Mosala ya kotya langi na bilamba na ntango ya kala mpe na mikolo na biso
EUTI NA MOKOMI NA BISO NA GRANDE-BRETAGNE
OSILÁ komona ndenge tomiyokaka ntango tomoni langi boye to boye? Tokoki kokamwa te ete banda kala bato batyaka langi na bilamba.
Ntango tosombaka bilamba ya kolata, to barido ya ndako, to mpe bilamba ya kotongisa, tolingaka ete ezala na langi oyo elongwaka noki te to enzulukaka te. Mpo na koyeba mayele oyo basalelaka mpo bilamba ebatela langi na yango ntango molai mpe ndenge bato ya kala bazalaki kosala mpo na kotya bilamba langi, tokendaki na Bradford, engumba moko na nɔrdi ya Angleterre, kotala ndako oyo babombaka biloko ya kala ya makambo etali balangi (SDC Colour Museum).a Kuna, tomonaki biloko mosusu oyo bato bazalaki kosalela na boumeli ya bankama ya bambula mpo na kotya bilamba langi.
Balangi oyo bazalaki kosalela na ntango ya kala
Banda kala tii kosuka na mobu soki 1850, biloko mingi oyo bazalaki kosalela mpo na kozwa langi ya kotya na bilamba ezalaki kouta na biloko oyo Nzambe akelá, lokola milona to banzete, nyamankɛkɛ mpe mbɛmbɛ ya mai. Na ndakisa, molona moko (pastel) ezalaki kopesa langi ya bule (1), molona mosusu (gaude) langi ya mosaka (2), mpe molona mosusu (garance) langi ya motane. Nzete moko (campêche) ezalaki kopesa langi ya moindo mpe matiti moko (orseille) langi ya violɛ. Mbɛmbɛ moko ya mai (murex) ezalaki kobimisa langi ya motane-moindo ya ntalo mingi, basusu babengaka langi yango motane-moindo ya engumba Tulo to ya baamperɛrɛ (3). Langi wana nde bazalaki kotya na bilamba ya baamperɛrɛ (to bakonzi) ya Loma.
Kala mpenza, liboso ya baamperɛrɛ ya Loma, bato minene mpe bato ya bomɛngo bazalaki kolata bilamba ya langi oyo euti na biloko oyo Nzambe akelá. (Esetele 8:15) Na ndakisa, bazalaki kozwa langi ya motane na nyamankɛkɛ moko ya mwasi (kermès) (4). Ekoki kozala ete langi ya motane oyo batyaki na bilamba ya tabenakle mpe na bilamba ya nganga-nzambe monene na Yisalaele ya kala eutaki na nyamankɛkɛ yango.—Exode 28:5; 36:8.
Ndenge batyaka bilamba langi
Biloko oyo batye na ndako yango, epai babombaka biloko ya kala ya makambo etali balangi, emonisi ete mosala ya kotya bilamba langi esuki kaka te na kotya bilamba oyo batongá naino te to bansinga oyo basalaka na yango bilamba na kati ya mai ya langi. Mbala mingi, ntango batyaka bilamba langi, basalelaka nkisi moko (mordant) oyo ekanganaka makasi na langi mpe na bansinga oyo basalaka na yango bilamba. Nkisi yango esalaka ete langi ekangana na bansinga ya bilamba mpe elongwa mpambampamba te na mai. Basalelaka bankisi ndenge na ndenge mpo esala ete langi ekangana na bansinga oyo basalaka na yango bilamba, kasi bankisi mosusu ezalaka likama mpo na bato oyo bazali kosalela yango.
Ntango basalelaka mayele mosusu ya kotya bilamba langi, ebimisaka nsolo mabe mpenza; na ndakisa mayele moko ya mindɔndɔ mpe oyo esɛngaka ntango molai, oyo bazalaki kosalela mpo na kozwa langi moko ya motane ngwaa (rouge turc). Bazalaki kosalela mayele yango mpo na bilamba ya kotó (coton) mpe ezalaki kopesa yango langi ya motane ngwaa; ata soki basukoli bilamba yango to moi ebɛti yango, langi na yango ezalaki konzuluka te mpe kolongwa te. Na eleko moko, mpo na kosalela mayele yango banda na ebandeli tii na nsuka, ezalaki kosɛnga kokokisa makambo 38 na boumeli ya sanza minei! Bilamba oyo batyá langi wana ya motane ngwaa (5) ezali kati na bilamba oyo eleki kitoko, oyo batyá na ndako wana ya kobomba biloko ya kala ya makambo etali balangi.
Balangi oyo bato basali
Na mobu 1856, William Henry Perkin asalaki langi ya liboso oyo eutaki na banyama to na banzete te. Na ndako yango epai babombaka biloko ya kala ya makambo etali balangi, balakisi ndenge Perkin abimisaki langi ya motane-moindo oyo ezalaki mpenza kongɛnga. Pene na mobu 1900, bato basalaki balangi mosusu ya kongɛnga mpenza. Lelo oyo, baizini esalaka balangi koleka 8 000 oyo euti na banyama to na banzete te (6). Balangi oyo euti na biloko oyo Nzambe akelá oyo basalelaka tii lelo ezali oyo eutaka na nzete babengi campêche mpe na nyamankɛkɛ babengi cochenille.
Na eteni mosusu ya ndako yango epai babombaka biloko ya kala ya makambo etali balangi, balakisaka ndenge lelo oyo batyaka langi na bilamba oyo esalemi na bansinga oyo bato basali, na ndakisa nsinga babengi rayonne. Na 1905, bakómaki kosala mpe kotɛka, mpo na mbala ya liboso, lolenge moko ya bilamba oyo esalemi na bansinga ya ndenge wana (viscose rayonne), mpe lelo oyo bato mingi balingaka bilamba yango. Lokola bilamba yango ezali lokola kotó, balangi mingi oyo bazalaki kotya na bilamba na ntango wana ezalaki mpe kobonga na yango. Na nsima, esengelaki kobimisa balangi mosusu mingi ya sika oyo ekotyama na motindo ya sika ya bilamba oyo bato babimisaki (acétate, polyester, nylon, fibre acrylique).
Milende mpo na kosala balangi oyo elongwaka noki te
Ntango tosombaka bilamba oyo batongá to batongá te, tolingaka ete ezala na langi oyo elongwaka noki te. Kasi, bilamba mingi enzulukaka na moi to soki tozali kosukola yango mbala na mbala, mingimingi soki tozali kosalela sabuni. Ekómaka mpe ete elamba enzuluka to ekóma na langi mosusu mpo na motoki to soki basukoli yango esika moko na bilamba mosusu. Mpo elamba ebatela langi na yango ntango bazali kosukola yango, esengeli ezala na langi oyo ekangamá makasi na bansinga na yango. Kosukola elamba mbala na mbala mpe kosalela sabuni esalaka ete langi ebanda kokabwana mokemoke na bansinga ya elamba; yango nde esalaka ete elamba enzuluka. Na baizini oyo esalaka langi ya kotya na bilamba, bamekamekaka langi yango mpo na koyeba soki batye yango na elamba, langi yango ekotikala kaka malamu soki batye elamba yango na moi, basukoli yango na mai to na sabuni to mpe soki motoki ezali kopɔlisa yango.
Ntango oyo tolekisaki na ndako wana epai babombaka biloko ya kala ya makambo etali balangi esalisi biso tóyeba malamu biloko ndenge na ndenge oyo basalelaka mpo na kosala bilamba oyo tolataka. Longola yango, toyebi mpe malamu mayele oyo basalelaka mpo langi oyo bazali kotya na bilamba elongwaka noki te ata soki tozali kosukola bilamba yango mbala na mbala.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Lisangá ya bato oyo basalaka mosala ya kotya bilamba langi (SDC), bayekolaka makambo etali balangi.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Fɔtɔ 1-4: Na ndingisa ya Colour Museum, Bradford (www.colour-experience.org)
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Fɔtɔ 5: Na ndingisa ya Colour Museum, Bradford (www.colour-experience.org); Fɔtɔ 6: Clariant International Ltd., Suisse