Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/11 lok. 25
  • Makambo oyo ezali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo oyo ezali koleka na mokili
  • Lamuká!—2011
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makama ya mai oyo ebebi
  • Koyemba mpo na kozongela koloba
  • ‘Koyiba na kelasi ekómi mingi’
  • Koyiba na ekzamɛ ezali mabe?
    Lamuká!—2003
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—2007
Lamuká!—2011
g 7/11 lok. 25

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Na boumeli ya mbula moko na ndambo oyo balandelaki bato oyo batɛkaka bato, “bapolisi ya Chine balongoli na boombo basi 10 621 mpe bana 5 896 oyo bazwami na makasi.” Polisi ekangaki bato soki 15 673 oyo mbala mosusu basalaka bongo.​—CHINA DAILY, CHINE.

“Na boumeli ya mbula 2 oyo eleki, balakisi koleka 1 000 na Kenya balongwaki mosala mpo basangisaki nzoto na makasi na bana-kelasi ya basi. . . . Ebongiseli moko oyo bato babengaka na telefone na ekólo yango mobimba mpo na kosɛnga lisalisi . . . emonisaki ete likambo yango epanzani mingi koleka ndenge bakanisaki liboso.”​—DAILY NATION, KENYA.

Ankɛtɛ moko emonisi ete bato oyo bazalaki komitanda na bambeto mpo na koyindisa loposo bazali na likama monene mpenza ya kozwa kanser ya loposo (mélanome) koleka bato oyo basalelá yango te. Bato oyo batikalá ngonga koleka 50 na bamasini mpo na koyindisa loposo bazali na likama mbala mibale to misato koleka ya kobɛla kanser yango.​—CANCER EPIDEMIOLOGY, BIOMARKERS & PREVENTION, ÉTATS-UNIS.

“[Na bana basi 100 ya Canada oyo balingi kobala], kaka 8 nde bamoni ete koboya kosangisa nzoto liboso ya libala ezali likambo ya malamu,” mpe “basi ná mibali mingi (74%) bafandaka ndako moko naino babalani te.”​—WEDDINGBELLS, CANADA.

Makama ya mai oyo ebebi

Lapolo moko ya ONU elobi ete “lelo bato bazali kokufa mingi mpo na mai oyo ekɔti bosɔtɔ mpe ebebi koleka mpo na mobulu ya ndenge nyonso, ata mpe bitumba.” Lapolo yango elobi ete batɔni koleka milio mibale ya bosɔtɔ​—oyo euti na bilanga, na bamasini ya bakompanyi, na baterase mpe bongo na bongo—​ebwakamaka mokolo na mokolo na bibale mpe na bambu, mpe ezali kopalanganisa maladi mpe kobebisa mokili. Lisusu, nsima ya segɔnde 20 nyonso, mwana moko ya moke oyo akokisi naino mbula 5 te azali kokufa mpo na maladi oyo euti na mai oyo ebebi. Achim Steiner, mokambi ya ebongiseli moko ya ONU oyo etalelaka bisika bato bafandi, alobi boye: “Mpo mokili ebonga, . . . biso nyonso tosengeli koluka ndenge ya malamu mpenza ya kolongola bosɔtɔ na biso.”

Koyemba mpo na kozongela koloba

Basalisaki bato mosusu oyo babungisaki likoki ya koloba mpo na maladi ya bɔɔngɔ bázongela koloba na nzela ya koyemba. Minganga ya bɔɔngɔ balendisaka bato oyo maladi ebɛti bango na bɔɔngɔ báyemba makambo oyo bazali na mposa ya koloba, bábimisa makanisi na bango na nzela ya koyemba. Ndenge yango ya kosalisa, oyo ebengami thérapie d’intonation musicale, esalisá bato mingi. Zulunalo moko (The Wall Street Journal) elobi ete nsima ya pɔsɔ 15 ya kolanda mayele yango, “bato ya maladi bayekolaka mokemoke koloba makanisi oyo bayembaki koyemba.”

‘Koyiba na kelasi ekómi mingi’

Na ankɛtɛ oyo lisangá ya Canada oyo etalelaka makambo ya kelasi esalaki epai ya bana 20 000 ya Canada oyo bazalaki na mbula na bango ya liboso na iniversite, bana 73% kati na bango “bandimaki ete bayibá mbala moko to mbala mingi na baekzame oyo basalaki na eteyelo ya ntei.” Iniversite moko elobaki ete kokosa mpe koyiba na baekzame emati mingi mpenza (81%) banda na mobu 2003 tii 2006. Paul Cappon, prezida ya lisangá yango alobi boye: “Na mbula 10 oyo eleki, Internet mpe baaparɛyi oyo ebimi esalisi bato mingi báyiba na kelasi.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto