Bana mike bakómi kozwa zemi Likambo ya mawa na mokili mobimba
LIKAMBO ya bana mike kozwa zemi epalangani bisika nyonso. Nzokande, likambo yango ezali komonana lisusu monene soki totaleli makama oyo ekómelaka bana mike oyo bazwaka zemi, oyo bayebaka lisusu te nini básala. Ata ndenge nini, akomona ete bomoi na ye ebongwani mpenza mpe yango ekotungisa kaka ye moko te, kasi mpe baboti na ye, bandeko na ye, mpe baninga na ye.
Bilenge bazali na eleko oyo Biblia ebengaka “eleko ya ebandeli ya bolenge”—ntango oyo mbala mingi mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi. (1 Bakolinti 7:36) Atako bongo, koloba ete bana mike bazali kozwa zemi kaka mpo basalelaka te nkisi to mayele mosusu ya kopekisa zemi, ezali mpenza solo te. Makambo mingi emonisi ete bantina ezali mingi oyo esalaka ete bana mike bázwa zemi, lokola kozanga boyokani na libota mpe kozanga bolingo.
Makambo oyo efungolaka nzela
Nsima ya koyekola likambo yango, bato ya mayele bamonaki ete bana basi mingi oyo bazali kobota na bomwana bakolaki na mabota oyo tata ná mama bakabwaná. Bilenge mingi oyo bazwaka zemi na bomwana bamilelaka na maloba oyo: “Na bomoi na ngai mobimba, eloko nalukaki ezali kozala na libota ya malamu.” Kozanga ntembe, kopanzana ya mabota ekoki kofungolela bana mike nzela na kozwa zemi. Na ebongiseli moko oyo esalisaka bana mike oyo bakómaka bamama, bamonaki ete mbala mingi bilenge yango “bazalaki kosolola mingi te na bamama na bango mpe bazalaki kosolola te na batata na bango.” Anita abotaki ntango azalaki na mbula 18, alobi ete atako mama na ye azalaki na mobali te mpe azalaki kosala nyonso mpo na kokokisa bamposa na ye, Anita azalaki komona kaka ete azangi eloko moko, azalaki na tata te.
Bana basi mosusu babotá liboso ya kobala mpo babebisaki bango to basangisaki na bango nzoto na makasi. Mpo na basusu kati na bango, likambo yango etikaka bango na mpasi ya motema, mpasi oyo ekómisaka bango mafumafu. Tózwa ndakisa ya Jasmine, oyo basangisaki na ye nzoto na makasi ntango azalaki na mbula 15. Alobi boye: “Nsima na yango, nakómaki mafumafu. Ntango nakokisaki mbula 19, nazwaki zemi.” Mwana mwasi oyo babebisi ye, akoki mpe komiyoka lokola azali lisusu na ntina te. Jasmine amileli boye: “Nazalaki komiyoka ete nazali na ntina te.” Anita, oyo babebisaki mpe ndenge wana, alobi boye: “Kobanda ntango nazalaki na mbula 7 tii ntango nakokisaki mbula 11, elenge mobali moko azalaki kosala ngai makambo ya nsɔni. Nazalaki komiyina ngai moko. Nazalaki komipesa foti.” Anita azwaki zemi ntango akómaki na mbula 17.
Longola yango, bilenge mosusu bazwaka zemi mpo bamityelaka motema koleka ndelo mpe balukaka báyeba soki kosangisa nzoto ezalaka ndenge nini. Nicole, oyo tolobeli na lisolo ya liboso, andimi boye: “Nakanisaki ete nayebi makambo nyonso, mpe nakoki kosala makambo nyonso. Kasi, nabosanaki ete nakokaki mpe kozwa zemi.” Carol mpe abotaki ntango azalaki naino mwana moke, asangisaki nzoto kaka mpo na koyeba soki ezalaka ndenge nini. Alobi boye: “Nakanisaki ete nazalaki kozanga makambo mosusu.”
Ntina mosusu mpe ezali kozanga koyeba makama oyo eyaka nsima ya kosangisa nzoto. Karen Rowlingson mpe Stephen McKay, oyo bayekolaka bizaleli ya bato, balobi ete na Angleterre, bilenge “bayebaka mpenza te . . . makama oyo ekoki kobima nsima ya kosangisa nzoto mpe soki kozwa zemi elimboli nini.” Bilenge mosusu bayebaka mpenza te ete soki basangisi nzoto bakoki kozwa zemi. Ankɛti moko emonisi ete bana mike oyo bakómi bamama “balobaki ete bayokaki mpasi na motema to bakamwaki ntango bayebaki ete bazali na zemi, ata soki bazalaki kosalela nkisi to mayele mosusu te ya kopekisa zemi.”
Atako bongo, eloko mpenza ezali kosala ete bilenge mingi bázwa zemi, ezali ndenge bato bakómi kotalela makambo ya kosangisa nzoto. Tozali kobika na eleko oyo ‘bato balingaka bisengo na esika ya kozala bato oyo balingaka Nzambe.’ (2 Timote 3:1-4) Ailsa Burns mpe Cath Scott, bato mibale ya siansi na Australie, balobi ete “ezala mangomba, bato ya mboka, to bato oyo batalaka makambo ya nkita bapesaka lisusu bitumbu te soki moto asangisi nzoto liboso ya kobala.” Kobota liboso ya kobala emonanaka lisusu mabe te ndenge ezalaki kala. Kutu, na bisika mosusu, bilenge bamonaka kobota lokola likambo ya lokumu, lokola bamati mpɛtɛ!
Mpasi ya motema oyo eyaka na nsima
Makambo bana mike oyo bakómi bamama bamonaka ekeseni na ndenge bakanisaka liboso ya kobota. Ntango mwana mwasi ayebi ete azali na zemi, mbala mingi atungisamaka makasi. Mingi bandimaka ete bayokaki mpasi na motema to bakamwaki. Lapolo ya Institut américain de pédopsychiatrie elobi ete: “Mbala mingi bana basi yango bayokaka nkanda, bamipesaka foti, mpe bandimaka likambo yango te.” Kasi, koboya kondima ekoki kozala likama, mpo ekoki kopekisa mwana mwasi aboya koluka lisalisi oyo esengeli epai ya monganga.
Elvenia oyo amonaki na miso mbuma mabe oyo “bisengo” ya kosangisa nzoto ebotelaki ye, alobi boye: “Nabangaki mingi.” Bilenge mingi oyo bazwaka zemi bazalaka na moto te oyo bakoki kofungolela ye motema to bayokaka nsɔni koyebisa likambo yango. Na yango, tokoki kokamwa te soki basusu bamiyokaka lokola bamemi ngambo mpe babangaka. Bilenge mingi oyo bazwaka zemi banyokwamaka makasi na makanisi. Jasmine alobi boye: “Nazalaki lisusu na mposa ya bomoi te, namonaki malamu kutu nakufa.”a
Atako na ebandeli mwana mwasi asali ndenge nini, alinga alinga te, akosala makambo oyo mikoló basalaka, ezala mpo na ye to mpo na mwana na ye. Lisolo elandi ekolobela ndenge oyo bilenge basi bakoki komema mokumba na bango na mayele.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba makambo mosusu etali ndenge ya kobengana makanisi ya komiboma, talá lisolo “Il vaut la peine de vivre” na Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ 2001. (na Lifalanse)
[Etanda na lokasa 7]
Zemi ya bana mike—Mitango ya kobangisa
Atako mitango oyo elandi ezali ya États-Unis, emonisi mpe mwa moke ndenge bana mike bazali kozwa zemi na mokili mobimba.
● Mbula na mbula, bana basi koleka 900 000—elingi koloba 4 likoló na 10—bazali kozwa zemi liboso bákokisa mbula 20.
● Bana mike soki 40 likoló na 100 bazali kobota liboso bákokisa mbula 18.
● Bana oyo bamama na bango babotaki bango ntango bazalaki bana mike banyokwamaka mpe babɔkwamaka malamu te lokola bana ya bamama ya mikóló.
● Bobele bana basi 4 likoló na 10 oyo babotaka liboso ya kokokisa mbula 18, nde basilisaka eteyelo ya ntei.
● Bana mibali pene na 80 likoló na 100 babalaka te bilenge basi oyo bango babotisá.
● Bobele bana basi 30 likoló na 100 oyo babalaka nsima ya kobota na bomwana nde bafandaka libela na mabala yango; mabala ya bilenge ezalaka na likama ya kokufa, mbala mibale koleka mabala ya basi oyo bazali na mbula koleka 25.
● Bilenge oyo bazwaka zemi na bomwana bazali na likama mingi ya kobota bana ya matsombe mpe ya kilo moke, mpe mbala mingibana yango bakufaka na bomwana, bakufaka miso to matoi, babɛlaka maladi ya mpema, bazalaka zobazoba, bazalaka mayele mingi te, bábɛlaka maladi ya motó, ya paralize, mpe bazalaka mobulumobulu.
[Eutelo ya bafɔtɔi]
Euti na mwa buku Kopekisa kobota na bomwana mpe makambo na yango mosusu ya minene (na Lingelesi), Kampanye monene mpo na kopekisa kobota na bomwana, na Febwali 2002.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
Bana mike oyo bazali kozwa zemi na mokili mobimba
BRÉSIL: “Bana basi 698 439 oyo bakokisi naino mbula 19 te, babotaki na 1998, na lisalisi ya ebongiseli ya Leta na Brésil mpo na bokolɔngɔnɔ ya nzoto . . . 31 857 kati na bango bazalaki bana mike ya mbula banda 10 tii 14, bambula oyo, kozanga ntembe, ezali nsɔni kobota mwana.”—Folha de S. Paulo, 25 Augusto 1999.
GRANDE-BRETAGNE: “Grande-Bretagne ezali ekólo ya Mpoto ya Wɛsti oyo bana basi mingi babotaka na bomwana koleka bikólo mosusu . . . Na Angleterre, bana mike pene na 90 000 bazwaki zemi na 1997. Bana 3 kati na 5 (elingi koloba 56 000) babotamaki mpe bana 90 likoló ya mokama kati na bana yango (elingi koloba pene na 50 000) babotamaki na libala te.”—Mabota oyo ezali kaka na moboti moko, 2002.
MALAISIE: “Na ekólo yango, bana ya makango bakómaki kobotama mingi banda 1998 mpe mingi na bamama yango bazali kobota liboso bakokisa mbula 20.”—New Straits Times–Management Times, 1 Aprili 2002.
RUSSIE: “Na mbula eleki, na Russie, mwana soki moko likoló na misato abotamaki na mama oyo abalá te, motango yango emati mbala mibale koleka nsima ya mbula zomi, mpe na kotalela mitango oyo eyebani na Leta, ezali mbala ya liboso bakóma na mitango wana banda Etumba ya mibale ya mokili mobimba esilá. Bana yango koleka 40 likoló na mokama babotamaki na bamama oyo bazali bilenge mpenza.”—The Moscow Times, 29 Novɛmbɛ 2001.
ÉTATS-UNIS: “Atako na mikolo oyo motango ya bilenge oyo bazali kozwa zemi ekiti moke, bana basi 4 likoló na 10 bazali kozwa zemi ata mbala moko liboso bákokisa mbula 20.”—Nini ekómeli bana mike? Likambo ya bana mike kozwa zemi na États-Unis (na Lingelesi), 1997.
[Elilingi na lokasa 5]
Soki baboti bakabwani, bana bakómaka na likama mingi ya kozwa zemi
[Elilingi na lokasa 6]
Bilenge mosusu bayebaka mpenza te ete soki basangisi nzoto bakoki kozwa zemi
[Elilingi na lokasa 6]
Elenge oyo azwi zemi, akomiyokisa mpasi na motema, akoyokisa mpe baboti na ye mpasi