Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 11-12
  • Ndenge ya kosalisa mpe kobatela bilenge

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalisa mpe kobatela bilenge
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komibatela eleki malamu
  • Bana mike bakómi kozwa zemi Likambo ya mawa na mokili mobimba
    Lamuká!—2005
  • Ndenge ya kolonga mokakatano ya kobota na bomwana
    Lamuká!—2005
  • Bana mike bakómi kobota
    Lamuká!—2005
  • Batata oyo bakimaka bana na bango​—Bakoki mpe kokima mikumba na bango?
    Lamuká!—2001
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 11-12

Ndenge ya kosalisa mpe kobatela bilenge

ESALAKA motema mpasi ntango mwana mwasi​—⁠oyo azali naino mwana​—⁠azwi zemi kasi abali te. Nzokande, likambo ya bana mike kozwa zemi epalangani mokili mobimba mpe etaleli moto nyonso na lolenge moko to mosusu. Likambo ya bana mike kozwa zemi, oyo ezali likambo ya mawa mpenza, ezali komonisa ete Biblia elobi solo ntango elobi ete: “Bókima pite.”​—⁠1 Bakolinti 6:⁠18.

Atako bongo, mbala mosusu ekoki kokóma ete elenge mwasi oyo bateyi banzela ya Nzambe abosana to aboya kotosa makambo oyo ayebi. Akoki kokwea na pite mpe kozwa zemi. Ndenge nini baklisto ya solo bakotalela ye? Soki elenge yango oyo abungaki nzela amonisi mpenza ete abongoli motema, baboti na ye mpe baklisto mosusu ya lisangá basengeli kosunga ye mpe kosalisa ye na bolingo mpenza.

Tózwa lisusu ndakisa ya Nicole. Baboti na ye bazalaki kobɔkɔla ye mpo akóma Motatoli ya Yehova. Yango wana, ntango azwaki zemi liboso ya kobala, esalaki bango mpasi mingi. Atako bongo, yoká oyo Nicole alobi: “Baninga na ngai baklisto bazalaki koya na ndako mpe komeka kolendisa ngai nayekola Biblia mpe nakangama na Yehova.”

Yango elingi koloba te ete Batatoli ya Yehova bakangaka miso na etamboli ya mbindo. Kasi, bayebi ete ata bato oyo basalaki masumu, soki bakómi kosalela mitinda ya Biblia, bakoki ‘kobongwana.’ (Baloma 12:⁠2) Bandimaka mpenza ete Nzambe alimbisaka bato ya masumu oyo babongoli motema. (Baefese 1:⁠7) Bayebaka mpe ete ata soki elenge mwasi azwi zemi liboso ya kobala, mwana oyo ye akobota azali na likambo te. Yango wana, na esika ya kotala mwana yango na liso ya mabe, baklisto bamonisaka ete balingi ye, mpe bazali na motema mawa mpe na boboto mpo na ye, ndenge moko na bana nyonso mosusu ya lisangá.​—⁠Bakolose 3:⁠12.

Mwasi moko oyo abɔkɔlaka bana ye moko abandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova. Eumelaki te, andimaki nsango oyo ezali na Biblia mpe abongolaki bomoi na ye na ndenge ya kokamwa. Alobi boye mpo na Batatoli: “Bango nyonso bamonisaki na motema mobimba ete balingi ngai ná bana na ngai. Bazalaki kokabela ngai biloko ya kolya mpe bilamba soki nasengeli na yango, ata kopesa ngai mbongo. Ntango nakokisaki masɛngami mpo na kobima ná bango na mosala ya kosakola, bazalaki kondima kotikala na bana na ngai. Basalaki nyonso oyo bakokaki mpo na kosalisa ngai nakolisa bolingo ya solosolo mpo na Yehova.”

Komibatela eleki malamu

Atako bongo, eleki malamu kosalisa bilenge mpo makambo ya ndenge wana ekómela bango te. Yango wana, Batatoli ya Yehova basalaka makasi ete ndako na bango ezala esika oyo bana bazali komiyoka ete bazali malamu mpe balingi bango. Na esika ya kosuka kaka na kobangisa bana​—⁠na ndakisa mpo na sida to mpo na kozwa zemi​—⁠Batatoli basalaka nde makasi bákɔtisa na mitema ya bana na bango bolingo ya solosolo mpo na Yehova Nzambe mpe mpo na mibeko na ye. (Nzembo 119:​97) Bayebi ete esengeli kolimbolela bana polele makambo ya basi ná mibali. Oyo eleki ntina, bayebi ete esengeli koteya bana mitinda ya bizaleli malamu oyo ezali na Biblia banda bomwana. (2 Timote 3:​15) Bateyaka makambo wana nyonso na Ndako ya Bokonzi ya Batatoli ya Yehova. Atako bongo, baboti oyo bazali Batatoli balendisami na koyekola Biblia na bana na bango mokomoko. Mikanda lokola Mituna oyo bilenge batunaka​—⁠Biyano bibongi, ebimisamaki mpo na kosalisa baboti báteya bana na bango bizaleli malamu.a

Kolanda mitinda ya bizaleli malamu oyo ezali na Biblia elimboli koboya etamboli ya mbindo oyo epalangani na mokili. Bomoi ya ndenge wana ekoki kobatela bamilio ya bilenge basi mpe bana na bango na likambo ya mawa ya kozwa zemi na bomwana.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 12]

Baklisto ya solo bazalaka na boboto mpe na limemya mpo na bana basi oyo baboti kozanga kobala

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto