Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Ndenge nini nakoki koboya masolo ya kosangisa nzoto na kelasi?
“Mikolo nyonso, bana babɛtaka masolo ya kosangisa nzoto. Kutu bana basi bango moko balukaka bana mibali mpe basangisaka nzoto kaka wana na kelasi.”— Eileen, 16.
“Na kelasi na biso, bana oyo basangisaka nzoto mibali na mibali basalaka makambo ya mbindo liboso ya bana mosusu mpe bamonaka ata mabe moko te mpo na yango.”— Michael, 15.a
BANINGA na yo ya kelasi babɛtaka ntango nyonso masolo ya kosangisa nzoto? Bamosusu kati na bango basalaka mpenza makambo yango? Soki ezali bongo, okoki komiyoka lokola elenge mwasi moko oyo alobaki ete mpo na ye kokende na kelasi ezalaki lokola “kosala na esika oyo basalaka bafilme ya kosangisa nzoto.” Ezali solo ete na kelasi, ebele ya bilenge babɛtaka masolo mingi ya kosangisa nzoto—kutu basangisaka mpe nzoto.
Mbala mosusu okoki koyoka baninga na yo ya kelasi bazali kolobela likambo ya kosangisa nzoto na moto kaka mbala moko mpe bokabwani libela. Na bantango mosusu bilenge basangisaka nzoto ndenge wana na bato oyo bayebani na bango kala mingi te. Bilenge mosusu basangisaka nzoto na bato oyo bayebani na bango ata moke te, oyo bakutani na bango na nzela ya Internet. Ezala ndenge nini, bilenge yango basalaka ndenge wana mpo balingi te ezala likambo ya bolingo. Danielle, elenge mwasi moko ya mbula 19 alobi boye: “Likambo mosusu ezali te, ezali kaka bato mibale oyo balingi kokokisa mposa na bango ya nzoto.”
Likambo ya kokamwa ezali te, na biteyelo mingi balobelaka masolo ya kosangisa nzoto na moto kaka mbala moko mpe bokabwani libela. Elenge mwasi moko ya mbula 17 akomaki na zulunalo ya eteyelo boye: “Na mokolo nyonso ya yambo, okomona bana-kelasi batɛlɛmi na bakulware, bazali koyebisa baninga na bango ndenge basangisaki nzoto na mokolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo mpe bazali kobɛtela bango masolo ya makambo nyonso ndenge elekaki.”
Soki ozali kosala makasi otosa mitinda ya Biblia, kozala esika moko na bato oyo bazali kolobela kaka makambo ya basi ná mibali ekoki kotinda yo omiyoka ete ozali kaka yo moko. Mpe soki oboyi kokɔta na makambo oyo bato mingi bazali kosepela na yango bakosɛka yo. Okoki komizela na yango, mpamba te Biblia elobi ete ntango bato mosusu bazali kokanga ntina te ya etamboli na yo, yango ekotinda bango ‘báfinga yo.’ (1 Petelo 4:3, 4) Kasi, moto moko te alingaka basɛka ye. Na bongo, ndenge nini okoki koboya masolo ya kosangisa nzoto na kelasi mpe kokoba kosepela na mitinda oyo otosaka? Ya liboso, ezali na ntina oyeba mpo na nini mposa ya kosangisa nzoto ezalaka makasi mpenza.
Omiyeba yo moko
Na eleko ya bolenge, nzoto mpe mayoki na yo ezali kobongwana nokinoki. Na ntango wana, okoyoka mposa makasi ya kosangisa nzoto. Yebá ete yango ezali mabe te. Yango wana, soki ozali mwana mobali mpe ozali kobendama na mwana mwasi to ozali mwana mwasi mpe ozali kobendama na mwana mobali na kelasi na bino, koloba mbala moko te ete ozali mpenza mabe to ete okokoka te kobatela etamboli ya pɛto. Okoki kobatela bizaleli ya pɛto soki olingi!
Longola etumba oyo ozali kobunda mpo na mposa oyo euti na bolenge, ezali mpe na likambo mosusu osengeli koyeba. Bato nyonso ya kozanga kokoka, motema na bango etindaka bango na kosala mabe. Ata ntoma Paulo andimaki ete: “Nazali komona na kati ya binama na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba ná mobeko ya makanisi na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu oyo ezali na kati ya binama na ngai.” Paulo alobaki ete kozanga kokoka na ye esalaki ete amiyoka “moto ya mawa.” (Baloma 7:23, 24) Kasi alongaki etumba yango, yo mpe okoki kolonga!
Yebá baninga na yo ya kelasi
Ndenge tomoni yango mwa liboso, baninga na yo ya kelasi bakoki ntango nyonso kobɛta masolo ya kosangisa nzoto to komikumisa na ndenge basalaka yango. Osengeli koyeba ete makanisi na bango ya mabe ekoki mpe kobebisa yo. (1 Bakolinti 15:33) Kasi osengeli te komona baninga na yo ya kelasi lokola banguna na yo. Mpo na nini?
Baninga na yo ya kelasi bazali na bamposa oyo yo mpe ozalaka na yango. Motema na bango mpe etindaka bango básala mabe. Kasi bakeseni na yo, mpo basusu kati na bango bakoki kozala “bato balingá bisengo na esika ya kozala bato balingaka Nzambe.” To epai na bango “bato bazangi bolingo ya libota.” (2 Timote 3:1-4) Mbala mosusu, baninga na yo mosusu ya kelasi bazangi baboti oyo bakoki kopesa bango disipilini na bolingo mpenza to koteya bango bizaleli malamu. —Baefese 6:4.
Lokola baninga na yo ya kelasi bazangi bwanya ya solosolo oyo euti na Biblia, Liloba ya Nzambe, oyo yo ozali na yango—mbala mosusu bayebi te makama oyo ekoki koyela bango soki bazali kokanga te bamposa na bango ya nzoto. (Baloma 1:26, 27) Ezali lokola nde baboti na bango bapesi bango motuka ya monene mpe batindi bango na nzela oyo mituka elekaka mingi—kasi balakisi bango ndenge ya kotambwisa yango te. Bakoki koyoka esengo ya mwa ntango moke wana babimi na motuka yango, kasi nsukansuka bakozwa likama. Na bongo, okosala nini soki baninga na yo ya kelasi babandi masolo ya basi ná mibali na miso na yo to bazali kobenga yo osangana na bango na etamboli ya mbindo?
Boyá masolo ya mbindo
Soki baninga na yo ya kelasi babandi masolo ya mbindo, mbala mosusu okolinga koyoka to kokɔta na masolo yango—kaka mpo bamona te ete okesengi na bango. Soki osali bongo yo mpe okesani na bango te. Kasi, kanisá ndenge oyo bakomona yo. Kosepela na masolo na bango ekomonisa mpenza lolenge ya moto oyo ozali to oyo olingi kozala?
Na bongo, osengeli kosala nini soki lisolo ekómi ya makambo ya kosangisa nzoto? Osengeli kotɛlɛma mbala moko mpe kokende? Ɛɛ! (Baefese 5:3, 4) Biblia elobi ete: “Moto na mayele akososola mabe liboso mpe akomibomba; nde bazoba bakoleka wana mpe bakozwa etumbu.” (Masese 22:3) Na yango, soki olongwe na esika ya masolo ya ndenge wana, ozangi limemya te—ozali nde moto ya mayele.
Ya solo, osengeli kokakatana te mpo na kolongwa na esika oyo bazali kobɛta masolo ya mbindo. Kozanga ntembe, ezali na masolo mosusu oyo osengeli kokima yango kozanga oyoka nsɔni, mingimingi soki osepeli te na makambo oyo bazali koloba to soki olingi te kokɔta na makambo yango. Na ndakisa, kanisá ete etuluku moko ya baninga na yo ya kelasi babandi kosolola ndenge ya koyiba wana basimbi mondɔki. Okotɛlɛma pembeni wana mpe koyoka ndenge bazali komibongisa mpo na yango? Soki osali bongo, bakoki komona lokola yo mpe ozali na kati na bango. Soki ozali na mayele, okomona malamu olongwa na yo. Salá mpe bongo ntango masolo ekómi ya makambo ya pite. Mbala mingi, okoki kozwa ndenge ya kolongwa kozanga komonisa ete yo nde moto malamu mpe kozanga ete báseka yo.
Kasi, ntango mosusu okokoka te kolongwa na esika oyo bazali kobeta masolo ya ndenge wana. Na ndakisa, bilenge oyo bafandi mpembeni na yo na kelasi bakoki komeka kokɔtisa yo na masolo ya basi ná mibali. Na ntango wana, osengeli koyebisa bango na limemya nyonso kasi na mpiko mpenza ete bátika kopɛngwisa likebi na yo. Soki batiki te, okoki kosala ndenge Brenda asalaki. Alobi boye: “Nayebisaki molakisi na nkuku ete afandisa ngai esika mosusu.”
Zalá na bososoli
Mokolo mosusu, baninga na yo mosusu ya kelasi bakotuna yo ntina oyo okɔtaka te na masolo na bango ya mbindo. Soki batuni yo mpo na bizaleli na yo ya malamu, zalá na bososoli ntango ozali koyanola. Na ntembe te, bamosusu bakoki kotuna kaka mpo básɛka yo na esika báluka koyeba makanisi na yo. Kasi soki mwana-kelasi oyo azali kotuna yo azali mpenza koluka koyeba, yebisá ye bindimeli na yo na ndenge oyo ekomonisa ete ozali koyoka nsɔni ata moke te. Bilenge mingi basalelaki buku Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano bibongi mpo na kosalisa baninga na bango ya kelasi báyeba ete kotosa mitinda ya Biblia epesaka matomba mingi.b
Bóya na motema mobimba
Okosala nini soki mwana-kelasi moko azali ntango nyonso koluka kosimba yo na nzoto to kopesa yo bizi? Soki otikeli ye nzela, akokoba na ezaleli wana ya mabe. Biblia elobeli elenge mobali moko oyo atikaki mwasi moko ya pite asimba ye na nzoto mpe apesa ye bizi. Atikaki ye asolola na ye na ndenge oyo ekolamwisa mposa ya kosangisa nzoto. Esukaki ndenge nini? “Alandi ye nokinoki, lokola ngɔmbɛ akei na kobomama.”—Masese 7:13-23.
Kasi, talá ndenge Yozefe asalaki ntango akutanaki na likambo ya ndenge wana. Mwasi ya nkolo na ye amekaki mbala na mbala kolengola ye, kasi aboyaki masenginya na ye na motema mobimba. Ntango amekaki kosimba ye na nzoto, azwaki ekateli makasi mpe akimaki.—Genese 39:7-12.
Lokola Yozefe, yo mpe osengeli kozwa ekateli makasi soki moninga moko ya kelasi to moto mosusu alingi kosimba yo na ndenge oyo ebongi te. Eileen alobi boye: “Soki mwana mobali moko ameki kosimba ngai, nayebisaka ye atika. Soki atiki te, nayebisaka ye na mongongo makasi ete alongola lobɔkɔ na ye na nzoto na ngai.” Mpo na bilenge mibali ya kelasi na bango Eilleen alobi lisusu boye: “Bakomemya yo kaka soki yo moko ozali komipesa nzoto kilo.”
Baninga na yo ya kelasi bakomemya yo mpe kaka soki ozali koboya koyoka masolo na bango ya pite, ozali kolimbwela bango na limemya bizaleli malamu na yo soki ekoki, mpe soki ozali koboya mpenza moto nyonso oyo azali koyela yo na makanisi ya kosala pite. Litomba mosusu ezali ete yo moko okomiyoka malamu. Likambo eleki ntina, Yehova akondima yo!—Masese 27:11.
KANISÁ MAKAMBO OYO
◼ Okoloba nini mpo na koboya lisolo moko ya makambo ya kosangisa nzoto?
◼ Okoloba nini mpe okosala nini soki moninga ya kelasi alingi bósala pite?
[Maloba na nse ya lokasa]
a Oyo ezali bankombo topesi bango kopesa.
b Ebimisami na Bataloli ya Yehova.
[Elilingi na lokasa 25]
Soki lisolo ekómi ya makambo ya kosangisa nzoto, longwá na yo
[Elilingi na lokasa 26]
Boyá moto nyonso oyo azali koyela yo na makanisi ya kosala pite