Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Avril nk. 16-17
  • Nzambe akokanga miso na bolɛmbu na biso?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe akokanga miso na bolɛmbu na biso?
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Moize mpe Davidi
  • Etumba mpo na kotika masumu
  • Nzambe alingi tóbundisa bolɛmbu na biso
  • Tozali na nguya ata na kati ya bolembu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Biblia ezali kokoba kobongola yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Tókesenisa bolembu, motema mabe, mpe kobongola motema
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Okoki kozala ntango nyonso na etamboli malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Avril nk. 16-17

Engebene Biblia

Nzambe akokanga miso na bolɛmbu na biso?

‘Nazali moto mabe te! Nameki ndenge nyonso mpo natika etamboli na ngai ya mabe, kasi nazali kokoka te!’

YO MPE ozalaka na makanisi ya ndenge wana to oyebi moto mosusu oyo azali na makanisi ya ndenge wana? Mingi bakanisaka ete ezali mpasi mpo ete moto atika bizaleli mabe oyo ekɔtelá ye mpenza. Bato mosusu bakómá baombo ya masanga, ya makaya mpe ya bangi. Ebele ya bato mosusu batondi na lokoso. Ezali mpe na bato oyo bamipesi na pite, balobaka ete bakokoka te kotika mpo bakómá mpenza baombo na yango.

Lokola Matai 26:41 emonisi yango, Yesu alobaki na boboto mpenza ete ayebi bolɛmbu ya moto malamumalamu.a Kutu, lisolo mobimba ya Biblia emonisi polele ete Yehova Nzambe mpe Yesu bayokelaka bato mawa. (Nzembo 103:​8, 9) Kasi, tosengeli kozela ete Nzambe akangaka miso na mabe na biso nyonso?

Moize mpe Davidi

Tótalela lisolo ya Moize. Moize ayebanaki ete azali “moto ya [boboto, NW] mingi, na koleka bato nyonso bazalaki na nse” mpe asalaki makasi mpo na kobatela ezaleli ya malamu wana. (Mituya 12:⁠3) Ntango Bayisalaele bazalaki kotambolatambola na esobe, basalaki makambo na ndenge oyo ebongi te mpe bazangaki limemya epai ya Yehova mpe epai ya bamonisi na ye. Na nyonso wana, Moize na komikitisa nyonso, atikaki ete Nzambe atambwisa ye.​—⁠Mituya 16:​12-14, 28-30.

Nzokande, ntango mobembo wana ya molai mpe ya kolɛmbisa ekómaki pene na nsuka, Moize asilikaki liboso ya ekólo mobimba mpe atosaki te malako ya Nzambe. Nzambe alimbisaki ye, kasi akangaki miso na likambo yango? Te. Alobaki na Moize ete: ‘Mpo ete ondimelaki ngai te . . . , okokamba koyangana oyo kati na mokili mopesaki ngai bango te.’ Moize asengelaki kokɔta na Mokili ya Ndaka te. Na nsima ya mbula 40 ya kobunda mpo na kozwa libaku malamu wana, libunga moko monene euti na mbeba ya bomoto ekweisaki ye.​—⁠Mituya 20:​7-12.

Moto mosusu oyo alingaki Nzambe mpe amonisaki bolɛmbu ezali Mokonzi Davidi. Mokolo moko Davidi atikelaki mposa na ye ya nzoto nzela mpe asalaki ekobo na mwasi ya moto. Na nsima, amekaki kobomba mabe na ye na kobomisáká mobali ya mwasi wana. (2 Samwele 11:​2-27) Nsima na yango, ayokaki mawa mingi mpo na mabe oyo asalaki mpe Yehova alimbisaki ye. Kasi, Davidi abebisaki libota moko, mpe Yehova abatelaki ye te na bampasi oyo elandaki nsima. Mwana mobali ya Davidi abɛlaki makasi mpe atako Davidi azalaki kosala mabondeli mpo na mwana na ye, Yehova abikisaki ye te. Mwana yango akufaki, mpe kobanda wana, bampasi elandanaki na ndako ya Davidi. (2 Samwele 12:​13-18; 18:33) Davidi abukaki mbuma mabe mpo atikelaki bolɛmbu na ye nzela.

Bandakisa wana emonisi ete Nzambe atikaka bato bábuka mbuma ya misala na bango. Baoyo balingi kosalela ye basengeli kosala makasi bálonga bolɛmbu ya elimo na bango mpe bákóma baklisto ya malamu mpenza. Na ekeke ya liboso mingi basalaki bongo.

Etumba mpo na kotika masumu

Ebongi mpenza kotalela ntoma Paulo lokola ndakisa mpo na bomoi ya boklisto. Kasi, oyebi ete azalaki ntango nyonso kobundisa bolɛmbu na ye? Baloma 7:​18-25 elobeli polele mpenza kowelana yango, to “etumba,” ndenge vɛrsɛ 23 emonisi yango. Paulo alɛmbaki kobunda te, mpamba te ayebaki ete lisumu etikaka moto te.​—⁠1 Bakolinti 9:​26, 27.

Bandeko mosusu na lisangá ya Kolinti ya kala bazalaki na momeseno ya kosala masumu. Biblia elobi ete bazalaki ‘bato ya pite, bato ya ekobo, mibali oyo balalaka na mibali, bato ya lokoso mpe balangwi-masanga.’ Kasi, Biblia elobi lisusu ete basilaki kosukolama pɛɛ. (1 Bakolinti 6:​9-11) Na ndenge nini? Boyebi ya solo, makita ya lisangá mpe elimo ya Nzambe epesaki bango makasi ya kotika misala mabe na bango. Na nsima, batángamaki bayengebene na miso ya Nzambe na nkombo ya Klisto. Ɛɛ, Nzambe alimbisaki bango mpe na ndenge yango apesaki bango lisosoli ya malamu.​—⁠Misala 2:38; 3:⁠19.

Paulo mpe baklisto ya Kolinti batalelaki mposa na bango ya kosala masumu lokola likambo moke te. Kasi babundisaki nde yango, mpe na lisalisi ya Nzambe, balongaki yango. Basaleli wana ya Nzambe na ekeke ya liboso bakómaki na etamboli ya malamu atako bafandaki na kati ya bato mabe mpe bazalaki na makanisi ya kozanga kokoka. Ezali boni mpo na biso?

Nzambe alingi tóbundisa bolɛmbu na biso

Mbala mosusu ata soki obundi na bolɛmbu, yango ekoki te kosila libela. Atako tosengeli te kotambwisama na kozanga kokoka na biso, tokokoka kosilisa yango te. Kozanga kokoka yango ebotaka bolɛmbu oyo ekoki koumela. Atako bongo tosengeli te kotikela mposa ya bolɛmbu na biso nzela. (Nzembo 119:11) Likambo yango ezali na ntina nini?

Ezali na ntina mpamba te Nzambe akoki kopesa nzela te ete kozanga kokoka ezala libaku ya kosala mabe. (Yuda 4) Yehova alingaka ete bato bámipɛtola mpe bázala na bizaleli ya malamu na bomoi na bango. Biblia elobi boye: “Bóyina oyo ezali mabe.” (Baloma 12:⁠9) Mpo na nini Nzambe azwi ekateli wana ya makasi?

Moko ya bantina ezali ete kotikela bolɛmbu nzela ezali likama. Na Bagalatia 6:​7, Biblia elobi ete: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” Mbala mingi, baoyo bamipesi na milangwa, lokoso mpe na kindumba, babukaka mbuma mabe ya misala na bango. Kasi ezali na ntina mosusu oyo eleki monene.

Lisumu epesaka Nzambe motema mpasi. “Ekabolaka” biso na Yehova. (Yisaya 59:⁠2) Lokola baoyo bazali kosala masumu bakoki kondimama na ye te, Yehova alendisi bango boye: “Bómisukola, bómipɛtola; . . . bótika kosala mabe.”​—⁠Yisaya 1:⁠16.

Mozalisi na biso azali na bolingo mpe na motema mawa. “Alingi te moto ata moko abomama kasi alingi nde bato nyonso bákóma na kobongola motema.” (2 Petelo 3:⁠9) Kotikela bolɛmbu nzela ntango nyonso ekoki kosala ete Nzambe andima biso te. Lokola Nzambe akangelaka bolɛmbu na biso miso te, biso mpe tosengeli kokangela yango miso te.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yesu alobaki ete: “Elimo . . . ezali na molende, kasi mosuni ezali na bolɛmbu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto