Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Koyiba na ekzamɛ ezali mabe?
“Moto nyonso ayebi ete koyiba na ekzamɛ ezali mabe, kasi ezali mpasi te.” —Jimmy, mbula 17.
OSILÁ komeka kobwaka liso na mayele na papye ya moninga moko ya kelasi na ntango ya ekzamɛ? Soki ɛɛ, ozali yo moko te. Jenna, oyo azali na kelasi ya 6 na eteyelo ya ntei, amonisi ete bana mingi ya kelasi na bango bayokaka nsɔni ata moke te mpo na koyiba na ekzamɛ; alobi boye: “Bamikumisaka ndenge basalaka mpo na koyiba na ekzamɛ. Soki yo oyibaka na ekzamɛ te, bazali kokamwa!”
Na ankɛti moko oyo basalaki na États-Unis, bilenge ebele (80%) oyo bazwaka esika ya liboso na kelasi na bango bandimaki ete bayibaka na ekzamɛ, mpe mingi (95%) na bana yango “ya mayele” bakangá naino bango te bazali koyiba na ekzamɛ. Nsima ya kosala ankɛti moko epai ya bana-kelasi koleka 20 000 ya eteyelo ya ntei, ebongiseli moko oyo etalelaka bizaleli ya bato (Institut de morale Josephson) emonisi ete: “Na oyo etali ezaleli ya kolongobana mpe bosembo, makambo ezali kobeba se kobeba.” Balakisi bazali kokamwa ndenge bana-kelasi bakómi koyiba mingi na ekzamɛ! Gary J. Niels, oyo azali mokambi na eteyelo moko, alobaki kutu ete: “Bana-kelasi oyo bayibaka na ekzamɛ te bazali mingi te.”
Baboti mingi balingaka ete bana na bango bámitambwisa na ndenge ya kolongobana na kelasi. Kasi, ezali mawa komona ete bilenge mingi batikaka ezaleli na bango ya kolongobana mpe bayibaka na ekzamɛ. Mayele nini ya sika bakómi kosalela? Mpo na nini bilenge mosusu bayibaka na ekzamɛ? Mpo na nini osengeli koboya momeseno yango?
Mayele ya sika mpo na koyiba na ekzamɛ
Bana-kelasi ya mikolo oyo bakómi kosalela mayele ndenge na ndenge mpo na koyiba na ekzamɛ. Kutu, kokoma makambo oyo ezali na kaye mpo na koyiba yango na ekzamɛ to kokoma makambo na mwa papye mpe kofina yango na bilamba, wana ezali makambo ya kala soki tokokanisi yango na mayele ya lelo oyo ekómi mosika. Kati na mayele yango, tokoki kotánga: Baaparɛi oyo moto azali libándá akoki kotindela mwana-kelasi biyano na ntango ya ekzamɛ; ba calculatrice oyo babakisi makambo “mosusu” na programɛ na yango; bakamera ya mikemike oyo moto akoki kobomba na bilamba, oyo basalelaka mpo na kotinda mituna epai na moninga moko oyo azali libándá; bamasini oyo bana-kelasi basalelaka kati na bango mpo na kotindelana mituna to biyano; ata mpe basite ya Internet oyo ezali na ba dissertations oyo basilá kokoma yango nyonso!
Balakisi bazali koluka ndenge ya kosilisa momeseno wana ya mabe, oyo ezali kotinda bana báyibaka na ekzamɛ, kasi ezali likambo moke te. Kutu, mwana-kelasi mokomoko—to mpe molakisi mokomoko—azali na ndenge oyo ye atalelaka likambo ya koyiba na ekzamɛ. Na ndakisa, ntango bana-kelasi basali etuluku mpo na koyekola liteya moko, bokeseni kati na makambo oyo bazali kolakisana na bosembo mpe oyo bazali kolakisana na mayele mabe ekoki ntango mosusu koyebana polele te. Na yango, ezali na bana-kelasi mosusu oyo balingaka kotánga te mpo bayebi ete baninga oyo bazali na bango etuluku moko bakolakisa bango. Yuji, oyo atángaka na iniversite moko, alobi boye: “Bana-kelasi mosusu bazali mpenza na gɔigɔi—balingaka kosala eloko te! Kasi, bazwaka bapwɛ ndenge moko na bana mosusu. Nakanisi, wana mpe ezali koyiba!”
Mpo na nini bayibaka na ekzamɛ?
Na ankɛti moko oyo basalaki, bamonaki ete soki bana-kelasi mingi bayibaka na ekzamɛ, ezali libosoliboso mpo bayekolaka malamu te. Bana-kelasi mosusu bayibaka mpo na kowelana nani akozwa bapwɛ mingi to mpe baboti na bango balingaka kaka bana na bango bázwaka bapwɛ mingi na kelasi; yango wana bamonaka ete ndenge mosusu ya kosala ezalaka te. Samy, oyo azali na mbula 13, alobi boye: “Mpo na baboti na ngai likambo eleki ntina ezali kozwa bapwɛ. Batunaka ngai: ‘Ozwi bapwɛ boni na mamekani ya matematiki? Ozwaki bapwɛ boni na devuare na yo ya Lingelesi?’ Nalingaka bongo te!”
Mpo na basusu, lokola basɛngaka bango ntango nyonso bázwaka bapwɛ mingi, yango wana bayibaka na ekzamɛ. Buku moko (La vie privée des adolescents américains, na Lingelesi) elobi ete: “Ezali na eloko moko oyo elongobani te na ebongiseli wana, oyo bazali kosɛnga bana-kelasi makambo mingi na boye ete mposa ya kolonga ekómi makasi koleka mposa ya koyekola; mbala mingi yango nde ezali kosala ete bana bázala lisusu sembo te.” Bana-kelasi mingi bandimi ete maloba yango ezali solo. Kutu, moto nyonso alingaka kaka kozwa na ekzamɛ mpe mpenzampenza na ekzamɛ ya nsuka ya mbula. Jimmy atángaka na eteyelo ya ntei, alobi boye: “Bana-kelasi mosusu babangaka kokwea na ekzamɛ. Ata soki bayebi biyano, bayibaka kaka mpo na kotala soki ezali mpenza bongo.”
Lokola bato mingi balingi lisusu kolanda bizaleli ya kolongobana te, basusu bakoki kokanisa ete koyiba na ekzamɛ ezali mpenza mabe te. Mpe ntango mosusu ekoki kosalisa yo na kolonga. Greg, azali na mbula 17, alobi ete: “Lobi, namonaki mwana moko ya kelasi na biso azali koyiba na devuare. Lelo, ntango bazongiseli biso bapapye, azwi bapwɛ mingi koleka ngai.” Mingi bayibaka ntango nyonso na devuare to na ekzamɛ mpo bamonaka baninga na bango ya kelasi bazali koyiba. Yuji alobi ete: “Bana-kelasi mosusu bakanisaka ete ‘lokola bamosusu bazali kosala yango, ngai mpe nasengeli kosala yango.’ ” Kasi esengeli kokanisa bongo?
Ozali komikosa yo moko
Koyiba na ekzamɛ ekeseni na koyiba biloko ya bato? Tokoki nde koloba ete lokola bato mingi bayibaka, koyiba ezali mabe te? ‘Te, ezali bongo te’—mingi mpenza soki bayibi mbongo na yo! Ntango ozali koyiba na ekzamɛ, ozali kozwa lokumu na eloko oyo ezali ya yo te—ata mpe mbala mosusu kolyela baoyo basalaka na bosembo. (Baefese 4:28) Tommy, auti kosilisa eteyelo ya ntei, alobi boye: “Yango ezali sembo te. Ozali koloba: ‘Nayebi eloko wana,’ nzokande oyebi yango te. Ozali bongo kokosa.” Likanisi ya Biblia na likambo yango ezali polele, ndenge Bakolose 3:9 emonisi yango: “Bóbukanaka lokuta te.”
Koyiba na ekzamɛ ekoki kokóma momesano oyo ezali mpasi mpo na kotika yango. Jenna alobi ete: “Baoyo bayibaka na ekzamɛ bamonaka ntina ya kolekisa ntango mingi na koyekola te; bayebaka kaka ete bakoyiba. Kasi soki likoki ya koyiba ezali te, bayebaka eloko ya kosala te.”
Etinda oyo ezali na Bagalatia 6:7 ezali mpenza kotinda na kokanisa: “Nyonso oyo moto azali kolona, yango nde akobuka.” Talá mbuma oyo okobuka soki oyibaka na ekzamɛ: lisosoli na yo ekobanda kotungisa yo; baninga na yo bakotyela yo lisusu motema te; okokende mosika te na kelasi mpo olingaka koyekola te. Ndenge maladi ya kansɛr epalanganaka na nzoto mobimba, ndenge moko mpe lolenge wana ya bokosi ekoki kokɔta ata na makambo mosusu ya bomoi na yo mpe kobebisa boyokani na yo na bato mosusu. Na ntembe te, ekobebisa mpe boyokani na yo na Nzambe, oyo alingaka bokosi te.—Masese 11:1.
Baoyo batyaka motema kaka na koyiba na ekzamɛ bamikosaka bango moko. (Masese 12:19) Bazali lokola bakonzi ya mabe ya Yelusaleme ya kala, oyo bazalaki koloba ete: “tobɔngisi lokuta lokola ekimelo na biso mpe tomibombi kati na kokosa.” (Yisaya 28:15) Kasi soki totali malamu, moto oyo ayibaka na ekzamɛ akoki te kobomba misala na ye na miso ya Nzambe.—Baebele 4:13.
Koyiba na ekzamɛ te!
Mbala mingi, bilenge basalaka mpenza milende mpe balukaka mayele ndenge na ndenge mpo na koyiba na ekzamɛ, na esika ya kosala yango mpo na koyekola malamu. Ndenge Abby, oyo azali na mbula 18 alobi yango, “soki bamipesi na koyekola ndenge bamipesaka na koyiba na ekzamɛ, nakanisi bakotánga kelasi malamu mpenza.”
Ya solo, mposa ya koyiba na ekzamɛ ekoki kozala makasi. Kasi, kokwea na motambo wana te! (Masese 2:10-15) Ndenge nini okoki kokima yango? Liboso mpenza, kobosana te mpo na nini ozali kotánga kelasi: ezali mpo na koyekola. Toboyi te, ekoki komonana lokola ete kolekisa ntango na koyekola makambo oyo okosalela yango ata moke te na bomoi na yo ezali mpenza na ntina te. Kasi soki moto alingaka koyekola te, alukaka kaka nzela mokuse, oyo ya koyiba, akolɛmbisa makoki na ye ya koyekola makambo ya sika mpe ya kosalela mayele oyo azwi na kelasi. Mpo na koyeba malamu makambo, esengeli kosala milende; okoyeba yango kaka boye te. Biblia elobi ete: “Sombá solo mpe koteka yango te; bwanya mpe disiplini mpe mayele.” (Masese 23:23, NW) Ya solo, koyekola mpe kotánga malamu ezali mosala ya kozwa na lisɛki te. Jimmy apesi toli oyo: “Osengeli mpenza kotánga. Soki otángi, okobanga te mpo oyebi.”
Ezali solo ete mbala mosusu okoki koyeba biyano nyonso te, mpe yango ekoki kosala ete ozwa bapwɛ mingi te. Atako bongo, soki okangami na mitinda ya Nzambe, okoki koyeba nini osengeli kosala mpo okende liboso.—Masese 21:5.
Yuji, oyo tolobelaki liboso, azali Motatoli ya Yehova. Ayebisi ndenge ye asalaka ntango bana mosusu ya kelasi na bango batungisaka ye mpo asalisa bango báyiba na ekzamɛ; alobi boye: “Eloko ya liboso, nayebisaka bango ete nazali Motatoli. Yango esalisaka ngai mingi mpo bayebi ete Batatoli ya Yehova bazali bato ya sembo. Ntango tozali kosala ekzamɛ, soki moto moko asɛngi ngai nalakisa ye, nalobaka: te. Na nsima, soki tosilisi, nakoyebisa ye mpo na nini nayibaka na ekzamɛ te.”
Maloba ya Yuji eyokani na oyo ntoma Paulo akomelaki Baebele: “Tozali na mposa ya komitambwisa na bosembo na makambo nyonso.” (Baebele 13:18) Bapwɛ oyo ozali kozwa na kelasi ekozala na motuya ya solosolo soki ozwaka yango na bosembo, kozanga koyiba na ekzamɛ. Okozonga epai na bino na likabo moko ya kitoko, oyo okomemela baboti na yo: komonisa ete ozali moklisto ya sembo. (3 Yoane 4) Longolá yango, lisosoli na yo ekozala pɛto mpe okozala na esengo ya koyeba ete ozali kosepelisa motema ya Yehova Nzambe.—Masese 27:11.
Yango wana, ata soki bana mingi bayibaka na ekzamɛ, yo osengeli koyiba te! Soki okosala bongo, okobatela boyokani ya malamu elongo na basusu mpe, oyo eleki ntina, elongo na Yehova, Nzambe oyo alingi solo.—Nzembo 11:7; 31:5.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Moto oyo ayibaka na ekzamɛ abosanaka ete azali mpenza koyiba
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 12]
Mbala mingi, moto oyo amesani koyiba na ekzamɛ, akozala mpe sembo te na makambo ya minene
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 13]
Moto oyo ayibaka na ekzamɛ akoki te kobomba misala na ye na miso ya Nzambe
[Elilingi na lokasa 13]
Soki oyekoli malamu liboso ya kosala ekzamɛ, okobanga eloko te