Koseka moke ezali malamu mpo na yo!
EUTI NA MOKOMANI NA BISO NA JAPON
SOKI euti mpenza na motema, elongolaka makanisi mabe mpo na bato mosusu. Etindaka bato na kolongola makanisi mabe oyo bazalaka na yango mpo na bato mosusu banda kala. Soki moto akómaki motema likoló mpo azali lisusu kotyela bato mosusu motema te mpe azali kondima bango te, akokitisa motema. Ebondisaka bato mingi mpe epesaka bango esengo. Elobaka ete: “Nayebi. Kobanga te.” Ebengaka ete, “Nakanisi tokoki kokóma baninga.” Ezali nini? Koseka moke. Ekoki kozala koseka moke na YO.
Koseka moke ezali nini? Badiksiɔnɛrɛ elimbolaka yango na lokota ya Lifalanse ete ‘emonanaka na elongi oyo esalaka ete nsuka ya mbebo emata mwa moke, mpo na komonisa mwa koseka, esengo, to kondima likambo moko.’ Wana nde esika sɛkɛlɛ ya koseka moke ezali. Koseka moke ezali lolenge moto amonisaka makanisi na ye to mayoki na ye epai ya bato mosusu kozanga ete aloba. Ya solo, koseka moke ekoki mpe komonisa lityo, kasi ezali yango te nde tolingi kolobela awa.
Koseka moke ebongolaka mpenza makambo? Ozali lisusu koyeba mokolo moko oyo moto moko apesaki yo esengo to abondisaki yo mpo asekaki na yo mwa moke? To ozali lisusu koyeba mokolo moko oyo bato basekisaki yo te mpe yango etungisaki yo to epesaki yo kutu likanisi ete balingi yo lisusu te? Ɛɛ, ezali solo ete koseka moke ebongolaka makambo. Koseka moke ezali na ntina epai ya moto oyo aseki mpe epai ya moto oyo basekisi ye. Biblia elobi ete Yobo alobaki na banguna na ye ete: “Nasekisaki bango moke–bandimaki te–babebisaki esengo na elongi na ngai te.” (Yobo 29:24, NW) Elongi ya Yobo ezalaki na “esengo,” mbala mosusu mpo na komonisa ete azalaki kosepela to azalaki na nsai.
Ndenge balobaka ete koseka moke ezalaka malamu mpo na nzoto, ezali mpenza likambo ya solo kino lelo oyo. Koseka moke ya esengo ekoki kosalisa moto akitisa mitungisi oyo eumeli ntango molai. Ezali lokola ntango bafungoli nzungu ya mɔ́tɔ mpe mopɛpɛ oyo ekangamaki na kati ebimi. Ntango totungisami to ntango bayokisi biso mawa, koseka moke ekoki kokitisa biso motema mpe kosalisa biso tóyikela likambo yango mpiko. Na ndakisa, Tomoko, mbala mingi azalaki komona ete bato mosusu bazalaki kotalatala ye. Akanisaki ete bazalaki kotɔnga ye, mpamba te bazalaki kolongola miso na bango soki ye mpe atali bango. Tomoko akómaki mawamawa. Mokolo moko, moninga ya Tomoko moko apesaki ye toli ete soki miso na ye ekutani na oyo ya bato mosusu aseka mwa moke. Tomoko alandaki toli yango mpe asalaki bongo pɔsɔ mibale oyo elandaki, mpe akamwaki ete moto nyonso oyo ye azalaki kosekisa mwa moke, ye mpe azalaki koseka moke! Na yango, amitungisaki lisusu te. Alobi ete: “Bomoi ekómi mpenza ya esengo.” Ya solo, koseka moke esalaka ete tózala na boyokani malamu na bato mosusu mpe esalisaka mpo tózwa baninga.
Ezali malamu mpo na yo mpe mpo na bato mosusu
Koseka moke esimbaka mayoki ya moto. Esalisaka moto azala na makanisi ya malamu. Ezali mpe malamu mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto. Lisese moko elobaka ete: “Koseka moke ezali mpenza nkisi.” Yango wana, minganga balobaka ete kolɔngɔnɔ ya nzoto ya moto etali mingimingi makanisi na ye. Bato ya mayele oyo bayekolaka makambo yango bamonisi ete koumela na nkanda na motema to kozala na makanisi ya mabe, mpe makambo mosusu ya ndenge wana, elɛmbisaka likoki ya nzoto ya kobundisa maladi. Nzokande, koseka moke epesaka biso esengo mpe elendisaka likoki ya nzoto ya kobundisa maladi.
Koseka moke emonisaka bomoto mpe makanisi na biso epai ya bato mosusu. Kanisá ete moto moko azali kopesa yo toli to azali kopamela yo. Ntango bozali kosolola, okolinga ete elongi na ye emonana ndenge nini? Soki azali malilimalili to akangi elongi, yango ekoki komonisa ete azali na nkanda, azali kosilika, alingi yo lisusu te, to kutu azali koyina yo, boye te? Nzokande, soki moto yango azali koseka mwa moke, mbala mosusu yango ekosala ete omiyoka malamu mpe olanda toli na likebi nyonso, boye te? Ya solo mpenza, elongi ya esengo esalisaka mpo na kosilisa matata.
Moto oyo alingaka koseka mwa moke azalaka mpe na makanisi malamu
Ya solo, biso nyonso tozali bato oyo bameseni na kosekisa bato te mpo na kosekisa bato mingi mpe ntango nyonso; tozali mpe na mposa te tókóma kosekisa bato pambapamba. Tolingi ete mwa koseka na biso ezala ya solo mpe oyo euti mpenza na motema. Molakisi moko na eteyelo moko (école de communication) alobaki ete: ‘Ezali malamu kominyolisa mwa moke mpe koseka moke na motema mobimba, soki bongo te koseka moke na yo ekozala ya lokuta.’ Ndenge nini tokoki koseka moke na motema mobimba? Mpo na yango Biblia ekoki kosalisa biso. Mpo na makambo oyo tolobaka, Biblia elobi na Matai 12:34, 35 (NW) ete: “Monɔkɔ elobaka makambo oyo etondi na motema. Moto malamu abimisaka makambo ya malamu oyo ezali na ebombelo na ye ya malamu, kasi moto mabe abimisaka makambo ya mabe oyo ezali na ebombelo na ye ya mabe.”
Kobosana te ete koseka moke ezali lolenge oyo moto akoki komonisa mayoki kozanga kobimisa maloba. Soki toyebi ete tolobaka “makambo oyo ebombami na motema na biso” mpe ete “makambo ya malamu” eutaka na “ebombelo ya malamu,” ntembe ezali te ete mpo koseka moke euta na motema, yango etali makanisi mpe mayoki na biso. Ya solo, ata ndɛlɛ, makambo oyo ezali na motema na biso ekobima, kaka na maloba mpe na misala te, kasi mpe ekomonana na elongi na biso. Yango wana, ezali malamu tókanisaka ntango nyonso makanisi ya malamu. Elongi na biso emonisaka makanisi oyo tozalaka na yango mpo na bato mosusu. Na bongo, tótya likebi mingimingi na bizaleli ya malamu ya bato, ezala bato ya libota na biso, bato ya kartye na biso, to baninga na biso ya motema. Soki tosali bongo, tokomona ete ezali mpasi te mpo tósekisaka mwa moke baninga na biso. Soki tokozala na ezaleli ya kosekisa baninga na biso, yango ekozala malamu, mpamba te ekouta na motema oyo etondi na makanisi ya malamu, na ngɔlu, mpe na boboto. Miso na biso ekongɛnga mpe bato mosusu bakoyeba ete ezali ya lokuta te.
Nzokande, esengeli koyeba ete, bato mosusu basekaka mpenza te. Ata soki bazali na makanisi ya malamu mpo na bazalani na bango, bamesaná koseka na bato te. Na ndakisa, na Japon, bonkɔkɔ esɛngaka na mibali ete bálobaka mpambampamba te, báfandaka kimya. Yango wana, mibali mingi bamesaná te kosekaseka na bato oyo bango bayebi te. Ekoki mpe kozala bongo mpo na bato ya bamboka mosusu. Lisusu, esengeli koyeba ete bato mosusu basekaka mpenza te mpo bazalaka nsɔninsɔni. Yango wana, tosengeli te kotalela bato mosusu kaka mpo na likambo etali koseka moke. Bato bazali mitindo na mitindo, na yango bizaleli mpe lolenge ya kosolola ya bato ekeseni.
Atako bongo, soki omoni ete okokaka koseka moke na bato mosusu te, mpo na nini te kosala makasi? Biblia epesi toli oyo: “Tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te . . . Tósalela bato nyonso malamu.” (Bagalatia 6:9, 10) Koseka moke na bato ezali mpe lolenge ya kosalela bango makambo “oyo ezali malamu”—mpe okoki kosala yango! Yango wana, zwá momeseno ya kopesaka bato mbote mpe kolobaka na bango mwa liloba moko ya kolendisa mpe koseka moke. Soki osali bongo, bakosepela mingi. Lisusu, okomona ete mpo na yo, koseka moke ekozala likambo ya mpasi te wana okokómisa yango momeseno.
[Etanda na lokasa 24]
Likebisi
Likambo ya mawa ezali ete koseka moke nyonso eutaka mpenza na motema te. Bato oyo bamesená kokosa mpe kozimbisa basusu, bato ya mombongo oyo babubaka baninga, mpe bato mosusu ya ndenge wana, mbala mingi bazalaka na ezaleli ya koseka moke, mpamba te bayebi ete mwa koseka moke wana ekoki kolongola ekɛngɛ oyo moto azalaki na yango. Bato ya bizaleli ya mbindo to bato ya makanisi ya mabe bakoki mpe kozala na ezaleli ya koseka moke mpo na koluka kobenda bato. Kasi, koseka moke na bango ezali ya mpamba mpe ya lokuta. (Mosakoli 7:6) Yango wana, atako tosengeli kokanisela bato mosusu mabe te, tosengeli koyeba ete tozali na “mikolo ya nsuka,” oyo ezali mpasi. Na bongo, tosengeli kozala ‘mayele lokola banyoka mpe na mabe moko te lokola bibenga,’ lokola Yesu ye moko alobaki yango.—2 Timote 3:1; Matai 10:16.
[Elilingi na lokasa 25]
Bandaká kopesa bato mbote na mwa koseka moke