Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g04 8/7 lok. 3
  • Kobotama na mokili oyo ezangi bolingo!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kobotama na mokili oyo ezangi bolingo!
  • Lamuká!—2004
  • Masolo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Kobotama ya mwana ekɔtisaka mbongwana na libala
    Okoki kozala na libota ya esengo
  • Oyo bana bazalaka na yango mposa mpe balingaka
    Lamuká!—2004
  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2004
g04 8/7 lok. 3

Kobotama na mokili oyo ezangi bolingo!

BANA babotamaka na mokili ya mpasi, mokili oyo ezangi bolingo mpe etondi na mitungisi. Atako mwana oyo abotami sika akoki mpenza te kobimisa maloba mpo na koyebisa ndenge azali komiyoka, bato mosusu ya siansi bakanisaka ete ata liboso ya kobotama, mwana oyo azali na kati ya libumu ayebaka makambo.

Buku Bomoi ya mwana na libumu ya mama na ye (na Lingelesi) elobi boye: “Sikoyo toyebi ete mwana oyo abotami naino te ayebaka makambo, azali moto mobimba mpe ntango akómi na sanza motoba (mbala mosusu ata liboso na yango), ayokaka esengo, mawa mpe abangaka.” Ata soki mwana ayebaka lisusu te makambo oyo elekaki na mokolo ya kobotama na ye, bato mosusu ya siansi bamitunaka soki mpasi wana ya kobotama ebimisaka makambo mosusu te na bomoi na ye.

Nsima ya kobotama, mitungisi esilaka te. Ntango abimi libándá, mwana azali lisusu te kolya nsima ya mama na ye. Motɔlu oyo ezalaki komemela ye mopɛpɛ mpe bilei elongwe. Mpo atikala na bomoi, asengeli kobanda kopema mpe kolya ye moko. Asengeli na moto moko mpo na koleisa ye, kobatela ye mpe kokokisa bamposa na ye mosusu.

Mwana oyo abotami sika asengeli mpe kokola na makanisi, na mayoki mpe na elimo. Yango wana, asengeli na moto moko mpo na kosalisa ye na makambo wana nyonso. Nani abongi mpenza mpo na kosalela ye makambo nyonso wana? Mwana azalaka na mposa baboti básalela ye makambo nini? Ndenge nini baboti bakoki kokokisa malamu bamposa yango? Masolo oyo elandi ekopesa biyano na mituna wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto