Eloko ya bazwi ekómi ya moto nyonso—Lisolo ya sabuni
EZALI na biloko mingi te oyo bato basalelaka mingi mpe ezalaka na ntina mingi lokola sabuni. Banda bomwana tii bobange, tosalelaka sabuni mokolo na mokolo. Banda babandá kosala sabuni kalakala mpenza tii lelo oyo, makambo na yango ebongwani mingi; ezalaki eloko ya bazwi kasi ekómi eloko oyo moto nyonso asengeli na yango mokolo na mokolo.
Kutu, moto moko ya mayele ya chimie na ekeke ya 19 alobaki ete soki bato ya ekólo moko bazali kosalela sabuni mingi, yango ezalaki komonisa ete bazali na bozwi mingi mpe bazali na bomoi ya malamu. Lelo oyo, bato bamonaka ete sabuni ezali na ntina mingi mpo na kozala pɛto mpe na nzoto kolɔngɔnɔ. Ndenge nini sabuni, eloko ya ntina mingi, ekómaki eloko oyo moto nyonso akómi kosalela mokolo na mokolo?
Na ntango ya kala
Ezali na makambo mingi te oyo emonisi ete liboso ya ntango na biso bato bazalaki kosalela sabuni mpo na kosukola nzoto. Ezali solo ete Biblia haut fleuve elobi boye na Yilimia 2:22: “Ata okomisukola na mputulu na moto mpe okokamata sabuni mingi.” Kasi, eloko moko te emonisi ete sabuni oyo balobeli na vɛrsɛ oyo ezali kaka sabuni oyo toyebi lelo oyo, ezala ya mobimba, ya mputulu, to ya ndenge mosusu. Kasi, emonani ete vɛrsɛ yango ezali kolobela nde lolenge moko ya mungwa ya bankɔkɔ oyo bazalaki kosalela yango mpo na kosukola, yango ekeseni mpenza na sabuni oyo tozali na yango lelo oyo.
Bagrɛki mpe mwa moke na nsima Baloma, bazalaki kosalela mafuta ya nsolo kitoko mpo na kosukola nzoto. Ekoki kozala ete bayekolaki kosala sabuni epai ya Ba-Celte. Na buku na ye Histoire Naturelle (Lisolo ya biloko oyo Nzambe akelá), Pline l’Ancien, mokomi moko ya ekeke ya liboso mpe moto ya Loma, asalelaki liloba ya monɔkɔ ya Gaulois saipo mpe balobaka ete liloba “sabuni” eutá nde na liloba yango.
Balobeli sabuni mingi te na bikeke oyo elandaki, ata soki bamboka lokola Italie, Espagne mpe France ekómaki mpenza bamboka oyo bazalaki kosala sabuni na eleko ya Moyen Âge. Nzokande, atako bazalaki kosala milende mpo na kosala sabuni mingi, emonani ete mikili ya Mpoto ezalaki kosalela sabuni mingi te. Kutu, tii na 1672, ntango moto moko ya Allemagne, na motema malamu mpenza, atindelaki mwasi moko oyo azalaki na libota ya mokonzi liboke moko oyo ezalaki na sabuni ya Italie, amonaki malamu alakisa mpe ndenge ya kosalela eloko yango oyo eyebanaki mpenza te!
Ndenge bazalaki kosala sabuni na ntango ya kala
Lolenge moko ya kosala sabuni na ntango ya kala oyo bamonisi yango malamu ezali na buku moko ya ekeke ya 12, oyo elobeli ndenge ya kosala sabuni mpe biloko mosusu, oyo bakomelaki yango bato ya misala ya mabɔkɔ. Atako bambula eleki ebele, mayele ya chimie mpo na kosala sabuni ebongwani mpenza te. Bazalaki kotɔkisa mafuta ya biloko ndenge na ndenge, oyo bazalaki kosangisa na mai ya mungwa ya bankɔkɔ ya makasi mpenza mpo na kosala sabuni ya kibolabola (ekpakpa). Mbongwana oyo esalemaka ntango mafuta oyo basangisi na mungwa ya bonkɔkɔ ezali kotɔka tii ekokóma sabuni, babengaka yango saponification.
Kozanga ntembe, sabuni ezalaka malamu na kotalela biloko oyo basalelaki mpo na kosala yango. Bazalaki kosalela mputulu ya mɔtɔ mpe mafuta ya nyama mpo na kosala sabuni moko oyo ezalaki kaka bongobongo; mpe bato ya Mpoto oyo bazalaki bato ya liboso oyo bakendeki kofanda na États-Unis, bazalaki kosalela yango mpo na kosala sabuni moko ya pɛtɛpɛtɛ mpe ya langi ya kaki oyo bazalaki kosalela mokolo na mokolo. Mafuta ya ngɔmbɛ mpe ya mpate ezalaki eloko ya ntina mingi oyo bazalaki kosalela ezala mpo na kosala sabuni to buji na ntango wana. Yango wana, bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bazalaki kobenga bango ba chandeliersa bazalaki kosala mpe kotɛka sabuni nzela moko na babuji. Mpo sabuni ezala makasi mpe ezala mpasi te mpo na komema, nsima ya kotɔkisa yango, bazalaki kotya mungwa ná matiti ya nsolo lokola lavande, gaulthérie, to carvi.
Na Mpoto ya sudi, bazalaki kosalela mafuta ya olive mpo na kosala sabuni. Bato oyo bazalaki kosala sabuni na bisika oyo malili ezalaka makasi, bazalaki kosalela kaka mafuta ya ngɔmbɛ mpe ya mpate. Bamosusu kutu bazalaki kosalela mafuta ya mbisi. Atako basabuni yango ebongaki mingimingi mpo na kosukola bilamba, kasi ezalaki malamu te mpo na kosukola nzoto! Nzokande, lisolo ya sabuni esuki kaka na mafuta te.
Bazalaki kosala yango na mabɔkɔ, bakómi kosala yango na izini
Mungwa ya bankɔkɔ oyo bazalaki kosala na yango sabuni na boumeli ya bikeke mingi, ezalaki kouta na mputulu ya matiti mosusu oyo batumbi, na ndakisa matiti babengi Algues. Na Espagne, bazalaki kotumba matiti babengi salicorne mpo na kozwa mputulu ya mungwa ya bankɔkɔ oyo bazalaki kobenga barilla. Soki basangisi yango na mafuta ya olive ya mboka wana, bazalaki kosala sabuni moko ya mpɛmbɛ mpe ya kitoko mpenza oyo bazalaki kobenga Castille.
Na ekeke ya 18, na mokili mobimba, bato bakómaki koluka potasse mpo na kosala na yango sabuni, matalatala, mpe baluti ( poudre à canon).b Na bambula ya 1790, Nicolas Leblanc, monganga moko oyo azalaki mpe moto ya mayele na chimie, abimisaki mayele ya kosalela mungwa ya mindɛlɛ mpo na kosala mungwa ya bankɔkɔ (alcali). Na nsima, bato ya mayele na chimie babimisaki mayele ya kosala soude caustique na mai ya mungwa makasi. Yango nde efungolaki nzela mpo sabuni ekóma kosalema na izini.
Sabuni ekómi na lokumu mingi
Na nsuka ya ekeke ya 19, mbongwana esalemaki mingi na ndenge milende ekómaki kosalema mpo na koteya bato makambo etali bokɔlɔngɔnɔ mpe bopɛto ya nzoto. Atako bongo, sabuni ya ntango wana ezalaki kaka kaki mpe ezalaki naino na mwa matɔnɔ ya mungwa ya bankɔkɔ, oyo ezalaki koswa na nzoto. Tii na ntango wana, bazalaki kosala sabuni kaka na mabɔkɔ mpe bazalaki kotɔkisa yango kaka bongobongo na banzungu ya minene. Na nsima, bazalaki kosala yango milai milai mpo na kotɛka yango, ezalaki na nkombo te, mpe bato oyo bazalaki kotɛka bikelakela ya kolambela, bazalaki kokatakata yango mpe kotɛka yango na kilo.
Sabuni mosusu ezalaki kobimisa fulufulu mingi kasi ezalaki kotangisa mafuta, oyo ezalaki kotikala na misapi mpe soki eumeli ezalaki kobimisa nsolo ya mabe. Bato oyo bazalaki kosala sabuni bakómaki na mposa makasi ya kosepelisa bakiliya na bango, yango wana bakómaki kobakisa biloko ya nsolo lokola nsinda (citronnelle) na sabuni mpo nsolo na yango esilisa nsolo oyo ezalaki kopesa bato mposa ya kosanza.
Mbongwana mosusu elandaki kosalema. Bato bakómaki kosepela mingi kosala sabuni na mafuta ya mbila to ya mbuma ya nzete mosusu mpo yango ezalaki kobimisa sabuni ya malamu mpenza. Lokola mituka, masuwa, mpe bingbunduka ekómaki mingi, bato oyo basalaka sabuni bazalaki lisusu na mokakatano te mpo koluka mafuta mpe biloko mosusu ya kosala na yango sabuni. Na Afrika ya Wɛsti, mbila ezali mingi oyo mbuma na yango ebimisaka mafuta ya motane, mpe bakómaki kosalela yango mingi mpo na kosala sabuni ná mafuta ya kopakola. Na bisanga ya Pacifique, bazalaki kosomba copra, ndika ya kokoti bakaukisá, oyo ebimisaka mafuta ya kokoti. Biloko wana ya kosala na yango sabuni, oyo ezalaki kouta mosika esalaki ete sabuni ekóma na lokumu mingi.
Bato oyo basalaka sabuni bayebaki ete bato balingaka kozala pɛto. Esengelaki mpenza kondimisa bato ete sabuni nde esalisaka moto azala pɛto. Yango wana, bato oyo basalaka bapiblisite bakómaki kopesa sabuni bankombo lokola mafuta ya nzoi, moi, mpe mbula-mpɛmbɛ (neige). Bato mosusu oyo balukaki kosala bapiblisite oyo ekobenda likebi ya bato mingi, bazalaki kolobela sabuni lokola eloko oyo emonisaka ete moto azali pɛto mpenza mpe ayebi makambo mingi. Na nsuka ya ekeke, sabuni ekómaki kotɛkama na mokili mobimba. Yango esalaki ete bato mingi bámipesa na mosala ya kosalaka piblisite. Na 1894, bakómaki kotya maloba ya bapiblisite ya sabuni tii na batɛmbrɛ ya posita na Nouvelle-Zélande. Sabuni ekómaki na lokumu mingi.
Ndenge bakómi kosala sabuni lelo oyo
Ntango bakómaki kosala sabuni na baizini, na ebandeli bazalaki kotɔkisa bikelakela na yango na banzungu ya mineneminene. Moto moko oyo ameseni kolamba yango malamu azalaki kotya mbeli moko na kati ya nzungu mpo na kotala soki esangisami malamu. Ntango azali kotya mbeli yango, oyo ezwi mɔtɔ makasi, na sabuni, akotala ndenge sabuni ezali kotanga na mbeli mpo na koyeba soki asengeli kobakisa biloko mosusu to te.
Lelo oyo, mosala ya kosala sabuni ekabolami na biteni misato ya minene. Eteni ya liboso oyo babengaka saponification, elingi koloba mbongwana oyo esalemaka ntango mafuta oyo basangisi na alcali (mungwa ya bonkɔkɔ) ezali kotɔka tii ekokóma sabuni, yango ebimisaka sabuni ya solosolo mpe glycérine oyo ezali na mai mwa mingi (30 %). Bakompanyi mosusu esalelaka banzungu ya minene tii lelo oyo, kasi bakompanyi oyo esalelaka bamasini ya mikolo oyo esalelaka nde ordinatɛrɛ. Eteni ya mibale ezali kokausa sabuni, basalelaka molunge, balongolaka mopɛpɛ, mpe bakaukisaka sabuni mpo ekóma mbuma mikemike oyo ezali na mai kaka moke (12 %). Eteni ya misato mpe ya nsuka babengaka yango finissage. Na ntango wana nde basangisaka sabuni oyo ekómi mbuma mikemike na biloko ya nsolo, ya langi mpe ya nsolo kitoko. Nsima na yango, masini ekokatakata yango mpe ekokóma ndenge tomonaka, mpe bakotya etikɛtɛ na yango. Lelo oyo, bato mingi basepelaka na basabuni ya kosukola na yango nzoto oyo babakisi mai ya bambuma to ya matiti ya nsolo kitoko, mpo yango nde esalaka ete ntango moto azali kosukola, ayoka nsolo ya “biloko oyo Nzambe akelá” mpe azwa makasi na nzoto!
Atako lokola makambo bato ya chimie bayebi sikoyo na oyo etali kosala sabuni esali ete bákóma kosala basabuni ya kitoko, mpe bakóma kosala yango na baizini, bato bazali naino kosalela basabuni ya kala. Bato mingi te bakotya ntembe ete sabuni ezali eloko ya ntina mpo na kozala pɛto mpe na nzoto kɔlɔngɔnɔ. Nzokande, ezali likambo ya kokamwa ete atako tozali na eleko oyo bato batondi na mbindo na bizaleli mpe na elimo, kasi moto nyonso akoki kozala na nzoto pɛto. Kasi, bopɛto ya nzoto ekoki kozala na ntina kaka soki ezali komonisa bopɛto ya bomoto ya kati.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Candle euti na liloba ya Latin candela.
b Potasse ezali libanga ya mungwa ya bankɔkɔ oyo etikalaka soki batɔkisi mai ya mungwa tii ekauki. Soki batumbi potasse yango tii biloko oyo ezali mungwa te eziki nyonso, ebimisaka mputulu ya mpɛmbɛ oyo babengaka perlasse.
[Elilingi na lokasa 14]
Ndenge bato ya Mpoto oyo bakómaki na Amerika liboso bazalaki kosala sabuni
[Elilingi na lokasa 15]
“Fulufulu,” liyemi ya Sir John E. Millais, na piblisite ya sabuni
[Elilingi na lokasa 15]
Ndenge bazalaki kosala sabuni na ntango ya kala, kotɔkisa yango na banzungu ya minene
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 15]
Na likoló: Victoria & Albert Museum, London/Art Resource, NY; bottom: © Jeff Greenberg/Index Stock Imagery