Elikya nini ezali mpo na babola?
KOSALA mosala makasi mpo na kobikela ezali mabe te soki ozali kozwela yango lifuti ya malamu. Kutu, mokomi moko ya Biblia alobaki boye: “Nayebi ete eloko mosusu eleki oyo te ete básepela . . . mpe ete moto na moto alya mpe amɛla mpe ayoka esengo mpo na malamu na mosala na ye [makasi, NW]. Yango likabo ya Nzambe.”—Mosakoli 3:12, 13.
Kasi, ndenge tomoni yango, ebongiseli ya nkita ya mokili mobimba ezali kosalisa bato misala ya makasi, nzokande mbala mingi bafutaka basali malamu te. Bato mingi bazali kaka babola mpe bazali koboma nzoto mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela mokolo na mokolo. Bomoi na bango ezali mpenza te kopesa bango mposa ya ‘kosepela’ mpe ‘koyoka esengo.’ Mokili ekómi na bozwi mingi, kasi ekoki kozala ete bato 50 likoló ya 100 bazali kozwa litomba te na bozwi yango.
Nzambe amibanzabanzaka mpo na babola
Yehova Nzambe, Mozalisi ya bato, asepelaka te na likambo yango. Yehova ayokelaka babola mawa. Na Biblia, totángaka boye: “[Nzambe] akobosana kolela na bango te baoyo bazwi mpasi.” (Nzembo 9:12) Yehova azali Nzambe oyo akipaka babola.
Mpo na Yehova, Biblia elobi boye: “Moto ya mpasi akomipesa epai na yo, yo ozali mosungi ya etike.” (Nzembo 10:14) Tomoni ete vɛrsɛ yango ezali kolobela moto mokomoko oyo azali konyokwama.a Ya solo, Nzambe atalaka moto mokomoko mpe atyaka likebi na bamposa ya moto yango. Epai na ye, moto nyonso azali na motuya mpe abongi kotyelama likebi. Ezala babola to bazwi, Yehova azali kosɛnga bato nyonso báyekola epai na ye mpe bákóma baninga na ye.
Ezaleli oyo bato bakoki koyekola epai ya Nzambe ezali koyokela basusu mawa mpe komitya na esika na bango. Batatoli ya Yehova bamonaka ete bazali libota monene ya bandeko. Bapesanaka limemya mpe balinganaka makasi. Mokolo moko, Nkolo Yesu Klisto ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bino nyonso bozali bandeko.” (Matai 23:8) Na yango, bato nyonso oyo basangani na losambo ya solo bazali kati na libota ya bandeko oyo batalelaka te bozwi ya mokomoko na bango. Bakipanaka mpe balendisanaka na ntango ya mikakatano.
Biblia ezali na malako oyo ekoki kosalisa moto akima makambo mosusu oyo ekoki kokómisa ye mobola. Biblia emonisi ete Nzambe apekisi komɛla masanga koleka ndelo mpe kosalela biloko oyo ekoki kobebisa nzoto, na ndakisa komɛla makaya. (Masese 20:1; 2 Bakolinti 7:1) Moto oyo azali kotosa malako wana akobatela mbongo na ye na esika ya kobebisa yango na mimeseno oyo ebebisaka nzoto. Akozwa te bamaladi oyo eutaka na komɛla makaya mpe kolangwa masanga mpe akobebisa mbongo na ye te epai ya minganga mpo básalisa ye na bamaladi yango. Longola yango, Biblia ezali koteya bato bábwaka makanisi ya koluka kokóma na biloko mingi ya mokili mpe lokoso. (Malako 4:19; Baefese 5:3) Soki tozali kotosa Liloba ya Nzambe na makambo wana, tokobebisa mpe mbongo te na masano ya mbongo.
Biblia ezali kopesa malako oyo tokoki kosalela na bomoi ya mokolo na mokolo, ata na ntango ya bobola makasi. Tótalela ndakisa oyo:
Na mboka moko oyo bato mingi bazangaki misala, mwasi moko azalaki kosala na izini. Mwasi yango alingaki kobungisa mosala na ye ntango asɛngaki konje mpo ayangana na makita ya boklisto. Mokonzi na ye akokaki kolongola ye na mosala. Kasi, mwasi yango ná baninga na ye ya mosala bakamwaki mpenza ndenge mokonzi na bango andimaki kopesa ye konje. Longola yango, mokonzi yango ayebisaki mwasi wana ete alingi akoba kosala na izini na ye mpe akumisaki ye ete azali “mosali malamu mpenza.” Mpo na nini?
Mosali wana azali Motatoli ya Yehova mpe atosaka mitinda ya Biblia. Lokola alingaka “komitambwisa na bosembo na makambo nyonso,” azalaki te kokosa bato mpe koyiba; yango wana, ayebanaki lokola moto ya bosembo. (Baebele 13:18) Azalaki kosala mosala na ye na ‘molimo mobimba’ mpo na kotosa malako oyo ezali na Bakolose 3:22, 23. Yango elingi koloba ete azalaki kotosa mokonzi na ye ya mosala mpe kosala makasi mpo akokisa malamu mosala na ye ya mokolo na mokolo oyo azalaki kofutama mpo na yango.
Na ntembe te, ebongiseli ya makambo ya nkita lelo oyo ezali kotinda bato bálukaka liboso matomba na bango mpe kozwa benefisi mingi. Ekoki kozala ete baoyo batosaka mpenza mitinda ya Biblia, basalaka makasi mpo na kozwa biloko oyo bazali na bosɛnga na yango, na ndakisa bilei, bilamba mpe ndako. Atako bongo, bazali na lisosoli ya malamu liboso ya Mozalisi na bango mpe bazali kozela na motema mobimba bomoi ya malamu oyo elakami na Yehova, “Nzambe oyo apesaka elikya.”—Baloma 15:13.
Nini ekosilisa bobola mpo na libela?
Biblia emonisi ete Yehova asepelaka te na bato oyo bazali kosala ete babola bányokwama mpamba. Liloba ya Nzambe elobi boye: “Mawa epai na bango bakobimisaka mibeko ya mabe, mpe bakomeli baoyo bakokoma minyoko; kopɛngwisa bazangi longwa na kosambisama, koyibela babola . . . yango ebongi na bango, ete basi-bakufeli-babali bázala miboma na bango mpe ete báyiba epai na bitike ya batata.” (Yisaya 10:1, 2) Bato oyo bazali kotambwisa makambo ya nkita ya mokili lelo oyo bazali kokipe babola te. Ezala bazali kosala yango na nko to kozanga koyeba, bato yango bazali kati na ebongiseli oyo ezali konyokola bato, oyo Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akolongola mpo na kotya mosusu.
Mosakoli Yisaya atuni banyokoli yango motuna oyo ya ntina mingi: “Bokosala nini na mokolo na bitumbu mpe na kobebisama oyo ekolongwa na mosika?” (Yisaya 10:3) Yehova akosukisa bango ntango akobebisa ebongiseli ezangi bosembo oyo bazali kopesa mabɔkɔ.
Kasi, mokano ya Nzambe esuki kaka te na kolongola banyokoli wana. Akopesa bato ya sembo bomoi mpe kozanga bosembo ekozala lisusu te. Na nzela ya Bokonzi oyo eleki bokonzi mosusu nyonso, akopesa bato nyonso likoki ya kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo; bobola ekozala lisusu te. Mpo na kozala na bomoi ya malamu na ntango wana, ekosɛnga te bápesa yo mbongo mingi, oyebana na bato minene ya mombongo to ozala na mayele ya kosala mombongo. Ndenge nini toyebi ete mbongwana wana ekosalema solo?
Yesu Klisto, mokonzi oyo Yehova aponi mpo na koyangela bato, alobaki ete bomoi wana ya kitoko na mikolo ezali koya ezali “bozalisi lisusu.” (Matai 19:28) Maloba yango elimboli kozongisama ya makambo nyonso sika to ebandeli ya bomoi ya sika mpo na bato. Yesu asalelaki maloba “bozalisi lisusu” mpo na komonisa ete Yehova, Mozalisi na biso ya bolingo, akopesa bato ya sembo likoki ya kozala na bomoi ndenge alingi. Kati na ebele ya mapamboli oyo akopesa bato na ntango wana, akolongola mpo na libela mikakatano ya nkita oyo ezali konyokola bato mingi.
Biblia esakoli ndenge boyangeli ya Yesu Klisto ekozala. Elobi boye: “Ye akobikisa mobola oyo akoganga mpe moto ya mawa oyo azali na mosungi te. Akoyokela moto ya bolɔzi mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango na kati na konyokola mpe na kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.”—Nzembo 72:12-14.
Okoki kozala na bomoi oyo kitoko na mikolo ezali koya. Kasi, mpo na kozwa bomoi na mokili wana ya sika, osengeli kokokisa makambo oyo Nzambe ya solo azali kosɛnga; yango wana, osengeli koyekola mpe kosala mokano na ye. Zwá bikateli ya malamu oyo euti na boyebi ya Liloba ya Nzambe. Kobá kozela bomoi kitoko oyo Nzambe apesi moto nyonso likoki ya kozwa. Elikya na yo ekozanga te kokokisama. Liloba ya Nzambe elaki ete: “Bato ya kozanga bakotikama libela te; elikya ya mobola ekokufa seko te.”—Nzembo 9:18.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Nzembo 35:10 mpe Nzembo 113:7 ezali bavɛrsɛ mosusu mibale oyo emonisi mpenza ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na bato oyo bazali konyokwama.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 9]
Okoki kozala na bomoi ya kitoko na mikolo ezali koya
[Etanda/Elilingi na lokasa 10]
Nasengeli kokende na mikili oyo bomoi ezali malamu?
Liloba ya Nzambe elakisi te esika oyo bato basengeli kofanda mpe kosala mosala. Kasi, mitinda ya Biblia ekoki kosalisa moto ayeba soki ezali malamu kokende mboka mosusu mpo na kokima mikakatano ya mbongo. Talelá mituna oyo elandi mpe mitinda ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo.
1. Nazali nde kolanda bilobaloba ya bato? Masese 14:15 elobi boye: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokenda ye.” Moto moko na Mpoto ya Ɛsti akendaki na mboka moko ya bozwi. Na nsima, alobaki boye: “Nayokaki ete awa balɔkɔtaka mbongo lokola nkasa. Kasi, tii sikoyo namoni yango naino te.”
2. Natalelaka bamposa ya libota na ngai na ndenge ebongi? Nazali koluka kokokisa bamposa ya ntina to nazali nde kolula biloko oyo nakokoka kozwa te? Batata ya mabota bazali na mokumba ya kopesa basi mpe bana na bango biloko oyo basengeli na yango. (1 Timote 5:8) Longola yango, Nzambe apesi batata mokumba ya koteya bana na bango makambo ya elimo mpe bizaleli malamu. (Deteronome 6:6, 7; Baefese 6:4) Soki tata ya libota akei mboka mosusu, akoki kosunga libota na ye mingi na mosuni. Kasi, soki eleki bapɔsɔ, basanza to bambula azali komonana na bana na ye te, akokoka te koteya bango makambo ya elimo mpe bizaleli malamu oyo basengeli na yango.
3. Nazali koyeba ete kokabwana na mwasi na ngai ntango molai ekoki komema biso mibale na kosala ekobo? Liloba ya Nzambe epesi babalani toli ete bátyelanaka likebi na oyo etali bamposa na bango ya kosangisa nzoto.—1 Bakolinti 7:5.
4. Nayebi ete kokɔta na mboka mopaya na nzela oyo endimami te ekoki kobendela ngai mindɔndɔ makasi epai ya bakonzi ya mboka yango? Baklisto ya solo basengeli kotosa mibeko ya mboka.—Baloma 13:1-7.
[Bililingi na lokasa 8]
Tózala bazwi to babola, mitinda ya Biblia ekoki kosalisa biso
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 7]
Na likoló: © Trygve Bolstad/Panos Pictures