Salelá nkisi ya monganga na likebi
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA NIGERIA
MWASI moko amilelaki ete azalaki koyoka motó mpasi mpe estomá ezalaki koswa. Monganga asololaki na ye mwa moke. Na nsima akomelaki ye ete akolanda kozwa ntonga na boumeli ya mikolo misato mpo na malaria, mpe akomela paracétamol (acetaminophen) mpo na kosilisa mpasi na motó, mbuma mibale mpo na kokitisa mpasi ya estomá, nkisi ya mpɔngi mpo na kolɛmbisa mitungisi, mpe na nsuka, asengelaki kolandela kozwa multivitamines. Esengelaki kobimisa mosolo mingi mpo na kosomba nkisi nyonso wana, kasi mwasi yango aboyaki te. Azongaki na esengo, kondimisamáká ete nkisi yango ikosilisa mikakatano na ye.
Kosolola na monganga na lolenge wana emonanaka mingi na mikili ya Afrika ya wɛ́sti. Ankɛ́tɛ moko esalemaki na mboka moko monene kuna emonisaki ete minganga na mapitalo ya Letá, nsima ya kosolola na mobɛ́li mbala moko, bakomaka mwayene ya 3,8 ya nkasa ya nkisi ikeseni. Nzokande, bato mingi bakanisaka ete monganga malamu azali oyo akomaka nkisi mingi.
Lolenge oyo bato ya Afrika ya wɛ́sti batyaka motema na nkisi ya monganga ekoki kososolama soki otaleli lolenge makambo matali kolɔngɔ́nɔ́ ya nzoto mazalaki kuna. Esili koleka mbula 40, mokomi John Gunther akomaki na ntina na ntango ya kala ete: “Bokúla oyo ya Baombo ebomaki bobele baindo te, . . . kasi ebomaki mpe mindele, mpe ezali eteni ya Afrika oyo eyebani na masapo lokola ‘Lilita ya mondele.’ Mokonzi monene ya bokúla ya Guinée na boumeli ya bikeke mingi ezalaki bongo ngungi. Kɔ́ngɔ́ (fièvre jaune), hématurie, malaria, ezalaki baponami mpe bibundeli makasi ya mokonzi yango. Ezingelo mabe ya bokúla ya Wɛ́sti ezali likambo ya ntango ya kala te, kasi likambo oyo lizali na makanisi ya bato lelo. Mwa lisapo moko eyebani mingi elobelaka mokonzi moko ya Letá, oyo, eleki kala mingi te batindaki ye ete akenda kosala mosala na Nigeria mpe asɛngaki ete akóma asila-sanza. Mokonzi na ye kati na biro ya boyangeli azongisaki: ‘Asila-sanza?’ ‘Moninga na ngai, moto moko te oyo akendá na Nigeria aumelá na bomoi kino kokóma asila-sanza.’”
Ezalela esili kobongwana. Lelo oyo, ezali na nkisi mpo na kobundisa te bobele makɔnɔ oyo mazali kopalanganisama na ngungi kasi mpe mpo na makɔnɔ mosusu mingi. Kokata mangwele yango moko esili kokitisa motángo ya bakufi na makɔnɔ lokola kintútu, kɔsukɔsu ya kokanga mpanzi, tetanɔ́si, mpe diphtérie. Na lisalisi ya mangwele, kolokóto ezali lisusu te. Mosika te bukabuka mpe ekokóma bokɔnɔ ya kala.
Ezali likambo ya kokamwa te ete Baafrika mingi lelo oyo bazali na elikya makasi na motuya ya makambo matali minganga. Ya solo, elikya motindo wana esuki bobele te na Afrika ya wɛ́sti. Na États-Unis, minganga bakomaka nkasa ya nkisi koleka 55 miliare mbula na mbula. Na France, bato basombaka mwayene ya bikwokolo 50 ya nkisi ya mbuma mbula na mbula. Mpe na Japon na mwayene moto moko abimisaka koleka badolare 400 na mbula mpo na kosomba nkisi.
Matomba mpe makámá
Nkisi ya mikolo na biso esalisi bato mingi. Na ntango esalelami malamu, epesaka kolɔngɔ́nɔ́ malamu na nzoto, kasi soki esalelami malamu te, ekoki kopesa makámá mpe mbala mosusu koboma. Na ndakisa, na États-Unis, bato soko 300 000 bakɔtaka lopitalo mbula na mbula mpo na mikakatano oyo miutaka na nkisi, mpe bato 18 000 bakufaka.
Mpo na kosalela nkisi na likebi, ezali na ntina koyeba ete ezalaka ntango nyonso na eloko moko oyo ekoki kopesa likámá. Nkisi nyonso, ezala aspirine, ekoki kobimisa mikakatano. Mikakatano yango mibimaka mingi soki ozali komɛla mitindo mingi ya nkisi na mbala moko. Bilei mpe bimeli ezalaka na bopusi likoló na lolenge oyo nkisi ekoki kosala kati na nzoto na yo mpe ekoki kokólisa to koboma nguya na yango.
Ezali mpe na makámá mosusu. Nzoto na yo mbala mosusu ekoki koboya nkisi moko boye. Soki ozali kosalela nkisi te lolenge monganga akomelaki yo—dozɛ ya sikisiki mpo na ntango mpe ya sikisiki—mbala mosusu ekosalisa yo te mpe ekoki kútu kosala yo mabe. Likambo motindo yango ekoki komonana soki monganga na yo akomeli yo nkisi ya sikisiki te to oyo esengeli te. Ozali mpe na likámá soki ozali kosalela nkisi oyo ileki dati na yango ya kosalelama, oyo ibongi mpenza te to oyo ya mabe.
Mpo na kokitisa makámá, osengeli koyeba malamumalamu nkisi nyonso oyo ozali kosalela. Okoki kozwa matomba mingi na koyebáká makambo na yango.
Antibiotiques—Nguya mpe bolɛmbu na yango
Uta kobimisama na yango esili koleka mibu 50, antibiotiques esili kobikisa bamilió ya bato. Esili kolɛmbisa makɔnɔ oyo mabomaka lokola, mába, maladi ya ntólo, maladi ya mpanzi, scarlatine, mpe kasɛndɛ. Ezali mpe na litomba monene na kosalisama na mikrobe mosusu.
Monganga Stuart Levy, profɛsɛrɛ na Tufts University Medical School na États-Unis alobaki ete: “[Antibiotiques] esili kokólisa siansi ya minganga. Ezali esaleli oyo ekokisaki mokumba monene koleka kati na lisoló ya siansi ya minganga.” Monganga mosusu alobaki boye: “Ezali libanga ya moboko likoló na yango siansi ya minganga na mikolo na biso etongami.”
Nzokande, liboso ete okenda epai na monganga mpo na kotuna lisalisi, talelá matomba mabe ya antibiotiques. Ntango antibiotiques esalelami na lolenge lobongi te ekoki kosala yo mabe na esika ete ebikisa yo. Yango esalemaka bongo mpamba te antibiotiques ebundisaka mpe ebomaka mikrobe kati na nzoto. Kasi ebomaka ntango nyonso te mikrobe nyonso ya makasi; mikrobe mosusu etɛmɛlaka yango. Mikrobe oyo etɛmɛlaka antibiotiques eyikanaka na nsima mpe epalanganaka kolongwa epai na moto moko kino epai na moto mosusu.
Na ndakisa, liboso Penicilline ezalaki antibiotique moko makasi mpo na koboma mikrobe. Kasi sikawa, ebomaka nyonso te mpo na koyikana ya mikrobe oyo etɛmɛlaka yango, mpe mpo na bakompanyi ya bankisi oyo ezali kobimisa mitindo ndenge na ndenge ya penicilline.
Nini okoki kosala mpo na kopɛngola mikakatano? Soki ozali mpenza na mposa ya antibiotiques, osengeli kondimisama ete ekomami na monganga oyo ayebi mosala malamu mpe ete euti na esika ya sikisiki. Kopusa monganga na yo te ete akomela yo antibiotique—mbala mosusu akoki kosɛnga na yo ete osala liboso ekizamɛ́ mpo na kondimisama ete oyo akokomela yo ezali mpenza yango oyo esengeli mpo na kobikisa bokɔnɔ na yo.
Ezali mpe na ntina mpo na yo ete okamata dozɛ oyo esengeli mpe osalela yango na ntango oyo esengeli. Osengeli kolandela kirɛ mobimba ya antibiotique, ata soki oyoki malamu liboso ya kosilisa yango.
Ntonga ezalaka malamu koleka nkisi ya mbuma?
“Nalingi ntonga!” Maloba wana malobamaka mingi na babɛli epai ya minganga na mikili ya bobóla. Ntina ya bosɛnga yango ezali likanisi oyo ete nkisi ekokɔta mbala moko na misisa ya makila mpe ezalaka na nguya mingi koleka nkisi ya mbuma. Kati na mikili misusu ‘minganga oyo batubaka ntonga kasi bazali na mapolomi te’ bamonanaka mingi kati na bazándo.
Ntonga epesaka makámá oyo nkisi ya mbuma ezalaka na yango te. Soki sɛrɛ́ngɛ ezali pɛto te, mobɛli akoki kozwa bokɔnɔ ya hépatite, tetanɔ́si, ata mpe sida. Ntonga oyo ezali na bosɔtɔ ekoki kovimbisa mpe kopesa mpasi na nzoto. Makámá mazalaka mingi soki ntonga yango etubami na moto oyo azali na makoki ya monganga te.
Soki ozali mpenza na mposa ya kozwa ntonga, osengeli kondimisama ete ezali kotubama na moto oyo ayekoli mpenza mosala ya monganga. Mpo na libateli na yo moko, osengeli lisusu kondimisama ntango nyonso ete ntonga mpe serɛ́ngɛ ezali pɛto.
Nkisi ya mabe
Engebene Organisation mondiale de la santé (O.M.S.), bakompanyi nyonso oyo ezali kosala nkisi ezali komonisa mpenza mombongo monene, oyo ezali kokɔtisa soko badolare miliare 170 mbula na mbula. Na ntina na mposa makasi ya kosalela mwango yango, bato oyo bayebani te basili kobimisa nkisi ya mabe. Nkisi ya mabe imonanaka lokola nde ya malamu—etikɛti na yango mpe bikwokolo na yango mpe emonanaka malamu—nzokande izali mpenza mabe.
Atako nkisi ya mabe izali bipai binso, mingimingi na mikili ya bobóla, imemaka matomba mabe mpenza. Na Nigeria, bana 109 bakufaki na maladi ya ngei nsima ya komela nkisi ya mai oyo izalaki na dissolvent industriel. Na Mexico, baoyo bazikaki mɔ́tɔ bayokaki mpasi mingi na lomposo ya nzoto mpamba te basalelaki nkisi oyo izalaki na mputulu ya mabaya, kafé mpe salité. Na Burma, motángo monene ya bato ya mboka bakufaki mpo ete basalelaki nkisi ya mabe oyo ebundisaki fɛ́fɛlɛ ya malaria te. Organisation mondiale de la santé elobi ete: “Baoyo batyami na likámá koleka ezali bongo babóla, baoyo ntango mosusu bakanisaka ete ezali malamu ntango basombi nkisi oyo imonani lokola izali makasi, oyo isalemi na kompanyi moko oyo batyelaka motema.”
Lolenge nini okoki komibatela na nkisi ya mabe? Ndimisama ete nkisi oyo ozali kosomba iuti na esika oyo eyebani malamu, lokola na farmasí ya lopitalo. Kosomba epai na bateki ya balabála te. Farmasiɛ́ moko na engumba Benin, na Nigeria, akebisaki ete: “Epai na bateki ya balabála, kotekisa nkisi ezali bobele mombongo. Bazali kotekisa nkisi lokola bonbon to bisikiti. Nkisi oyo batekaka mbala mingi ileka dati ya kosalela to izali ya mabe. Bato yango bayebi ata eloko moko te na ntina na nkisi oyo bazali kotekisa.”
Mokakatano ya bobóla
Kosalisama oyo moto azwaka etalelaka mbala mingi mosolo oyo ye azali na yango. Mpo na kobimisa mosolo mingi te mpe kobungisa ntango mingi te, bato na mikili ya bobóla mbala mosusu baboyaka kokenda liboso epai ya monganga, na bongo balekaka mbala moko na farmasí kosomba nkisi oyo engebene mobeko esɛngeli kopesama bobele na ndingisa ya monganga. Mpo ete basilaki kosalela nkisi moko liboso to mpe baninga balakisaki bango yango, bayebi oyo balingi mpo na bokɔnɔ na bango. Kasi oyo balingi mbala mosusu ekoki kozala te oyo bazali na yango mposa.
Bato balukaka kolekisa mosolo mingi te na myango misusu. Monganga akotinda moto ya maladi ete asalisa ekizamɛ́ bongo na nsima akokomela ye nkisi. Mobɛli akei na lokasa ya nkisi na farmasí kasi akuti ete izali na ntalo makasi. Na bongo, na esika ete aluka mosolo mosusu, mbala mingi akosomba nkisi oyo izali na ntalo moke to mpe akosomba bobele ndambo ya nkisi kati na nyonso oyo esɛngamaki.
Ozali mpenza na mposa ya nkisi ya monganga?
Soki ozali mpenza na mposa ya nkisi ya monganga, yebá malamu nkisi oyo ozali kosalela. Kobanga te kotuna mituna na monganga to na farmasiɛ́ na ntina na nkisi oyo bakomeli yo. Ozali na lotómo ya koyeba yango. Soki te, ezali nzoto na yo nde ekoki kozwa mpasi.
Soki osaleli nkisi na yo na lolenge malamu te, mbala mosusu okobikisama na maladi na yo te. Osengeli koyeba dozɛ oyo okosalela, ntango nini osengeli kosalela yango mpe na boumeli ya ntango boni okosalela yango. Osengeli mpe lisusu koyeba bilei, bimeli mpe nkisi mosusu to misala misusu oyo osengeli kotika ntango ozali kosalela yango. Mpe osengeli koyeba nini yango ekoki kobimisa mpe koyeba kosala nini na ntango yango ebimi.
Kobosana te ete nkisi ebikisaka makɔnɔ nyonso te. Ntango mosusu ozali mpenza na mposa ya nkisi te. Zulunalo World Health, oyo ebimisami na O.M.S. elobi ete: “Salelá nkisi bobele na ntango yango esengeli. Bopemi, bilei malamu mpe komela mai mingi ezalaka mbala mingi malamu mpo na kosunga moto ete ayoka malamu.”
[Etanda/Elilingi na lokasa 13]
Esili koleka soko mbula 2 000, mokomi na ntɔ́ki Moloma moko akomaki ete: “Nkóto ya makɔnɔ esɛngaka nkóto ya nkisi.” Lelo oyo, mokomi na ntɔ́ki yango akokaki koloba ete: ‘Nkóto ya makɔnɔ esɛngaka nkóto ya nkisi ya mbuma.’! Ya solo, emonani ete ezali na nkisi ya mbuma moko mpo na bokɔnɔ nyonso, oyo ezali solo to ya makanisi mpamba. Engebene Banque mondiale, na mokili mobimba ezali na mitindo 100 000 ya nkisi, oyo misalemi na biloko koleka 5 000.
[Etanda/Elilingi na lokasa 14]
Lolenge malamu ya kosalela nkisi
1. Kosalela te nkisi oyo eleki dati na yango ya kosalelama.
2. Sombá na esika oyo eyebani malamu. Kosomba te epai na bateki ya balabála.
3. Ndimisamá ete ozali kososola mpe kolanda mitindá mpo na kosalela.
4. Kosalela te nkisi oyo bakomaki mpo na moto mosusu.
5. Kosɛnga te ete ozwa bobele ntonga. Nkisi ya komela mbala mingi esalisaka malamu.
6. Bombá nkisi na esika ya mwa mpio, esika oyo bana bakoki kokóma te.