Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Octobre lok. 31
  • Koya monene mingi maladi oyo epalangani mokili mobimba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Koya monene mingi maladi oyo epalangani mokili mobimba
  • Lamuká!—2003
  • Masolo mosusu
  • Maladi ya diabɛti—Ndenge ya komibatela na yango
    Lamuká!—2014
  • Makambo mazali na kati
    Lamuká!—2009
Lamuká!—2003
g03 Octobre lok. 31

Koya monene mingi maladi oyo epalangani mokili mobimba

ZULUNALO moko (The Lancet) ya Angleterre oyo elobelaka mosala ya monganga, elobi boye: “Banda kala, bato bakanisaka ete bomoi ya malamu oyo bato bafandi na mikili ya bozwi bazali na yango nde esalaka ete báyaka minene mingi, kasi lelo oyo bato mingi na mikili ya bobola bakómi mpe koya minene mingi.” Zulunalo yango elobi ete minganga ya makambo etali kolya bazali kokebisa ete bamaladi oyo ekoki kozwa moto oyo akómi monene mingi, na ndakisa diabɛti, tansyo, kansɛr mpe bamaladi ya motema ekómi kopalangana “mokili mobimba.”

Na Chine, na mbula mwambe oyo euti koleka, mibali oyo bazali minene mingi bakómaki ebele mbala misato koleka mpe basi mbala mibale koleka; yango wana soki tozwi bato 5, bato 2 bazali kobɛla tansyo na ekólo yango, na États-Unis mpe ezali kaka bongo. Mikolo oyo, soki tozwi bato 100 oyo bazwi diabɛti sika, 50 bazali na Inde mpe na Chine. Soki tozwi bato 5 na Egypte, bato 2 bazali kobɛla diabɛti, ezali mpe bongo na États-Unis. Soki tozwi basi 100 na Egypte, 50 bazali minene mingi. Ekólo Mexique ekómi mpe na bato ebele oyo bazali minene mingi, bato yango bazali na bamboka nyonso ya ekólo yango mpe kati na bango, basusu bazali bazwi, basusu babola; yango wana bato ya diabɛti mpe bakómi mingi kuna. Ata na bikólo ya Afrika na sudi ya Sahara, epai bobola ezali makasi, bato mingi bazali koya minene mingi mpe kobɛla diabɛti.

Atako na bikólo mosusu bato bazali kokóma minene mingi mpo balyaka biloko ya mafuta mingi oyo etɛkamaka esilá kolambama, ntina mpenza ezali ete bakompanyi mingi oyo esalaka biloko ya kolya ekómi lelo oyo kobakisa sukali na biloko nyonso “mpo ezala elɛngi na monɔkɔ.” Longola yango, na Azia mpe na Afrika, bato ebele balambaka na mafuta, yango wana biloko yango ezalaka na kalori mingi koleka. Lokola bakómi kosalela bamasini na bakompanyi mingi mpe na misala ya bilanga, bato basalaka lisusu misala ya makasi te. Bato balingi lisusu kosala mingi te, kasi balingi kozala na ntango mingi ya kopema. Lelo oyo, lokola ordinatɛrɛ mpe televizyo ekómi bisika nyonso, basali bazali lisusu kosala misala ya makasimakasi te. “Kotindelana mikanda na ordinatɛrɛ esali ete basali bátɛlɛmaka lisusu mingi te mpo na kokende kotika mikanda mpe mpo na kokende kosolola na baninga na bango ya mosala.”

Bana-kelasi ebele bakómi mpe koya minene mingi, mingi mpenza na biteyelo oyo ntango ya bopemi ezalaka mingi te mpe ngalasisi esalemaka mpenza te. Esengeli ete balakisi báyebaka ete biloko oyo bana balyaka ekoki kopesa bango mayele na kelasi to te. Gail Harrison, oyo azali molakisi na École de santé publique, na Iniversite ya Californie, alobiete mpo na kosalisa bato báyaka minene mingi te mpe bámibatela na mikakatano oyo yango ebimisaka, “ezali malamu kosala milende mpo na kosalisa bato na likambo yango na mboka na mboka mpe kosala milende yango ndenge moko na mokili mobimba; nyonso wana ezali kosɛnga bakonzi ya politiki báyokana, bato oyo bakoki kosala mosala yango malamu bázala, bandako mpe biloko ya mosala ezala.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto