Komungamunga esalaka malamu
ATAKO eumelaka te, ekoki kotikala libela na makanisi. Ezali na motuya monene mpenza, nzokande moto moko te akoki koloba ete azali mpenza mobola mpe akokoka kokabela yango bato te to moto moko te akoki koloba ete azali mpenza na bozwi mingi mpe azali na mposa na yango te. Ezali eloko nini? Komungamunga.
Komungamunga eyaka na kobendana ya misisa, yango esalaka ete miso engɛnga mpe matama ekɔta, mpe elongi emonana na esengo. Mwana oyo abotami sika abandaka komungamunga nsima ya mwa bapɔsɔ, mpe yango esepelisaka baboti na ye mingi. Mwa komungamunga wana ya mwana oyo abotami sika eyaka yango moko. Bato ya mayele balobaka ete mwa komungamunga ya ndenge wana eyaka mbala mingi na ndɔtɔ mpe ekoki kozala ete emonisaka ndenge mwana azali komiyoka mpe ndenge bɔɔngɔ na ye ezali kosala. Ata biso mokóló, tomungamungaka ndenge wana nsima ya kolya to ntango tozali koyoka nzembo.
Nzokande, soki mwana akokisi pɔsɔ motoba, akobanda komungamunga mpo azali komona elongi ya moto to koyoka mongongo. ‘Kosɛkisa bato moke,’ elingi koloba tolingi komungamunga mpe toyebi ete tozali komungamunga, emonisaka esengo na elongi; ezala tozali mikóló to bana mike. Balobaka kutu ete komungamunga ndenge wana ezalaka malamu mpo na bokɔlɔngɔnɔ ya nzoto na biso. Mirtha Manno mpe Rubén Delauro, minganga oyo basalisaka bato oyo bazali na mikakatano ya koloba mpe batambwisaka misala na lopitalo moko (Centre Sourire et Santé), balobi ete: Komungamunga ebimisaka mwa kura na bɔɔngo oyo etindaka eteni moko ya bɔɔngɔ (hypophyse) esala. Hypophyse ekosopa mwa mai oyo babengi endorphines na bɔɔngɔ, oyo esalaka ete tómiyoka na esengo.
Komungamunga ezalaka mpe na ntina mingi mpo ete ntango tozali komungamunga basusu bamiyokaka malamu. Mwa komungamunga oyo euti mpenza na motema, ezala ya kopesa mbote, ya boninga to ya koyikisa moto mpiko, ezali lolenge moko ya kobimisa mayoki na biso kozanga koloba. Ntango mosusu, komona kaka foto ya mwana oyo azali komungamunga epesaka biso mposa ya komungamunga.
Ntango moto moko azali komungamunga liboso na biso na esengo nyonso, tomiyokaka malamu mpe tobosanaka mwa moke bampasi na biso. Biblia elobi boye: “Koboya te kosala malamu epai ya baoyo basengeli kozua yango, mbala nyonso oyo lobɔkɔ na yo ekoki kosala yango.” (Masese 3:27, NW). Na lolenge wana ya pɛtɛɛ, tozali komisalela malamu biso moko mpe tozali kosalela basusu malamu. Na yango, mpo na nini te kosala makasi mpo na kopesa bato oyo tofandi na bango likabo wana ya motuya mingi: komungamunga?