Bato oyo basukolaka bilamba na Abidjan
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA CÔTE D’IVOIRE
ABIDJAN ezali na Côte d’Ivoire, ekólo moko ya Afrika ya Wɛsti. Mokolo moko, tozalaki kobima na wɛsti ya engumba yango, oyo ezalaka loyenge mingi, tozalaki na esengo ya kotala kitoko na yango mpe koyoka makɛlɛlɛ na yango na mosika. Na mbala moko, tomonaki likambo moko oyo ebendaki likebi na biso. Tomonaki batandi ebele ya bilamba ya langi ndenge na ndenge, mosusu na nsinga mpe mosusu na matiti. Mpo na nini batandaki yango ndenge wana? Baninga na biso ya Côte d’Ivoire bayebisaki biso na esengo nyonso ete ba fanico nde basalaki mosala monene wana.
Fanico ezali nkombo ya bato oyo basukolaka bilamba na mabɔkɔ na Ebale Banco, kobanda ntɔngɔ tii mpokwa. Mingi na bango bazali mibali, kasi ezali mpe na ndambo ya basi ya makasi, oyo babikelaka kaka na mosala wana. Nkombo fanico euti na maloba mibale ya monɔkɔ ya Dyula to Jula; liloba fani elimboli “elamba” to “bilamba” mpe liloba ko elimboli “kosukola.” Na bongo, liloba fanico na monɔkɔ ya Dyula elimboli “moto oyo asukolaka bilamba.”
Mosala ya kosukola bilamba
Lokola likambo yango ebendaki mpenza likebi na biso, mokolo moko, tokendaki ntɔngɔntɔngɔ na esika oyo ba fanico basalaka mosala na bango. Tokutaki mosala ezali kotɔka! Ba fanico basilaki kobanda mosala na bango. Tomonaki ebele ya bapinɛ ya minene ezali kotepa na Ebale Banco mpe batye libanga moko ya monene na kati ya pinɛ mokomoko. Fanico mokomoko atɛlɛmi liboso ya pinɛ moko, mai ezali kosukela ye na mabɔlɔngɔ to na loketo, wana azali kotya sabuni na bilamba, kotuta bilamba yango na libanga, mpe konika yango na linyuka.
Liboso ntɔngɔ etana, ba fanico bakendaka ndako na ndako kokɔngɔla bilamba oyo bakosukola na moi. Bakiliya na bango mosusu bafandaka kilomɛtrɛ soki misato na esika oyo basukolaka bilamba. Fanico mokomoko amemaka bilamba na pusu, to akangaka yango nyonso na elamba moko ya monene mpe amemaka yango na motó tii na Ebale Banco. Soki akómi kuna, baninga na ye bayambaka ye na ebele ya bambote na minɔkɔ ndenge na ndenge, mpamba te bautá bamboka ndenge na ndenge ya Afrika. Basusu basali kuna bambula mingi, lokola Brama, mobali moko ya engambe oyo akómi sikoyo na mbula koleka 60. Na mbula mobimba, ba fanico basalaka mosala mikolo nyonso, longola kaka mikolo misato.
Kosukola bilamba ezali mosala ya makasi mpenza. Tomonaki ntango fanico moko akitisi liboke monene ya bilamba oyo soki mama ya libota amoni yango akobanga. Na nsima, afungoli yango mpe abandi kozindisa elamba mokomoko na mai. Nsima na yango, azwi eteni moko ya sabuni ya kibolabola mpe abandi kopakola yango na bilamba, mpe kotuta bilamba yango na libanga. Ntango mosusu, azali mpe kosalela linyuka mpo na kolongola basalite oyo ekangami makasi. Esɛngaka mbongo boni mpo básukolela moto bilamba ndenge wana? Bafutisaka santime 7 ya dolare mpo na simisi moko, mpe santime soki 14 ya dolare mpo na dala moko. Yango wana, ba fanico basengeli kosukola bilamba ebele mpo na kobikela.
Soki otali ebele ya bilamba oyo basukolaka, okomituna boye: ‘Ndenge nini bayebaka elamba ya moto mokomoko?’ Tokanisaki ete basalelaka mayele oyo bato mosusu oyo basukolaka bilamba na Inde basalelaka, ya kotya bilamba bilembo oyo bango moko nde bayebi ndimbola na yango. Kasi, ba fanico basalelaka nde mayele mosusu oyo mpe ebongi mpenza.
Lokola moto oyo azalaki kotambwisa biso ayebaki malamu mayele oyo ba fanico basalelaka, alimbwelaki biso yango. Ya liboso, ntango bazali kozwa bilamba, basalaka makasi bákanga molai mpe monene ya moto mokomoko ya libota mpo bábosana bilamba na ye te. Bakomaka eloko moko te na bilamba; baponaka nde esika moko oyo bakosala lizita na bilamba nyonso ya bato ya libota moko, na ndakisa na nkingo ya elamba, na lobɔkɔ ya mwasi to ya mobali, to na loketo. Ntango bazali kosukola bilamba, basalaka makasi básangisa te bilamba ya libota moko na oyo ya libota mosusu. Atako bongo, tozalaki kaka komona ete ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Yango wana, totunaki fanico moko ayebisa biso soki ekómelá ye abungisa bilamba to apesa moto moko bilamba ya moto mosusu. Atalaki biso na kokamwa mpenza mpe alobaki ete: ‘Te. Fanico akoki kobungisa elamba ya moto te!’
Moto akoki koya na Ebale Banco mpe kobanda kosukola bilamba na ndenge na ye moko? Te! Ezali na masɛngami oyo asengeli kokokisa. Soki moto alingi kokóma fanico, bapesaka ye sanza misato oyo na boumeli na yango fanico moko oyo asalá kala akolakisa ye mosala. Na ntango wana nde akoyekola mayele ya kokanga molai mpe monene ya bato oyo azali kosukolela bilamba. Soki akoki te, bakondima ye te. Kasi soki akoki, akofuta mwa mbongo moke mpe bakopesa ye pinɛ ná libanga oyo moto mosusu akozala na lotomo ya kosalela yango te.
Sabuni ya kibolabola
Sabuni ezali na ntina mingi na mosala ya ba fanico. Yango wana, balakisaka mpe bato ya sika ndenge ya kosalela malamu sabuni ya kibolabola. Basalelaka mitindo misato ya sabuni oyo ezali na balangi ekeseni. Basalelaka sabuni ya mpɛmbɛ mpe ya langi ya mosaka na bilamba oyo ezali na salite mingi te, mpe sabuni ya moindo na bilamba oyo ezali na salite mingi. Sabuni yango ezalaka moindo mpo basalaka yango na mafuta ya mbila. Na mokolo moko, fanico asalelaka sabuni soki zomi ya milai. Yango wana, bato oyo basalaka sabuni yango bazalaka kaka pene wana mpo na kotɛkelaka bango sabuni yango.
Tokendeki mpe kotala esika oyo basalaka sabuni yango, mosika te na esika oyo basukolaka bilamba. Mosala ya kosala sabuni ebandaka na ngonga ya motoba na ntɔngɔ. Basi oyo basalaka sabuni basili kosomba biloko oyo esengeli na wenze na bango, elingi koloba, mafuta ya mbila, potasse, mungwa, mai ya mundenge, mafuta ya kokoti mpe ya kakao; biloko nyonso wana ebebaka soki ebatelami malamu te. Batyaka biloko yango nyonso na tonɔ moko mpe batɔkisaka yango na mɔtɔ makasi ya nkoni. Soki etɔki na boumeli ya ngonga pene na motoba, basopaka pɔtɔpɔtɔ yango na linzanza moko mpe batikaka yango ekóma makasi. Soki ekómi makasi, bakataka yango na mwa biteni ya milaimilai.
Na nsima, basi yango bamemaka sabuni yango na motó mpe bakendaka na yango epai ya ba fanico. Lokola bakutaka ba fanico babandi mosala, ndenge nini basalaka mpo na kotɛkela bango sabuni? Bakitaka na ebale, mai ata tii na loketo, batyaka sabuni na saani moko ya kopale, mpe batindikaka yango tii ekokóma epai ya fanico oyo azali na mposa na yango.
Ntango basilisaka mosala
Soki fanico asilisi kosukola bilamba nyonso, akendaka kotanda yango na matiti to na nsinga. Esika yango etondaka na bilamba ya langi ebele, ndenge tolobelaki yango na ebandeli. Na ntango wana, fanico apemaka mwa moke nsima ya kosala mosala makasi mokolo mobimba. Na mpokwa, soki bilamba ekauki, bagumbaka malamu elamba mokomoko, mpe bangomaka bilamba mosusu na fɛlo ya makala. Soki butu ebandi koyinda, bakangakangaka bilamba yango, mpe bakendaka kotika yango epai ya bankolo na yango.
Liboso, ntango tomonaki batandi bilamba wana ebele ebele, toyebaki te ete bato oyo batandaki yango basalaki mosala makasi ndenge wana. Sikoyo, tozali na esengo mingi ndenge tokendeki kotala ba fanico ya Abidjan, mpamba te yango esalisi biso tóyeba mosala makasi oyo esalemaka na basi mpe mibali oyo basukolaka bilamba na mokili mobimba.
[Karte na lokasa 12]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
CÔTE D’IVOIRE
[Elilingi na lokasa 14]
Mwasi moko oyo asalaka sabuni azali kotɛkisa yango
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
PhotriMicroStock™/C. Cecil