Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobaye ezali malamu mpo na yo!
  • Canneberge esalisaka bamaladi
  • Kobatela bɔɔngɔ ya bato oyo bakangami motema
  • Bapekisi bana mike kokɔta mosala ya soda
  • Bampaka mpe nkisi ya monganga
  • Elɛngi ya bangi ebomaka
  • Maloba mabe na mosala
  • Misala ya ndako ezali ngalasisi mobimba
  • Béton ya mposo ya loso
  • Mwasasu ya banyama
    Lamuká!—1998
  • Salelá nkisi ya monganga na likebi
    Lamuká!—1996
Lamuká!—2003
g03 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Kobaye ezali malamu mpo na yo!

Zulunalo moko (Salud) ya Espagne, oyo ebimaka pɔsɔ na pɔsɔ elimboli ete mwana oyo azali naino na libumu ya mama na ye abandaka kobaye (bâiller) soki akokisi pɔsɔ 11. Emonani lokola ete banyama mingi oyo emɛlisaka bana na yango mabɛlɛ, ezala mpe bandɛkɛ mosusu mpe banyama mosusu oyo ebendanaka na libumu, esalaka eloko yango, oyo eyaka yango moko. Atako ntina mpenza oyo tobayaka eyebani naino te, bato oyo bayekolaki likambo yango bamonisaki ete mbala mingi kobaye ekendeke nzela moko na konyɔlisa nzoto. Bamonaki ete koningisa nzoto bongo “etindaka makila etambola mbangumbangu mpe motema ebɛta nokinoki, enyɔlisaka misuni mpe matonga ya nzoto.” Ntango tokangaka monɔkɔ soki toyoki mposa ya kobaye, tomipimelaka matomba oyo yango epesaka. Yango wana, bato oyo bayekolaki likambo yango bapesi toli ete soki ezali na esika oyo ebongi, tosengeli mpenza “kofungolaka monɔkɔ mpe elongi mobimba” ntango toyoki mposa ya kobaye. Oyebi, ntango mosusu soki obaye malamu mpenza, yango ekoki kopesa yo esengo mokolo wana mobimba!

Canneberge esalisaka bamaladi

Zulunalo moko (Times) ya Londres elobi ete: “Mai ya mbuma babengi canneberge eyebani mingi banda kala. Bato ya Amerika ya kalakala bazalaki komɛla yango lokola nkisi mpe lokola masanga ya sukali, [mpe] bato ya Amerika oyo bazalaki kosala mibembo na mbu bazalaki komɛla yango lokola nkisi mpo na maladi babengi scorbut.” Lokola etondi na vitamine C mpe na biloko babengi antioxydants, “mai ya canneberge ezali mpe na likoki ya koboma mikrobe; yango wana ezalaka makasi lokola nkisi mpo na koboma mikrobe oyo epesaka maladi na libenga ya masuba.” Kasi makasi na yango ezalaka te mpo ekómisaka masuba aside makasi, ndenge bazalaki kokanisa yango liboso. Nzokande, zulunalo yango ebakisi ete, makasi na yango ezali kouta nde na biloko na yango oyo “ebundisaka mikrobe babengi E. coli [oyo epesaka bamaladi mingi, lokola cystite to maladi ya libenga ya masuba] mpo ekangama te na nzela ya masuba. Esalaka ete mikrobe efanda wana te mpe moto abɛla maladi yango te.” Bato oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete mai ya canneberge esalisaka mpe maladi ya mino.”

Kobatela bɔɔngɔ ya bato oyo bakangami motema

Zulunalo moko ya Canada (Toronto Star) elobi ete: “Boyekoli mibale oyo basali mpo na mbala ya liboso emonisi ete, soki batye bato oyo bakangami motema na malili makasi mpo nzoto na bango ekóma mpiɔ, bakoki kobika mpe bɔɔngɔ na bango ekobeba te.” Ntango bayekolaki malamu likambo yango na bikólo mitano ya Mpoto mpe na Australie, bamonaki ete kotya moto oyo akangami motema na esika ya mpiɔ ekosala ete bɔɔngɔ mpe mayele na ye etika kosala te. Bato oyo bakangamaki motema mpe bamemaki bango na lopitalo wana bazalaki komiyeba lisusu te, batyaki bango na mopɛpɛ ya malili mpe bazipaki bango mabenga ya ngalasi na boumeli ya ngonga banda 12 tii 24 mpo nzoto na bango ekóma mpiɔ (33o C). Zulunalo yango ebakisi ete Beth Abramson, oyo azali mongana ya maladi ya motema, alobi ete tekiniki wana ya pɛtɛɛ, oyo mpe ezali kosɛnga mbongo mingi te, esalaka ete bɔɔngɔ ezala na mposa ya oxygène mingi te mpe ebotisa te biloko mosusu oyo ebomaka baselile na yango. Tekiniki ya kotya moto oyo akangami motema na malili ebimisi matomba malamu, yango wana minganga ya Canada, ya États-Unis, ya Australie mpe ya Mpoto bapesi toli ete ebongi kosalela yango mbala nyonso oyo bamemi moto yango na lopitalo.”

Bapekisi bana mike kokɔta mosala ya soda

Na mokolo ya 12 Febwali 2002, ONU epesaki liyebisi ete: “Boyokani moko kati na bikólo, oyo epekisi bana mike kokɔta mosala ya soda ebandi lelo, nsima ya mbula zomi ya milende oyo bikólo mingi esalaki mpo na kobunda na likambo yango, oyo ezali moko ya makambo minene oyo batalelaka lokola kobuka mibeko etali ntomo ya bato na mokili mobimba.” Boyokani wana, oyo bikólo 96 endimaki, “elobi ete soki moto akokisi naino mbula 18 te, basengeli kokɔtisa ye mosala ya soda na makasi te; etyeli mpe bikólo mobeko ete Leta akozwa baoyo balingi bango moko kokɔta mosala ya soda kaka soki bakokisi mbula 16.” Lelo oyo, balobaka ete bana soki “500 000 bazali basoda ya baguvɛrnema to basoda batomboki na bikólo 85 na mokili mobimba; bana koleka 300 000 na kati ya basoda yango bazali kobunda bitumba oyo ezali kosalema na bikólo koleka 35.” Na nsango oyo ONU epesaka na Internet, bamonisi ete mingi kati na bana yango, bakangamaki na makasi mpe “babɛtamaka to babomamaka soki bameki kokima. Bana basi nde bazali mpenza na likama koleka, mpamba te mbala mingi basangisaka na bango nzoto.”

Bampaka mpe nkisi ya monganga

Zulunalo moko ya Allemagne (Der Spiegel) elobi ete: “Bato oyo bazali na mbula koleka 60, mbala mingi bamɛlaka nkisi ndenge misato na mbala moko, to mbala misato koleka bato oyo bakokisi naino bambula wana te. Nzokande, kosangisa bankisi ekoki kozala na likama, ekoki kobimisa mwa bampasi mosusu ya mikemike; likama yango ekómaka makasi soki moto azali komɛla bankisi ndenge na ndenge mbala moko.” Mokakatano mosusu ezalaka ete “mbala mingi, minganga oyo basalisaka mabota . . . babosana ete soki moto abandi kokóma mobange, bangei na ye ezalaka lisusu na makasi mingi te.” Bankisi ekobanda kotondana na nzoto. Yango wana, zulunalo yango elimboli ete “bankisi oyo moto ya mbula 40 akoki komɛla mpe ekozala likama te mpo na ye, ekoki kokóma pwazɔ mpo na moto ya mbula 70. Bampaka mingi bayeisaka kutu makambo mabe koleka ntango baboyaka komɛla mai mingi.” Lapolo yango ebakisi ete kaka kozanga mai na nzoto ekoki kobimisa mpasi lokola oyo eutaka na bankisi ya kokitisa mpasi, na nkisi oyo epesaka mpɔngi mpe oyo ekitisaka tansyo. Bayokaka makambo lokola: mobulungano na motó, kobosanabosana, mpe kizunguzungu, makambo oyo bato mingi bakanisaka ete eyaka mpo na bompaka.

Elɛngi ya bangi ebomaka

Zulunalo moko (El País) ya Espagne elobi ete kati na bato zomi oyo balekisaka butu mobimba na kobina na ntango ya raves, libwa bamɛlaka ecstasy, bangi oyo esalemi na nkisi babengi amphetamine. Eleki kala mpenza te, bilenge mibale oyo bazalaki kobina na ntango ya raves na Espagne bakufaki mpo bamɛlaki bangi yango mingi. Moninga na bango moko andimaki ete “bazalaki ntango nyonso kopesa biso bangi.” Nini etindaka bilenge bámɛlaka bangi yango? Ezali mpo balandaka baninga na bango, mpe bangi yango epesaka bango mwa bisengo ya ntango mokuse mpe esilisaka bango nsɔni. Mbala mingi, bilenge basangisaka ecstasy na bangi mosusu, lokola bangi ya matiti, cocaïne mpe masanga makasi; yango nyonso ebakisaka mindɔndɔ na nzoto. Programme national de lutte contre la drogue na Espagne elobi ete ecstasy esalaka ete moto abosana makambo, anyokwama na makanisi, ‘apemaka malamu te, abima makila na bɔɔngɔ mpe ata akufa.’

Maloba mabe na mosala

Zulunalo moko (Gazette) ya Montréal, na Canada, elobi ete na bisika mingi ya mosala, bato mingi bakómi kaka na maloba mabe. Bato mosusu ya mayele balobi ete maloba mabe ematisaka mitungisi na esika ya mosala. Karen Harlos, azali profesɛrɛ na makambo etali bizaleli ya bato na esika ya mosala, na Iniversite ya McGill, alobi boye: “Soki bazali kotɔnga ye, maloba mabe ekoki kosala ete mosali asala lisusu malamu te, amona ete bazali kopesa ye kilo te mpe nzoto na ye ekozala mpenza kolɔngɔnɔ te.” Na kotalela zulunalo yango, mbala mingi “ezali mokonzi nde abandaka elobeli ya ndenge wana” na esika ya mosala, mpe bamosusu balandaka ye. Soki olɛmbi na maloba ya mabe na esika ya mosala, zulunalo yango epesi toli okende epai “ya moto oyo omoni ete alekisi ndelo na likambo yango, mpe osɛnga ye na boboto atika kosala bongo na miso na yo.”

Misala ya ndako ezali ngalasisi mobimba

Kosalela aspirateur, kosukola maninisa mpe kotambwisa pusupusu ya mwana ekoki mpe kozala ngalasisi ya malamu mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto? Eyano ezali ɛɛ, na kotalela ndenge bauti koyekola likambo yango mikolo oyo na Iniversite ya Queensland, na Australie. Zulunalo moko (Canberra Times) elimboli ete bato oyo bayekolaki likambo yango bazwaki bamama nsambo oyo bazalaki na bana mike oyo bakokisi naino mbula mitano te, balatisaki bango masini moko mpo na koyeba oxygène oyo bazalaki kopema na mokolo mobimba wana bazali kosala misala na bango ya ndako. Na nsuka, “bamonaki ete misala mosusu ya ndako esɛngaka moto abimisa mpenza makasi na ye ya nzoto, mpe yango ekokani na ngalasisi oyo ebongi mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto.” Lapolo yango ebakisi ete Profesɛrɛ Wendy Brown amonaki ete “misala ya ndako oyo basi basalaka esɛngaka mpe kobimisa makasi ya nzoto kaka ndenge moko na moto oyo azali kotambola nokinoki, kopusa velo, to kobɛta mai.” Alobaki mpe ete “touti kaka kobanda koyekola likambo yango, kasi tomoni polele ete moto moko te akoki koloba ete basi bazali na gɔigɔi, wana banda ntɔngɔ tii mpokwa, bazali se kotambolatambola na misala.”

Béton ya mposo ya loso

Zulunalo moko ya Brésil (Jornal da USP) elobi ete: “Bato ya siansi bamoni ete mbongwana monene ekosalema na mosala ya kotonga ndako. Yango ekobimisa bandako ya makasi koleka mpe oyo ekoumela mingi, mbula to mopɛpɛ ekokweisa yango te. Nyonso wana mpo bato ya siansi na eteyelo ya ba ingénieurs na Iniversite ya São Paulo, na Brésil basali sima moko ya sika.” Basangisaki silice to mwa zɛlɔ oyo euti na mputulu ya mposo ya lɔsɔ ná sima; ebimisaki sima moko ya pɛpɛlɛ, ya makasi mpenza. Sima yango esalaka béton moko oyo ezalaka na madusu mikemike mingi te, oyo ekoki kobeba nokinoki te na mai, na moi to na biloko mosusu mpe ezali makasi mbala misato to minei koleka béton oyo toyebi. Zulunalo yango elobi ete na béton wana, bonene ya makonzí oyo esimbaka ndako ekokita mpenza (30 %), “kasi ekozala na makasi se ndenge moko, mpe ekosala ete esika etikala monene na ndako, bandako ekozala lisusu kilo mingi te, mosala ya kotonga ekoumela te, biloko ya kotonga na yango ndako ekosɛnga mbongo mingi te mpe ekosɛnga lisusu bato mingi mpenza te mpo na kotonga.” Na mokili mobimba, mbula na mbula bazali kobimisa batɔni ya mposo ya lɔsɔ soki milio 80; ezali na mposo wana nde bazali kobimisa tɔni 3,2 ya silice.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto