Biblia ebongolaka bato
NDENGE nini moto moko oyo anyokwamaki na bomwana akómaki mobali moko ya esengo mpe tata ya malamu? Nini etindaki mwasi moko oyo azalaki na bomoi ya mbindo apɛtola bomoi na ye? Tángá makambo oyo bato yango balobi.
“Nazalaki komiyoka ete nazangi ntina.”—VÍCTOR HUGO HERRERA
ABOTAMAKI NA: 1974
EKÓLO: CHILI
BOMOI NA YE YA KALA: MOOMBO YA MASANGA
NDENGE NAZALAKI:
Nabotamaki na engumba Angol, na sudi ya ekólo kitoko ya Chili. Nayebaki tata na ngai te. Ntango nazalaki na mbula misato, mama amemaki ngai ná leki na ngai mpo tókende kofanda na mboka-mokonzi Santiago. Nsukansuka, tokómaki kofanda na shambre moko ya moke, na kaa moko ya bato bazangá ndako. Tozalaki kosalela twalɛti ya bato nyonso, mpe tozalaki kotoka mai na pɔmpi ya bato oyo babomaka mɔtɔ.
Nsima ya mbula soki mibale, guvɛrnema epesaki biso ndako moko ya moke. Likambo ya mawa, kartye na biso ya sika etondaki na bamɛli bangi, balangwi masanga, bato ya mobulu, mpe basi ya ndumba.
Mokolo moko, mama akutanaki na mobali moko, oyo nsukansuka, babalanaki. Mobali ya mama azalaki momɛli monene ya masanga. Azalaki kobɛta ngai ná mama. Mbala mingi, nazalaki kolela soki nazali ngai moko, nazalaki na mposa ya kozala na tata oyo akoki kobatela ngai.
Atako mama azalaki kosala mosala makasi mpo na kolukela biso biloko ya kobikela, tozalaki mpenza babola. Soki toyoki nzala, mikolo mosusu tozalaki komɛla kaka miliki ná sukali. Ngai ná leki na ngai tozalaki kotala televizyo na fenetre ya moto moko oyo azalaki kofanda pembeni na biso. Kasi mokolo moko, ntango moto yango amonaki biso, mwaye ya kotala ezalaki lisusu te!
Soki mobali ya mama amɛli masanga te, atako ezalaki mpasi alekisa mokolo kozanga komɛla, azalaki kosombela ngai ná leki na ngai mwa eloko ya kolya. Mokolo moko, asombelaki biso televizyo ya moke. Nabosanaka yango te, mpo ezali moko ya mwa makambo oyo epesaki ngai esengo.
Ntango nakómaki na mbula 12, nayekolaki kotánga. Mbula moko na nsima, nakataki kelasi mpe nakómaki kokende mosala mokolo mobimba. Nsima ya mosala, nazalaki kobima ná baninga ya mosala oyo bazali mikóló na ngai, mpo na kokende na bafɛti, epai tozalaki kolangwa masanga mpe komɛla bangi. Eumelaki te, nazalaki kokoka lisusu te kotika komɛla masanga.
Ntango nazalaki na mbul 20, nayebanaki na mwana mwasi moko nkombo na ye Cati, mpe nsukansuka, tobalanaki. Na ebandeli, tozalaki koyokana malamu, kasi na nsima, nazongelaki bomoi oyo nazalaki na yango liboso. Nakómaki na etamboli mabe koleka kutu ndenge nazalaki liboso. Nayaki komona ete soki nakobi kaka na bomoi wana, nakosuka na bolɔkɔ to nakokufa. Oyo eleki mabe, nazalaki konyokola mwana na ngai Víctor, kaka ndenge banyokolaki ngai na bomwana. Nazalaki na esengo te, nazalaki komiyokela nkanda, mpe nazalaki komiyoka ete nazangi ntina.
Na 2001, basi mibale oyo bazalaki Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na biso, mpe babandaki koyekola Biblia ná Cati. Azalaki koyebisa ngai makambo oyo azalaki koyekola. Lokola nazalaki na mposa ya koyeba mpe makambo yango, ngai mpe nabandaki koyekola Biblia. Na 2003, Cati azwaki batisimo mpe akómaki Motatoli ya Yehova.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Mokolo moko, natángaki Ruta 2:12, oyo elobi ete Yehova apesaka mbano na bato oyo bazalaka na kondima mpe balukaka esika ya komibomba epai na ye. Namonaki ete soki nabongwani, nakosepelisa Nzambe mpe akopesa ngai mbano. Namonaki ete na bisika mingi Biblia epekisi kolangwa masanga. Maloba oyo ezali na 2 Bakorinti 7:1 esimbaki motema na ngai. Vɛrsɛ yango elendisi biso “tómipɛtola na mbindo nyonso.” Na yango, nabandaki kotika mimeseno na ngai ya mabe. Na ebandeli, nazalaki kokoka te komipekisa, kasi Cati atikaki te kosunga ngai.
Nsukansuka, nalongwaki na mosala na ngai, mpo ezali kuna nde bazalaki kotya ngai mbamba namɛlaka makaya mpe masanga. Atako kozanga mosala mpo na mwa ntango esɛngaki kondima kobikela na mwa mbongo moke, yango etikelaki ngai ntango mingi mpo na koyekola Biblia. Ezali na ntango wana nde nabandaki mpenza komipesa na makambo ya Nzambe. Cati azalaki mpe te kosɛnga ngai biloko mingi, mpe apesaki ngai foti te ndenge nandimaki kokómisa bomoi na biso pɛpɛlɛ. Nazali na botɔndi mingi ndenge asungaki ngai.
Malɛmbɛmalɛmbɛ, nabandaki kolekisa ntango mingi elongo na Batatoli. Basalisaki ngai nayeba ete, atako natángá mingi te, Yehova azalaki kozwa na motuya mingi mposa na ngai ya kosalela ye. Bolingo mpe bomoko oyo tomonaki na lisangá esalisaki libota na biso mingi. Tozwaki kimya ya ndenge wana te esika mosusu. Na Desɛmbɛ 2004, ngai mpe nazwaki batisimo.
MATOMBA OYO NAZWI:
Namonaki ete maloba ya Yehova oyo ezali na Yisaya 48:17 ezali mpenza solo. Vɛrsɛ yango elobi: “Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko.” Mama na ngai mpe leki na ngai bakamwaki mingi ndenge nabongwanaki, yango wana sikoyo bango mpe bakómi koyekola Biblia. Ata bato ya kartye na biso basepelaka ndenge bamonaka ete nabongwaná, mpe ndenge libota na biso ezali na esengo.
Nazali na mwasi oyo alingaka Nzambe mpe azwaka ngai mpenza lokola moninga ya kotyela motema. Atako nayebi tata na ngai te, Biblia esalisi ngai nabɔkɔla bana na ngai misato ya mibali malamu. Batosaka ngai. Oyo eleki ntina, bazwaka Yehova lokola Moto ya solo, mpe bakómi kolinga ye mingi.
“Atako nayebi tata na ngai te, Biblia esalisi ngai nabɔkɔla bana na ngai misato ya mibali malamu”
Nazali na botɔndi mingi, mpo atako nanyokwamaki na bomwana, Yehova apesi ngai libaku ya kokóma moto ya esengo.
“Nakómaki nkandankanda mpe mobulu.”—NABIHA LAZAROVA
ABOTAMAKI NA: 1974
EKÓLO: BULGARIE
BOMOI NA YE YA KALA: MOTƐKI BANGI
NDENGE NAZALAKI:
Nabotamaki na Sofia, na ekólo Bulgarie. Tozalaki na bomoi malamu na libota na biso atako tozalaki na bozwi mingi te. Tata na ngai asundolaki biso ntango nazalaki na mbula 6. Yango etikaki ngai na mpasi mingi na motema, mpe etungisaki ngai mingi na makanisi. Nazalaki komiyoka lokola mwana oyo basundoli mpe bakoki kolinga te. Ntango nakómaki mwa mokóló, makanisi wana ekómisaki ngai motomboki. Nakómaki nkandankanda mpe mobulu.
Ntango nazalaki na mbula 14, nakimaki ndako mpo na mbala ya liboso. Mbala mingi, nazalaki koyiba mbongo ya mama mpe ya bankɔkɔ na ngai. Na eteyelo, nazalaki ntango nyonso kozwana matata ná bato mpo na ezaleli na ngai ya nkandankanda. Kutu, yango esalaki ete bálongola ngai na biteyelo mitano mobimba na mwa bambula moke. Mbula misato liboso ete nazwa diplome, nakataki kelasi. Nakómaki na bomoi moko ya mbindo. Nazalaki lisusu kokoka kotika te komɛla makaya mpe marijuana. Nazalaki komɛla mingi, kokende bafɛti mingi, mpe nakómaki kotɛka bangi. Nazalaki komona ntina te ya kozala na bomoi na mokili oyo ezangi elikya, epai bato bazali konyokwama mpe kokufa. Yango wana, nazalaki koluka komisepelisa mokolo na mokolo.
Na 1998, ntango nazalaki na mbula 24, bakangaki ngai na libándá ya mpɛpɔ ya São Paulo, na Brésil, ntango nazalaki kotɛka bangi. Bakatelaki ngai etumbu ya mbula minei ya bolɔkɔ.
NDENGE BIBLIA EBONGOLI NGAI:
Na 2000, Batatoli ya Yehova babandaki koya mbala moko na pɔsɔ kotala bato na bolɔkɔ oyo nazalaki. Motatoli moko, nkombo na ye Marines, amoniselaki ngai boboto mingi. Apesaki ngai mposa ya koluka lisusu koyeba Biblia malamu. Lokola nayebaki Batatoli ya Yehova liboso te, natunaki baninga na ngai ya bolɔkɔ soki bakoyebisa ngai nini mpo na bango. Likambo ya kokamwa, mingi na bato oyo natunaki balobaki makambo mingi ya mabe mpo na Batatoli. Moto moko ya bolɔkɔ ayebisaki ngai ete nakoki kosambela na mangomba nyonso, longola kaka epai ya Batatoli ya Yehova. Maloba na ye etindaki ngai naluka koyeba lisusu mpo na nini bayinaka bato yango mingi ndenge wana. Nayaki koyeba ete bayinaka bango mpo bazali na lingomba ya solo. Kutu, Biblia elobi ete moto nyonso oyo alukaka kolanda Yesu na motema mobimba akonyokwama.—2 Timote 3:12.
Na ntango yango, bapesaki ngai mosala na biro ya bolɔkɔ. Mokolo moko, na eteni ya ndako ya kobomba biloko, nakutaki Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!a na kati ya bakɛsi. Namemaki bazulunalo yango na ndako ya bolɔkɔ mpe nabandaki kotánga yango. Ntango nazalaki kotánga yango mingi, nazalaki komiyoka lokola moto oyo azali kotambola na esobe mpe amoni libulu ya mai ya mpiɔ. Lokola nazalaki na ntango mingi, nazalaki koyekola Biblia mikolo nyonso na boumeli ya bangonga mingi.
Mokolo moko, babengaki ngai na biro ya bolɔkɔ. Nakanisaki ete balingi kobimisa ngai na bolɔkɔ, yango wana nazwaki nokinoki mwa biloko na ngai nyonso, nalakaki baninga na ngai ya bolɔkɔ, mpe nakendaki mbangu na biro. Kasi ntango nakómaki kuna, bayebisaki ngai ete ezali nde likambo mosusu; bafundaki ngai ete nazalaki na mikanda ya mabe. Mpo na yango, babakiselaki ngai lisusu mbula mibale ya bolɔkɔ.
Na ebandeli, yango elɛmbisaki ngai nzoto. Kasi nsima ya mwa mikolo, nayaki komona ete bambula yango ezalaki nde lipamboli mpo na ngai. Atako nayekolaki makambo mingi na Biblia, na motema, nazalaki kaka na mposa ya kozongela bomoi na ngai ya kala soki kaka nabimi na bolɔkɔ. Esɛngaki ngai ntango mingi lisusu mpo nabongwana.
Ntango mosusu, nazalaki kokanisa ete Nzambe akoki kondima ngai te nakóma mosaleli na ye. Kasi, nakanisaki na bavɛrsɛ lokola 1 Bakorinti 6:9-11. Bavɛrsɛ yango emonisi ete na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, bakristo mosusu bazalaki miyibi, balangwi masanga, babɔtɔli, liboso bákóma kosalela Yehova. Kasi, na lisalisi ya Yehova, babongwanaki. Ndakisa na bango elendisaki ngai mingi.
Ezalaki mpasi mingi te natika bizaleli mosusu ya mabe. Na ndakisa, ezalaki mpasi te mpo natika komɛla bangi. Kasi kotika komɛla makaya ezalaki pɛtɛɛ te. Nabundaki etumba makasi mbula mobimba na ndambo liboso ete natika komɛla yango. Eloko esalisaki ngai ezalaki koluka koyeba makambo nini ya mabe makaya esalaka na nzoto ya moto. Kasi kobondela Yehova ntango nyonso nde esalisaki ngai mpenza natika komɛla likaya.
“Nazwá Tata oyo aleki malamu: oyo akosundola ngai ata mokolo moko te!”
Ntango nazalaki kokóma moninga ya Yehova, nabandaki mokemoke kolongola makanisi wana ya komiyoka ete nasundolamá, mpo na ndenge tata akimaki biso. Maloba oyo ezali na Nzembo 27:10 esimbaki mpenza motema na ngai. Vɛrsɛ yango elobi: “Soki tata na ngai ná mama na ngai basundoli ngai, Yehova ye moko akolɔkɔta ngai.” Namonaki ete nazwá Tata oyo aleki malamu: oyo akosundola ngai ata mokolo moko te! Sikoyo bomoi na ngai ezali na ntina. Na Aprili 2004, sanza motoba nsima ya kobima na bolɔkɔ, nazwaki batisimo mpe nakómaki Motatoli ya Yehova.
MATOMBA OYO NAZWI:
Nazali na esengo. Lokola natiká mimeseno mabe, sikoyo nazali nzoto kolɔngɔnɔ mpe na makanisi ya kimya koleka ntango nazalaki naino elenge. Nazali na libala moko ya esengo mpe nakómá mpenza moninga ya Yehova, Tata na ngai ya likoló. Na kati ya basaleli na ye, nazwi ebele ya batata, ya bamama, ya bandeko mibali mpe ya basi. (Marko 10:29, 30) Nazali na botɔndi ndenge bamonaki makambo ya malamu epai na ngai, atako ngai moko namonaki yango te.
Na bantango mosusu, nayokaka lokola namemi ngambo mpo na makambo ya mabe oyo nasalá. Kasi koyeba ete na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, basuvenire ya mabe “ekokanisama lisusu te,” ebɔndisaka ngai. (Yisaya 65:17) Makambo nakutaná na yango na bomoi esalisaka ngai lelo oyo nayeba komitya na esika ya bato oyo bazali kokutana na mikakatano ya ndenge wana. Mpo na yango, bomoi na ngai ya kala ezali na litomba. Na ndakisa, ntango nabimi na mosala ya kosakola, nazalaka na mokakatano te ya kosolola na bato oyo bakóma baombo ya bangi, masanga, to bato ya mobulu, kozanga ete nakanisela bango mabe. Nazali na kondima ete soki ngai nabongwaná mpo na kosepelisa Yehova, moto nyonso mpe akoki kobongwana!
a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.