Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 1/08 nk. 18-19
  • Kozala moklisto elimboli nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozala moklisto elimboli nini?
  • Lamuká!—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozala moklisto ezalaki lolenge ya bomoi na ekeke ya liboso
  • Boklisto ya solo lelo oyo
  • Baklisto ya liboso mpe mokili
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Baklisto mpe mokili ya ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Lolenge nini okoki koyeba lingomba ya solo?
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Zwá matomba na mateya oyo eleki malamu mpo na moto nyonso!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Lamuká!—2008
g 1/08 nk. 18-19

Engebene Biblia

Kozala moklisto elimboli nini?

KINGSLEY, moto moko ya Afrika alobi boye: “Na ekólo na biso, kozala moklisto elimboli kokende losambo mbala moko na pɔsɔ.” Raad, moto moko ya Moyen-Orient, alobi boye: “Na mboka na biso, baklisto ezali bato oyo balandaka mimeseno ya bato ya mikili ya Mpoto, na makambo lokola molato, milulu, mpe ndenge ya kotalela basi.”

Kasi, kozala moklisto elimboli kaka kokende losambo mbala moko na pɔsɔ mpe kolanda mimeseno ya bato moko boye? Liloba “moklisto” ezali nde te kopesa likanisi ya kolanda bizaleli ya Klisto, misala na ye, mateya na ye, mpe ndakisa na ye?a Kozala moklisto elimbolaki nini mpo na baklisto ya liboso?

Kozala moklisto ezalaki lolenge ya bomoi na ekeke ya liboso

Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bozali baninga na ngai soki bozali kosala oyo ngai nazali kotinda bino.” (Yoane 15:14) Mateya ya Klisto etalelaki makambo nyonso ya bomoi ya baklisto ya liboso. Yango wana, bato bazalaki kobenga lingomba na bango “Nzela.” (Misala 9:2) Eumelaki te, “babengamaki mpo na mbala ya liboso baklisto na litambwisi ya Nzambe.” (Misala 11:26) Nkombo wana ya sika bazwaki emonisaki ete bandimaki ete Yesu azali Mwana ya Nzambe, oyo amonisi bato mokano ya Tata na ye ya likoló. Kondima wana nde etindaki bango bázala na etamboli oyo ekesenisaki bango na bato ya ntango na bango.

Mateya ya Klisto etindaki bayekoli na ye bátosa mpe mateya ya Biblia, elingi koloba, báboya “pite, bosɔtɔ, etamboli ya mbindo, losambo ya bikeko, misala ya bilimo mabe, koyinana, koswana, zuwa, nkanda makasimakasi, kowelana, . . . kolangwa masanga, bilambo ya lokoso mpe makambo oyo ekokani na oyo wana.” (Bagalatia 5:19-21; Baefese 4:17-24) Ntoma Paulo ayebisaki baklisto ya Kolinti ete basusu kati na bango bazalaki kosala makambo wana. Na nsima, abakisaki boye: “Kasi bosili kosukolama pɛɛ, kasi bosili kosantisama, kasi bosili kotángama bayengebene na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Klisto.”​—1 Bakolinti 6:9-11.

Na buku na ye (The Rise of Christianity), Ernest Barnes alobi boye: “Na mikanda na yango ya kala oyo tokoki kotyela motema, ebongiseli ya boklisto emonisami mingi mpenza ete ezali na etamboli ya malamu mpe etosaka mibeko. Basangani na yango bazalaki kosala makasi bázala bana-mboka ya malamu mpe ya sembo. Bazalaki koboya bizaleli mabe ya bapakano. Na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bazalaki kosala makasi bázala na kimya ná bazalani na bango mpe bázala baninga oyo babongi kotyelama motema. Bazalaki koteya bango bázala na bokatikati, bálinga mosala mpe bázala na etamboli ya malamu. Atako bato ya ntango na bango bazalaki na bizaleli ya mabe mpenza, kasi baoyo bazalaki kokangama na mitinda ya boklisto, bazalaki bato ya kolongobana mpe bazalaki kokosa te. Bazalaki kotosa mitinda oyo eleki nyonso na likambo ya kosangisa nzoto: bazalaki komemya libala mpe bazalaki na etamboli ya malamu na mabota na bango.” Wana nde ndambo ya makambo oyo ekesenisaki baklisto ná bato mosusu ya ntango ya kala.

Eloko mosusu oyo ekesenisaki baklisto ya liboso na bato mosusu ezalaki molende na bango na mosala ya kosakola. Klisto apesaki bayekoli na ye etinda ete: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 28:19, 20) Jean Bernardi, molakisi na iniversite ya Sorbonne, na Paris (France) alobaki boye: “[Baklisto] basengelaki kokende kosakola bipai nyonso: na bingumba, na balabala, na biyanganelo mpe na bandako; mpe epai ya bato nyonso, báyamba bango to te. Bazalaki kosakwela babola mpe bazwi oyo bamipesaki mingi na bozwi na bango. . . . Basengelaki kotambola makolo to na masuwa, mpe kokende kino na nsuka ya mabelé.”

Boklisto ya solo lelo oyo

Lokola na ekeke ya liboso, lelo oyo mpe baklisto ya solo bayebani ete bazalaka na etamboli oyo ekeseni na bato mosusu. Batatoli ya Yehova basalaka makasi bálanda malamumalamu mitinda oyo baklisto ya liboso batiká. Bato mosusu mpe bamonaka milende oyo Batatoli basalaka mpo na kotosa mateya ya Biblia na bomoi na bango.

Na ndakisa, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi ete lingomba ya Batatoli ya Yehova eyebani ete ezali “moko ya mangomba oyo bandimi na yango bazalaka na etamboli ya malamu koleka na mokili mobimba.” Zulunalo moko (Deseret News) oyo ebimaka na engumba Salt Lake City, na etúká ya Utah (États-Unis) elobaki ete: “[Batatoli ya Yehova] balendisaka bato bázala na boyokani malamu na libota, mpe bandimi ya lingomba yango bazalaka bana-mboka oyo balingaka mosala mpe bazalaka na ezaleli ya kolongobana.” Zulunalo yango ebakisi ete: “Bandimi ya lingomba yango balandaka mitinda oyo eleki nyonso. Bandimaka ete kolekisa ndelo na masangá, komɛla makaya to bangi, kobɛta masano ya mbongo, kosangisa nzoto na ndenge ya mbindo, mpe kosangisa nzoto mibali na mibali, epekisaka moto azala na boyokani malamu na Nzambe. Bateyaka bandimi ya lingomba na bango bázala na kolongobana mpe na mimeseno malamu na mosala.”

Batatoli basalaka mpe makasi bákokisa malamu mokumba na bango ya kosakola nsango malamu na molende. Na likambo yango, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Mokumba ya libosoliboso ya mondimi mokomoko . . . ezali ya kopesa litatoli mpo na Yehova mpe Bokonzi na Ye oyo ekómi pene. . . . Mpo moto azala Motatoli ya solosolo, asengeli kosakolaka na ndenge esengeli, na lolenge moko to mosusu.”

Emonani ete kozala moklisto ezali kaka te kozala mondimi ya lingomba moko boye oyo elobaka ete endimaka Klisto. Yesu ye moko asakolaki ete baklisto ya lokuta bakokóma ebele. (Matai 7:22, 23) Batatoli ya Yehova balendisi yo oluka koyeba mateya ya Yesu mpe osalela yango. Yango nde elimboli kozala moklisto. Yesu alobaki boye: “Soki boyebi makambo wana, esengo na bino soki bozali kosala yango.”​—Yoane 13:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Diksionɛrɛ moko elobi ete moklisto ezali moto oyo andimaka ete Yesu azali Klisto to oyo asambelaka na lingomba oyo elandaka mateya ya Yesu mpe misala na ye.

OSILÁ KOMITUNA?

◼ Banani Yesu abengaki baninga na ye?​—Yoane 15:14.

◼ Bizaleli nini baklisto ya solo basengeli koboya?​—Bagalatia 5:19-21.

◼ Baklisto basengeli kopesa mabɔkɔ na mosala nini?​—Matai 28:19, 20.

[Bililingi na lokasa 19]

Lokola baklisto ya liboso, lelo oyo mpe baklisto ya solo basakolaka nsango malamu na molende

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto