Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/7 nk. 29-31
  • “Nasili kobatela kondima”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Nasili kobatela kondima”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Maloba na ye mazalaki na bopusi epai na minganga
  • Mikano ya elimo
  • Alikyaki mpo na mikolo mizalaki liboso
  • “Namoná naino bolingo lokola oyo te”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Kondima esalisaki ngai na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/7 nk. 29-31

“Nasili kobatela kondima”

EYEBISAMI NA BANINGA YA BRUNELLA INCONDITI

“MOKOLO ya Poso ezalaki mokolo moko molai mpe ya mawa. Nazalaki bobele ngai moko na eteni na ndako, kozanga elikya. Namimonaki lokola ete nazalaki kotambola na nzela ya kati na ndako. Makambo manso mazalaki kotambola malamu, kasi na pwasa, moto moko azipaki ekuke liboso na elongi na ngai mpenza, mpe ata molende nini nakokaki kosala mpo na kobima libanda, ezalaki bobele mpamba.”

Ezalaki likambo oyo lipesaki nkanda makasi epai na Brunella Inconditi, oyo azalaki na mibu 15. Mokolo monene ya bomoi na ye ya bolenge elekaki. Na ebandeli ya mobu wana, bolingo na ye oyo ezalaki kokóla mpo na Yehova mpe mpo na Biblia, epusaki ye na komipesa epai na Nzambe. Na Yulí 1990, alingaki kozwa batisimo na Liyangani ya Etúká “Monoko na peto” oyo Batatoli ya Yehova basalaki na engumba Montreal, na Canada. Kasi, na esika ete esalema bongo, Brunella azalaki pene ya kozwa komekama mpo na kondima na ye oyo eumelaki kino nsuka ya bomoi na ye.

Mikolo mibale liboso ya komonisa elembo ya komipesa na ye na batisimo na mai, bayebisaki Brunella ete azalaki na maladi oyo babéngi leucémie. Na lopitalo ya engumba wana, oyo ekosalisaka bana mike, minganga balingaki kosalisa ye nokinoki, bongo Brunella atikalaki wana na lopitalo.

Maloba na ye mazalaki na bopusi epai na minganga

Brunella ayebaki ete makila ezali eloko ya bulee na miso ya Yehova Nzambe. (Levitiki 17:11) Baboti na ye, Edmondo mpe Nicoletta, balobaki ete bazongisa mwana na bango ya mwasi makila te. Tata na ye amikundoli ete: “Brunella alingaki ete minganga báyoka yango epai na ye moko lokola, atako azalaki mwana moke. Alobaki epai na bango na mpiko nyonso ete alingaki te kosalisama na mwango oyo mozali kobuka mobeko ya Biblia na ntina na ‘koboya makila.’”​—Misala 15:20.

Na Yulí 10, 1990, minganga misato mpe mwasi moko momonisi ya ebongiseli ekotalelaka mambi ya ezalela ya bomoi ya bato, bakutanaki na baboti ya Brunella elongo na basakoli mibale ya lisangá ya Batatoli ya Yehova ya mboka wana. Ekizamá emonisaki solo ete Brunella azalaki na maladi oyo babéngi leucémie. Minganga balimbolaki mwango oyo balingaki kosalela mpo na kosilisa maladi wana. Bamonisaki na mayele nyonso ete ezalaki mpasi mpo na kosalisa yango. Moko na bankulutu ya lisangá amikundoli ete: “Ezaleli ya Brunella mpe ekateli na ye mpo na kotosa Nzambe esimbaki mitema ya minganga mpe bamonisi ya ebongiseli oyo ekotalelaka mambi ya ezalela ya bomoi ya bato. Bakamwaki na bolingo bozalaki na baboti na ye mpe na baninga na ye ya lisangá ya boklisto. Basepelaki mpe na lolenge tozalaki kososola mpe ezalela ya limemya oyo tozalaki na yango mpo na etelemelo na bango.”

Minganga bazwaki ekateli ya kopɛngola mwango ya kozongisa makila. Balingaki kosalisa Brunella na mwango oyo babéngi chimiothérapie, kasi ezalaki makasi mingi te koleka ndenge ezalaka liboso. Yango elingaki kolɛmbisa likámá ya kobebisa ba cellules ya makila na ndenge yango esalaka. Nicoletta alimboli ete: “Minganga batalelaki nzoto, mayoki mpe bamposa ya elimo ya Brunella. Ntango tosɛngaki bango ete tokende epai na monganga oyo ayekoli mpenzampenza kosalisa leucémie ya bana mike kozanga kosalela makila, bandimaki.” Brunella mpe basáli ya lopitalo bakómaki baninga makasi.

Mikano ya elimo

Atako kosalisama ya liboso epesaki matomba malamu, kasi momekamo ya Brunella ezalaki naino na ebandeli. Na Novɛ́mbɛ 1990, maladi na ye ekitaki; na yango, azelisaki te mpe azwaki batisimo. Kokanisáká mpo na mwa basanza oyo ezalaki liboso, Brunella alobaki ete: “Ezalaki pɛtɛɛ te. Esɛngelaki kozala na makasi mingi, mpe esengeli kozala na makanisi ya kolónga. . . . Kondima na ngai etyamaki na komekama, kasi natɛlɛmaki ngwi, mpe nasili kotya mokano ya kokóma mobongisi-nzela ya sanza na sanza [mosaleli ya ntango nyonso] mpo na bomoi na ngai mobimba.”

Na ebandeli ya 1991, Brunella akweaki lisusu maladi. Alingaki kokufa wana bazalaki kosalisa ye na mwango oyo ete chimiothérapie, kasi bato nyonso bakamwaki mpe basepelaki na ntango abikaki. Na Augústo, azalaki malamu mpenza na boye ete azalaki na likoki ya kosangana na mosala ya kosakola lokola mobongisi-nzela mosungi. Maladi na ye ezongaki lisusu makasi, mpe na Novɛ́mbɛ 1991, kanser ezwaki binama mingi ya nzoto na ye. Etuluku mosusu ya minganga na lopitalo mosusu babandaki kosalisa ye na mwango oyo babéngi ete radiothérapie.

Ata kati na ezalela ya makambo ya mpasi makasi, Brunella atikalaki ngwi mpe amityelaki mikano ya elimo. Wana bayebisaki ye mpo na mbala ya liboso ete azalaki na leucémie, bayebisaki ye ete asɛngelaki kokufa nsima ya sanza motoba. Lokola mbula moko na ndambo elekaki sikawa, Brunella azalaki ntango nyonso kotya mikano mpo na mikolo mizalaki liboso. Nkulutu moko ya lisangá ayebisaki ete: “Azalaki kobebisa ntango te mpo na kokokisa mikano na ye. Kondima ya Brunella mpo na Paladiso oyo elakami na Nzambe, esungaki ye na boumeli ya mpasi na ye. Akómaki moklisto oyo akomeli atako azalaki na mbula moke. Etamboli na ye mpe ezaleli na ye ezalaki na bopusi epai na lisangá mpe likoló na baoyo bayebaki ye, kati na bango mpe basáli na lopitalo.” Mama na ye amikundoli ete: “Azalaki komilelalela te. Soki moto moko atuni ye lolenge nini azalaki kooka, azalaki koyanola ete, ‘Malamu’ to, ‘Mwa malamu, bongo yo?’”

Alikyaki mpo na mikolo mizalaki liboso

Brunella akanaki kozala na Liyangani ya Etúká “Bamemi na pole” oyo esalemaki na Batatoli ya Yehova na mobu 1992. Kasi, mwa moke liboso ya liyangani, Brunella akɔ́taki lopitalo, mpe bomoi na ye ebebaki mingi. Atako bongo, ayanganaki na liyangani yango wana efandaki ye na kiti ya bibɔ́sɔ́nɔ́, na mokano ete atala lisano-liteya oyo ete Tósala oyo ezali sembo na miso na Jéhovah.

Azongaki na ndako epai na baboti na ye mpo na mwa mikolo ya nsuka ya bomoi na ye. Nicoletta alobi ete: “Kino nsuka, azalaki komibanzabanza na ntina na bato mosusu koleka mpo na ye moko. Azalaki kolendisa bango na koyekola Biblia, kolobáká na bango ete, ‘Tokozala elongo kati na Paladiso.’”

Brunella akufaki na Yulí 27, 1992, abatelaki makasi elikya na ye ya lisekwa mpo na kozala na bomoi na Paladiso awa na mabelé. Azalaki bobele na ebandeli mpo na kolanda mikano na ye, kasi akanaki kolanda bomoi na ye ya komipesa na nsima ya lisekwa na ye. Mwa mikolo liboso ya liwa na ye, Brunella akomaki mokanda oyo, yango esɛngelaki kotángama na mokolo ya kokundama na ye.

“Baninga na bolingo:

“Botɔndi mingi mpo na boyei na bino. Boyei na bino awa ezali na ndimbola monene mpo na libota na ngai.

“Mpo na bato oyo bazalaki pene na ngai​—tozwaki mikakatano mingi elongo. Tolekisaki ntango mingi ya mpasi, kasi ezalaki mpe na mwa bantango ya esɛngo. Ezalaki etumba makasi mpe ya molai, kasi nakanisi te ete elóngi ngai. Lokola elobelami kati na Makomami, ‘Nasili kobunda etumba malamu, napoti kino nsuka na emekaneli na mbango, nasili kobatela kondima.’​—2 Timoté 4:7, NW.

“Nasili mpe koyeba makambo mingi, nakóli mpe mingi, mpe baninga na ngai mpe baoyo bazalaki penepene na ngai bamonaki mbongwana. Natɔndi bato banso oyo basungaki ngai.

“Bino bato bozali na kondima kati na ebongiseli ya sika mpe kati na Yehova, boyebi ete lisekwa likozala, lokola Yoane 5:28, 29 elobi yango. Boye, bókangama na solo, mpe tokokoka komonana lisusu.

“Natɔndi bato oyo bayebi mpasi oyo nazalaki na yango. Napesi bino mbote ya mabɔ́kɔ mpe na lipwɛpwɛ. Nalingi bino banso.”

Brunella apesaki nzela te na bolenge na ye mpe na maladi na ye ete ébebisa komipesa na ye epai na Nzambe. Ndakisa na ye ya kondima mpe ya ekateli na ye ezali kolendisa bilenge mpe mikóló oyo balingi kolónga likambo nyonso oyo likoki kopekisa bango na kopota na emekaneli mpo na bomoi.​—Baebele 12:1.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto