Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 15/4 nk. 12-13
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Biblia elobi nini mpo na likambo etali kolongola zemi?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Bomoi—Likabo oyo tosengeli kolinga yango mingi
    Lamuká!—1993
  • Kolongola zemi
    Lamuká!—2017
  • Kobotama na mokili oyo ezangi bolingo!
    Lamuká!—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 15/4 nk. 12-13

Mituna ya batángi

Soki mwana akufi na kati ya libumu ya mama na ye, elikya ya lisekwa ezali mpo na ye?

Soki okufelá naino te mwana na ntango ya kobota, okoyeba mpenza te mpasi ya bato oyo bakutaná na likambo yango. Baboti mosusu bayokaka mpasi makasi mpenza. Mama moko abungisá bana mitano liboso bábotama. Nsima ya bambula, abotaki bana mibale ya mibali. Atako bongo, azalaki kokanisa ndenge zemi mokomoko ebimaki. Tii na nsuka ya bomoi na ye, azalaki kokanisa ndenge bana na ye wana balingaki kozala soki bábotamaka. Baklisto oyo bana na bango bakufá na ndenge wana bakoki kozala na elikya ete bana yango bakosekwa?

Eyano ya mokuse na motuna yango ezali ete toyebi te. Biblia elobeli polele te lisekwa ya bana oyo bakufaki na ntango ya kobotama to oyo zemi na bango ebimaki. Kasi, Liloba ya Nzambe ezali na mitinda oyo eyokani na likambo yango mpe oyo ekoki kobɔndisa ata mwa moke.

Tótalela mituna mibale oyo eyokani na yango. Ya liboso, na miso ya Yehova, ntango nini bomoi ya moto ebandaka: ntango kaka zemi ebandi to ntango mwana abotami? Ya mibale, ndenge nini Yehova atalelaka mwana oyo abotami naino te: lokola moto mobimba to lokola liboke ya baselile na kati ya matrisi? Mitinda ya Biblia epesi biyano ya polele na mituna wana mibale.

Mibeko ya Moize emonisaki polele ete bomoi ebandaka ntango mwana abotami te, kasi na kati ya libumu ya mama na ye. Ndenge nini emonisi yango? Elobaki ete esengeli koboma moto oyo abomi mwana oyo azali naino na kati ya libumu ya mama. Mobeko yango elobaki ete: “Okopesa bomoi mpo na bomoi.”a (Ex. 21:22, 23) Na yango, mwana oyo azali na matrisi azali moto ya bomoi to molimo ya bomoi. Koyeba likambo yango esalisi bamilio ya baklisto báboya momesano ya kosopa zemi, mpo bamonaka ete kosala bongo ezali lisumu monene na miso ya Nzambe.

Mwana oyo azali na libumu azali moto ya bomoi, kasi ndenge nini Yehova atalelaka bomoi yango? Mobeko oyo touti kolobela esɛngaki ete báboma mokóló oyo abomisi mwana oyo azali na libumu. Na yango, tomoni polele ete bomoi ya mwana oyo abotami naino te ezali na motuya monene na miso ya Nzambe. Lisusu, bavɛrsɛ mingi ya Biblia emonisi ete Yehova amonaka bana oyo bazali naino na libumu lokola bato mpenza. Na ndakisa, na lisalisi ya elimo santu, Mokonzi Davidi alobaki mpo na Yehova ete: “Ozipaki ngai na libumu ya mama na ngai. . . . Miso na yo emonaki ndenge nazalaki naino likei, mpe biteni na yango nyonso ekomamaki na mokanda na yo, mikolo oyo yango esalemaki.”​—Nz. 139:13-16, NW; Yobo 31:14, 15.

Yehova amonaka mpe bizaleli oyo mwana oyo abotami naino te azali na yango mpe makambo oyo akosala na mikolo ezali koya. Ntango Lebeka, mwasi ya Yisaka azalaki na zemi ya mapasa, Yehova asakolaki ete bana yango mibale bazalaki kobunda na libumu ya mama na bango; yango emonisaki ete asilaki komona bizaleli na bango oyo ekozala na ntina mpo na bato mingi na nsima.​—Gen. 25:22, 23; Lom. 9:10-13.

Lisolo ya Yoane Mobatisi ezali mpe na ntina. Evanzile elobi boye: “Ntango Elizabeti ayokaki mbote ya Malia, mwana na kati ya matrisi na ye apumbwaki; mpe Elizabeti atondaki na elimo santu.” (Luka 1:41) Ntango alobelaki lisolo yango, monganga Luka asalelaki liloba ya Grɛki oyo ekoki kolimbola mwana oyo azali naino na libumu to mwana oyo auti kobotama. Asalelaki mpe liloba yango mpo na kolobela Yesu ntango balalisaki ye na elyelo ya bibwɛlɛ.​—Luka 2:12, 16; 18:15.

Nsima ya kotalela makambo oyo nyonso, Biblia emonisi nde ete bokeseni ezali kati na mwana oyo azali naino na libumu mpe oyo auti kobotama? Emonani ete bokeseni ezali te. Makanisi yango eyokani mpe na makambo oyo bato ya mayele bayekoli. Na ndakisa, bato yango bayekoli ete mwana oyo azali na kati ya libumu ya mama akoki koyoka makambo oyo ezali kosalema libándá mpe koningana. Yango wana, tokoki kokamwa te ete mama oyo azali na zemi akómaka na boninga makasi na mwana oyo azali na libumu na ye.

Mwana na mwana azali na ntango oyo aumelaka na libumu ya mama liboso abotama. Tózwa ndakisa oyo: Mama moko aboti mwana matsombe, mpe nsima ya mwa mikolo mwana yango akufi. Mama mosusu amemi zemi na ye tii na nsuka, kasi mwana yango abotami ebembe. Mama ya liboso akoki nde kozala na elikya ete mwana na ye akosekwa mpo abotamaki matsombe, kasi oyo ya mibale akoki kozala na elikya yango te?

Na mokuse, Biblia emonisi polele ete bomoi ebandaka ntango kaka mama azwi zemi mpe ete Yehova amonaka mwana oyo abotami naino te lokola moto mobimba mpe azwaka ye na motuya. Na yango, bato mosusu bakoki kokanisa ete lokola Biblia elobi bongo, koloba ete elikya ya lisekwa ezali te mpo na mwana oyo akufi liboso abotama, eyokani te na Makomami. Bakoki mpe komona ete ekateli na biso ya koboya kosopa zemi oyo euti na Makomami ezali na ntina te.

Na kala, zulunalo oyo ebimisaki mituna ya ntina mingi oyo emonisaki lokola ete bana oyo bakufá liboso bábotama bakosekwa te. Na ndakisa, na paladiso, Nzambe akotya mwa likei oyo ekoli mwa moke na libumu ya mwasi? Nzokande, nsima ya kotalela likambo yango na mozindo mpe kokanisa malamu na libondeli, Lisangani ya Mikóló-Bakambi emoni ete makanisi wana eyokani te na elikya ya lisekwa. Yesu alobaki boye: “Makambo nyonso ekoki kosalema epai ya Nzambe.” (Mko. 10:27) Likambo oyo esalemaki mpo na Yesu emonisaki bosolo ya maloba wana; Yehova alongolaki bomoi na ye na likoló mpe atyaki yango na libumu ya ngɔndɔ moko, likambo oyo bato bakoki kosala te.

Nyonso wana emonisi nde ete Biblia eteyaka ete bana oyo bakufaki liboso bábotama bakosekwa? Tozongeli lisusu: Biblia elobeli likambo yango polele te; yango wana biso mpe tosengeli kotingama te ete bakosekwa. Likambo yango ekoki kobimisa mituna ebele ya ndenge na ndenge. Kasi, ezali malamu te koyanola na motuna yango na ndenge na biso moko. Likambo oyo toyebi ezali ete Yehova Nzambe, oyo atondi na boboto mpe motema mawa nde ayebi likambo yango. (Nz. 86:15) Na ntembe te, azali mpenza na mposa ya kolongola liwa na nzela ya lisekwa. (Yobo 14:14, 15) Tokoki kotya motema ete asalaka ntango nyonso oyo ezali sembo. Akobikisa biso na bampasi nyonso oyo tomoni na mokili oyo mabe mpe akotambwisa Mwana na ye na bolingo nyonso mpo ‘abukabuka misala ya Zabolo.’​—1 Yoa. 3:8.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ndenge mabongoli mosusu ebongolá vɛrsɛ yango epesaka likanisi ete esengeli koboma kaka moto oyo abomi mama. Kasi, makomi ya Liebele ya ebandeli emonisi ete mobeko yango elobelaki likama oyo ebomi mama to mwana oyo abotami naino te.

[Elilingi na lokasa 13]

Yehova akobikisa biso na bampasi nyonso oyo tozali komona

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto