Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Juillet nk. 5-8
  • Mpo na nini likambo yango ezali se koya makasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini likambo yango ezali se koya makasi?
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bobola etíndaka bana mike na kosala kindumba
  • Kindumba ya bana mike ekosila?
  • “Likambo moko ya nsɔmɔ mpenza”
    Lamuká!—2003
  • Bazali kosalela basi makambo na bosembo te
    Lamuká!—1998
  • Kosalela bana na makambo ya kosangisa nzoto—Likambo oyo ezali komonana na mokili mobimba
    Lamuká!—1997
  • Mangomba ya lokuta mazali lokola mwasi ya pite
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
Makambo mosusu
Lamuká!—2003
g03 Juillet nk. 5-8

Mpo na nini likambo yango ezali se koya makasi?

OYEBAKA ete kindumba ezali mombongo ya misato oyo eleki monene na mokili mobimba, nsima ya mombongo ya bangi mpe ya mindoki? Ebongiseli ya ONU oyo etalelaka makambo ya kelasi, siansi mpe mimeseno ya bato (UNESCO) emonisi ete mitindo nyonso ya kindumba ezali se koya makasi.

Na ekólo moko ya Amerika ya sudi, badepite basalaki ankɛti na likambo yango mpe bamonaki ete bana basi ya mikemike koleka 500 000 bamipesaka na kindumba, atako Leta epekisi kindumba na ekólo yango.

Na ekólo mosusu, bana pene na 300 000 bamipesaka na kindumba na balabala, mingi mpenza na bisika oyo batɛkaka bangi.

Balobaka ete na bikólo ya Azia, basalelaka bana basi pene na milio moko na mombongo ya kindumba, kutu lokola baombo mpenza. Bikólo mosusu eyebaná lokola bisika oyo bato bakendaka kokutana na bana mike oyo basalaka kindumba to bisika oyo bato basalaka mibembo mpo na koluka basi ya kosangisa na bango nzoto.

Lokola bamaladi oyo ezwamaka na kosangisa nzoto, na ndakisa sida, ekómi mingi, bato oyo balukaka basi ya ndumba bandimaka ata kofuta mbongo mingi mpo na kozwa bana mike, oyo mbala mingi bayebi naino mibali te, mpe bakoki bongo kozala na bamaladi yango te. Luíza Nagib Eluf, oyo asalaka na ministɛrɛ ya makambo etali Mibeko na Brésil alobi ete: “Lokola bazali kobanga sida, mibali mingi bakómi koluka bana basi mpe bana mibali ya mikemike, mpe yango engalisi lisusu likambo yango.” Alobaki lisusu ete: “Kosalela bana basi ya mikemike mpe bilenge mpo na kosangisa nzoto ezali likama monene oyo ekweli basi babola ya Brésil.”

Bobola etíndaka bana mike na kosala kindumba

Bana mike bamipesaka mingi na kindumba na esika oyo mpasi mpe bobola eleki. Mwasi moko, oyo azali mokonzi monene ya Leta, alobaki ete soki na ekólo na ye bakómi kosalela bana mike mpo na kosangisa nzoto mpe kotinda bango na kindumba, “ezali mpo mabota mingi epanzani mpe bobola ná nzala ezali makasi.” Baboti mosusu balobaki ete batindaki bana na bango básala kindumba mpo na bobola. Bana oyo bakimá ndako basalaka kindumba mpo bamonaka eloko mosusu te oyo bakoki kosala mpo na kobikela.

Zulunalo moko (O Estado de S. Paulo) elimboli ete soki mwana mwasi akómi kotambola na bilenge ya mobulu oyo bakimá ndako ya baboti, nsukansuka akokóma ndumba. Mpo na kozwa mwa eloko ya kolya, akoki kobanda koyiba, mpe na bantango mosusu kotɛka nzoto na ye. Na nsima, akokómisa kindumba mosala na ye.

Mbala mosusu, batindaka bilenge na mboka mopaya mpo bákende kosala kindumba. Balapolo oyo euti na Sources UNESCO elobi ete: “Mbala mingi, mbongo oyo bilenge oyo basalaka kindumba na mboka mopaya batindelaka baboti na bango ezalaka mpenza mbongo mingi, na kotalela bobola oyo ezalaka na bikólo mosusu ya Azia mpe ya Afrika. Kasi, kindumba ekómaka mpe makasi na bikólo yango mpo bato mosusu bautaka bikólo ya bozwi mpe bayaka na nko mpenza ‘koluka kosangisa nzoto’ na bilenge mpe bana mike.”

Ntango zulunalo moko (Time) elobelaki likama oyo ezali liboso ya bana bakimá ndako, baoyo basalaka kindumba na engumba moko ya Amerika ya sudi, elobaki boye: “Bana mosusu bazali kobanda kosala kindumba ntango bazali naino na mbula 12. Bana yango, oyo mbala mingi bautaka na mabota oyo tata ná mama bakabwaná, na moi balalaka epai nyonso bakoki kozwa esika ya kolala, mpe na butu bakendaka na banganda, epai bato oyo basalaka na masuwa bayaka komɛla.”

Mwana moke ya ndumba oyo alangwe bangi akoki kondima básalela ye makambo ya bonyama oyo akokaki kondima te soki amɛlaka bangi te. Na ndakisa, zulunalo moko (Veja) elobi ete bapolisi bamonaki bakasɛti-video 92 oyo monganga moko azwaki bilili ya basi koleka 50 oyo bazalaki kosalela bango makambo ya nsɔmɔ; basusu kati na basi yango bazalaki bana mike.

Atako basalelaka bango makambo ya nsɔmɔ ndenge wana, elenge mwasi moko ya ndumba alobaki boye: “Soki naluki mosala, nakozwa mbongo mingi te mpo na kolya, mpo nayekolá ata mosala moko te. Baboti na ngai bayebi mosala oyo nasalaka mpe nalingi kotika bomoi wana te. Ezali nzoto na ngai moko mpe nakoki kosalela yango ndenge nalingi.”

Nzokande, bana basi yango bamityelaki soki moke te mokano ya kokóma bandumba. Mwasi moko oyo asalaka na ebongiseli moko ya kosalisa bato, alobaki ete mingi kati na bana yango oyo basalaka kindumba “bazalaka na mposa ya kobala” mpe bakanisaka ete mokolo mosusu “bakozwa mobali moko ya kitoko.” Atako mikakatano ndenge na ndenge nde etindaka bango básala kindumba, moto moko oyo ayekolaki likambo yango alobaki boye: “Likambo ya mpasi koleka ezali ete mingi ya bana yango, babebisaki bango na ndako na bango moko.”

Kindumba ya bana mike ekosila?

Atako bongo, elikya ezali mpo na bana wana oyo bazali konyokwama. Bandumba, ezala bana mike to mikoló, babongolaki bomoi na bango. (Talá etanda “Bato bakoki kobongwana,” na lokasa 7.) Liloba ya Nzambe, Biblia, esalisi bamilio ya bato na mokili mobimba bákóma bazalani ya malamu mpe bázala na boyokani malamu na kati ya libota. Mpo na bato oyo kala bazalaki bato ya pite, bato ya ekobo, bayibi, bato ya lokoso, balangwi masanga, tozali kotánga boye: “Bamosusu na kati na bino bazalaki ndenge wana. Kasi bosili kosukolama pɛɛ, kasi bosili kosantisama, kasi bosili kotángama bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto mpe na elimo ya Nzambe na biso.”​—⁠1 Bakolinti 6:​9-11.

Lelo oyo, kaka ndenge ezalaki ntango bazalaki kokoma Biblia, bato bazali kobongwana mpe kokóma bato malamu. Atako bongo, esengeli na eloko mosusu mpo na kopekisa likambo ya kosalela bana mpo na kindumba. Baguvɛrnɛma ya bamboka mosusu mpe bibongiseli mosusu ezali kobundisa likambo ya kosala mibembo mpo na koluka basi ya kosangisa na bango nzoto mpe kindumba ya bana mike. Kasi, toyebi malamu ete bato bakokoka te kosilisa mpasi mpe bobola. Bato oyo babimisaka mibeko bakoki te kopekisa makanisi mpe bamposa oyo etindaka bato básala makambo ya mbindo.

Nzokande, ezali na nzela moko, oyo eleki mosika milende ya bato, yango nde ekoya kosilisa mikakatano wana nyonso: Bokonzi ya Nzambe. Lisolo oyo elandi ekolimbola yango.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]

Mbala mingi bobola nde etindaka bana mike na kosala kindumba

[Etanda na lokasa 6]

Bomoi moko ya likama mpenza

Ntango Daisy azalaki bobele na mbula motoba, ndeko na ye moko ya mobali asangisaki na ye nzoto na makasi. Yango wana, akendaki kofanda epai ya yaya na ye ya mobali tii ntango akómaki na mbula 14 mpe abandaki kosala na nganda moko na butu. Nsima ya mwa mikolo, Daisy abɛlaki. Ntango amiyokaki malamu, bankóló nganda bayebisaki ye ete azali na nyongo na bango, mpe batindaki ye asala kindumba. Mbula moko na nsima, nyongo yango esilaki kaka te, mpe emonanaki lokola ete akokoka kofuta yango te. Kasi, mosali moko ya masuwa afutelaki ye nyongo oyo etikalaki, amemaki ye na engumba mosusu, epai akómisaki ye lokola moombo na ye. Daisy akimaki ye, mpe na nsima azwaki mobali mosusu oyo bafandaki na ye mbula misato, mpe nsukansuka babalanaki. Mpo na mikakatano mingi oyo akutanaki na yango na libala, mbala misato mobimba, Daisy alingaki komiboma.

Nsukansuka, ye ná mobali na ye babandaki koyekola Biblia. Kasi, Daisy azalaki komona kaka ete abongi te kokóma Motatoli ya Yehova. Ntango bamonisaki ye na Biblia ete Yehova Nzambe andimaka bato oyo babongwani mpe batiki misala ya mbindo, amipesaki na ye. Daisy asalaki mpenza milende mpo na kokokisa oyo ezali malamu, kasi azalaki komona kaka ete oyo ye azalaki kosala ekokaki te, yango wana na bantango mosusu azalaki konyokwama na makanisi. Kasi, likambo ya esengo ezali ete andimaki lisalisi oyo bapesaki ye mpe alongaki mpasi ya motema oyo azalaki koyoka mpo basangisaki na ye nzoto na makasi ntango azalaki mwana moke, mpe motema na ye ekitaki.

[Etanda na lokasa 7]

Bato bakoki kobongwana

Ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, ayokaki mawa mpo na bato oyo bazalaki konyokwama mpe bato ya masumu. Ayebaki ete bandumba, bazala bana mike to mikóló, bakoki kobongola bomoi na bango. Kutu, Yesu alobaki na bakonzi ya mangomba boye: “Ya solo mpenza nazali koloba na bino ete bakɔngɔli-mpako mpe basi ya ndumba bazali koleka liboso na bino na bokonzi ya Nzambe.” (Matai 21:31) Atako bazalaki kotyola bango mpo na lolenge ya bomoi na bango, masumu ya bato wana ya mitema sembo elimbisamaki mpo bamonisaki kondima epai ya Mwana ya Nzambe. Bato yango ya masumu oyo babongolaki mitema baumelaki te kotika bomoi na bango ya kindumba mpo bákoka kozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe. Na nsima, bakómaki na bomoi oyo eyokani na mibeko ya sembo ya Nzambe. Lelo oyo mpe, bato ya lolenge nyonso bazali kondima solo oyo euti na Liloba ya Nzambe mpe bazali kobongola lolenge na bango ya bomoi.

Tózwa ndakisa na oyo ekómelaki Maria, Carina, mpe Estela, baoyo tolobeli na lisolo ya ebandeli. Maria asengelaki kobunda etumba makasi mpo na kotika komɛla bangi mpe kotika kindumba; lisusu mama na ye azalaki kaka kolendisa ye akoba na yango. Ye moko alobi boye: “Nazalaki komɛla bangi mpo na kobosana mitungisi ya lisosoli, mpo lokola nazalaki kosala kindumba, nazalaki komona ete bomoi na ngai ezalaki na ntina te.” Maria ayebisi ndenge bayambaki ye na lisangá ya Batatoli ya Yehova: “Nakamwaki mingi na bolingo oyo bandeko ya lisangá wana bamoniselaki ngai. Bango nyonso​—⁠bana mike mpe mikóló​—⁠bazalaki kopesa ngai limemya. Namonaki ete mibali oyo babalá bazalaki sembo epai ya basi na bango. Nasepeli mingi ndenge bandimi ngai nakóma moninga na bango.”

Ntango Carina akómaki na mbula 17, Batatoli ya Yehova bayaki kotala ye. Abandaki koyekola Biblia, atako na ntango wana atikaki naino te mosala na ye ya kindumba. Mokemoke, abandaki kokanga ntina ya mateya ya solo oyo euti na Biblia. Na yango, azwaki ekateli ya kokende kofanda na engumba mosusu ya mosika, mpe kuna akómaki Motatoli ya Yehova.

Estela, oyo ntango azalaki naino elenge, abandaki kosala kindumba, koluka bomoi ya bisengo, mpe komɛla mingi, na nsima akómaki kosepela na Biblia. Nzokande, azalaki kokanisa ete Nzambe akoki kolimbisa ye ata moke te. Kasi, na nsima, ayaki koyeba ete Yehova Nzambe alimbisaka bato ya masumu oyo babongoli mitema. Estela, oyo lelo azali na lisangá ya Yehova, abalá, mpe azali kobɔkɔla bana misato, alobi boye: “Nazali kosepela mingi mpe nazali kozongisela Yehova matɔndi mingi ndenge alongoli ngai na pɔtɔpɔtɔ mpe andimi ngai na lisangá na ye ya pɛto.”

Masolo wana endimisi maloba ya Biblia oyo emonisi ete mokano ya Nzambe ezali ete “bato [mibali mpe basi] ya ndenge nyonso bábika mpe bákóma na boyebi ya sikisiki ya solo.”​—⁠1 Timote 2:⁠4.

[Elilingi na lokasa 5]

Bana oyo basalaka kindumba mbala mingi bamɛlaka mpe bangi

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]

© Jan Banning/Panos Pictures, 1997

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto