Bamama oyo bazali kolonga mikakatano
MOKAKATANO oyo eleki monene mpo na bamama mingi lelo oyo ezali ya kosala mosala mpo na kozwa mbongo ya koleisa libota na bango. Longola yango, mpo na bantina ndenge na ndenge, bamama mosusu mpe basengeli kobɔkɔla bana kozanga moto ya kosalisa bango.
Margarita, mama moko na Mexique oyo azali na mobali te, abɔkɔlaka bana na ye mibale ye moko. Alobi boye: “Ezalaki pɛtɛɛ te koteya bango bizaleli malamu mpe makambo ya Nzambe. Mokolo moko, mwana na ngai ya mobali autaki fɛti, azongaki na ndako na mwa molangwa. Nakebisaki ye ete soki azongi lisusu na ndako ndenge wana, akolala libándá. Mpe mbala ya nsima oyo azongaki lisusu bongo, natikaki ye alala libándá, atako esalaki ngai mpasi mingi na motema. Kobanda wana, asalá yango lisusu te.”
Eumelaki te, Margarita abandaki koyekola Biblia, mpe yango esalisaki ye ateya bana na ye bizaleli malamu. Lelo oyo, bana yango nyonso mibale bazali Batatoli ya Yehova mpe bazali na mosala ya ntango nyonso.
Soki mobali akei mboka mopaya
Mibali mingi na mikili ya bobola bakendaka na mikili ya bozwi mpo na koluka mosala, mpe batikelaka basi na bango mosala ya kobɔkɔla bana. Laxmi, mama moko na ekólo Népal, alobi boye: “Mobali na ngai akendá mboka mopaya ekoki sikoyo mbula nsambo. Bana batosaka ngai mpenza te ndenge batosaka tata na bango. Soki azongaka mbala na mbala mpo na kotambwisa ndako, elingaki kozala mpasi te.”
Atako mikakatano ezali, Laxmi azali kolonga yango. Lokola atángá kelasi mingi te, azwelá bana na ye ya mikóló balakisi mpo báyaka kosalisa bango na kosala badevuare. Kasi, atyaka likebi mingi nde na koteya bango makambo ya Nzambe, ayekolaka na bango Biblia pɔsɔ nyonso. Atalelaka elongo na bango mokapo moko ya Biblia mokolo na mokolo mpe amemaka bango na makita nyonso ya boklisto.
Bamama oyo batángá kelasi mingi te
Na bikólo mosusu, mokakatano mosusu ezali ete basi mingi batángá kelasi te. Aurelia, mama moko na Mexique oyo azali na bana motoba, alobaki boye mpo na komonisa ete kozala mama oyo atángá kelasi te ezali mpasi: “Mama na ngai azalaki mbala mingi koloba ete kelasi ezali mpo na basi te. Yango wana, nayekolá ata kotánga te mpe nakokaki te kosalisa bana na ngai na badevuare na bango. Ezalaki kopesa ngai mpasi mingi. Kasi lokola nalingaki te ete bango mpe bámona mpasi, nasalaki nyonso mpo bango bátánga kelasi.”
Ata soki mama atángá kelasi mingi te, akoki kosalisa bana na ye. Lisese oyo ezali solo: “Soki otángisi basi kelasi, otángisi basi oyo bakotángisa mibali.” Bishnu, mama moko na ekólo Népal oyo azali na bana misato ya mibali, atángaki kelasi te, kasi lokola azalaki na mposa ya koyekola solo ya Biblia mpe koteya bana na ye, asalaki milende mpo na koyekola kotánga mpe kokoma. Yango esalisaki ye alandela bana na ye mpo na koyeba soki basali badevuare na bango, mpe azalaki kokende na biteyelo na bango mbala na mbala mpo na kotuna balakisi soki bana na ye bazali kotánga malamu.
Mpo na makambo ya Nzambe mpe bizaleli malamu oyo Bishnu ateyaki bana na ye, mwana na ye Silash alobi boye: “Eloko nazalaki kolinga mingi na milende oyo mama azalaki kosala mpo na koteya biso, ezali ete soki tosali libunga, azalaki kopesa biso bandakisa ya Biblia mpo tóbongisa. Lolenge wana ya koteya ezalaki mpenza malamu mpe esalisaki ngai nayokaka toli.” Bishnu alongaki na mosala ya koteya bana na ye, mpo bango nyonso misato bazali lelo bilenge mibali oyo babangaka Nzambe.
Antonia, mama moko na Mexique oyo azali kobɔkɔla bana mibale, alobi boye: “Nasukaki kaka na eteyelo ya ebandeli. Tozalaki kofanda na mboka moko mosika na bamboka mosusu, mpe eteyelo ya ntei ezalaki mosika mpenza. Kasi nalingaki ete bana na ngai bátánga kelasi mingi koleka ngai, yango wana nazalaki kolekisa ntango mingi elongo na bango. Nalakisaki bango alfabɛ mpe mituya. Mwana na ngai ya mwasi ayebaki kokoma nkombo na ye mpe kokoma balɛtɛlɛ nyonso ya alfabɛ liboso kutu akɔta kelasi. Mwana na ngai ya mobali ayebaki kotánga malamu liboso akɔta kelasi ya bana mike.”
Ntango batunaki Antonia soki asalaki ndenge nini mpo na koteya bana na ye makambo ya Nzambe mpe bizaleli malamu, alobaki boye: “Nateyaki bango masolo ya Biblia. Liboso kutu mwana na ngai ya mwasi ayeba koloba, azalaki kolimbola masolo ya Biblia na bajɛstɛ. Mwana na ngai ya mobali asalaki lisolo na ye ya liboso ya kotánga Biblia na makita ya boklisto ntango azalaki na mbula minei.” Bamama mingi oyo batángá kelasi mingi te bazali kolonga koteya bana na bango.
Bazali koboya kolanda bonkɔkɔ ya mabe
Na bonkɔkɔ ya bato ya ekólo Tzotzil, na Mexique, batɛkaka bana na bango ya basi na libala ntango bakokisi mbula 12 to 13. Mbala mingi, batɛkaka bana basi yango epai ya mibali ya mikóló, oyo balingi mwasi ya mibale to ya misato. Soki mobali asepeli na mwana mwasi yango te, akoki kozongisa ye mpe kozwa mbongo oyo apesaki baboti na ye. Ntango Petrona azalaki mwana moke, balingaki mpe kotɛka ye bongo. Batɛkaki mama na ye na libala ya ndenge wana, abotaki mwana moko, na nsima mobali yango azongisaki ye—nyonso wana liboso akokisa mbula 13! Mwana wana ya liboso akufaki, mpe batɛkaki lisusu mama ya Petrona mbala mibale na nsima. Na nsuka, bana nyonso abotaki bazalaki mwambe.
Petrona alingaki bomoi ya ndenge wana te mpe alimboli ndenge akimaki yango: “Ntango nasilisaki eteyelo ya ebandeli, nayebisaki mama ete nalingi kobala te, kasi nalingi kotánga kelasi. Mama ayebisaki ngai ete akokaki kosala eloko te, esengeli nayebisa tata likambo yango.”
Tata ayebisaki ngai ete: “Nakobalisa yo. Oyebi koloba monɔkɔ ya Espagnol. Oyebi kotánga. Ozali koluka lisusu nini? Soki olingi kotánga, okomifutela kelasi yo moko.”
Petrona alobi boye: “Ezali yango nde nasalaki. Nazalaki kotonga bilamba mpo nazwa mbongo.” Ezali na ndenge wana nde batɛkaki Petrona te. Ntango akómaki mokóló, mama na ye abandaki koyekola Biblia, mpe yango epesaki ye makasi ya koteya baleki ya Petrona bizaleli malamu oyo euti na Biblia. Lokola mama na bango ye moko akutanaki na likambo yango, ezalaki mpasi te mpo ateya bango makama ya bonkɔkɔ ya kotɛka bana basi na libala.
Bonkɔkɔ mosusu oyo ezalaka na bikólo mingi ezali ete kaka batata nde basengeli kopesa bana mibali disipilini. Petrona alobi boye: “Bateyaka basi ya Batzotzil ete mibali baleki bango. Mibali bamimonaka mpenza lokola bakonzi. Bana mibali balandaka ndakisa ya batata na bango, mpe balobaka na bamama na bango: ‘Okoki koyebisa ngai te oyo nasengeli kosala. Soki tata ayebisi ngai yango te, nakotosa te.’ Na yango, bamama bakoki koteya bana na bango ya mibali te. Kasi sikoyo lokola mama na ngai azali koyekola Biblia, azali koteya bandeko na ngai ya mibali. Bakangá maloba ya Baefese 6:1, 2 na motó: ‘Bana, bótosaka baboti na bino. . . . Kumisá tata na yo ná mama na yo.’ ”
Mary, mama moko na Nigeria, alobi mpe boye: “Na esika oyo nakoli, bonkɔkɔ epekisi bamama koteya bana mibali to kopesa bango disipilini. Kasi ngai nalandaki ndakisa oyo Biblia elobeli, ya Enisi mama ya Timote mpe Loisi nkɔkɔ na ye, mpe nasalaki nyonso mpo ete bonkɔkɔ ya mboka epekisa ngai te koteya bana na ngai.”—2 Timote 1:5.
Bonkɔkɔ mosusu oyo ezali na bikólo mingi, ezali oyo basusu babengaka “ngenga ya bana basi.” Yango elimboli kolongola biteni mosusu to biteni nyonso ya libándá ya enama ya kobotela ya mwana mwasi. Bonkɔkɔ yango eyebani mingi mpo na Waris Dirie, manekɛ oyo ayebani mingi mpe ambasadɛrɛ ya Fonds des Nations unies pour la population (Ebongiseli ya ONU mpo na kobotama ya bato). Ndenge bonkɔkɔ ya ekólo Somalie esɛngaka, ntango azalaki mwana moke, mama na ye akatisaki ye ngenga ya bana basi. Lapolo moko emonisi ete na Moyen-Orient mpe na Afrika, basi mpe bana basi kobanda milio mwambe tii milio zomi bazali na likama bákata bango ngenga yango. Ata na États-Unis, bana basi pene na 10 000 bazali mpe na likama yango.
Makanisi nini etindaka bato bákataka bana basi ngenga? Basusu bakanisaka ete enama ya kobotela ya mwasi ezali eloko ya masumu mpe ekómisaka mwana mwasi mbindo, mpe soki atikali kaka bongo akoki kobala te. Longola yango, balobaka ete soki bakati to balongoli mwana mwasi biteni mosusu ya enama na ye ya kobotela, yango ezali lokola ndanga mpo atikala ngɔndɔ mpe atikala sembo epai ya mobali na ye. Soki mama aboyi kotosa bonkɔkɔ wana, akomibendela nkanda ya mobali na ye mpe mboka mobima ekoyina ye.
Kasi, bamama mingi bayaki komona ete ntina ya malonga—ezala ya losambo, ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto to ya bopɛto—ezali te oyo esengeli kotinda basi na kotosa momeseno wana ya mpasi. Buku Boyá bonkɔkɔ ya mabe (na Lingelesi), oyo ebimaki na Nigeria, eyebisi ete bamama mingi bazali koboya na mpiko nyonso bákata bana na bango ya basi ngenga.
Kozanga ntembe, bipai nyonso na mokili bamama bazali mpenza kolonga kobatela mpe koteya bana na bango, atako bazali kokutana na mikakatano mingi. Bakumisaka mpenza bango mpo na milende oyo basalaka?
[Etanda/Elilingi na lokasa 5]
“Baankɛtɛ nyonso oyo esalemi emonisi ete, mpo mboka ekenda mpenza liboso, basi basengeli kozala na mokumba monene ya kokokisa. Soki basi bamipesi mobimba, matomba emonanaka mbala moko: na mabota, bato bazalaka nzoto kolɔngɔnɔ mpe balyaka malamu; mbongo oyo libota ezwaka mpe ebombaka ekómaka mingi. Matomba yango esukaka kaka na mabota te, emonanaka na mboka mobimba mpe nsukansuka na ekólo mobimba.”—Kofi Annan, secrétaire général ya ONU, 8 Marsi 2003.
[Eutelo ya bafɔtɔ5]
UN/DPI fɔtɔ ya Milton Grant
[Etanda/Bililingi na lokasa 8]
Asalaki nyonso mpo na biso
Juliano, elenge mobali moko ya Brésil, alobi boye: “Ntango nazalaki na mbula mitano, mama azalaki na mosala moko oyo ekokaki kokómisa ye moto monene. Kasi, ntango abotaki leki na ngai ya mwasi, amonaki malamu atika mosala yango mpo abɔkɔla biso malamu. Bapesaki ye toli na mosala ete atika mosala te. Balobaki na ye ete ntango bana bakobala mpe bakotika ndako, nyonso oyo asalelaki bango ekokende mpamba—azali koboma nzoto na likambo oyo ekofuta ye eloko moko te. Kasi nakoki koloba ete bamikosaki; nakoki kobosana soki moke te bolingo oyo amoniselaki biso.”
[Bililingi]
Mama ya Juliano ná bana na ye; na lobɔkɔ ya mwasi: Juliano ntango azalaki na mbula mitano
[Bililingi na lokasa 6]
Bishnu ayekolaki kotánga mpe kokoma, na nsima asalisaki bana na ye bátánga kelasi malamu
[Bililingi na lokasa 7]
Mwana ya Antonia ya moke azali kosala lisolo ya kotánga Biblia na makita ya boklisto
[Bililingi na lokasa 7]
Petrona asalaka na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova na Mexique. Mama na ye, oyo ayaki kokóma Motatoli, azali koteya baleki ya Petrona
[Elilingi na lokasa 8]
Waris Dirie ayebani malamu mpo na milende oyo asalaka mpo bápekisa kokata bana basi ngenga
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Fɔtɔ ya Sean Gallup/ Getty Images