Landá ndakisa ya Yesu mpe monisá ete omibanzabanzaka mpo na babola
BOBOLA mpe minyoko ebandá kala mpenza. Atako mobeko oyo Nzambe apesaki na Yisalaele esɛngaki kobatela mobola mpe kokitisa mpasi na ye, mbala mingi bazalaki kotosa mobeko yango te. (Amosa 2:6) Mosakoli Ezekiele amonisaki mabe oyo bazalaki kosalela babola. Alobaki boye: “Bato ya mboka yango basalaki mwango ya koyiba mpe babɔtɔlaki bilɔkɔ na moyibi, mpe banyokolaki moto ya mawa mpe mobola, mpe balyelaki mopaya.”—Ezekiele 22:29, NW.
Ezalaki se ndenge moko ntango Yesu azalaki awa na mabelé. Bakonzi ya mangomba bazalaki komibanzabanza ata moke te mpo na babola. Biblia ebengaki bango “bato balingá mbongo,” oyo bazalaki ‘kolya bandako ya basi bakufelá mibali’ mpe bazalaki komibanzabanza mingi nde na mimeseno na bango na esika ya mibange mpe babola. (Luka 16:14; 20:47; Matai 15:5, 6) Tósimba ete na lisese oyo Yesu apesaki ya Mosamalia ya motema malamu, nganga-nzambe mpe Molevi bamonaki moto oyo bazokisaki mpe balekaki na ngámbo mosusu na esika ya kokende kosunga ye.—Luka 10:30-37.
Yesu azalaki komibanzabanza mpo na babola
Masolo ya Baevanzile oyo elobeli bomoi ya Yesu emonisi ete ayebaki malamu mpasi mpe bamposa ya babola. Atako Yesu azalaki na likoló, amikómisaki mpamba, akómaki moto mpe ‘akómaki mobola mpo na biso.’ (2 Bakolinti 8:9) Ntango amonaki bibele ya bato, Yesu “ayokelaki bango mawa, mpo batikamaki mpamba mpe bapalanganisamaki lokola bampate ezangá mobateli.” (Matai 9:36) Lisolo ya mwasi mobola oyo akufelá mobali emonisi ete eloko oyo ebendaki likebi ya Yesu ezalaki te makabo minene oyo bazwi bapesaki, oyo “balongolaki na biloko na bango oyo eleki ebele,” kasi nde likabo ya moke ya mwasi akufelá mobali oyo azalaki mpe mobola. Likambo mwasi wana asalaki esimbaki motema na Yesu mpamba te “atyaki nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobikela.”—Luka 21:4.
Yesu azalaki kaka te koyokela babola mawa, kasi azalaki mpe kotalela bamposa na bango. Ye ná bantoma na ye bazalaki na kɛsi moko ya mbongo oyo bazalaki kosalela mpo na kosunga Bayisalaele oyo bazalaki na bosɛnga. (Matai 26:6-9; Yoane 12:5-8; 13:29) Yesu alendisaki bato oyo balingaki kozala bayekoli na ye bábosanaka te mokumba na bango ya kosunga babola. Alobaki na elenge mozwi ete: “Tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe kabolá yango na babola, mpe okozwa eloko ya motuya na likoló; mpe yaká landá ngai.” Lokola moto yango aboyaki kotika bozwi na ye, yango emonisi ete alingaki bozwi na ye koleka Nzambe mpe bazalani na ye. Na yango, azangaki bizaleli oyo ebongi mpo na kozala moyekoli ya Yesu.—Luka 18:22, 23.
Bayekoli ya Klisto bamibanzabanzaka mpo na bobola
Nsima ya liwa ya Yesu, bantoma mpe bayekoli mosusu ya Klisto bakobaki komibanzabanza mpo na babola. Pene na mobu 49 ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo akutanaki na Yakobo, Petelo mpe Yoane mpe balobelaki mokumba oyo Nkolo Yesu Klisto apesaki ye ya kosakola nsango malamu. Bayokanaki ete Paulo ná Balanabasi bákende epai ya “bato ya bikólo mosusu,” mpo na kosakwela bango nsango malamu. Kasi, Yakobo ná baninga na ye balendisaki Paulo ná Balanabasi ‘bakanisaka babola.’ Mpe Paulo asalaki “makasi mpenza mpo na kosala yango.”—Bagalatia 2:7-10.
Na boyangeli ya Amperɛrɛ Claude, nzala makasi ekɔtaki na bamboka mingi ya Ampire ya Loma. Yango wana, baklisto ya Antiokia “bazwaki mokano, moto na moto engebene oyo azalaki na yango, mpo na kotinda biloko ya lisungi epai ya bandeko oyo bazalaki kofanda na Yudea; mpe basalaki bongo, batindaki yango epai ya mikóló na lobɔkɔ ya Balanabasi mpe Saulo.”—Misala 11:28-30.
Lelo oyo, baklisto ya solo bayebaka mpe ete bayekoli ya Yesu basengeli komibanzabanza mpo na babola, mingimingi bandeko na biso. (Bagalatia 6:10) Na yango, batalelaka mpenza bamposa ya mosuni ya baoyo bazali babola. Na ndakisa, na 1998, mbula ebɛtaki te ntango molai na nɔrdi-ɛsti ya Brésil. Yango ebebisaki bilanga ya loso, ya madesu mpe ya masango, mpe nzala makasi ekɔtaki. Banda mbula 15, nzala moko te ezalaki lokola oyo wana. Na bisika mosusu, ata mai ya komɛla ezalaki komonana te. Kozanga koumela, Batatoli ya Yehova ya bisika mosusu ya ekólo yango basalaki komite ya lisungi mpe, nsima ya mwa ntango moke, bayanganisaki ebele ya biloko mpe bafutelaki yango tike.
Batatoli oyo batindaki lisungi yango bakomaki boye: “Tozali na esengo mingi ndenge tosungi bandeko na biso, mingimingi mpo toyebi ete tosepelisi motema ya Yehova. Tobosanaka te maloba ya Yakobo 2:15,16.” Bavɛrsɛ yango elobaka boye: “Soki ndeko mobali moko to ndeko mwasi moko azali bolumbu mpe azangi bilei oyo ekoki mpo na mokolo, kasi moko na bino alobi na bango ete: ‘Bókende na kimya, bóyɔta mɔtɔ mpe bólya malamu,’ nde bopesi bango te biloko oyo esengeli mpo na nzoto na bango, litomba ezali wapi?”
Na lisangá moko ya Batatoli ya Yehova na engumba São Paulo, Motatoli moko ya molende oyo azali mobola, mbala mingi asalaka nyonso mpo na kozwa mwa eloko ya kobikela. Alobi boye: “Atako nazali mobola, nsango ya Biblia esalisaki ngai nayeba ntina ya bomoi na ngai. Nayebi te nini elingaki kokómela ngai soki bandeko basungaki ngai te.” Eleki mwa mikolo, basengelaki kosala mwasi moklisto wana oyo azalaki makasi na mosala lipaso, kasi azalaki na mbongo ya kofuta lopitalo te. Bandeko ya lisangá bafutelaki ye mbongo ya lopitalo. Na mokili mobimba, baklisto ya solo bazali kosunga bandeko na bango.
Atako makambo ya ndenge wana ezali mpenza kosepelisa bandeko, emonani ete milende wana ekosilisa bobola te. Atako baguvɛrnema ya nguya mpe Bibongiseli ya minene oyo esungaka bato ezali mbala mosusu kosalisa mpenza babola, elongi te kosilisa bobola oyo ebandá kala mpenza. Na yango, tokoki komituna boye: Nini ekosilisa mpo na libela bobola mpe mikakatano mosusu oyo ezali konyokola bato?
Mateya ya Biblia epesaka lisalisi ya solosolo
Masolo ya baevanzile emonisi ete Yesu Klisto azalaki ntango nyonso kosalisa babola mpe baoyo bazalaki na mikakatano mosusu. (Matai 14:14-21) Kasi, mosala nini azalaki kotya na esika ya liboso? Mokolo mosusu, Yesu alekisaki ntango na kosunga bato oyo bazalaki na bosɛnga, na nsima ayebisaki bayekoli na ye boye: ‘Tiká tókende epai mosusu, na bamboka ya pembeni, mpo nasakola mpe kuna.’ Mpo na nini Yesu akataki kosalisa bato ya maladi mpe babola mpo na kozongela mosala na ye ya kosakola? Alobaki boye: “Ezali mpo na yango [mosala ya kosakola] nde nabimaki.” (Malako 1:38, 39; Luka 4:43) Atako kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga ezalaki na ntina mingi mpo na ye, mosala na ye ya libosoliboso ezalaki nde kosakola Bokonzi ya Nzambe.—Malako 1:14.
Lokola Biblia ezali kolendisa baklisto ‘bálanda matambe ya Yesu malamumalamu,’ baklisto lelo oyo bayebi mpenza nini basengeli kotya na esika ya liboso na milende oyo bazali kosala mpo na kosunga basusu. (1 Petelo 2:21) Lokola Yesu, basalisaka bato oyo bazali na bosɛnga. Na ndakisa ya Yesu mpe, batyaka mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso. (Matai 5:14-16; 24:14; 28:19, 20) Kasi, mpo na nini mosala ya kosakola nsango ya Liloba ya Nzambe esengeli koleka liboso ya lolenge mosusu nyonso ya kosalisa basusu?
Masolo ya bomoi ya bato mingi emonisi ete bato oyo bazali kokanga ntina ya batoli ya Biblia mpe kosalela yango, bazali mpenza kolonga mikakatano ya bomoi, ezala mpe bobola. Lisusu, nsango ya Bokonzi ya Nzambe oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola lelo oyo ezali kopesa bato elikya, oyo ezali kopesa bango esengo na bomoi, atako bazali kokutana na mikakatano makasi. (1 Timote 4:8) Elikya yango ezali nini?
Mpo na mikolo ezali koya, Liloba ya Nzambe eyebisi biso ete: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka [ya Nzambe], mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.” (2 Petelo 3:13) Ntango Biblia ezali kolobela “mabelé,” elobelaka mbala mosusu nde bato oyo bafandi na mabelé. (Genese 11:1) Na yango, “mabelé ya sika” ya boyengebene oyo elakami, ezali nde bato oyo Nzambe andimi. Lisusu, Liloba ya Nzambe elaki ete na boyangeli ya Klisto, bato oyo bandimami na Nzambe bakozwa likabo ya bomoi ya seko mpe bakozala na bomoi ya esengo na paladiso awa na mabelé. (Malako 10:30) Elikya kitoko wana ezali mpo na bato nyonso, ata mpe babola. Na “mabelé ya sika,” bobola ekozala lisusu te.
[Etanda/Elilingi na lokasa 7]
NDENGE NINI YESU ‘AKOBIKISA BABOLA’?—Nzembo 72:12
BOYENGEBENE: “Akata makambo ma bato bake na bosembo, abikisa babola mpe anyata banyokoli.” (Nzembo 72:4, Liloba lya Nzambe) Ntango Klisto akoyangela mabelé, bosembo ekozala mpo na bato nyonso. Makambo nyonso ya mabe oyo ezali kokɔtisa bobola na bikólo mingi ekozala lisusu te.
KIMYA: “Na mikolo na ye moyengebene akofuluka; kimya mpe ekoyikana na ntango nyonso ekoumelaka sanza.” (Nzembo 72:7, NW) Bobola mingi awa na mokili ezali kouta na kowelana mpe bitumba. Klisto akotya kimya ya solosolo awa na mabelé, mpe yango ekolongola moko ya makambo ya libosoliboso oyo ezali kokómisa bato babola.
MOTEMA MAWA: “Akoyokela [moto mpamba, NW] mpe mobola mawa; akobikisa milimo ya babola. Akosikola milimo na bango na kati ya konyokola mpe ya kongala; makila na bango ekozala na motuya na miso na ye.” (Nzembo 72:12-14) Moto mpamba, mobola mpe monyokwami bakozala na kati ya libota kaka moko ya bato ya esengo, oyo bakotambwisama na Mokonzi Yesu Klisto.
BOZWI: “Masango ekotonda na mokili.” (Nzembo 72:16) Na boyangeli ya Klisto, biloko ekozala beboo. Bato bakotungisama lisusu te na bozangi ya bilei mpe nzala makasi oyo ezali komema bobola lelo oyo.
[Elilingi na lokasa 5]
Yesu azalaki kotalela bamposa ya babola
[Elilingi na lokasa 6]
Nsango ya Biblia ezali kopesa elikya ya solosolo