‘Nalingi nasalela Nzambe liboso nakufa’
LISOLO YA MAMIE FREE
NA 1990 etumba ya bana-mboka ebandaki na Liberia. Lokola etumba eyaki makasi, Mamie, mwana mwasi moko ya ba Krahn ya mbula 12, akangamaki ná libota na bango na kati ya ndako na bango na Monrovia, mboka mokonzi ya Liberia. Mamie alobi boye: “Toyokaki lokito makasi na ndako moko pembeni na biso. Misile moko epanzaki ndako moko penepene na biso mpe etumbaki yango. Mɔtɔ yango ezwaki ndako na biso mpe ebandaki kopela.” Na ntango wana oyo bitumba ezalaki makasi, Mamie, mama na ye, mpe noko na ye bakimaki.
Mamie alobi boye: “Mbala moko, eloko moko ezokisaki ngai.”
Na nsima mama atunaki ngai: “Nini?”
Nazongisaki: “Eloko moko ezokisi ngai! Nakanisi ezali lisasi.”
Mamie akweaki na nse mpe akómaki pene na liwa, abondelaki boye: “Nzambe, nabondeli yo, yoká ngai. Nakanisi nakómi pene na liwa, kasi nalingi kosalela yo liboso nakufa.” Na nsima, azalaki lisusu koyeba eloko te.
Bato ya kartye bakanisaki ete Mamie akufi, yango wana balingaki kokunda ye na libongo moko ya pene wana. Kasi, mama na ye atyaki mbamba bámema ye na lopitalo moko mpembeni wana. Na mawa nyonso, lopitalo yango ezalaki na biloko oyo esengelaki te mpo na kosalisa ebele ya mibali, basi, mpe bana oyo bazokaki. Noko ya Mamie, oyo mpe azokaki, akufaki na butu wana, kasi Mamie abikaki, mpe akómaki paralize banda na loketo tii na makolo.
Mamie akobaki kobima makila na kati ya nzoto mpe yango ezalaki kosala ye mpasi mingi. Nsima ya sanza minei, minganga batalaki ye na radio mpo na koyeba esika lisasi yango ezali. Bamonaki yango na katikati ya motema mpe mimpululu. Lokola ezalaki likama mpenza kosala lipaso na esika wana, mama na ye amemaki ye epai ya moto moko oyo asalisaka na bankisi ya bonkɔkɔ. Mamie alobi boye: “Moto yango akataki ngai mpota na zilɛti mpe atyaki monɔkɔ na ye na mpota yango, mpe afibaki makasi mpo na komeka kobimisa lisasi. Abimisaki lisasi moko na monɔkɔ na ye mpe alobaki ete ‘yango oyo.’ Tofutaki ye mpe tokendaki.”
Nzokande, moto yango akosaki. Ntango minganga batalaki lisusu Mamie na radio, bamonaki ete lisasi yango ezalaki kaka. Yango wana, Mamie ná mama na ye bazongaki lisusu epai ya moto yango, kasi andimisaki bango ete esengeli sanza libwa eleka mpo bámona na radio ete lisasi yango elongwe. Bazongaki na ndako mpe bakómaki kozela na motema mpiɔ. Na ntango wana, Mamie azalaki komɛla bankisi ndenge na ndenge mpo na kolɛmbisa mpasi na ye. Nsima ya sanza libwa, minganga batalaki ye lisusu na radio, kasi bamonaki ete lisasi elongwaki kaka te. Moto oyo asalisaki ye akimaki.
Tii ntango wana, lisasi esalaki sanza 18 na nzoto ya Mamie. Ndeko na bango moko ya mobali amemaki ye epai ya nganga-nkisi moko ya mwasi. Na esika ete nganga-nkisi yango asalisa Mamie, apesaki bango dati moko mpe alobaki ete soki dati wana ekoki, Mamie ná mama na ye bakokufa. Na ntango wana, Mamie akómaki na mbula 13. Mamie alobi boye: “Nazalaki kolela ntango nyonso. Kasi, ntango dati yango ekokaki, moto moko te akufaki.”
Noko ya Mamie amemaki ye epai ya pastɛrɛ moko, oyo alobaki ete amonaki na emonaneli ete ezali lisasi te nde ekómisaki Mamie paralize, kasi nde bilimu mabe. Alakaki bango ete soki Mamie asali makambo oyo akosɛnga ye, akotambola nsima ya pɔsɔ moko. Mamie alobi boye: “Nasukolaki mai mosantu ya mbu mbala na mbala, nazalaki kolya te, mpe nazalaki komibalolabalola na mabelé mikolo nyonso na midi ya butu, mpe nasengelaki kosala yango bangonga mingi. Kasi nyonso wana ezalaki mpamba, nabikaki te.”
Nzokande, balopitalo mingi ezongelaki misala na yango, mpe nsukansuka balongolaki Mamie lisasi yango. Anyokwamaki mingi mbula koleka mibale. Alobi boye: “Nsima ya lipaso, nazalaki koyoka lisusu mpasi mingi te, mpe nakómaki kopema mwa malamu. Lokola nakómaki paralize banda na loketo tii na makolo, nakokaki kotɛlɛma na lisalisi ya nzete (déambulateur).”
Mamie akutani na Batatoli ya Yehova
Mwa bapɔsɔ nsima ya lipaso ya Mamie, mama na ye akutanaki na Batatoli ya Yehova mibale. Lokola ayebaki ete mwana na ye alingaka kotánga Biblia, abengaki Batatoli yango na ndako na ye. Mamie andimaki mbala moko koyekola Biblia. Kasi, nsima ya basanza, akɔtaki lisusu lopitalo mpe azalaki lisusu kokutana na Batatoli ya Yehova te.
Atako bongo, Mamie azalaki kaka na mposa ya koyeba Biblia. Yango wana, ntango pastɛrɛ moko alukaki kosalisa ye, andimaki. Mokolo moko na eteyelo ya lomingo, moyekoli moko atunaki molakisi ete: “Yesu ná Nzambe bakokani?”
Molakisi alobaki ete: “Ɛɛ, bakokani. Kasi, Yesu akokani mpenza na Nzambe na ndenge ya kokokana te.”
Mamie amitunaki, ‘akokani mpenza na Nzambe na ndenge ya kokokana te? Ezali polele te. Awa bazali koteya solo te.’ Nsukansuka, lokola Mamie amonaki ete bazali koteya ye solo ya Biblia te, atikaki kokende na lingomba yango.
Na 1996, mobulu ebimaki lisusu na Monrovia. Bandeko mosusu mibale ya Mamie bakufaki, mpe ndako na bango ezikaki mbala ya mibale. Mwa basanza na nsima, Batatoli mibale ya basi bakutanaki na Mamie ntango bazalaki kosakola ndako na ndako. Mamie abandaki lisusu koyekola Biblia. Ntango ayanganaki na makita mbala ya liboso, akamwaki mingi ndenge amonaki bato nyonso, ezala bankulutu ya lisangá, bazali kokɔmba Ndako ya Bokonzi. Nsima ya mwa basanza, asepelaki mingi ntango akendaki na Liyangani ya Etúká “Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe,” liyangani ya monene ya liboso oyo ye ayanganaki.
Mamie alobi boye: “Nakamwaki mingi. Batatoli ya Yehova balinganaka mpenza, atako bauti na bikólo ndenge na ndenge. Mpe makambo nyonso ebongisamaki malamu.”
Akokisi mposa na ye ya kosalela Nzambe
Na 1998, bitumba ebandaki lisusu mpe Mamie ná mama na ye bakimaki na Côte d’Ivoire, ekólo moko ya pene wana, epai bakendeki kofanda na kaa ya bato bakimá mboka ya Peace Town Refugee ná bato mosusu 6 000 oyo bautaki mpe na Liberia. Mamie akobaki koyekola Biblia elongo na Batatoli mpe akolaki nokinoki na elimo. Eumelaki te, akómaki na mposa ya koyebisa basusu bindimeli na ye. Mpo na kosakola ndako na ndako, bandeko na ye ya elimo basalisaka ye na kotindika velo na ye. Na ndenge yango, Mamie akómaki kopesa litatoli epai ya bato mosusu na kaa.
Atako mpo na mikakatano na ye ya nzoto, ezalaki pɛtɛɛ te akendaka na Ndako ya Bokonzi oyo ezali na ntaka ya kilomɛtrɛ motoba, Mamie azalaki koyangana na makita nyonso. Na mokolo ya 14 Mai 2000, atambolaki kilomɛtrɛ koleka 190 mpo na kokende na liyangani ya mokolo moko mpe azwaki batisimo mpo na komonisa ete amipesi na Nzambe. (Matai 28:19, 20) Liboso ya ebele ya bato oyo bazalaki kolela na esengo, bakendeki na Mamie na liziba moko epai azwaki batisimo. Elongi na ye ezalaki kongɛnga na esengo ntango abimaki na mai.
Mamie azali sikoyo na kaa ya bato bakimá mboka na Ghana, azali na mokano ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza to mosakoli ya ntango nyonso. Mama na ye mpe abandi koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe sikoyo ayebisaka bato makambo oyo azali koyekola. Bango nyonso mibale bazali kozela na motema likoló elaka oyo Liloba ya Nzambe epesi, ntango “motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”—Yisaya 35:5-7.
[Elilingi na lokasa 22]
Lisasi oyo balongolaki Mamie
[Elilingi na lokasa 23]
Bazali komema Mamie na liziba mpo azwa batisimo
[Elilingi na lokasa 23]
Mamie azali koyekola Biblia ná mama na ye, Emma