango oyo: ezala bato, ezala baguvɛrnema, bazwi ata liteya moko te na makambo oyo eleká, basali ata eloko moko te na kotalela liteya oyo bakokaki kozwa.” Bato mingi bakoki koboya kolanda mateya ya filozofi ya Hegel mpo na lolenge na ye ya kotalela bomoi; kasi kaka bato moke nde bakoki koboya kondima likambo oyo ye alobi. Likambo ya mawa, emonani lokola ete bato bazali naino na mokakatano makasi mpo na kozwa ata liteya moko na makambo nyonso oyo eleká. Kasi yango esengeli mpe kozala bongo mpo na yo?
Na ntembe te, liteya monene oyo tosengeli kozwa yango oyo: Mpo tózongela te makama oyo ekwelaki bato oyo bazalaki na bomoi liboso na biso, tosengeli na eloko moko oyo tokoki mpenza kotyela motema, oyo eleki mateya ya mpambampamba ya filozofi. Kasi, soki tosengeli te kolanda mateya ya filozofi, nini mosusu ekoki kotambwisa malamu makanisi na biso? Mbula koleka nkóto moko liboso ya bitumba ya Croisades, bayekoli ya Yesu Klisto bamonisaki lolenge oyo bomoi ya baklisto ya solo—lolenge ya bomoi kaka moko ya malamu—esengeli kozala. Tótala nini basalaki mpo bákɔta te na bitumba oyo ebomaki bato mingi na ntango na bango. Kasi, tokoki nde kolikya ete, lelo oyo bikólo ekolanda ndakisa na bango mpe ekotika kobunda bitumba? Lisusu, ata soki bikólo etiki bitumba to te, Nzambe akosala nini mpo na kosilisa mikakatano oyo ezali konyokola bato?
[Bililingi na lokasa 6]
Makambo ya nsɔmɔ mpe minyoko ekendeke nzela moko na matata na kati ya bato
[Bililingi na lokasa 7]
Na likoló: Bato bakimá bitumba
Ndenge nini bato oyo batángamaki ete bayebi makambo mingi bakokaki kosangana na mobulu ya nsɔmɔ ndenge wana?
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Bato bakimá bitumba na Rwanda: UN PHOTO 186788/J. Isaac; Babuki babuludingi World Trade Center : AP Photo/Amy Sancetta