Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Janvier lok. 31
  • “Pole ya kokoka”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Pole ya kokoka”
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Miinda ya mwa nyama babengi luciole to epela mwinda
    Lamuká!—2014
  • Tolanda pole na mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Pole eyei na mokili”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • “Tiká pole na bino engɛnga”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Janvier lok. 31

“Pole ya kokoka”

SOKI osilá kosimba mwinda ya lotiliki oyo ezalaki kopela mpo na mwa ntango, oyebi ete yango ekoki kokóma mɔtɔ makasi. Molunge oyo ebimaka na mwinda eutaka na nguya ya kura oyo ebebaka mpamba. Mwinda ya kura oyo tomeseni na yango esalelaka kaka ndambo 1 likoló na 10 (10 %) ya nguya ya kura mpo na kopelisa mwinda yango, nzokande nguya oyo etikalaka (90 %) ebebaka ndenge ebongwanaka molunge. Nzokande, nyaikole (luciole) mwa nyama-nkɛkɛ moko ya moke, oyo ebimisaka pole, (talá awa na likoló, bayeisi yango monene) esalelaka nguya na yango ya kongɛngisa pene na nyonso (100 %).

Nyaikole ebungisaka nguya kaka moke na molunge, yango wana kongɛnga oyo ebimisaka ebengamaka “pole ya kokoka.” Ndenge nini nyaikole ebimisaka kongɛnga yango? Libumu ya nyaikole ezalaka na eloko moko babengi luciférine. Ntango mopɛpɛ (oxygène) ekɔti na libumu na nzela ya batiyo oyo babengi trachée, mopɛpɛ yango esanganaka na luciférine, mpe ebimisaka kongɛnga moko mwa moke lokola langi ya mai ya mosaka to mpe lokola mai ya pɔndu oyo ezali mwa moke motane.

Lisusu, baselile ya nyaikole oyo ebimisaka pole ezali na oyo babengi cristaux d’acide urique, oyo ezongisaka mpe etindaka na libándá kongɛnga oyo ekómelaka yango. Bato ya siansi balobaka ete nyaikole esalelaka kongɛnga na yango mpo na kobenda basi to mibali mpe motindo mokomoko ya nyaikole ezali na lolenge na yango ya kongɛngisa pole.

Ondimi te ete ndenge mwa bikelamu wana ya mike bisalemi esanzolaka Yehova Nzambe, Mozalisi na yango? Ɛɛ, ndenge mokomi ya nzembo amonisaki yango, “Tiká ete nyonso na mpema básanzola Yehova.”​—⁠Nzembo 150:⁠6.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]

© Darwin Dale/Photo Researchers, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto