Oyebaki yango?
“Biloko oyo epakolami langi ya motane makasi” oyo mokanda ya Kobima elobeli ezalaki nini?
▪ Biblia elobi ete bilamba oyo ezalaki na bifelo mpe porte ya tabernakle, esika monene ya losambo na Yisraele ya kala, esalemaki na “nsinga ya bulé mpe na lɛnɛ oyo epakolami na langi ya mwa motane-bulé mpe na biloko oyo epakolami langi ya motane makasi.” (Kobima 26:1; 38:18) “Bilamba mosantu” ya banganga-nzambe ezalaki mpe kosalema na “biloko oyo epakolami langi ya motane makasi.”—Kobima 28:1-6.
Langi ya motane makasi yango ezalaki nde mokobo oyo bazalaki kobimisa na nzoto ya mwa banyama moko ya mikemike. Mwa banyama yango ezali na mapapu te, ezalaka na nzete oyo babengi chêne, oyo ezalaki kokola na Moyen-Orient mpe na mikili oyo ezali pembenipembeni ya Mbu ya Mediterane. Langi yango ya motane eutaka na makei ya mwa banyama yango. Ntango mwa nyama yango ezali na makei, emonanaka lokola mwa mbuma mpe ezalaka na monene ya madesu ya mike. Ekangamaka na nkasa mpe na bitape ya nzete yango. Nsima ya kolɔkɔta yango na mabɔkɔ mpe konika yango, mwa banyama yango ebimisaka langi ya motane, oyo bakoki kosangisa yango na mai mpe mai yango esalelamaka mpo na kopesa elamba langi ya motane. Pline l’Ancien, Moroma moko oyo azalaki mokomi ya masolo ya kala, alobelaki langi yango ya motane mpe atángaki yango na kati ya balangi oyo bato bazalaki kosepela na yango mingi na ntango wana.
Na kati ya bato oyo bakomaki Makomami ya Grɛki ya bokristo, banani bazalaki na Pantekote ya mobu 33 T.B.?
▪ Ekoki kozala ete na kati ya bato mwambe oyo bakomaki mikanda ya Makomami ya Grɛki ya bokristo, bato motoba nde bazalaki wana.
Mokanda ya Misala elobi ete Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bólongwa na Yerusaleme te, kasi bókoba kozela eloko oyo Tata alakaki.” (Misala 1:4) Lisolo yango emonisi mpe ete Matai, Yoane, mpe Petro, bato oyo na nsima bakomaki Biblia, balandaki malako ya Yesu mpe bayanganaki “na esika moko” ná bayekoli mosusu. Bandeko ya Yesu mpe bazalaki wana. (Misala 1:12-14; 2:1-4) Mibale kati na bango, Yakobo ná Yuda (Yudasi), bakomaki mikanda mibale ya Biblia oyo ebengamaka na nkombo na bango.—Matai 13:55; Yakobo 1:1; Yuda 1.
Na evanzile na ye, Marko alobeli elenge mobali moko oyo akimaki na butu oyo bakangaki Yesu. Emonani mpenza ete ezalaki ye moko, mpamba te bayekoli mosusu basundolaki Yesu. (Marko 14:50-52) Na yango, emonani ete Marko azalaki na kati ya bato ya liboso oyo bakómaki bayekoli ya Yesu, mpe ekoki mpenza kozala ete azalaki wana na mokolo ya Pantekote.
Bakomi mibale ya Makomami ya Grɛki oyo batikali ezali Paulo ná Luka. Na Pantekote ya mobu 33 T.B., Paulo akómaki naino moyekoli ya Kristo te. (Bagalatia 1:17, 18) Emonani mpe ete Luka azalaki te mokolo ya Pantekote, mpamba te alobi ete azalaki te na kati ya bato oyo ‘bamonaki na miso’ makambo oyo Yesu asalaki.—Luka 1:1-3.
[Elilingi na lokasa 22]
Mwa banyama oyo bazalaki kosala na yango langi
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Na ndingisa ya SDC Colour Experience (www.sdc.org.uk)
[Elilingi na lokasa 22]
Petro azali kosala diskur mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B.