Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 22-25
  • Nalekisaki bomwana na ngai na masano ya cirque

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nalekisaki bomwana na ngai na masano ya cirque
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ndenge tozalaki kolekisa mokolo na cirque
  • Nabandi koyekola masano ya cirque
  • Nazwi mateya ya ntina mingi
  • Mokolo oyo bomoi na biso ebongwanaki
  • Biblia ekɔti na bomoi na biso
  • Nazongeli kosala mibembo
  • Bomoi oyo nalɔtaká esukelá ngai mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Nazali na mibu monkámá kasi nazali naino na nzoto makasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Bomoi ya mpasi na ebandeli, kasi na nsima ebele ya mapamboli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Biblia ebongolaka bato
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 22-25

Nalekisaki bomwana na ngai na masano ya cirque

LISOLO YA JOHN SMALLEY

“Bamama, batata, bandeko, bana mpe bilenge totombeli bino boyei malamu na lisano oyo eleki monene na mokili mobimba!” Mpo na bato mingi, maloba wana ya mokambi ya masano ya cirque ezalaki komonisa ete masano kitoko ya banyama, ya bato ya teyatre mpe ya bato oyo bapumbwaka na bansinga elingi kobanda. Kasi mpo na libota na biso, ezalaki komonisa ete mosala elingi kobanda na cirque Ringling Brothers and Barnum & Bailey.

NABOTAMAKI na 1951. Tokoki koloba ete nabotamá na “putulu ya mabaya na sapato,” mpo na kolobela putulu ya mabaya oyo batyaka na nse na bandako minene ya kapo oyo basalaka masano ya cirque. Ntango kaka ngai ná leki na ngai tobandaki kotambola, babandaki kolakisa biso makambo mosusu ya masano ya cirque.

Tata na ngai Harry mpe mama na ngai Beatriz bakɔtaki na cirque Clyde Beatty liboso ngai nabotama. Mama azalaki moyembi mpe azalaki koyemba banzembo ya bonkɔkɔ na monɔkɔ ya Espagnol wana alati bilamba ya bonkɔkɔ ya bato ya Mexique. Lokola tata azalaki alanga-nzembo, azalaki koyemba elongo na John Philip Sousa, oyo azalaki mosali-nzembo mpe mokambi ya orkɛstrɛ, na ntango ya etumba ya liboso ya mokili mobimba. Nsima, na bambula ya 1950, bazwaki tata mpo abɛtaka fanfare na cirque Ringling Brothers Band, ekoki kozala mpo bayebaki ete ayembaki ná Sousa.

Nsima ya bambula, tokɔtaki na ba cirque ndenge na ndenge, mpe na nsuka tokɔtaki na cirque Al G. Kelly & Miller Brothers, oyo mpe eyaki koyebana mingi na États-Unis. Cirque yango ezalaki na bandako ya kapo misato ya minene. Moko ezalaki na banyama lokola bankɔsi, batigre, banzɔku, bikange (hyène), mpe banyama mosusu oyo emonanaka mingi te.

Ndako ya kapo ya mibale, tozalaki kobenga yango: esika oyo ebendaka bato. Kuna, ezalaki mbala mingi na moto moko oyo azalaki kosakana na mbeli na monɔkɔ, ná moto oyo bazalaki kobenga ye mwasi-mobali, ná bato ya mikusemikuse, ná moto moko ya molai, mpe bato ya ndenge mosusu. Kofanda na bato wana ya ndenge mosusu eteyaki biso bana makambo mingi. Bato mosusu bazalaki kopesa bango bankombo ya kotyola, kasi mpo na biso, bazalaki mpenza bandeko na biso. Tozalaki kosala, kolya, mpe kofanda elongo na bango pene na mbula mobimba.

Ndako ya kapo ya misato ezalaki ya monene, oyo ezalaki na bisika misato ya masano, epai masano ezalaki kosalema mbala moko na bisika yango nyonso misato. Mbala mingi, masano ya makama minene mpe oyo bato bazalaki kotala mingi, ezalaki kosalema na esika ya masano oyo ezalaki na katikati.

Ndenge tozalaki kolekisa mokolo na cirque

Ngai ná leki na ngai tozalaki kosala masano ya kopumbwa na nsinga banda bomwana mpenza. Tozalaki kosala lokola bana ya Ba-indien na teyatre: À la conquête de l’Ouest. Libota moko ya Ba-Choctaw, Ba-indien ya Amerika, oyo bazalaki mpe basani na cirque yango, bateyaki biso ndenge ya kobina mabina ya Ba-indien.

Mbala mingi, tozalaki kobanda misala soki na ngonga ya motoba ya ntɔngɔ. Na ntango wana, tozalaki kobanda kokanga bisaka mpo na kokende na engumba mosusu. Basani nyonso bazalaki kosala mosala ya kolongola ndako ya cirque, komema yango, mpe kotɛlɛmisa yango lisusu. Na ndakisa, tata azalaki alanga-nzembo, kasi azalaki mpe kotambwisa motuka ya monene oyo ezalaki komema nzɔku nsambo. Na bantango mosusu ngai, mama, mpe leki na ngai tozalaki kokende ná tata na motuka yango.

Tozalaki mbala mingi kosala mobembo mikolo nyonso mpe kosala masano mibale na mokolo moko. Longola kaka mokolo ya Lomingo, mokolo oyo tozalaki kosala masano bobele na mpokwa mpe nsima na yango tozalaki kopema libota mobimba. Tata azalaki kozanga te kobongisa mwa likambo moko mpo na libota na mokolo yango, na ndakisa kokende kotambola na vile mpo na komɛla mwa eloko to kokende kotala bafilme oyo balakisaka libándá.

Kotɛlɛmisa bandako ya cirque ezalaki mosala makasi. Ata nzɔku ezalaki kosala mosala. Ndenge nini? Bazalaki kokangisa nzɔku nsinga mpo ebenda bansɔngɛ ya ndako ya kapo wana misato tii ekomata likoló ya makonzí ya milai. Bazalaki kokangisa nsɔngɛ moko na likonzí moko ya ndako ya kapo, na nsima nzɔku ezalaki kobenda nsɔngɛ mosusu tii kapo ekotɛlɛma. Soki makonzí nyonso etɛlɛmi mpe batye mitɛrɛ ya kura mpo na kopɛlisa miinda, na ntango wana nde biso tozalaki kokende komibongisa mpo na masano ya nsima ya midi.

Nabandi koyekola masano ya cirque

Soki masano ya nsima ya midi esili mpe liboso masano ya butu ebanda, nde ntango oyo bana mingi ya cirque bazalaki koyekola masano ya komibwaka na likoló, ya kotambola likoló ya nsinga, ya kobwaka biloko likoló mpe koyamba yango nokinoki to ya kopumbwa na bansinga likoló. Baoyo bazalaki kolakisa biso bazalaki bato ya kala na cirque, oyo mbala mingi baboti mpe bankɔkɔ na bango bazalaki mpe kosala masano yango. Nakanisi lisusu mosani moko ya Italie oyo ateyaki ngai mpo na mbala ya liboso masano ya komibwaka na likoló. Nabandaki yango ntango nazalaki na mbula soki minei. Liboso, alatisaki ngai mokaba na libumu mpo nakwea te; na nsima asimbaki ngai kaka na mabɔkɔ ntango azalaki kopota pembeni na ngai. Na nsuka, atikaki ngai mpe nasalaki yango ngai moko.

Likama bobele moko oyo nazwaki ezalaki na ntango ya defile monene ya banyama, oyo esalemaki na ndako ya cirque oyo ya monene. Ngai ná leki na ngai tozalaki nsima ya moto moko ya teyatre oyo azalaki na makako mibale, mpe banzoku bazalaki liboso. Ntango nazalaki kotambola mpe kobwaka mabɔkɔ, ekoki kozala ete mabɔkɔ na ngai etutaki makako moko, mpe aswaki ngai makasi na lobɔkɔ. Kasi, mpota yango ekɔtaki mikrobe te, atako bongo natikalá na elembo na lobɔkɔ na ngai ya mwasi​—⁠elembo oyo ekundwelaka ngai ete nasengeli ntango nyonso kokeba ntango nazali kosakana na banyama ya zamba, ata soki bazali na boboto to tomesani mingi.

Nazwi mateya ya ntina mingi

Masano ya cirque ebebisaki boyokani na biso ya libota te. Baboti na biso bazalaki kozanga ntango te ya koteya biso mitinda ya malamu mpe bizaleli malamu. Nakanisaka lisusu ndenge tata azalaki komema ngai na makolo na ye mpe kopesa ngai toli ete nasengeli kokanisela moto mabe te, azala mondele to moindo, to moto ya ekólo nini. Ezalaki Liteya ya ntina mingi, mpamba te nazalaki kofanda na bato ya ndenge mosusu mpe ya mikili ndenge na ndenge.

Mama mpe ateyaki biso makambo mingi. Mikolo mosusu, esika ya masano ya cirque ezalaki kotonda na bato; kasi mikolo mosusu bato bazalaki koya mingi te. Mama azalaki koyebisa biso boye: “Bozali kosala masano mpo na kosepelisa bato (wana azali kobɛta mabɔkɔ), kasi mpo na mbongo te. Ezala bato bayei ebele to bayei moke, bósala nyonso oyo ekoki na bino.” Nabosanaka liteya wana ata moke te. Ezalaki lolenge na ye ya koloba ete tosengeli kozala na limemya mpo na bato, bázala ebele to moke.

Longola kosala masano, ngai mpe leki na ngai tozalaki kotikala mpo na kotya bopɛto nsima ya masano, kolɔkɔta salite nyonso na esika ya masano. Yango mpe ezalaki formasyo malamu mpo na biso.

Tozalaki kosala mibembo ya masano ya cirque kobanda sanza ya Aprili tii Sɛtɛmbɛ, yango wana tozalaki kokɔta kelasi lokola bana nyonso te. Tozalaki kolekisa eleko ya malili na engumba Hugo, na etúká ya Oklahoma, esika biro monene ya cirque ezalaki. Na ntango wana, tozalaki kokɔta kelasi sanza soki mitano. Bato ya ba cirque mosusu bazalaki mpe kolekisa eleko ya malili na Hugo, yango wana bana ebele basengelaki kokɔta kelasi lokola biso. Biteyelo ya engumba yango ebongisaki manaka na yango ya kelasi mpo na kosalisa biso tótánga.

Mokolo oyo bomoi na biso ebongwanaki

Na ntɔngɔ ya mokolo ya 16 Sɛtɛmbɛ 1960, tata alamukaki soki na ngonga ya mitano mpe ayebisaki biso tómibongisa mpo na kosala mobembo. Mokolo wana, mama amonaki ete na esika tómata ná tata na motuka oyo azalaki komema banzɔku, biso tómata na mituka mosusu ya cirque oyo ezalaki komema bato.

Ntango tokómaki na esika oyo masano ya cirque esengelaki kosalema, ngai ná leki na ngai tobandaki kotambola mpo na kotala esika yango. Na nsima, toyokaki moto moko azali koganga: “Likama moko ya monene esalemi. Smalley ná mokambi ya cirque bakufi.” Na ntembe te, likanisi na ngai ya liboso ezalaki: ‘Ekoki kozala solo te. Ntango mosusu babosani.’ Na nsima, nayaki komona ete mama asilaki kokenda na esika oyo likama yango esalemaki. Tata azalaki kokita ngomba moko ya molai, pene na engumba Placerville, na etúká na Californie, ekoki kozala ete frein ya motuka ekangaki te. Nsukansuka, mpo na kilo ya banzɔku, epai ya nsima ekendaki kofina motó ya motuka esika sofɛlɛ afandaka. Esika oyo batyaka esansi na motuka efinanaki mpe epelaki mɔtɔ, mpe ebomaki mbala moko tata ná mokambi ya masano oyo bazalaki na motuka yango. Mokolo wana, namonaki lokola mokili ekómi na nsuka. Namesanaki mingi na tata. Tozalaki baninga ya solosolo.

Nsima ya kokunda tata na mboka na ye Rich Hill, na Missouri, tozongaki na biro monene na Hugo, na Oklahoma, esika tozalaki kolekisa eleko ya malili, kasi bato ya cirque na biso bakobaki kosala masano na bisika oyo etikalaki. Na ntango yango, tokómaki kotánga kelasi lokola bana nyonso. Yango ezalaki likambo ya sika mpo na biso. Atako bongo, tozalaki kozela na motema likoló mbula ya nsima mpo na kosala lisusu mobembo elongo na cirque Kelly Miller Show. Kasi bomoi na biso ezwaki nzela mosusu.

Biblia ekɔti na bomoi na biso

Mokolo moko ntango nautaki kelasi, mama alakisaki ngai mama moko oyo ayaki mpo na koyekola na biso Biblia. Nkombo na ye Jimmie Brown, azalaki Motatoli ya Yehova. Nazalaki kosepela koyekola Biblia te. Banda kala, mposa na ngai ezalaki nazongela masano ya cirque mpe nayekola mingi mpenza kopumbwa na bansinga. Kutu, ngai ná leki na ngai tokangisaki mwa nsinga moko kati na banzete mibale mpo tóyekolaka wana. Nzokande, biso nyonso tobandaki koyekola Biblia mpe koyangana na makita elongo na mwa etuluku moko ya Batatoli mwambe oyo bazalaki na Hugo. Na nsima, mama azwaki ekateli ya kotika masano ya cirque mpo na kolanda koyekola Biblia. Atako esalaki ngai mpasi, nandimaki ekateli na ye. Nazalaki kokoka kokanga motema te, mingi mpenza ntango bato ya cirque na biso bazalaki koya kotala biso mpe kotuna biso mpo na nini totiki kokende.

Na bomoi na ngai mobimba, nayebaki eloko mosusu te, kaka masano ya cirque. Na bantango mosusu, nazalaki koyoka mabe ndenge totikaki mosala oyo tata alakisá biso. Nzokande, nakoki mpe koloba ete liwa na ye nde etindaki ngai nayekola Biblia, mpo eloko elamwisaki mpenza mposa na ngai ezalaki elikya ya lisekwa. Tii lelo, elikya wana ezali kaka makasi na motema na ngai. Nalingaka nazala kati na bato ya liboso oyo bakoyamba tata na ngai ntango akozonga na bomoi na Paladiso oyo Biblia elaki ete ekozala awa na mabelé.​—⁠Emoniseli 20:​12-⁠14.

Reeder ná mwasi na ye, oyo bazali Batatoli, basalisaki biso tómona ete ebongiseli ya Yehova ezali libota monene. Mpe likambo yango emonanaki mpenza solo! Mwa etuluku wana ya Batatoli ya Yehova ekómaki lisangá, oyo ebele ya mabota ezali kosambela esika moko. Nakoki mpe kolobela ndeko Robert Engelhardt ná mwasi na ye Carol, oyo bazwaki ngai lokola mwana na bango ya elimo. Na bolingo mpenza, kasi na masɛki te, bazalaki kopesa ngai toli mpe kolakisa ngai nzela ntango nazalaki elenge.

Bolingo ya baklisto wana oyo bakɔmeli na elimo esalisaki biso tóbosana mpasi ya kokufela tata. Mpe na bomoi na ngai ya moklisto, namonaki mpenza na ndenge mingi ete likambo yango ezali solo. Na boumeli ya bambula mingi, nafandaki na Oklahoma mpe na Texas, mpe na lisangá mokomoko oyo nazalaki, nakutaki bandeko basi mpe mibali baklisto oyo batondi na bolingo. Bandeko mosusu ya mikóló bazalaki kopesa ngai toli mpe kolendisa ngai, ndenge tata asalaka na mwana na ye. Ya solo, bakómaki batata na ngai na elimo.

Nazongeli kosala mibembo

Eleki mwa bambula, mama autaki kokufa. Tii mokolo ya liwa na ye, azalaki moklisto ya sembo mpe moyekoli ya Biblia ya molende. Nayebi ete akosepela ntango Nzambe akobimisa bato na ye ya sembo na malita. Atako nazali naino kozela mokolo yango, nazali kobondisama ndenge ebongiseli ya Yehova epesi ngai libota na ndenge mingi.

Namiyokaka ete nazwá lipamboli monene ndenge nazwá mwasi na ngai Edna, kati na basaleli ya Nzambe. Nsima ya libala na biso, tokómisaki bomoi na biso pɛpɛlɛ mpo tómipesa mobimba na mosala ya koteya Biblia. Mpo na kobikela, nazalaki mopanzi-nsango na televizyo. Nayekolaki mosala yango na kelasi te, balakisaki mpe ngai yango te; kasi formasyo oyo nazwaki na lisangá ya Batatoli ya Yehova mpo na koteya Biblia, esalisaki ngai nayeba mosala yango. Nsukansuka, nakómaki mokambi ya bansango na radio wana. Kasi, mposa na ngai ezalaki te ya kokoma moto monene na radio to na televizyo. Nga ná Edna tomipesaki nde na mosala ya koteya solo ya Biblia esika nyonso oyo mposa ezalaki.

Na 1987, basɛngaki ngai nakóma mokɛngɛli ya zongazonga mpo na kotalaka masangá ya Batatoli ya Yehova. Lokola nazali mokɛngɛli ya zongazonga, natalaka lisangá moko na pɔsɔ mpe nalendisaka bandeko na ngai mibali mpe basi na elimo mpe napesaka bango formasyo na mosala na biso ya koteya Biblia. Lelo oyo, libota na ngai ya elimo ekómi lisusu monene mpenza. Atako ngai ná mwasi na ngai tozali na bana te, tozwá ebele ya bana mibali mpe basi ya elimo na ebongiseli ya Yehova.

Nasɛkaka mingi soki nakanisi ete nsima ya bambula mingi, nazali kaka kosala mibembo engumba na engumba. Nazalaki kotambola mpo na masano ya cirque mpe nakómi kotambola lokola mokɛngɛli ya zongazonga! Ntango mosusu, namitunaka soki nalingaki koyeba malamu masano ya kopumbwa na bansinga likoló. Nalingaki nde koyeba malamumalamu masano ya komibwaka na likoló, oyo nazalaki kolinga mingi banda bomwana? Kasi, makanisi yango eumelaka te soki nakanisi elaka ya Nzambe ya kosala paladiso awa na mabelé.​—⁠Emoniseli 21:⁠4.

Ya solo, nabotamá na “putulu ya mabaya na sapato.” Kasi nakanisaka lisusu likambo oyo Biblia elobi: “Oyo nde kitoko makolo ya baoyo bazali kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu!” (Baloma 10:​15) Libaku malamu ya kosalisa bato báyeba Nzambe ezali monene koleka eloko nyonso oyo nakokaki kozwa na masano ya cirque. Na bomoi na ngai mobimba, nazwi mapamboli ya Yehova mingi!

[Bililingi na lokasa 23]

Bato mosusu ya “libota” ya cirque na biso, mpe tata ná fanfare na ye

[Elilingi na lokasa 25]

Ngai ná mwasi na ngai Edna lelo oyo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto