Biblia elobi nini?
Ezali mabe koboya kozwa zemi?
EZALI mabe bato oyo babalaná básalela bankisi to mayele mosusu mpo na koboya kozwa zemi? Yo okanisi nini? Na ntembe te, okopesa eyano na kotalela makambo oyo lingomba na yo eteyaka. Lingomba ya Katolike eteyaka ete mayele nyonso oyo moto akoki kosalela mpo na koboya kozwa zemi ezali “mabe mpenza.” Mpo na Lingomba ya Katolike, kosangisa nzoto ya mwasi ná mobali oyo babalaná esengeli ntango nyonso kopesa mwasi libaku ya kozwa zemi. Na bongo, bamonaka ete mayele nyonso ya koboya kozwa zemi ezali “mabe na miso ya Nzambe.”
Bato mingi bandimaka likanisi wana te. Na likambo yango, lisolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Pittsburgh Post-Gazette) elobaki ete: “Na États-Unis, bandimi mingi (koleka 75 %) ya Lingomba ya Katolike balobaka ete lingomba esengeli kotikela bango nzela ya kosalela bankisi ya monganga mpo na koboya kozwa zemi . . . . Mingi bakipaka kutu te mobeko wana ya lingomba.” Linda, moko ya bandimi yango oyo azali mama ya bana misato, andimi polele ete asalelaka bankisi yango; mpe alobi boye: “Ngai namonaka te ete ezali lisumu.”
Liloba ya Nzambe elobi nini na likambo yango?
Bomoi ezali na motuya mingi
Nzambe atalelaka na motuya mingi bomoi ya mwana, ata soki azali naino moke mpenza na libumu ya mama. Na lisalisi ya elimo santu, Davidi, mokonzi ya Yisalaele, alobaki boye: “Otongaki ngai kati na libumu ya mama na ngai. . . . Miso na yo emonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ekomamaki nyonso na mokanda na yo.” (Nzembo 139:13, 16) Bomoi ebandaka ntango kaka zemi ebandi, mpe Mibeko ya Moize emonisaki ete bakokaki kosambisa moto soki azokisi mwana oyo azali na libumu ya mama. Kutu, Exode 21:22, 23 emonisi polele ete soki bato mibale oyo bazali kobunda batuti mwasi ya zemi, mpe ye to mwana oyo azali na libumu akufi, esengelaki komema likambo yango epai ya bazuzi. Bango basengelaki kotalela makambo oyo ememi likama yango mpe koyeba soki moto oyo atutaki ye asalaki na nko to te. Kasi, etumbu ekokaki kozala “bomoi mpo na bomoi.”
Mitinda yango etali mpe likambo ya kosalela mayele moko boye mpo na koboya kozwa zemi, mpamba te bankisi to mayele mosusu oyo bato basalelaka esopaka zemi. Bankisi mpe mayele ya ndenge wana eyokani te na etinda ya Biblia oyo esɛngi biso tózwaka bomoi na motuya. Nzokande, bankisi mpe mayele mingi oyo bato basalelaka mpo na koboya kobota esopaka zemi te. Ndenge nini esengeli kotalela mayele yango?
Ata esika moko te, Biblia epesi baklisto etinda ya kobota. Atako Nzambe alobaki na babalani ya liboso mpe na libota ya Noa ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili,” kasi etinda yango epesamaki lisusu te epai ya baklisto. (Genese 1:28; 9:1) Na bongo, babalani bango moko nde bakopona soki bakobota to te, bakozala na bana boni, mpe ntango nini bakobota bana yango. Makomami epekisi mpe te kosalela bankisi to mayele mosusu mpo na koboya kozwa zemi. Na yango, na kotalela Biblia, kosalela to koboya kosalela bankisi mpe mayele mosusu ya koboya kobota oyo esopaka zemi te ezali likambo ya babalani bango moko. Kasi, mpo na nini Lingomba ya Katolike epekisaka bato básalela bankisi mpe mayele mosusu ya koboya kozwa zemi?
Bokeseni kati na bwanya ya Nzambe mpe oyo ya bato
Buku moko ya Bakatolike emonisi ete ezali na ekeke ya mibale ya ntango na biso nde bato oyo bazalaki komibenga baklisto bakómaki kolanda liteya moko ya filozofi ya Basetoa (stoïciens) oyo elobaki ete babalani basengeli kosangisa nzoto kaka mpo na kobota. Na yango, makanisi na bango eutaki nde na bafilozofi ya bato kasi na Biblia te. Eutaki na bwanya ya bato kasi ya Nzambe te. Liteya wana ya filozofi eumelaki lisusu bankama ya bambula mpe Bakatolike mingi oyo bazalaki bato ya mayele na teoloji bafandisaki yango lisusu malamu.a Na kotalela liteya wana, ezali lisumu kosangisa nzoto kaka mpo na komisepelisa mpe ezali mabe kosangisa nzoto soki ezali te mpo na kobota. Kasi, Biblia eteyi bongo te.
Na Biblia, mokanda ya Masese esaleli maloba kitoko mpo na kolobela esengo oyo babalani bakoki koyoka ntango bazali kosangisa nzoto na ndenge ebongi; elobi ete: “Mɛlá mai na pilita na yo moko mpe etima na mai longwa na liziba na yo mpenza. . . . Tiká ete mai na yo mapambolama; sepelá na mwasi ya bolenge na yo. Azali lokola mboloko ya bolingo mpe ntaba ya nkeka ya kitoko, tiká ete mabɛlɛ na ye masepelisa yo ntango nyonso, yoká esengo na bolingo na ye libela.”—Masese 5:15, 18, 19.
Nzambe apesá babalani likabo ya kosangisa nzoto. Kasi, yango ezali te kaka mpo na kobota. Likabo ya kosangisa nzoto epesaka mpe babalani nzela ya komoniselana bolingo. Na yango, soki mobali ná mwasi na ye bayokani ete básalela bankisi to mayele mosusu mpo mwasi azwa zemi te, wana etali bango moko mpe moto moko te asengeli kosambisa bango.—Baloma 14:4, 10-13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ezali kaka na ekeke ya 13 nde Pápa Grégoire IX abimisaki mobeko oyo buku moko (New Catholic Encyclopedia) ebengi “mobeko ya liboso oyo pápa abimisá mpo na kopekisa bato kosalela mayele ya koboya kozwa zemi.”
[Etanda na lokasa 27]
OSILÁ KOMITUNA?
◼ Ezali mabe mobali ná mwasi oyo babalaná básangisa nzoto?—Masese 5:15, 18, 19.
◼ Likambo nini baklisto basengeli kobosanaka te soki bazali kosalela bankisi to mayele mosusu ya koboya kozwa zemi?—Exode 21:22, 23.
◼ Ndenge nini bato basengeli kotalela babalani oyo basalelaka bankisi to mayele mosusu ya koboya kozwa zemi?—Baloma 14:4, 10-13.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 27]
Atako Nzambe alobaki na babalani ya liboso mpe na libota ya Noa ete: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili,” kasi etinda yango epesamaki lisusu te epai ya baklisto